Basani ya lokoso—Basukaka bobele na kobungisa
ENGEBENE molakisi Jean Ades ya mboka France, “masano ya mbongo ezali bokɔnɔ lolenge moko na milangwa ya masanga mpe bilangwiseli mosusu. Ezali molangwa oyo ezangi bilangwiseli mpe bato mingi bamimoni ete bazwami na motambo yango.” Ata nsima wana babungisi mosolo mingi, basani ya lokoso bazalaka mbala mingi na mposa makasi ya kosakana lisusu mpo na komeka kolónga. Mopanzi-nsango moko na France amonisaki ete: “Basani mingi oyo bazwi te balóngaka mawa na bango noki. Kasi mpo na basusu, mposa makasi ya kosana ezalaka makasi na boye ete ebulunganisaka bomoi na bango. Bamilobelaka ntango nyonso ete bakotika ezaleli yango, nzokande yango elóngaka bango ntango nyonso. Bazali na mposa makasi ya masano ya mbongo.”
Mosani moko na Afrika ya súdi andimaki ete: “Soki ozali mosani monene mpe wana ofandi na yika ya masini to na mesa ya blackjack, okokanisa likambo mosusu te. Adrénaline mingi ezali kotambola kati na misisa na yo, mpe okobeta kino mosolo na yo nyonso mokosila mpo na ndambo ya bakálati oyo etikali . . . Lokola nazalaka makasi mpo na adrénaline na ngai, nakokaki kolala te na boumeli ya mikolo mingi, kotaláká bakálati mpe mituya mpe kozeláká mbano ya monene oyo ekoya mokolo moko te.” Mpe asukisaki ete: “Ezali na bato mosusu mingi lokola ngai oyo tokokaka te kotika na ba rands (mosolo ya Afrika ya súdi) monkáma to mpe ata nkóto. Tokóbaka kobeta kino rand nyonso tozali na yango ekosila mpe mabota na biso makómaka na mikakatano.”
Henry R. Lesieur, molakisi ya sosioloji na eteyelo monene Saint John na New York akomaki ete mposa ya kosana, olónga to olónga te ezalaka makasi “na boye ete basani mingi basalaka mikolo mingi kozanga kolala, kozanga kolya, kozanga nkutu kosukola. Wana lisano lizali kotɔkɔ, babosanaka makambo nyonso. Kozela lisano na motema lúkulúku epesaka mpe bopusi, emonanaka mingimingi na mitoki na mabɔkɔ, motema ebetaka mbangumbangu mpe mposa ya kosanza.”
Mosani moko monene ya kala andimaki ete ezalaki te mposa ya kolónga nde ezalaki komonisa momeseno na ye ya ntango nyonso, kasi nde ‘bopusi’ ya lisano yango moko. Alobaki ete: “Masano ya mbongo mapesaka bopusi makasi koleka. Wana yika ezali kobaluka, ntango ozali kozela ete elakisa nkɔ́nzɔ, ezalaka na ntango moko mayele ebalukaka mpe mposa ya kosenzwa eyaka.” André, mosani moko na mboka France alobi ete: “Soki obeti 10 000 FF na lisano ya kopota na mpunda mpe etikali bamɛtɛlɛ 100 mpo ete mbangu ekóma na nsuka, ata moto moko ayei mpe ayebisi yo ete mwasi na yo to mama na yo akufi, okotala yango bobele mpamba.”
André amonisi lolenge oyo akokaki kokóba kosana ata nsima ya kobungisa mosolo mingi. Adefaki mosolo na bánki, epai ya baninga na ye mpe epai ya badefisi oyo basɛngaka na mbano minene. Ayibaki ba chèques, abebisaki bakarnɛ́ ya kɔ́nti ya pósita. Kati na bakazino, akosaki basi oyo bazalaki bango moko mpe na nsima akimaki na bakálati na bango ya kredi. Mopanzi-nsango moko na mboka France akomaki ete: “Na bongo, André azalaki komituna te soki mokolo mosusu akokoka kobongisa makoki na ye ya mosolo oyo esilaki kobeba. Koyengayenga na ye emonisaki mpenza mposa makasi oyo azalaki na yango.” Akómaki kosala mobulu mpe batyaki ye na bolɔ́kɔ. Libala na ye libebaki.
Mbala mingi, basani ya lokoso, lokola baombo ya bilangwiseli mpe bameli masanga, bakóbaka kosana ata soki yango ezali kotya misala na bango, mimbongo na bango, kolɔngɔ́nɔ́ na bango mpe nkutu ata mabota na bango na likámá.
Kala mingi te na France, bingumba mingi bisili kofungola bisika ya masano ya mbongo. Bipai mosusu, bisika oyo mimbongo mosusu esili kokwea, babiro ya badefisi ezali kokóba kokɔtisa mbongo. Bankóló bisika wana balobaka ete mbala mingi basani babungisaka mosolo na bango nyonso mpe babandaka kosombitanya mpɛ́tɛ́ na bango ya libala, bamontɛlɛ na bango, bilamba na bango to biloko mosusu ya motuya mpo na kozwa mosolo ya kosomba esánsi ya kozonga na ndako. Na bingumba mosusu ya pembeni ya mai na Etats-Unis, babiro ya sika ya kodefisa mosolo efungoli bikuke na yango; mbala mosusu ekoki komonana misato to minei elandani.
Bato mosusu nkutu bamikómisaka basáli ya mobulu mpo na kokokisa bamposa na bango ya masano ya mbongo. Molakisi Lesieur amonisi ete: “Bolukiluki oyo esalemi kino sikawa emonisi bizaleli mingi ya mabe kati na basani ya lokoso, . . . kosala ba chèques ya mabe, koyiba mosolo, koyiba biloko ya mikemike, koyiba na kosaleláká bibundeli, kokamata mosolo mpe kobeta na nkuku, racket, kobebisa boyokani mpe kobomba biloko oyo bayibi.” Bakisá mbeba oyo basáli bayibaka bakonzi na bango. Engebene Gerry T. Fulcher, mokambi ya eteyelo mpo na mateya mpe kosembolama ya basani ya lokoso, 85 % ya bankóto ya basani ya lokoso oyo bayebani bandimaki ete bayibaki epai na bakonzi na bango ya mosala. Alobaki ete: “Ya solo, kotalela yango na lolenge ya mosolo mobungisami, mposa ya masano ya mbongo ezali mpenza mabe koleka boombo ya masanga mpe bilangwiseli.”
Bolukiluki mosusu emonisi ete basani mibale kati na misato oyo bakɔta bolɔ́kɔ te mpe 97 % ya baoyo bakɔtá bolɔ́kɔ bandimi ete babukaki mibeko mpo na kozwa mosolo ya masano na bango to kofuta banyongo na yango. Na 1993, na bingumba ya Etats-Unis oyo bizwami na golfe du Mexique, epai kuna masano oyo mandimami mapalangani mingi, moyibi esalemaki na bánki mbala 16, elingi koloba mbala minei koleka na mobu 1992. Moto moko ayibaki badolare 89 000 kati na bánki mwambe mpo na kokóba masano. Lokola basengelaki kozongisa mosolo mingi epai na badefisi na bango, basani mosusu bakɔtelaki babánki na bibundeli mpo na koyiba.
Zulunalo New York Times emonisi ete: “Wana basani ya lokoso bamekaka kotika momeseno na bango, bamiyokaka ete eloko moko ezangi bango, lolenge moko na bameli makaya to baombo ya bilangwiseli.” Nzokande, basani balobaka ete ekoki kozala mpasi mpo na kotika momeseno ya kosana koleka mimeseno misusu. Moko na bango alobaki ete: “Kati na biso ezalaki na bameli masanga mpe baombo ya bilangwiseli, mpe tondimi biso nyonso ete mposa ya masano ya mbongo eleki bamposa mosusu nyonso.” Monganga Howard Shaffer ya Centre ya bolukiluki mpo na mitindo ya mposa makasi ya masano ya mbongo, na eteyelo monene Harvard, alobaki ete: “Soko 30 % ya basani ya lokoso oyo bazali komeka kotika bamonisaka bilembo ya ezaleli ya nkandankanda to mpasi na likundú, mpɔngi ya malamu te, kotambola mbangumbangu ya makila.”
Valerie Lorenz, mokambi ya Centre ya kobundana na mposa ya masano ya mbongo na Baltimore, Maryland, na Etats-Unis, amonisi ete: “Ata soki bazali kokóba kobeta, basani ya lokoso bakutanaka na mikakatano ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto: mpasi ya motó, mikakatano ya kopema, mpasi na mongongo, mpasi ya motema to konyela mabɔ́kɔ mpe makolo.”
Tólobela sikawa komiboma. Likambo nini ya mabe koleka likoki komonana oyo babéngaka ete “mposa oyo ezangi likámá” oyo epesaka liwa? Na etúká moko ya Etats-Unis epai kuna bakazino efungoli bikuke na yango kala mingi te, zulunalo New York Times emonisi ete “motuya ya bato oyo bazali komiboma eyikani mbala mibale na lolenge ya kokamwa, kasi monganga-mokambi moko te alingi kosangisa bokóli yango na masano ya mbongo.” Na Afrika ya súdi, basani misato bamibomaki na pɔ́sɔ moko. Motuya ya bato oyo bazali komiboma mpo na masano ya mbongo to mpo na banyongo na yango, ezala oyo ya masano oyo mandimami to oyo mandimami te, moyebani te.
Komiboma ezali lolenge mabe ya komilongola na boombo ya masano ya mbongo. Na lisoló oyo elandi, tokotalela lolenge oyo basusu bazwaki mwango malamu ya kotika ezaleli yango.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
Bandako ya kodefisa mosolo ezali kokóma mingi—mobulu mpe ezali kokóla