Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g93 Janvier nk. 8-9
  • Mikolo malamu mizali koya mpo na bana

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikolo malamu mizali koya mpo na bana
  • Lamuká!—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpasi esakolamaki
  • Mikolo malamu mingi mizali liboso
  • Tozali na “mikolo ya nsuka”?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Mosika te mokili ya sika ekoya!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Bana bazali na mpasi
    Lamuká!—1993
  • Libateli ya solo: Sikawa mpe mpo na libela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Lamuká!—1993
g93 Janvier nk. 8-9

Mikolo malamu mizali koya mpo na bana

NA LIKITA ya mokili mobimba mpo na bana, bakonzi mingi ya mokili balobaki na elikya nyonso mpo na mikolo mizali koya. Basakolaki “eleko moko ya sika” mpo na bana, “mokano ya sika mpo na kokokisa bamposa ya bana.” Balobelaki “bosálisani ya sika” oyo “eboti mwango ya bomoko mpe ya ekateli na mokili mobimba” mpo na kosalisa bana.

Oyo nyonso ezali maloba kitoko mpenza. Tozali sika kotalela mikili mpo na komona kino wapi bakotya molende mpo na kokokisa mikano oyo. Tobosana te ete bobele sanza mitano nsima na likita yango, etumba ebimaki na golfe Persique, moko kati na bitumba nyonso epai mosolo mingi mobimisamaki koleka bitumba mosusu ya kala (61 miliare ya badolare), mpe moko na bitumba bibebisaki mpenza ezingelo. Bibele mingi ya bato ya Irak mpe ya Koweït batikaki bamboka na bango. Nzala, malili, kolya malamu te mpe maladi ebomaki nkóto mingi ya bato​—nkámá mingi na mokolo moko, na eleko moko. Soko 80% ya baoyo bakufaki ezalaki basi mpe bana.

Mpasi esakolamaki

Baoyo bakoyekolaka Liloba na Nzambe bayebi ete mpasi oyo bana bazali komona esakolamaki esili bongo koleka mibu pene na 2 000. Tala oyo Biblia esakolaki na ntina na “mikolo ya nsuka”:

◻ “Maladi mabe . . . ekozala.”​—Luka 21:11.

◻ “Nzala . . . ekozala.”​—Matai 24:7.

◻ ‘Bato bakobebisa mokili.’​—Emoniseli 11:18.

◻ “Libota moko likobundisa libota mosusu mpe bokonzi moko ekobundisa bokonzi mosusu.”​—Malako 13:8, MN.

◻ “Ntango ya mpasi mpe mikakatano ekoya. Bato bakoluka sé bolamu na bango mpenza, . . . bazangi bolingo.”​—2 Timoté 3:1-3, MN.

Biblia esakolaki mpe mokolo oyo mosili kobɛlɛma, oyo mikili bakomona ete balóngi mingi mpo na oyo etali kosilisa mikakatano ya bato, mpe bakosakola ete: “Kimya mpe kobatelama ezali sikawa!”​—1 Batesaloniki 5:3, MN.

Mikolo malamu mingi mizali liboso

Kosakola wana ekozala mpe ntango oyo Nzambe asili kopona mpo na kokɔta kati na makambo ya bato. Nzambe akosalela Bokonzi na ye ya likoló mpo na kosukisa mokili ya lelo mpe kotya na esika na yango mokili ya sika epai kuna bana mpe mikóló bakosepela na kimya ya solo mpe bakotungisama na likambo moko te.​—Masese 2:21, 22; Danyele 2:44; Matai 6:10.

Na nsé na Bokonzi na Nzambe, oyo ekozala boyangeli moko ya nkembo, “mofandi moko te akoloba ete: ‘Ngai nazali na maladi.’” (Yisaya 33:24) Kozanga kolya malamu ekozala makambo ya kala: “Mbuma ya mampa ikotonda o mokili; kino nsongé ya ngomba sé bilanga na bilanga.” (Nzembo 72:16, Liloba lya Nzambe) Ata bitumba bikozala lisusu te. Na ntina yango, Biblia epesi elaká oyo: “[Jéhovah] akosukisa bitumba kino nsuka na mokili.”​—Nzembo 46:9.

Kasi tokoloba boni mpo na bana​—mpe bato mosusu​—oyo basili kokufa, mpo na kozanga kolya malamu, mpo na maladi to mpo na mpasi mosusu? Liloba lipemami na Nzambe liyebisi ete: “Lisekwa likozala mpo na bato ya sembo mpe mpo na bato ya sembo te.”​—Misala 24:15.

Ntango azalaki awa na mokili, Yesu Klisto amonisaki ete bana bakosekwisama mpo na kofanda awa na mabelé na mokili ya sika molakami na Nzambe. Mokolo moko, mwana mwasi moko ya mibu 12 akufaki; “bato nyonso bazalaki kolela mpe batungisamaki mpo na ye.” Nde Yesu akamataki lobɔkɔ ya mwana yango, mpe alobaki na ye ete: “Elenge mwasi, tɛlɛma!” Lisoló wana libakisi ete: “Atɛlɛmaki nokinoki, mpe Yesu apesaki etindá ete bapesa ye eloko ya kolya.” Baboti ya mwana mwasi bazalaki na mayoki nini? “Bakamwaki mingi mpe basepelaki na esengo monene.”​—Luka 8:40-42, 49-56; Malako 5:42.

Mokolo mosusu, Yesu akutanaki na molongó na bato bazalaki kokende kokunda ebembe; mwana bobele moko ya mwasi moko mokufeli mobali. [Yesu] “akendaki epai na sanduku mpe asimbaki yango, mpe baoyo bazalaki komema batɛlɛmaki. Alobaki ete: ‘Elenge mobali, nalobi na yo, tɛlɛma!’ Mokufi alamukaki mpe abandaki kosolola, mpe [Yesu] apesaki ye epai na mama na ye.” Baoyo bamonaki likamwisi yango “bakumisaki Nzambe.”​—Luka 7:11-16.

Na yango, na nsé na Bokonzi ya sembo ya Nzambe, bana​—bakisa mpe baoyo bakosekwa—​bakopesamela mikolo malamu mingi. Bakokóla kati na mokili ya boyengebene mpe ya kimya, mokili ya kitoko mingi, epai bakobanga eloko te, nde bakozala na biloko nyonso bisengeli, mokili oyo mokobonga mpenza na nkombo oyo Yesu apesaki yango ete “Paradis.”​—Luka 23:43.

[Elilingi na lokasa 9]

Kati na mokili ya sika molakámi na Nzambe, bana bakozala na kimya, na nzoto malamu mpenza mpe na esengo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto