LISOLO YA BOYEKOLI 47
LOYEMBO 38 Akokómisa yo makasi
“Ozali moto ya motuya mingi”!
“Ozali moto ya motuya mingi.”—DAN. 9:23.
NA MOKUSE
Mpo na kosalisa baoyo bamimonaka ntina te báyeba ete bazali na motuya na miso ya Yehova.
1-2. Nini ekoki kosalisa biso tómona ete tozali na motuya na miso ya Yehova?
BASALELI ya Yehova bazali na motuya na miso na ye, kasi basusu kati na bango bamimonaka ntina te. Mbala mosusu moto moko asalelaki bango likambo oyo emonisaki bango ete bazali na ntina te. Ezali bongo mpo na yo? Soki bongo, nini ekoki kosalisa yo omona ete ozali na motuya na miso ya Yehova?
2 Likambo moko oyo ekoki kosalisa yo ezali ya kotalela masolo ya Biblia oyo emonisi ndenge Yehova atalelaka bato mpe asalelaka bango makambo. Mwana na ye Yesu azalaki kopesa bato lokumu mpe limemya. Na ndenge yango, amonisaki ete ye ná Tata na ye bazwaka na motuya mingi bato ya komikitisa oyo bamimonaka ntina te. (Yoa. 5:19; Ebr. 1:3) Na lisolo oyo, tokotalela: (1) ndenge Yesu asalisaki bato bámona ete bazali na motuya mpe (2) ndenge oyo tokoki komindimisa ete tozali mpenza na motuya na miso ya Nzambe.—Hag. 2:7.
NDENGE OYO YESU ASALISAKI BATO BÁMONA ETE BAZALI NA MOTUYA
3. Yesu asalaki nini mpo na bato ya Galile oyo bayaki epai na ye mpo asalisa bango?
3 Na mbala ya misato oyo Yesu akendaki kosakola na Galile, bato ebele bazalaki koya epai na ye, bazalaki koyoka ye mpe azalaki kobikisa bango. Mpe Yesu alobaki ete “bazalaki komona mpasi mpe basundolamaki lokola bampate oyo ezangi mobateli.” (Mat. 9:36) Bakonzi ya mangomba bazalaki komona bango bato oyo bazangi ntina, bazalaki kutu kobenga bango “bato oyo balakelamá mabe.” (Yoa. 7:47-49) Kasi Yesu apesaki bango lokumu na ndenge azwaki ntango ya koteya bango mpe kobikisa bamaladi na bango. (Mat. 9:35) Longola yango, mpo na kosalisa bato mosusu mingi, apesaki bantoma na ye formasyo na mosala ya kosakola mpe apesaki bango bokonzi ya kobikisa bamaladi ndenge na ndenge.—Mat. 10:5-8.
4. Ndenge Yesu asalisaki bato oyo basusu bazalaki komona mpamba eteyi biso nini?
4 Ndenge Yesu asalelaki bato makambo na lokumu mpe na limemya, amonisaki ete ye ná Tata na ye bazwaka na motuya bato oyo mbala mingi basusu bamonaka mpamba. Soki osalelaka Yehova kasi omitunaka soki ozali na motuya, kanisá likebi oyo Yesu atyelaki bato ya komikitisa oyo bayaki epai na ye mpo ateya bango. Kosala bongo ekoki kosalisa yo omona ete ozali na motuya na miso ya Yehova.
5. Lobelá likambo ya mwasi oyo Yesu akutanaki na ye na Galile.
5 Yesu ateyaki kaka bituluku ya ebele ya bato te, atyelaki mpe moto mokomoko likebi. Na ndakisa na Galile, Yesu akutanaki na mwasi moko oyo azalaki kobɛla maladi ya kotanga makila banda bambula 12. (Mrk. 5:25) Mpo na maladi yango, mwasi wana akómaki mbindo, mpe moto nyonso oyo asimbi ye asengelaki mpe kokóma mbindo. Na yango, asengelaki mpenza kozala elongo na bato te. Longola yango, akokaki te kozala elongo na basusu na milulu mpe na bafɛti ya losambo. (Lev. 15:19, 25) Na ntembe te, mwasi yango azalaki konyokwama na nzoto mpe na makanisi.—Mrk. 5:26.
6. Ndenge nini mwasi oyo azalaki kotanga makila abikaki?
6 Mwasi yango alingaki Yesu abikisa ye. Kasi, akokaki te kokende epai ya Yesu mbala moko. Mpo na nini? Mbala mosusu azalaki koyoka nsɔni mpo na maladi oyo azalaki na yango. To mbala mosusu azalaki kobanga ete Yesu akobengana ye mpo akɔti na kati ya ebele ya bato nzokande azali mbindo. Na yango asimbaki kaka elamba na ye ya likoló, andimaki ete ata kaka likambo yango nde ekobikisa ye. (Mrk. 5:27, 28) Kondima na ye ebikisaki ye. Na nsima, ntango Yesu atunaki soki nani asimbi ye, mwasi yango alobaki likambo oyo asalaki. Yesu asalaki ye nini?
7. Ndenge nini Yesu asalelaki mwasi oyo azalaki kotanga makila makambo? (Marko 5:34)
7 Yesu amoniselaki mwasi yango boboto mpe limemya. Amonaki ete mwasi yango azalaki ‘kobanga mpe kolɛnga.’ (Mrk. 5:33) Lokola amityaki na esika na ye, alobaki na ye na ndenge ya kobɔndisa. Abengaki ye kutu “mwana na ngai,” liloba oyo ezali komonisa kaka limemya te, kasi mpe boboto mpe bolingo. (Tángá Marko 5:34.) Nɔti ya boyekoli mpo na maloba yango elobi ete oyo ezali “esika kaka moko oyo Yesu abengaki mwana mwasi ‘mwana na ngai,’ mbala mosusu mpo likambo na ye ezalaki ya mawa mpe azalaki ‘kolɛnga.’” Kanisá ndenge motema ya mwasi yango ekitaki! Soki Yesu alobaka na ye na boboto te, mbala mosusu mwasi yango alingaki kokima, ata soki abikaki, alingaki kozala na mayoki ya moto oyo amemi ngambo. Kasi, Yesu asalisaki ye amimona ete azalaki mpenza na motuya na miso ya Tata na ye ya likoló oyo atondi na bolingo.
8. Mikakatano nini ndeko mwasi moko na Brésil azalaki na yango?
8 Lelo oyo mpe, basaleli mosusu ya Nzambe bazali na bamaladi oyo esalaka ete bányokwama na makanisi. Maria,a oyo azali mobongisi-nzela na Brésil, abotamá na mbeba moko oyo esalá ete azala na makolo te mpe lobɔkɔ ya mwasi te. Maria alobi boye: “Na eteyelo bazalaki kotumola ngai mingi mpo nazali ebɔsɔnɔ. Bazalaki kopesa ngai bankombo oyo ezalaki kopesa ngai mpasi. Ata bato ya libota na ngai moko bazalaki kokanisela ngai mabe.”
9. Nini esalisaki Maria amona ete azali na motuya na miso ya Yehova?
9 Nini esalisaki Maria? Ntango akómaki Motatoli ya Yehova, bandeko ya lisangá babɔndisaki ye mpe basalisaki ye amitalela ndenge oyo Yehova atalelaka ye. Alobi boye: “Nakokoka te kotánga bankombo ya bandeko nyonso oyo basalisá ngai! Napesaka Yehova matɔndi na motema mobimba mpo apesi ngai libota moko kitoko ya elimo.” Bandeko ya lisangá basalisi Maria amona ete azali na motuya na miso ya Nzambe.
10. Mikakatano nini ezalaki kotungisa Maria Magadalene? (Talá mpe bililingi.)
10 Tótalela ndenge oyo Yesu asalisaki mwasi mosusu—Maria Magadalene. Bademo nsambo bakɔtelaki mwasi yango! (Luka 8:2) Ekoki kozala ete azalaki kosala makambo oyo ezalaki kobangisa bato ntango bademo bakɔteli ye mpe yango ezalaki kosala ete bato bákimaka ye. Na eleko yango ya mpasi ya bomoi na ye, na ntembe te Maria amonaki ete bato nyonso basundolaki ye, azalaki kobangabanga, mpe azalaki na moto ya kosalisa ye te. Emonani ete Yesu abimisaki bademo oyo bazalaki kotungisa Maria, mpe mwasi yango akómaki moyekoli na ye ya molende. Ndenge nini Yesu asalisaki lisusu Maria Magadalene amona ete azalaki mpenza na motuya na miso ya Nzambe?
Ndenge nini Yesu asalisaki Maria Magadalene amona ete azali na motuya na miso ya Yehova? (Talá paragrafe 10-11)
11. Ndenge nini Yesu amonisaki Maria Magadalene ete azali na motuya na miso ya Nzambe? (Talá mpe bililingi.)
11 Yesu abengaki Maria Magadalene akende elongo na ye na mosala ya kosakola.b Na yango, Maria akobaki koyoka mateya oyo Yesu azalaki koteya basusu. Lisusu, Yesu abimelaki ye mokolo oyo asekwaki. Maria azalaki moko ya bayekoli ya liboso oyo Yesu asololaki na bango na mokolo yango. Yesu atindaki ye kutu akende koyebisa bantoma na ye ete asekwi. Nyonso wana ezalaki mpo na kosalisa Maria amona ete azali mpenza na motuya na miso ya Yehova!—Yoa. 20:11-18.
12. Limbolá ntina oyo na bomwana na ye, Lidia amonaki ete azali na ntina te.
12 Lokola Maria Magadalene, bato mingi lelo banyokwamaka mpo bamonaka ete basusu basundolá bango. Na ndakisa, Lidia, ndeko mwasi moko na Espagne, alobi ete ntango mama na ye azalaki na zemi na ye, alingaki kolongola yango. Ata ntango azalaki mwana moke, Lidia abosanaka te ndenge mama na ye azalaki kokipe ye te mpe azalaki kofinga ye. Lidia alobi boye: “Mokano na ngai na bomoi ezalaki ya kosala ete basusu bándima ngai mpe bálinga ngai. Nazalaki kobanga ete moto moko te akolinga ngai mpo mama na ngai andimisaki ngai ete nazali moto mabe.”
13. Nini esalisaki Lidia amona ete azali na motuya na miso ya Yehova?
13 Ntango Lidia ayekolaki solo, kobondela Yehova mpe koyekola, bakisá mpe maloba mpe misala ya boboto ya bandeko ya lisangá esalisaki ye amona ete azali na motuya na miso ya Yehova. Alobi boye: “Mobali na ngai ayebisaka ngai mbala mingi ete alingaka ngai mingi. Ayebisaka ngai mbala na mbala bizaleli ya malamu oyo nazali na yango. Baninga na ngai mosusu ya motema mpe basalaka bongo.” Oyebi moto moko oyo azali na mposa ya lisalisi mpo amona ete azali na motuya na miso ya Yehova?
NDENGE YA KOMITALELA NDENGE OYO YEHOVA ATALELAKA BISO
14. Ndenge nini 1 Samwele 16:7 ezali kosalisa biso tóyeba ndenge oyo Yehova atalelaka bato? (Talá mpe etanda “Mpo na nini Yehova azwaka basaleli na ye na motuya?”)
14 Kobosana te ete Yehova atalelaka biso te ndenge bato ya mokili batalelaka biso. (Tángá 1 Samwele 16:7.) Atalaka te ndenge tozali komonana na nzoto, esika ya lokumu oyo tozali na yango na mokili, to bakelasi oyo totángá. (Yis. 55:8, 9) Na yango, na esika olanda mibeko ya bato ya mokili mpo oyeba soki ozali na valɛrɛ to te, talelá yango nde na kolanda mibeko ya Yehova. Okoki kotánga masolo ya Biblia oyo emonisi ndenge Yehova azwaki na motuya bato oyo na ntango moko bamimonaki ntina te, na ndakisa Eliya, Naomi, mpe Hana. Okoki mpe kokoma makambo oyo yo moko omoni na bomoi na yo, oyo endimisi yo ete Yehova alingaka yo mpenza mpe azwaka yo na motuya. Longola yango, okoki kotánga na mikanda na biso masolo oyo elobeli ndenge ya komimona ete ozali na motuya.c
15. Mpo na nini Yehova amonaki Danyele “moto ya motuya mingi”? (Danyele 9:23)
15 Yebá ete bosembo na yo esalaka ete ozala na motuya na miso ya Yehova. Na ndakisa, na eleko moko boye, ntango mosakoli Danyele alingaki mbala mosusu kokokisa mbula 100, ‘alɛmbaki makasi’ mpe mpiko esilaki ye. (Dan. 9:20, 21) Ndenge nini Yehova alendisaki ye? Atindaki anzelu Gabriele mpo akundwela Danyele ete azali “moto ya motuya mingi,” mpe ete Nzambe ayokaki mabondeli na ye. (Tángá Danyele 9:23.) Mpo na nini Danyele azalaki na motuya mingi na miso ya Nzambe? Azalaki na bizaleli mingi ya malamu, na ndakisa, alingaki boyengebene mpe azalaki sembo. (Ezk. 14:14) Yehova akomisaki lisolo yango na Liloba na ye mpo na kobɔndisa biso. (Rom. 15:4) Yehova ayokaka mpe mabondeli na yo mpe azwaka yo na motuya mpo olingaka kosala oyo ezali malamu mpe osalelaka ye na bosembo.—Mika 6:8, msl.; Ebr. 6:10.
16. Nini ekoki kosalisa yo omona Yehova ete azali Tata ya bolingo?
16 Monáká Yehova ete azali Tata oyo alingaka yo. Alingaka kosalisa yo, kasi te koluka mabunga na yo. (Nz. 130:3; Mat. 7:11; Luka 12:6, 7) Komanyola likambo yango esalisi bato mingi bátika komona ete bazali na ntina te. Tózwa ndakisa ya Michelle, ndeko mwasi moko na Espagne, oyo amonaki ete basundolaki ye mpe azangi ntina mpo mobali na ye azalaki kofinga ye na boumeli ya bambula mingi. Alobi boye: “Ntango namimoni ntina te, nasalaka makasi namona na makanisi ete Yehova amemi ngai na mabɔkɔ na ye, azali komonisela ngai bolingo mpe kobatela ngai.” (Nz. 28:9) Lauren, ndeko mwasi moko na Afrique du Sud, alobi: “Soki Yehova abendaki ngai na boboto na bansinga ya bolingo, asalisi ngai nazala penepene na ye bambula oyo nyonso, kutu asaleli ngai mpo na koteya bato mosusu, boye amonaka ete nazali na motuya mpe na ntina.”—Hos. 11:4.
17. Nini ekoki kosalisa yo omindimisa ete Yehova andimaka yo? (Nzembo 5:12) (Talá mpe elilingi.)
17 Omindimisa ete Yehova andimaka yo. (Tángá Nzembo 5:12.) Davidi alobaki ete kondimama na Yehova ezali lokola “nguba monene” oyo ebatelaka bato ya sembo. Koyeba ete Yehova andimaka yo mpe asungaka yo ekoki kosalisa yo otika komona ete ozangi ntina. Ndenge nini okoki koyeba ete Yehova andimaka yo? Ndenge tomoni yango, Yehova amonisi ete andimaka yo na nzela ya Liloba na ye. Lisusu, asalelaka bankulutu, baninga na yo, mpe bandeko mosusu mpo na kokundwela yo ete ozali na motuya na miso na ye. Osengeli kosala nini ntango moto alendisi yo ndenge wana?
Koyeba ete Yehova andimaka biso ekoki kosalisa biso tótika komimona ntina te (Talá paragrafe 17)
18. Mpo na nini osengeli kondima longonya oyo bapesi yo?
18 Ntango bato oyo bayebi yo mpe balingaka yo bapesi yo longonya oyo euti na motema, koboya te kondima yango. Kobosana te ete Yehova akoki kosalela bango mpo na kosalisa yo omona ete andimaka yo. Michelle, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Mokemoke, nazali koyekola kondima na motema na ngai mobimba maloba ya boboto oyo basusu bayebisaka ngai. Ezali etumba, kasi yango nde Yehova alingi nasala.” Bankulutu mpe basalisi Michelle mingi mpo amona ete Yehova andimaka ye. Lelo oyo azali mobongisi-nzela mpe apesaka mabɔkɔ na Betele na mosika.
19. Mpo na nini okoki kondima ete ozali na motuya na miso ya Nzambe?
19 Na boboto nyonso, Yesu asalisi biso tómona ete tozali na motuya mingi na miso ya Tata na biso ya likoló. (Luka 12:24) Na yango, tokoki komindimisa ete Yehova azwaka biso na motuya. Tóbosana likambo yango ata moke te! Mpe tiká ete tósala nyonso mpo na kosalisa basusu bámona ete bazali na motuya na miso ya Nzambe!
LOYEMBO 139 Omimona na mokili ya sika
a Topesi bango bankombo mosusu.
b Emonani ete Maria Magadalene azalaki na kati ya basi oyo bazalaki kosala mibembo elongo na Yesu. Basi yango bazalaki kosalela biloko na bango mpo na kosalisa Yesu mpe bantoma.—Mat. 27:55, 56; Luka 8:1-3.
c Na ndakisa, talá mokapo 24 ya buku Pusaná penepene na Yehova mpe tángá bavɛrsɛ mpe masolo ya Biblia oyo ezali na motó ya likambo “Bantembe” na buku Batoli ya Biblia mpo na bomoi ya bakristo.