Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g93 Janvier nk. 23-26
  • Libonza mabe na masano ya mbongo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libonza mabe na masano ya mbongo
  • Lamuká!—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bayebi komipekisa lisusu te
  • Biyambayamba ezali motambo monene
  • Mpo na mposa ya mbongo
  • Bilenge mpe bamama ya mabota
  • Longwa na ndɔtɔ mpamba kino na ndɔtɔ ya nsɔmɔ
  • Basani ya lokoso​—Basukaka bobele na kobungisa
    Lamuká!—1995
  • Bilenge​—Basani mosusu ya sika!
    Lamuká!—1995
  • Biblia epekisi masano ya mbongo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Lamuká!—1993
g93 Janvier nk. 23-26

Libonza mabe na masano ya mbongo

Bakutaki Bobby akufi kati na vuatire, na balabála moko na nord ya Londres. Azalaki bobele na mibu 23; amibomaki.

Mobangé mobali afandaki mwa mikolo na balabála liboso na kokɔta na ndako moko oyo bakoyambaka babólá. Alɛmbaki mpenza. Ekokaki mikolo minei alyaki te mpe amelaki naino te bankisi na ye mpo na motema.

Emilio, tata ya bana mitano, azalaki na mpasi mingi na motema. Mwasi na ye mpe bana na ye bakimaki ye. Balingaki ata kolobisa ye lisusu te.

MOKUFI moko, motelangani moko mpe tata moko asundolami: makambo misato oyo mabimaka mbala mingi, mamonaki lokola ete mazali na boyokani te kati na yango. Nzokande, nyonso misato wana euti bobele na likambo moko: komipesa na masano ya mbongo.

Ebele na babɛti minene baboyi kondima mabe na bango, mpe basangani ya mabota na bango bazali kolobela yango mbala mingi te mpo ete bazali kobanga oyo bato mosusu bakoki koloba na ntina yango. Kasi bamilió ya mabota kati na mokili bazali na mpasi mpe, mokolo na mokolo bazangi elikya na ntina na basangani na yango oyo bamipesi na masano wana mabe.

Moto te ayebi motuya mpenza ya babɛti minene na masano ya mbongo. Mpo na États-Unis, bamilió zomi etalelami lokola motuya ya nsé mingi. Mituya mizali minene mingi, mpe mizali kobakisama epai nyonso awa masano ya mbongo makómi kosalema mingi na mikili nyonso. Kozala mobɛti monene na masano ya mbongo emonisami lokola “boombo oyo ezali kokóla mingi.”

Na ebandeli, mingi na baoyo bamipesi sikawa bazalaki kobɛta bobele soki libaku lizwami mpo na “komeka soki azali na makila malamu.” Na nsima, bomoi na bango ebongwanaki na ntango bamipesaki mingi mpenza mpe bakangami lokola na boombo.

Bayebi komipekisa lisusu te

Lolenge nini baoyo bazali kobɛta soki libaku limonani bazali kobongwana mpo na kokóma bato bamipesi mingi na masano? Bantina ekeseni, kasi na likambo moko to mosusu, babɛti na masano ya mbongo bakosukaka bobele na likambo oyo ete, bayebi komipekisa lisusu te. (Tala encadré na lokasa 25.) Kati na masano ya mbongo, basusu bazali komona ete ezali nde likambo kitoko oyo esengeli na bango kati na bomoi. Mobɛti moko ya mwasi alimbolaki ete: “Ata soki nalóngi to nalóngi te, wana ezali mpenza na ntina te. Soki nabɛti, mingi mpenza soki natii mbongo koleka basusu, nazali komiyoka ete nazali moto monene na mokili. Bato bazali kobanga ngai. Oyo nde mayoki kitoko!”

Basusu bazali komipesa na masano mpamba te bazali komiyoka ete bazali bango moko to banyokwami na makanisi. Esther, mama ya bana minei, azalaki mwasi ya sodá oyo mosala na ye mozalaki mbala na mbala kotangola ye mosika na libota na ye. Komiyokáká ete azali bobele ye moko, Esther abandaki kokende kobɛta na bamasini ya masano ya mbongo oyo mazali na bandako ya masano. Mosika te, akómaki kolekisa bangonga mingi na mokolo na esika wana. Nokinoki, mosolo ya ndako mosilaki, mpe mikakatano mikómaki mingi. Alukaki kobomba likambo yango epai na mobali na ye, na komekáká kokenda epai na bato mosusu to na banque, mpo na kodefa 200 dolare oyo azalaki kozindisa mokolo na mokolo kati na momeseno na ye ya mabe.

Ezali na basusu oyo bamipesaki mpo ete bazwaki libonza monene. Robert Custer, moto oyo ayekoli makambo matali masano ya mbongo, alimboli ete: “Mingimingi, ezali baoyo bakozwaka libonza noki mpe mbala mingi nde bakómaka babɛti minene.” Mposa ya kolanda kozwa ekokómaka makasi mpe bayebi lisusu komipekisa te.

Biyambayamba ezali motambo monene

Babɛti mingi batyaka motema na mayoki na bango na esika na kotalela bosolo ya makambo. Calcul mpamba mbɛlɛ ekoki kolembisa moto nyonso oyo alingi kokende kobɛta lisano ya mbongo, soki amitiki kotambwisama na makanisi mabongi. Na yango, na États-Unis, likámá ya kobɛtama na nkaké ezali soko na moto moko kati na bato 1 700 000. Nzokande makoki ya kolónga na loterie ya Leta ezali mbala mibale na nsé na motuya oyo.

Nani azali komizela ete abɛtama na nkaké? Bobele bato oyo babotama na makanisi ya kotalela makambo nyonso na kobangabanga. Nzokande, pene na bato nyonso oyo bazali kosomba tiké ya loterie bazali lokola kolota ndɔtɔ ete bakomona nimero na bango ebimi. Ya solo, elikya ya kolónga na loterie ezali mpenza kitoko, kasi soki mingi bazali sé kolikya ata likambo yango emonani ete ezali mpasi mingi, ezali mpo na biyambayamba. Na koponáká “motuya na bango ya makila malamu,” bazali komindimisa ete makila malamu ekozala epai na bango.​—Tala encadré na lokasa 26.

Claudio Alsina, mathématicien ya mboka Espagne, alobaki ete soki bandako ya masano ya mbongo mpe ba loteries esalelaki nkomá na esika ya mituya kati na masano ya makila malamu, mbɛlɛ makoki ya kolónga ekotikala lolenge moko, nde magie​—mpe, na ntembe te, ndambo monene ya misolo—​mbɛlɛ ekolimwa. Mituya misusu mitalelami ete mizali na makila malamu mpenza. Mpo na bamoko, 9, 7, 6 mpe 0 ezali mituya kitoko. Basusu bakoponaka “mituya ya malamu mpo na bango” na kolanda, na ndakisa, date na bango ya kobotama to horoscope na bango. Basusu bazali mpe kolanda likambo moko ya kokamwa.

Wana ekómaki ye pene na ndako ya masano ya Monte-Carlo, mobali moko akutanaki na likambo moko mabe: ebengá elekaki likoló ya motó na ye mpe ebebisaki ekɔti na ye. Bobele mokolo yango, mobali wana azwaki libonza ya mosolo moleki badolare 15 000 na lisano ya mbongo. Kondimisamáká ete nyei ya ebengá ezali elembo ya likambo moko malamu mpo na ye, azalaki kokɔta na bandako ya masano bobele nsima ya kotambola naino na zingazinga na elikya ya komona lisusu “elembo euti na likoló.” Na yango, biyambayamba ezali komema babɛti mingi na kokanisa ete kolónga mokolo moko, elimboli kolónga mikolo nyonso. Atako bongo, likanisi na bango lizali mbala mingi elongo na mposa makasi oyo esili kokanga bango mpe ekoki kosuka na kolónga bango.

Mpo na mposa ya mbongo

Bakobɛtaka mpo na kozwa mbongo, ata mbongo mingi mpenza. Kasi, mpo na mobɛti monene, mbongo oyo ezwami na nzela yango, ezali bongo na nguya ya magie. Na miso na ye, lokola Robert Custer alimboli yango, “mbongo ezali lokumu . . . ; mbongo ezali boninga . . . ; mbongo ekosilisaka makambo nyonso.” Mpo na nini mbongo ezali na ndimbola monene mpo na ye?

Na bisika ya masano, bakokumisaka moto oyo azwi libonza to oyo atii mosolo mingi. Bakolukaka komona ye. Soki azwi, mobɛti azali bongo na mayoki ya moto oyo aleki basusu. Mbongo ezali mpe kobosanisa ye mikakatano na ye, ezali kosalisa ye mpo na konyolisa nzoto, ezali kopesa ye makasi. Jay Livingston, moto ya zébi, alobi ete mobɛti monene, “na mayoki na ye, asangisi makei na ye nyonso na ekɔlɔ́ bobele moko, oyo ya mbongo.” Wana ezali libungá monene.

Ntango mobɛti azali lisusu na makila malamu te mpe akómi sé kozindisa mosolo, mbongo ekómi lisusu na motuya mingi na miso na ye; akoluka ete azwa lisusu mosolo oyo abungisi. Lolenge nini akokoka kozwa mbongo mpo na kofuta banyongo mpe kolanda kobɛta? Bomoi na ye ekobeba noki mpo na kolukaluka mbongo.

Ezalela wana mabe ekómelaka bamilió mingi ya babɛti, basi to mibali, na mbula nyonso soko na ndenge nyonso ya bomoi. Bato nyonso bakoki komekama, lokola yango emonisami na lolenge oyo bilenge mpe bamama ya mabota bakómi komipesa na masano ya mbongo.

Bilenge mpe bamama ya mabota

Bilenge babendamaka noki na bamasini ya masano ya mbongo mpe na masano mosusu ya makila malamu oyo ekopesaka bango elikya ya kozwa mbongo nokinoki. Enquête moko esalemaki na engumba moko ya Angleterre emonisaki ete 80% ya bilenge ya mibu 14, bakendaka mbala na mbala mpo na kobɛta lisano ya mbongo na bamasini ya masano mpe mingi na bango babandaki yango uta mibu 9. Basusu bazalaki kozangisa kelasi mpo na kokende kobɛta. Enquête mosusu oyo esalemaki epai na banakelasi na Lycée moko ya Amerika, elakisaki ete 6% kati na bango “bamonisaki bilembo ya babɛti.”

Manuel Melgarejo, prezidá ya lisangá ya babɛti ya kala na Madrid, alimbwelaki Réveillez-vous! ete, bobele libonza moko monene lizwami na bamasini ya masano ya mbongo ekoki mpo ete elenge moko, oyo ayebi kopekisa mayoki na ye te, amipesa mpenza. Sé na mokolo moko, lisano ya mbongo ekómi eloko ya kolekisa ntango mpe ya mposa mingi. Mosika te, elenge wana akosilisa biloko ya libota to akoyiba baboti na ye; akoki mpe kobanda kokamata mwa biloko mikemike to akokóma mosali na pite bobele mpo na kozwa mbongo ya kosalela na momeseno na ye wana ya mabe.

Bato oyo bayekoli likambo yango bamoni lisusu kobakisama monene ya bamama ya mabota oyo bamipesi na masano ya mbongo. Na yango, na États-Unis, basi bamonisami na 30% ya babɛti minene; kasi, engebene mituya mikanisami, bakozala 50% na mobu 2000.

Likambo ya Maria, mwasi oyo mobali na ye asalaka mosala ya mabɔkɔ mpe mama ya bana basi mibale, ezali ndakisa oyo tokoki kokamata mpo na kolobela basi oyo bamipesi na masano ya mbongo. Na boumeli ya mibu nsambo oyo miuti koleka, Maria azindisaki badolare 35 000 na masano ya mbongo, mosolo oyo mozwamaki na mbongo ya libota. Azali komilela ete: “Mbongo yango ebungi libela. Nazali kozela mokolo oyo nakokoka kokɔta na bar na badolare 50 kati na libenga na ngai mpe kosalela yango mpo na bana na ngai, [na esika ya kotya yango na masini ya masano ya mbongo].”

Longwa na ndɔtɔ mpamba kino na ndɔtɔ ya nsɔmɔ

Masano ya mbongo matongami likoló na ndɔtɔ. Mpo na babɛti mosusu, ndɔtɔ ya bozwi ezali bobele likanisi ya ntango mokuse, kasi mpo na baoyo bamipesi na yango, ezali likambo ya solo oyo lizali komema bango na bobólá, na bolɔkɔ, mpe ata na liwa.

Masano emonani lokola nzela ya kokokisa bamposa na bango mpenza​—mposa ya kolekisa ntango malamu, ya kooka malamu, ya kobakisa mwa mbongo to ya kobosana mitungisi ya mokolo na mokolo. Kasi libonza mabe na likoló na yango ekoki kozala oyo eluti monene, lokola mpasi oyo ekozwamaka na babɛti minene. Nzela mosusu ezali mpo na kokokisa bamposa wana?

[Etanda na lokasa 25]

Motindo ya mobɛti monene na masano ya mbongo

MOBƐTI akolanda kobɛla, atako azali kobungisa mbongo. Soki azwi libonza, abɛti lisusu na mbongo wana. Akolobaka ete akoki kotika yango mokolo mosusu soki alingi; nde soki azwi mbongo, mobɛti monene akolekisa bobele mwa mikolo mpe na nsima azongeli kobɛta. Ya solo, azali komiyoka lokola azali na maladi ya kobɛta.

Azalaka ntango nyonso na banyongo. Soki akoki kozongisa yango te, akolukaluka na lokoso nyonso ete adefa mbongo mpo na kosilisa banyongo oyo esɛngami nokinoki mpe mpo na kolanda kobɛta. Mokolo moko to mosusu, akozanga sembo, kino mbala mosusu akobɛta na mbongo ya mokonzi na ye ya mosala. Mingimingi, bato ya lolenge oyo bakolongolamaka na mosala.

Makambo nyonso, ata mwasi na ye mpe bana na ye bakotyama na esika ya mibale. Momeseno na ye wana ya mabe ekobimisaka koswana kati na libala, oyo ekoya kosuka mbala mosusu na kokabwana to na koboma libala.

Etungisami ye na mayoki oyo ete asali mabe, mobɛti akomitangola mpenza na bato nyonso. Akozala na mpasi mpo na kosolola na bato mosusu. Na nsuka, akozwa maladi ya konyokwama na makanisi, soki azwi nzelaya komiboma te.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 26]

Mobali oyo akweisaki banque ya Monte-Carlo

NA JUILLET 1891, Charles Wells, Mongelesi, akendaki na ndako ya masano na mboka Monte-Carlo. Bobele nsima ya mwa mikolo, bafranka naye nkóto zomi ebotelaki ye milió moko. Sanza minei na nsima, alóngaki lisusu. Babɛti mingi balukaki koyeba “sekele” na ye, nde bakokaki te. Wells alobaki mbala na mbala ete azalaki na sekele moko te. Bongo, na mobu molandaki, abungisaki bozwi na ye nyonso, mpe akufaki mpenza mobólá. Nzokande, likambo wana likómaki kitoko mpo na kolobela yango na ndako ya masano ya Monte-Carlo, oyo ezwaki ntango yango lokumu na mokili mobimba kino lelo.

“Makanisi mpamba ya Monte-Carlo”

Babɛti mingi bakanisaka ete bamasini ya tombolá mpe bamasini ya masano ezali na bɔɔngɔ. Yango wana emonanaka ete, soki molongó moko ya banimero ebandi kobima na masini ya tombolá, makoki mingi ezali ete elandana. Bobele bongo, basaleli mingi na bamasini ya masano ya mbongo bakanisi ete soki libonza oyo lityami lizali kozwama te uta ntango molai, wana emonisi ete etikali moke ekozwama. Makanisi na lokutá mabéngamaki na basusu ete “makanisi mpamba ya Monte-Carlo.”

Kozwa libonza na bamasini ya tombolá mpe na bamasini ya masano ya mbongo ezali likambo ya makila malamu. Oyo esalemaki liboso ezali na ntina moko te. Kati na masano ya makila malamu, lokola mokanda Nouvelle Encyclopédie britannique elobeli yango, “makoki ya kozwa libonza lityami ebongwanaka te nsima na kobɛta.” Na yango, makoki ya kozanga ezali kobongwana soko moke te. Nzokande, “makanisi mpamba ya Monte-Carlo” ezali kobebisa babɛti mingi . . . mpe ezali kotondisa basanduku mingi ya misolo na bandako ya masano

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto