LISOLO YA BOYEKOLI 42
‘Osepelaka kotosa’?
“Bwanya oyo euti na likoló . . . esepelaka kotosa.”—YAK. 3:17.
LOYEMBO 101 Tósala na bomoko
NA MOKUSEa
1. Mpo na nini kotosa ekoki kozala mpasi?
OZALAKA na mokakatano na bantango mosusu mpo na kotosa? Ekómelaki mpe Mokonzi Davidi, yango wana abondelaki Nzambe boye: “Lamusá na kati na ngai mposa ya kotosa yo.” (Nz. 51:12) Davidi azalaki kolinga Yehova. Kasi, na bantango mosusu azalaki na mokakatano mpo na kotosa, ndenge ekómelaka mpe biso. Mpo na nini? Ya liboso, kozanga kokoka ememaka biso na nzela ya kozanga botosi. Ya mibale, Satana alukaka ntango nyonso kotinda biso tózala batomboki, lokola ye. (2 Ko. 11:3) Ya misato, bato ya mokili oyo bazali zingazinga na biso bamonisaka ezaleli ya botomboki, “elimo oyo ezali sikoyo kosala mosala na kati ya bana oyo bazangi botosi.” (Ef. 2:2) Tosengeli kosala makasi kaka te mpo na kobundisa mposa na biso ya kosala lisumu, kasi mpe mpo na kotɛmɛla mbamba oyo Zabolo mpe mokili oyo ezali kotya biso mpo tózanga botosi. Tosengeli kosala makasi ya kotosa Yehova mpe baoyo ye apesi bokonzi.
2. ‘Kosepela kotosa’ elimboli nini? (Yakobo 3:17)
2 Tángá Yakobo 3:17. Na litambwisi ya elimo ya Nzambe, Yakobo akomaki ete bato ya bwanya ‘basepelaka kotosa.’ Yango elimboli nini? Tosengeli kozala pene mpe na mposa ya kotosa baoyo Yehova apesi mwa bokonzi. Kasi, Yehova azelaka te ete tótosa moto oyo azali kosɛnga biso tóbuka mibeko na Ye.—Mis. 4:18-20.
3. Mpo na nini Yehova alingi ete tótosaka baoyo bazali na bokonzi likoló na biso?
3 Mbala mingi tomonaka ete kotosa Yehova ezali mpasi te lokola kotosa moto. Ezali bongo, mpo litambwisi oyo Yehova apesaka ezalaka ntango nyonso ya kokoka. (Nz. 19:7) Kasi bato oyo bazali na bokonzi lelo oyo bazali bato ya kozanga kokoka. Atako bongo, Tata na biso ya likoló apesi mwa bokonzi epai ya baboti, bakonzi ya mboka, mpe bankulutu. (Mas. 6:20; 1 Tes. 5:12; 1 Pe. 2:13, 14) Ntango tozali kotosa bango, tozali kotosa nde Yehova. Tiká tótalela ndenge oyo tokoki kotosa bato oyo Yehova apesi bokonzi, atako na bantango mosusu tomonaka ete litambwisi na bango ezali mpasi mpo na kondima mpe kolanda.
TOSÁKÁ BABOTI NA YO
4. Mpo na nini bana mingi batosaka baboti na bango te?
4 Bilenge bazalaka na baninga mosusu oyo “batosaka baboti te.” (2 Tim. 3:1, 2) Mpo na nini bilenge mingi batosaka baboti na bango te? Basusu bamonaka ete baboti na bango basalaka makambo na bokosi. Baboti basɛngaka bango básala makambo oyo bango moko basalaka te. Bilenge mosusu bamonaka ete toli ya baboti na bango ezali makambo ya kala, ebongi te, mpe etyaka bango nkaka mingi. Soki ozali elenge, yo mpe omonaka bongo? Bilenge mingi bamonaka ete ezali mpasi kotosa mobeko oyo ya Yehova: “Bótosaka baboti na bino na boyokani na Nkolo, mpo yango ezali sembo.” (Ef. 6:1) Nini ekoki kosalisa yo osala yango?
5. Na kotalela Luka 2:46-52, mpo na nini botosi ya Yesu epai ya baboti na ye ezali kokamwisa?
5 Okoki koyekola botosi soki olandi ndakisa oyo eleki malamu, ndakisa ya Yesu. (1 Pe. 2:21-24) Yesu azalaki moto ya kokoka mpe baboti na ye bazalaki bato ya kozanga kokoka. Kasi Yesu azalaki kokumisa baboti na ye ata ntango basali mabunga to bakangi ntina te ya likambo oyo asali. (Kob. 20:12) Tótala likambo oyo esalemaki ntango Yesu azalaki na mbula 12. (Tángá Luka 2:46-52.) Baboti na ye bayebaki te ete atikalaki na Yerusaleme. Yozefe ná Maria nde bazalaki na mokumba ya kotala soki bana na bango nyonso bazalaki na kati ya bato oyo bazali kozonga ndako nsima ya fɛti. Nsukansuka, ntango Yozefe ná Maria bakendaki koluka Yesu mpe bamonaki ye, Maria apamelaki Yesu mpo na mpasi oyo amonisaki bango! Yesu akokaki komonisa ete bango nde basalaki mabe. Kasi, apesaki baboti na ye eyano ya mindɔndɔ te mpe ya limemya. Atako bongo, Yozefe ná Maria “bakangaki ntina te ya makambo oyo azalaki koloba na bango.” Kasi, Yesu “azalaki kaka kotosa bango.”
6-7. Nini ekoki kosalisa bilenge bátosaka baboti na bango?
6 Bilenge, esilá kokómela bino bómona ete ezali mpasi kotosa baboti na bino ntango basali mabunga to ntango bakangi ntina te ya likambo oyo bosali? Nini ekoki kosalisa bino? Ya liboso, bókanisa ndenge oyo Yehova akoyoka. Biblia elobi ete ntango bozali kotosa baboti na bino, “yango esepelisaka mpenza Nkolo.” (Kol. 3:20) Yehova ayebaka ntango oyo baboti na bino bakangi mpenza te ntina ya likambo oyo bosali to ntango oyo batye mibeko oyo ebongi mpenza te. Kasi ntango bondimi kotosa yango, bokosepelisa Yehova.
7 Ya mibale, bókanisa ndenge oyo baboti na bino bakoyoka. Ntango bozali kotosa baboti na bino, bakosepela mpe bakotyela bino motema mingi. (Mas. 23:22-25) Na ntembe te bokokóma mpe na boyokani ya penepene elongo na bango. Alexandre, ndeko moko ya Belgique, alobi boye: “Ntango nakómaki na momeseno ya kotosa makambo oyo baboti na ngai bazalaki kosɛnga ngai, boyokani na biso ebongwanaki. Ekómaki malamu mpenza mpe ezalaki kopesa esengo.”b Ya misato, kanisá ndenge ezaleli ya kotosa sikoyo ekosalisa yo na mikolo ezali koya. Paulo, oyo afandaka na Brésil, alobi: “Koyekola kotosa baboti na ngai esalisi ngai natosaka Yehova mpe bato mosusu oyo bazali na bokonzi.” Liloba ya Nzambe epesi ntina monene oyo osengeli kotosa baboti na yo. Elobi: “Mpo makambo na yo etambola malamu mpe oumela ntango molai na mabele.”—Ef. 6:2, 3.
8. Mpo na nini bilenge mingi baponaka kotosa baboti na bango?
8 Bilenge mingi bamoni ete ntango batosaka baboti na bango makambo etambolaka malamu mpenza. Luiza, oyo mpe afandaka na Brésil, azalaki liboso komona te ntina oyo bapekisaki ye azala na telefone mpo na mwa ntango. Azalaki komiloba ete bana mingi ya mbula na ye bazalaki na telefone. Kasi na nsima amonaki ete baboti na ye bazalaki nde kobatela ye. Sikoyo alobi boye: “Namoni ete kotosa baboti na ngai ezali te lokola elamba oyo ezali kotya ngai nkaka, kasi nde lokola mokaba ya komibatela (ceinture de sécurité) oyo ekoki kobikisa bomoi na ngai.” Elizabeth, elenge mwasi moko oyo afandaka na États-Unis, akokaka te kotosa baboti na ye na bantango mosusu. Alobi boye: “Ntango nakangi mpenza te ntina oyo baboti na ngai batye mobeko moko boye, nakanisaka mabaku oyo mibeko na bango ebatelaki ngai.” Monica, oyo afandaka na Arménie, alobi ete makambo na ye ezalaki kosuka ntango nyonso malamu soki atosi baboti na ye koleka soki atosi bango te.
TOSÁKÁ “BAKONZI OYO BAZALI LIBOSO”
9. Ndenge nini bato mingi batalelaka likambo ya kotosa mibeko?
9 Bato mingi bandimaka ete bakonzi ya mboka bazali na ntina mpe ete tosengeli kotosa mibeko mosusu oyo ‘bakonzi yango oyo bazali liboso’ batye. (Rom. 13:1) Kasi kaka bato yango bakoki kokakatana mpo na kotosa mobeko moko oyo bamoni ete ebongi te to esɛngi bango mingi. Tózwa ndakisa ya kofuta mpako. Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na ekólo moko ya Mpoto emonisaki ete bato mingi bandimaka ete “esengeli te kofuta mpako ntango omoni ete ebongi te.” Yango wana na ekólo yango, bana-mboka bafutaka mpako nyonso te oyo guvɛrnema esɛngi bango.
Liteya nini tokoki kozwa na botosi ya Yozefe ná Maria? (Talá paragrafe 10-12)c
10. Mpo na nini totosaka ata mibeko oyo tosepeli na yango te?
10 Biblia emonisi ete baguvɛrnema ya bato ezali kobimisa bampasi, eyangelami na Satana, mpe mosika te ekobebisama. (Nz. 110:5, 6; Mos. 8:9; Luka 4:5, 6) Kasi, elobi mpe ete “moto oyo azali kotɛmɛla bokonzi atɛmɛli ebongiseli ya Nzambe.” Kotosa bakonzi oyo bazali liboso ezali na kati ya ebongiseli oyo Yehova atiki ete ezala mpo na mwa ntango, mpo makambo ezala na molɔngɔ. Yango wana, tosengeli “kopesa moto nyonso oyo esengeli na ye,” ezala mpako, limemya, mpe botosi. (Rom. 13:1-7) Mbala mosusu tomoni ete mobeko moko ezali malamu te, ebongi te, mpe ete kotosa yango ekosɛnga makambo mingi. Kasi biso totosaka Yehova, mpe ayebisi biso tótosaka bakonzi yango ntango nyonso oyo basɛngi biso te tóbuka mibeko na ye.—Mis. 5:29.
11-12. Na kotalela Luka 2:1-6, ndenge nini Maria ná Yozefe batosaki mobeko oyo ezalaki mpasi, mpe ebimisaki matomba nini? (Talá mpe bililingi.)
11 Tokoki kozwa mateya na ndakisa ya Yozefe mpe Maria, oyo basepelaki kotosa bakonzi oyo bazalaki liboso ata ntango ezalaki mpasi. (Tángá Luka 2:1-6.) Ntango zemi ya Maria ekómaki sanza pene na libwa, ye ná Yozefe bakutanaki na likambo moko oyo emekaki botosi na bango. Augusto, oyo azalaki koyangela Ampire ya Roma, asɛngaki moto nyonso akende kokomisa nkombo na mboka oyo abotamá. Yozefe ná Maria basengelaki kosala mobembo ya kilomɛtrɛ 150 tii na Beteleme, na nzela ya ngombangomba. Mobembo yango elingaki kozala mpasi, mingimingi mpo na Maria. Mbala mosusu bamitungisaki mpo na Maria mpe mwana na bango oyo azalaki na libumu. Ekozala boni soki mpasi ya kobota ezwi ye na nzela? Na libumu na ye, Maria amemaki mwana oyo akokóma Masiya. Balobaki nde ete lokola ezali bongo bakotosa guvɛrnema te?
12 Yozefe ná Maria batikaki ata moko te ya mitungisi wana epekisa bango kotosa mobeko. Yehova apambolaki bango mpo batosaki. Maria akómaki malamu na Beteleme, abotaki mwana oyo azalaki nzoto kolɔngɔnɔ, mpe asalisaki kutu na kokokisa esakweli ya Biblia!—Mika 5:2.
13. Ndenge nini botosi na biso ekoki kosalisa bandeko?
13 Kotosa bakonzi oyo bazali liboso ememelaka biso ná basusu bolamu. Ndenge nini? Na ndakisa, tokozwa te etumbu oyo bapesaka bato oyo babuki mobeko. (Rom. 13:4) Botosi na biso ekoki kosala ete bakonzi bátalela Batatoli ya Yehova nyonso na ndenge ya malamu. Na ndakisa, eleki bambula mingi na Nigeria, basoda bakɔtaki na Ndako ya Bokonzi moko ntango makita ezalaki kosalema, mpo na koluka bato oyo basalaki mobulu mpo na koboya kofuta mpako. Kasi mokonzi oyo atalelaka makambo ya mpako ayebisaki basoda yango bálongwa wana, alobaki: “Batatoli ya Yehova baboyaka kofuta mpako te.” Mbala nyonso oyo otosi mobeko, okoki komatisa lokumu ya basaleli ya Yehova, mpe mokolo mosusu yango ekoki kosalisa mpo na kobatela bandeko.—Mat. 5:16.
14. Nini esalisaki ndeko moko akóma ‘kosepela kotosa’ bakonzi oyo bazali liboso?
14 Nzokande, ekoki kokóma ete tózala te na mposa ya kotosa bakonzi. Ndeko mwasi moko na États-Unis na nkombo Joanna alobi boye: “Nazalaki na mokakatano monene ya kotosa mpo bakonzi mosusu basalaki bato ya libota na ngai makambo ya kozanga bosembo.” Kasi Joanna asalaki makasi abongola ndenge na ye ya kotalela bakonzi. Ya liboso, atikaki kotánga na Internet masolo oyo ezalaki koloba mabe mpo na bakonzi yango mpo ezalaki kolamwisa makanisi ya mabe kati na ye. (Mas. 20:3) Ya mibale, abondelaki Yehova asalisa ye atyela ye motema na esika atya motema na mbongwana oyo ekoki kosalema na guvɛrnema ya bato. (Nz. 9:9, 10) Ya misato, atángaki masolo oyo elobeli koboya kokɔta na makambo ya mokili na mikanda ya moombo ya sembo. (Yoa. 17:16) Lelo oyo, Joanna alobi ete kozala na limemya mpe kotosa bakonzi “epesi ye kimya mingi mpenza.”
TOSÁ MALAKO YA EBONGISELI YA YEHOVA
15. Mpo na nini ekoki kozala mpasi tótosa malako oyo euti na ebongiseli ya Yehova?
15 Yehova asɛngi biso ete ‘tótosaka baoyo bazali kokamba’ na lisangá. (Ebr. 13:17) Mokonzi na biso Yesu azali moto ya kokoka, kasi bato oyo azali kosalela mpo na kokamba biso awa na mabele, bazali bato ya kokoka te. Ekoki kozala mpasi tótosa bango, mingimingi soki basɛngi biso tósala likambo oyo tolingi kosala te. Na libaku moko, ntoma Petro azalaki na mokakatano mpo na kotosa. Ntango anzelu moko ayebisaki ye alya banyama oyo Mobeko ya Moize elobaki ete ezali mbindo, Petro aboyaki kotosa—kaka mbala moko te, kasi mbala misato mobimba! (Mis. 10:9-16) Mpo na nini? Malako wana ya sika ekɔtaki ye te. Amesanaki kosala makambo ndenge mosusu. Soki ezalaki mpasi Petro atosa malako oyo euti epai ya anzelu moto ya kokoka, tokoki kokamwa te ete na bantango mosusu ekoki kozala mpasi mpo tótosa malako oyo euti epai ya bato ya kozanga kokoka!
16. Atako ntoma Paulo akokaki komona ete malako oyo azwaki elekaki ndelo, asalaki nini? (Misala 21:23, 24, 26)
16 Ntoma Paulo ‘asepelaki kotosa’ ata ntango azwaki malako oyo akokaki komona ete elekaki ndelo. Bayuda oyo bakómaki bakristo bayokaki nungunungu mpo na Paulo, ete azali koteya bato “básundola mibeko ya Moize,” bátosaka yango te. (Mis. 21:21) Bankulutu ya Yerusaleme basɛngaki Paulo akende na tempelo ná mibali minei mpe asala molulu ya komipɛtola mpo na komonisa ete azalaki kotosa Mobeko. Kasi Paulo ayebaki ete bakristo bazalaki lisusu na nse ya Mobeko te. Lisusu, asalaki eloko moko ya mabe te. Atako bongo, Paulo akakatanaki te. “Amemaki mibali yango mpe amipɛtolaki elongo na bango na ndenge milulu ezalaki kosɛnga.” (Tángá Misala 21:23, 24, 26.) Botosi ya Paulo elendisaki bomoko kati na bandeko.—Rom. 14:19, 21.
17. Ndakisa ya Stephanie eteyi yo nini?
17 Ndeko mwasi moko na nkombo Stephanie azalaki na mokakatano ya kondima ekateli moko oyo bandeko oyo bazalaki kokamba mosala na ekólo na ye bazwaki. Ye ná mobali na ye bazalaki kosala na esengo nyonso na etuluku moko ya monɔkɔ ya bapaya. Na nsima, komite ya filiale ezwaki ekateli ya koboma etuluku yango, mpe bandeko yango bazongaki na lisangá ya monɔkɔ ya mboka na bango. Stephanie alobi boye: “Nasepelaki ata moke te. Nazalaki kondima te ete mposa ezalaki monene na monɔkɔ ya mboka na biso.” Atako bongo, andimaki kolanda malako yango ya sika. Alobi boye: “Kendekende, nakómaki komona ete ekateli wana ezalaki ya bwanya. Tokómi baboti ya elimo ya bana ebele na lisangá na biso oyo mabota na bango ezali na solo te. Nazali koyekola na ndeko mwasi moko oyo auti kozongela kosala makambo ya elimo. Mpe sikoyo nazali na ntango mingi mpo na boyekoli ya ngai moko.” Abakisi boye: “Nazali na lisosoli ya kimya mpo nayebi ete nasalaki nyonso mpo na kotosa.”
18. Matomba nini tozwaka ntango totosi?
18 Tokoki koyekola kotosa. Yesu “ayekolaki botosi” na nzela ya makambo ya malamu te, kasi “na makambo ya mpasi [oyo] akutanaki na yango.” (Ebr. 5:8) Ndenge moko na Yesu, mbala mingi toyekolaka botosi na makambo ya mpasi. Na ndakisa, na ebandeli ya maladi mabe ya Coronavirus, ntango basɛngaki biso tótika koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi to kosakola ndako na ndako, ozalaki na mokakatano mpo na kotosa? Atako bongo, botosi na yo ebatelaki yo, esalisaki lisangá ezala na bomoko, mpe esepelisaki Yehova. Sikoyo biso nyonso tobongisami malamu mpo na kotosa malako nyonso oyo tokozwa na ntango ya bolɔzi monene. Kotosa malako yango ekoki kobikisa biso!—Yobo 36:11.
19. Mpo na nini olingi kozala moto ya botosi?
19 Tomoni ete botosi ememaka mapamboli ebele. Kasi toponaka kotosa Yehova libosoliboso mpo tolingaka ye mpe tolukaka kosepelisa ye. (1 Yoa. 5:3) Tozali na eloko ya kofuta Yehova te mpo na nyonso oyo asali mpo na biso. (Nz. 116:12) Kasi tokoki kotosa ye mpe baoyo bazali na bokonzi likoló na biso. Soki tozali kotosa, tokomonisa ete tozali na bwanya. Mpe bato ya bwanya basepelisaka motema ya Yehova.—Mas. 27:11.
LOYEMBO 89 Yoká, tosá, mpe pambwamá
a Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, na bantango mosusu, biso nyonso tokakatanaka mpo na kotosa, ata ntango moto oyo azali kopesa biso malako azali na lotomo ya kosala yango. Lisolo oyo ekolobela matomba oyo emonanaka epai ya baoyo batosaka baboti na bango, “bakonzi oyo bazali liboso,” mpe bandeko oyo bazali kokamba na lisangá.
b Mpo na koyeba ndenge oyo okoki kosolola na baboti na yo mpo na mibeko oyo omoni ete ezali mpasi mpo na kotosa, talá lisolo “Ndenge nini nakoki kosolola na baboti na ngai mpo na mibeko oyo batyá na ndako?” na site jw.org.
c NDIMBOLA YA BILILINGI: Yozefe ná Maria batosaki mobeko ya Kaisala ya kokende kokomisa nkombo na Beteleme. Lelo oyo, bakristo batosaka mibeko oyo “bakonzi oyo bazali liboso” batye mpo na nzela, kofuta mpako mpe batosaka malako mpo na kobatela nzoto.