Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w24 Janvier nk. 8-14
  • Osili komibongisa mpo na mokolo oyo eleki ntina na mbula?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osili komibongisa mpo na mokolo oyo eleki ntina na mbula?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NDENGE NINI TOKOKI KOBONGISA MOTEMA NA BISO MPO NA EKANISELI?
  • SALISÁ BASUSU BÁZWA LITOMBA YA EKANISELI
  • TÓSALISA BAOYO BATIKÁ KOYANGANA NA MAKITA
  • Matomba oyo tozwi na bolingo ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Lisiko eteyaka biso nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Yehova apambolaka milende oyo tosalaka mpo na kosala Ekaniseli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Omityela mikano na eleko ya Ekaniseli
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
w24 Janvier nk. 8-14

LISOLO YA BOYEKOLI 2

LOYEMBO 19 Bilei ya mpokwa ya Nkolo

Osili komibongisa mpo na mokolo oyo eleki ntina na mbula?

“Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.”—LUKA 22:19.

NA MOKUSE

Talá mpo na nini Ekaniseli ezali na ntina mingi, ndenge oyo tokoki komibongisa mpo na yango, mpe kosalisa basusu báyangana.

1. Mpo na nini mokolo ya Ekaniseli ezali mokolo oyo eleki ntina na mbula? (Luka 22:​19, 20)

MPO na basaleli ya Yehova, mokolo ya Ekaniseli ya liwa ya Kristo ezali mokolo oyo eleki ntina na mbula. Ezali molulu kaka moko oyo Yesu atindaki mpenza bayekoli na ye básalaka. (Tángá Luka 22:​19, 20.) Tozelaka Ekaniseli na motema moko mpo na bantina ebele. Tótalela bantina yango mosusu.

2. Mpo na bantina nini tozelaka Ekaniseli na mposa makasi?

2 Ekaniseli esalisaka biso tómanyola na motuya ya lisiko. Ekundwelaka biso ndenge oyo tokoki komonisa botɔndi mpo na mbeka ya Yesu. (2 Ko. 5:​14, 15) Lisusu, epesaka biso libaku ya ‘kolendisana’ elongo na bandeko ya lisangá. (Rom. 1:12) Mbula nyonso, bandeko mosusu oyo batiká koyangana na makita bayaka na Ekaniseli. Kutu, basusu bayokaka mposa ya kozongela Yehova mpo bandeko bayambaki bango na esengo. Mpe bato mingi bakamwaka makambo oyo bamoni mpe bayoki, mpe yango etindaka bango bábanda koyekola Biblia. Ezali likambo ya kokamwa te ndenge tomonaka ete Ekaniseli ezali na ntina mingi!

3. Ndenge nini Ekaniseli esangisaka biso na bandeko ya mokili mobimba? (Talá mpe elilingi.)

3 Kanisá mpe ndenge Ekaniseli esangisaka biso na bandeko ya mokili mobimba. Batatoli ya Yehova bayanganaka elongo wana moi ezali kolala na kotalela esika na esika na mokili mobimba. Biso nyonso toyokaka diskur oyo emonisaka ntina ya lisiko. Toyembaka nzembo mibale, tolekisaka limpa ná vinyo, mpe tolobaka “amen” na motema mobima na mabondeli minei oyo esalemaka. Nsima ya ngonga soki 24, masangá nyonso esilaka kosala ndenge wana. Kanisá esengo oyo na ntembe te Yehova ná Yesu bayokaka ntango bamoni biso nyonso na bomoko tozali kopesa bango lokumu bongo!

Bililingi: Na mokolo ya Ekaniseli, bandeko mibali mpe basi ya bisika ndenge na ndenge na mokili bazali komibongisa mpo na kosala molulu yango ya ntina mingi. 1. Na Porto Rico, libota moko ezali kotala video ya mokapo ya mokolo oyo ebongisami kaka mpo na Ekaniseli. 2. Na Italie, mwasi moko ná mobali na ye na mosala ya kosakola bazali kopesa mobali moko lokasa ya libyangi. 3. Na Kenya, bandeko mibali mibale bazali kotángela mobali moko vɛrsɛ. 4. Na Géorgie, mama moko ná mwana na ye ya mwasi bazali kosala mampa ya Ekaniseli, wana bazali kolanda malako na video “Ndenge ya kosala limpa ya Ekaniseli.” 5. Na Inde, bandeko basi mpe mibali bazali kopɛtola Ndako ya Bokonzi mpe kotya mampa mpe vinyo ya Ekaniseli na mesa. 6. Na Thaïlande, ndeko mobali moko azali koyamba mobali moko oyo ayei na Ndako ya Bokonzi. 7. Na Japon, ndeko mobali moko azali kolekisela ndeko mwasi moko limpa ezangá levire na Ekaniseli.

Ekaniseli esangisaka biso na bandeko ya mokili mobimba (Talá paragrafe 3)f


4. Tokolobela nini na lisolo oyo?

4 Na lisolo oyo, tokolobela mituna oyo: Ndenge nini tokoki kobongisa motema na biso mpo na Ekaniseli? Ndenge nini tokoki kosalisa basusu mpe bázwa litomba na yango? Mpe ndenge nini tokoki kosalisa bandeko oyo batiká koyangana na makita? Biyano na mituna yango ekosalisa biso tómibongisa mpo na molulu yango mosantu.

NDENGE NINI TOKOKI KOBONGISA MOTEMA NA BISO MPO NA EKANISELI?

5. (a) Mpo na nini tosengeli kokanisa motuya ya lisiko? (Nzembo 49:​7, 8) (b) Makambo nini oyekoli na video Mpo na nini Yesu akufaki?

5 Lolenge moko ya ntina mingi ezali ya kokanisa motuya ya mbeka ya lisiko ya Yesu Kristo. Na ndenge na biso moko, tokokaki ata moke te komisikola na lisumu mpe na liwa. (Tángá Nzembo 49:​7, 8; talá mpe video Mpo na nini Yesu akufaki?)a Atako ezalaki mbeka monene mpo na ye moko mpe Mwana na ye ya bolingo, Yehova abongisaki ete Yesu apesa bomoi na ye mpo na biso. (Rom. 6:23) Soki tozali komanyola mingi na likambo oyo Yehova ná Yesu basalaki, tokozala mpe na botɔndi mingi mpo na lisiko. Tokotalela kaka mwa makambo moke oyo kopesa lisiko esɛngaki Yehova ná Yesu. Kasi liboso, tótala soki lisiko ezali nini.

6. Kopesa lisiko esɛngaki nini?

6 Lisiko ezali motuya oyo bafuti mpo na kosikola moto to eloko moko boye. Mobali ya liboso, Adama, azalaki moto ya kokoka ntango akelamaki. Ntango asalaki lisumu, abungisaki elikya ya kozala na bomoi ya seko kaka mpo na ye moko te, kasi mpe mpo na bana na ye nyonso. Mpo na kozongisa eloko oyo Adama abungisaki, Yesu apesaki bomoi na ye ya kokoka lokola mbeka. Na bomoi na ye mobimba awa na mabele, Yesu “asalaki lisumu te, mpe lokuta ezwamaki na monɔkɔ na ye te.” (1 Pe. 2:22) Ntango Yesu akufaki, bomoi na ye ya kokoka ekokanaki mpenza na bomoi oyo Adama abungisaki.—1 Ko. 15:45; 1 Tim. 2:6.

7. Komekama nini Yesu akutanaki na yango awa na mabele?

7 Yesu atosaki ntango nyonso Tata na ye ya likoló atako akutanaki na komekama mingi awa na mabele. Na bomwana, Yesu asengelaki kotosa baboti na ye oyo bazalaki bato ya kozanga kokoka, atako azalaki moto ya kokoka. (Luka 2:51) Na bolenge, asengelaki kotɛmɛla mbamba nyonso oyo bakokaki kotya ye mpo azanga botosi to bosembo. Mpe ntango akómaki mokóló, Yesu atɛmɛlaki komemaka ya Satana Zabolo, ata ntango asɛngaki ye polele ete azanga bosembo epai ya Nzambe. (Mat. 4:​1-11) Satana azalaki na mokano ya kosalisa Yesu lisumu mpo lisiko efutama te.

8. Komekama nini mosusu Yesu ayikelaki mpiko?

8 Na mosala na ye awa na mabele, Yesu ayikaki lisusu mpiko na komemaka mosusu. Akutanaki na botɛmɛli mpe balukaki koboma ye. (Luka 4:​28, 29; 13:31) Asengelaki mpe kokanga motema mpo na kozanga kokoka ya bayekoli na ye. (Mrk. 9:​33, 34) Ntango bazalaki kosambisa ye, banyokolaki ye mpe batyolaki ye. Na nsima, babomaki ye na ndenge ya mpasi mpenza mpe ya nsɔni. (Ebr. 12:​1-3) Mpe na nsuka, asengelaki koyika mpiko ye moko, kozanga libateli ya Yehova.b—Mat. 27:46.

9. Ndenge Yesu apesaki mbeka etindaka biso tósala nini? (1 Petro 1:8)

9 Ya solo mpenza, lisiko esɛngaki mingi mpo na Yesu. Ntango tokanisi makambo nyonso oyo Yesu andimaki mpo na kokufela biso, tokómaka kolinga ye mingi, boye te?—Tángá 1 Petro 1:8.

10. Kopesa lisiko esɛngaki Yehova nini?

10 Bongo Yehova? Mpo Yesu akoka kopesa lisiko, esɛngaki Yehova nini? Yehova ná Yesu bazali na boyokani makasi koleka nyonso oyo ekoki kozala kati na tata ná mwana. (Mas. 8:30) Sikoyo, kanisá ndenge Yehova ayokaki ntango azalaki kotala Yesu azali koyika mpiko na komekama ndenge na ndenge awa na mabele. Na ntembe te, Yehova ayokaki mpasi mingi komona ndenge basalaki Mwana na ye makambo ya mabe, baboyaki ye, mpe banyokolaki ye.

11. Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge na ntembe te Yehova ayokaki ntango Yesu abomamaki.

11 Moboti nyonso oyo abungisá mwana na liwa ayebi malamu mpasi oyo likambo yango epesaka. Tozalaka na kondima makasi na elikya ya lisekwa, kasi ntango moto oyo tolingaka akufi, toyokaka kaka mpasi mingi. Ndakisa yango ezali kosalisa biso tómeka kokanisa mpasi oyo na ntembe te Yehova ayokaki ntango azalaki kotala Mwana na ye ya bolingo azali konyokwama mpe kokufa mokolo wana na mobu 33 T.B.c—Mat. 3:17.

12. Tokoki kosala nini mwa mikolo oyo etikali liboso ya Ekaniseli?

12 Mwa mikolo oyo etikali liboso ya Ekaniseli, mpo na nini te oyekola na mozindo makambo etali lisiko na boyekoli na yo moko to na Losambo na kati ya libota? Salelá Buku ya bolukiluki mpo na Batatoli ya Yehova (soki ezali na monɔkɔ na bino) to mokanda mosusu oyo ekosalisa yo oyekola likambo yango na mozindo.d Lisusu, kobosana te kosala Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli oyo ebimaka na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo. Mpe na mokolo ya Ekaniseli, kobosana te kotala video ya mokapo ya mokolo oyo ebongisami kaka mpo na Ekaniseli. Soki tobongisi motema na biso mpo na Ekaniseli, tokoyeba mpe kosalisa basusu mpo bango mpe bázwa litomba na yango.—Ezr. 7:10.

Makanisi mpo na kosala bolukiluki

Ntango ozali kosala bolukiluki mpo na lisiko, okoki koluka makambo oyo epesi biyano na mituna lokola:

  • Mpo na nini lisiko esengelaki kopesama? Mpo na nini Yehova alimbisaki Adama ná Eva kaka te?

  • Mpo na nini Yesu azalaki moto oyo abongi mpo na koya na mabele mpe kokóma Mosikoli na biso?

  • Mapamboli nini tokoki kozwa mpo na lisiko banda sikoyo?

  • Matomba nini tokozwa mpo na lisiko na mikolo ekoya?

SALISÁ BASUSU BÁZWA LITOMBA YA EKANISELI

13. Wapi likambo ya liboso ya kosala mpo na kosalisa basusu bázwa matomba ya Ekaniseli?

13 Ndenge nini tokoki kosalisa basusu mpe bázwa litomba ya Ekaniseli? Likambo ya liboso ezali ya kobengisa bango. Longola bato oyo tokutanaka na bango mbala na mbala na mosala ya kosakola, tokoki kokoma bankombo ya bato oyo tokobengisa. Tokoki kotya bandeko na biso ya libota, baninga ya mosala, baninga ya kelasi, mpe bato mosusu oyo toyebi. Ata soki tozali na lokasa ya libyangi ya papye te, tokoki kotindela bango na telefone. Tokoki kokamwa komona bato oyo bakondima koya!—Mos. 11:6.

14. Pesá ndakisa oyo emonisi ete kopesa moto lokasa na ye ya libyangi ezali na ntina.

14 Tóbosana te ete kopesa moto na moto lokasa na ye ya libyangi ezali na ntina. Mokolo moko, ndeko mwasi moko akamwaki ntango mobali na ye oyo azalaki Motatoli ya Yehova te ayebisaki ye na esengo nyonso ete azali komibongisa mpo na kokende elongo na ye na Ekaniseli. Mpo na nini akamwaki? Mpo bambula mingi liboso, azalaki kolendisa ye bákende Ekaniseli, kasi mobali yango azalaki kokende te. Nini ebongwanaki na mbala oyo? Mobali yango alobaki: “Nazwaki lokasa na ngai moko ya libyangi,” mpe alobaki ete nkulutu moko ya lisangá oyo bayebanaki na ye nde abengisaki ye. Mobali wana ayanganaki na Ekaniseli ya mbula wana mpe ya bambula mosusu mingi na nsima.

15. Likambo nini tosengeli kobosana te ntango tobengisi bato na Ekaniseli?

15 Kobosana te ete bato oyo tobengisi bakoki kozala na mituna, mingimingi soki bayanganá naino te na likita na biso ata moko. Tokoki kokanisa liboso mituna oyo bakoki kotuna, mpe kobongisa biyano ya kopesa bango. (Kol. 4:6) Na ndakisa, bato mosusu batunaka: ‘Molulu yango ekosalema ndenge nini?’ ‘Ekoumela ntango boni?’ ‘Nasengeli kolata ndenge nini?’ ‘Nakofuta mbongo liboso nakɔta?’ ‘Bakɔngɔlaka mabonza?’ Ntango tobengisi moto na Ekaniseli, tokoki kaka kotuna ye: “Ozali na mwa mituna?” mpe na nsima kopesa ye biyano na mituna yango. Tokoki mpe kosalela video Kanisá liwa ya Yesu mpe Makambo esalemaka ndenge nini na Ndako ya Bokonzi? mpo na kosalisa moto yango ayeba ndenge makita na biso esalemaka. Lisusu, liteya 28 ya buku Sepelá na bomoi libela na libela! ezali mpe na makambo mosusu oyo bokoki kolobela.

16. Mituna nini mosusu baoyo bayei na Ekaniseli bakoki kozala na yango?

16 Nsima ya koyangana na Ekaniseli, bato ya sika bakoki kozala na mituna mosusu. Mbala mosusu bakomituna mpo na nini bato moke kaka (soki bazalaki) nde balyaki limpa mpe bamɛlaki vinyo. Bakoki mpe komituna soki tosalaka Ekaniseli mbala boni. Bakoki mpe koluka koyeba soki makita nyonso ya Batatoli ya Yehova esalemaka kaka ndenge wana. Ata soki diskur ya Ekaniseli elobelaka makambo yango, bato ya sika bakoki kozala na mposa ya kozwa bandimbola ya polele koleka. Lisolo “Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalaka elambo ya Nkolo ndenge moko te na mangomba mosusu?” na jw.org ekoki kosalisa biso tópesa biyano na mituna na bango mosusu. Mposa na biso ezali ete tósala nyonso oyo tokoki, ezala liboso ya Ekaniseli, na mokolo ya Ekaniseli, to mpe nsima na yango, mpo na kosalisa baoyo bazali “na ezaleli oyo ebongi” bázwa litomba ya molulu yango.—Mis. 13:48.

TÓSALISA BAOYO BATIKÁ KOYANGANA NA MAKITA

17. Ndenge nini bankulutu bakoki kosalisa baoyo batiká koyangana na makita? (Ezekiele 34:​12, 16)

17 Na eleko ya Ekaniseli, ndenge nini bankulutu bakoki kosalisa bandeko oyo batiká koyangana na makita? Monisá bango ete botyelaka bango mpenza likebi. (Tángá Ezekiele 34:​12, 16.) Liboso ya Ekaniseli, salá makasi osolola na baoyo nyonso oyebi. Yebisá bango ete olingaka bango mpe ete ozali na mposa ya kosalisa bango na ndenge nyonso oyo okoki. Bengisá bango na Ekaniseli. Soki bayei, yambá bango na esengo. Nsima ya Ekaniseli, kobá kokende kotala to kosolola na bandeko yango ya bolingo, mpe pesá bango lisalisi nyonso ya elimo oyo basengeli na yango mpo bázongela Yehova.—1 Pe. 2:25.   

18. Ndenge nini biso nyonso tokoki kosalisa baoyo batiká koyangana na makita? (Baroma 12:10)

18 Moto nyonso na lisangá akoki kosalisa bandeko oyo batiká koyangana na makita, oyo bayei na Ekaniseli. Ndenge nini? Soki tosaleli bango makambo na bolingo, boboto, mpe limemya. (Tángá Baroma 12:10.) Tóbosana te ete bampate yango ya Yehova bakoki koyoka nsɔni mpo na kozongela makita. Mbala mosusu bazali kobanga ete bato bakoyamba bango malamu te.e Na yango, tóboya kotuna bango mituna oyo ekoyokisa bango nsɔni, to koloba likambo oyo ekoki kopesa bango mpasi. (1 Tes. 5:11) Bandeko yango bazali bandimi lokola biso. Tozali na esengo ya kosambela lisusu Yehova elongo na bango!—Nz. 119:176; Mis. 20:35.

Bililingi: 1. Ndeko mobali moko oyo atiká koyangana na makita asimbi buku ya nzembo ná Biblia azali kokakatana mpo na kokɔta na Ndako ya Bokonzi. Azali kotala na mosika ndenge bandeko bazali koya na Ekaniseli. 2. Na nsima, ndeko yango azali kosolola na esengo na ndeko mosusu na kati ya Ndako ya Bokonzi.

Bandeko basalaki nini?

“Nazalaki koyoka nsɔni kozonga na Ndako ya Bokonzi. Nazalaki komituna soki bandeko bakoyamba ngai. Ndeko mwasi moko ya mokóló oyo tozalaki na ye wana eleki mbula 30 alobaki na ngai: ‘Bozongi malamu, Mwana!’ Yango esimbaki mpenza motema na ngai. Nayokaki ete nazongi mpenza na ndako.”​—JAVIER.

“Nakɔtaki na Ndako ya Bokonzi mpe nafandaki na nsima mpenza mpo moto te amona ngai. Kasi, bato mingi babandaki koyeba ete ezali ngai, kaka ndenge ezalaki ntango nazalaki koya na makita na bomwana. Bayambaki ngai mpe bamoniselaki ngai bolingo, bongo nayokaki kimya mpenza. Namiyokaki na kati ya libota mpenza.”​—MARCO.

19. Matomba nini tozwaka na kokanisa liwa ya Yesu?

19 Tozalaka na botɔndi mingi ndenge Yesu abongisaki ete tósalaka Ekaniseli ya liwa na ye mbula nyonso! Ntango tosalaka bongo, biso moko mpe bato mosusu tozwaka matomba ebele. (Yis. 48:​17, 18) Tokómaka kolinga Yehova mpe Yesu mingi. Tomonisaka ete tozali na botɔndi mingi mpo na oyo basalelá biso. Tokómaka na boyokani makasi na bandeko ya lisangá. Mpe tosalisaka basusu báyeba ndenge oyo bango mpe bakoki kozwa matomba oyo lisiko ememeli biso. Yango wana, biso nyonso tósala oyo tokoki mpo tómibongisa mpo na Ekaniseli ya mbula oyo, mokolo oyo eleki ntina na mbula!

Soki mokolo ya Ekaniseli ekwei mokolo ya lomingo, ndenge ezali na mbula oyo 2024, programɛ mpo na likita ya nsuka ya pɔsɔ ekozala te. Na yango, lisolo ya boyekoli mpo na pɔsɔ oyo elandi ezali te.

NDENGE NINI TOKOKI . . .

  • kobongisa motema na biso mpo na Ekaniseli?

  • kosalisa basusu bázwa matomba ya Ekaniseli?

  • kosalisa baoyo batiká koyangana na makita?

LOYEMBO 18 Tózala na botɔndi mpo na lisiko

a Komá maloba na esika bakomi “luká” na jw.org mpo omona masolo to bavideo oyo lisolo oyo elobeli.

b Talá lisolo “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 04/2021.

c Talá buku Pusaná penepene na Yehova, mok. 23, par. 8-9.

d Talá etanda “Makanisi mpo na kosala bolukiluki.”

e Talá bililingi mpe etanda “Bandeko basalaki nini?” Ndeko moko oyo atiká koyangana na makita azali kokakatana mpo na kokɔta na Ndako ya Bokonzi, kasi asali makasi. Bandeko bayambi ye na esengo mpe asepeli.

f NDIMBOLA YA BILILINGI: Wana Batatoli ya Yehova bazali kosala Ekaniseli na esika moko na mokili, bandeko na bango na bisika mosusu bazali naino komibongisa mpo na molulu yango ya ntina mingi. Lokasa 12: Ndeko mobali moko oyo atiká koyangana na makita azali kokakatana mpo na kokɔta na Ndako ya Bokonzi, kasi asali makasi mpe akɔti. Bandeko bayambi ye na esengo mpe asepeli.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto