Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g93 Janvier nk. 4-7
  • Bana bazali na mpasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bana bazali na mpasi
  • Lamuká!—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Maladi
  • Kolya malamu te
  • Makambo matali ezingelo
  • Bitumba
  • Kobebisa bana
  • Makambo masengeli kosilisama liboso
  • Mikano mpo na kobikisa Bana
    Lamuká!—1994
  • Eutaka mpenza na nini, mpe mikakatano nini ya minene ebimisaka?
    Lamuká!—2003
  • Likambo ya bampasi ya bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Bilei na yo bizali mpenza ya malamu?
    Lamuká!—1995
Makambo mosusu
Lamuká!—1993
g93 Janvier nk. 4-7

Bana bazali na mpasi

Mwana mobali moko ya mibu 12 azali kosala ngonga 11 mokolo na mokolo mpo na kopasola mabangá na esika bakotimolaka mabangá na Inde. Lifuta na ye ya mokolo na mokolo ekoki ata dolare moko te.

Mwana mwasi moko ya mibu zomi azali kotɛkisa nzoto na ye kati na ndako ya pite na mboka Bangkok. Akómaki wana na bolingo na ye moko te. Tata na ye atɛkaki ye na dolare 400.

Sodá moko ya mibu zomi azali kokɛngɛla barrage ya nzela na mokili moko ya Afrika. Mondoki mokakisami na lipeka na ye; azali komela bangi mpo na kolekisa ntango.

MAKAMBO ya boye mazali komonana mingi na mikili ya bobólá. Bamilió mingi ya bana bazali na mpasi makasi. Bamilió nsambo kati na bango bazali kozela na mawa nyonso kati na ba camps ya bato oyo bakima mboka na bango; bamilió 30 bazali koyengayenga na balabála, esika ya kolala ezali te; bamilió 80 oyo bazali na mibu kobanda 10 kino 14 bazali kosala misala makasi mingi oyo ezali kokangisa bokóli na bango; koleka bamilió 100 bakoki kokufa na boumeli ya mibu zomi oyo tosili kobanda yango, mpo na kozanga bilei, kozanga mai malamu ya komela mpe kozanga lisalisi na nkisi ya monganga.

Totalela mwa makambo mosusu na mpasi mingi oyo bana bazali kokutana na yango kati na mokili.

Maladi

Mokolo na mokolo, bana soko 8 000 bazali kokufa mpo ete bakatisaki bango mangwelé te, oyo ekokaki kobatela bango na maladi lokola kintúntu to kosukosu ya mpéma; bana 7 000 mosusu bazali kokufa mikolo nyonso mpo ete baboti na bango bayebi te lolenge ya kopɛngola ete mai masila na nzoto te mpo na pulúpulú, mpe 7 000 mosusu bazali kokufa mokolo na mokolo mpo ete nkisi ebéngami antibiotiques, oyo ekoki kosombama ata na mwa dolare moke, ezali na bango te, nzokande yango mbɛlɛ ekokaki kosalisa bango na kosilisa bokɔnɔ ndenge na ndenge ya mpéma.

Mbula mingi esili koleka uta mayele masilaki kozwama mpe nkisi esilaki komonana, oyo ekoki kopɛngola to kosilisa bokɔnɔ mingi oyo ezali konyokola bato uta bikeke mingi. Kasi ezali mawa mpamba te, bamilió mingi na bato oyo bazali na mposa na yango, bazali kozwa litomba na yango te. Tala ntina nini, bobele maladi ya mitindo mibale oyo ete: pulúpulú mpe maladi ya mpéma lokola asthme mpe bronchite esili koboma soko bamilió monkámá ya bana na boumeli ya mbula 20 oyo euti koleka. Mokanda Ezalela ya bana kati na mokili 1990 (na Lifalansé) mobimisami na UNICEF moyebisi ete: “Ezali lokola nde nkisi esili kozwama mpo na kobikisa cancer, kasi na nsima esalelami mingi te.”

Atako ezalela oyo ezali ya mawa mingi, kasi bokóli bosili kozwama. Na ndakisa, UNICEF mpe O.M.S. (Lisangá likotalaka makambo ya kolongono na nzoto ya bato na mokili mobimba) basalisi mosala monene ya kokatisa bana mangwelé. Na 1991, basakolaki ete 80% ya bana na mokili mobimba basili kokatisa mangwelé mpo na kopɛngola maladi oyo motoba: kintúntu, tétanos, diphtérié, polio, tuberculose mpe coqueluche. Milende oyo, bakisa mpe milende misusu misalami mpo na kosukisa bokɔnɔ bokolekisaka libumu to pulúpulú, ezali kobikisa bomoi ya bana mingi mbula na mbula.

Nzokande eleki mwa bambula, maladi mosusu, SIDA, esili kobima mpe ekoki mpenza kobebisa bokóli oyo nyonso bosili kozwama na Afrika na boumeli ya mbula zomi oyo eleki. Koleka bamilió soko 2,7 ya bana na Afrika bakoki kokufa na maladi ya SIDA na boumeli ya mbula zomi kobanda 1990. Lisusu, bobele maladi wana SIDA, ekoki koboma mikóló mingi, na motindo boye ete bana soko bamilió misato kino bamilió mitano na Afrique centrale, mpe na Afrique de l’Est, bakotikala bitiké mpo ete baboti na bango bakosila kokufa.

Kolya malamu te

Tozali komona mbala mingi bililingi ya nsɔmɔ ya bana oyo bazali konyokwama na nzala, mikwa nyonso libandá, libumu livimbi mpe miso makɔti. Nzokande, oyo tozali komona ezali bobele mwa ndambo moke. Na mikili ya bobólá, soko bamilió 177 ya bana​—mwana moko kati na bana misato—​bazali kolala nzala. Mpe motuya na bango mozali sé kobakisama.

Soki bana bazali kolya malamu te, bakoki mpe kokóla malamu te, ezala na nzoto soko mpe na mayele ya bomoto. Ntalo monene ya bana oyo bazali kolya malamu te, bazali na nzoto makasi te, bakolalaka mpongi mpambampamba, bazali goigoi mpe na miso ya mawa. Bazali kosakana mingi te mpe bazali kosimba mateya noki te lokola ekosalaka bana oyo bazali kolya malamu. Bazali mpe kozwa maladi mingi, oyo ezali koboma ndambo moko kati na misato ya bamilió 14 ya bana oyo bazali kokufa mbula nyonso kati na mikili ya bobólá.

Zébi ya lelo epesi mayele ya kosala nkisi mpo na kosilisa bokɔnɔ, epesi mpe mayele ya kobotisa bilei mingi mpe komema yango epai na epai, mpo ete bafandi nyonso ya mokili balya mpe mosusu ekoki kotikala. Kasi, nzala ezali kosila te. Bakoki kosilisa yango te bobele na kotindela bato bilei mpe bambuma na nkisi ya vitamini. Ebandeli ya mpasi yango ezali nde bobólá makasi, kozanga boyebi epai ya bato mingi mpe kozanga mai malamu ya komela, kozanga bopɛto mpe kozanga mabelé malamu mpo na kolóna, kati na mikili ya bobólá.

Makambo matali ezingelo

Bana bazali konyokwama koleka mikóló na makambo matali kobeba ya ezingelo. Na ndakisa, totalela kobeba ya mopepe: na ntango ya bopemi, mwana oyo akokisi naino mbula misato te akopemaka mbala mibale koleka mokóló, elingi koloba akomelaka mopepe mabe mbala mibale koleka mokóló. Epai mosusu, lokola mangei (reins) na bango, libale (foie) na bango mpe biloko bibéngami enzymes bikóli naino malamu te na nzoto na bango, bana bazali mpenza na likoki te ya kobimisa malamumalamu biloko mabe oyo bapemaki na mopepe, longwa na nzoto na bango lokola ekosalaka mikóló.

Bana bazali bongo na likámá koleka mikóló mpo na biloko oyo bisangisami na oyo babéngi plomb ya essence, mpe mpo na mipepe mosusu ya mabe lokola oxyde de carbone, oxydes nitriques to acide sulfureux. Na mikili ya bobólá, makámá mazali kouta na biloko yango ezali koboma mbula nyonso bamilió 4,2 ya bana oyo bakokisi naino mibu mitano te, mpo ete bazali kozwa bamaladi oyo ezali kokangisa bango mpéma. Baoyo bazali kokufa na yango te, bakobɛlaka bamaladi ya mpéma bomoi na bango mobimba.

Lokola bazali naino kokóla mpe nzoto na bango ekembi naino te, bana bazali kozwa bokɔnɔ mingi na nzela ya bilei oyo bizali malamu te. Na mikili nyonso, bana baleki komona mpasi esika zámba ezali kosila, mokili mokauki ezali kopalangana, mabelé mazali kotimwama mpe kobukana mpe mabelé ya bilanga ezali kobota lisusu malamu te mpo ete basaleli yango mingi. Na Afrika, soko bamilió 39 ya bana bazali kokóla malamu te mpo ete bazali kolya malamu te.

Bakisa na nyonso wana, likambo ya bozangi mai malamu ya komela. Kati na mikili ya bobólá bobele ndambo ya bana nde bakoki kozwa mai malamu ya komela; bibele mingi mosusu bafandi na bisika bizali na bibongiseli malamu te mpo na kobwaka mai ya bosɔtɔ.

Bitumba

Kala, bitumba bizalaki koboma mingimingi bobele basodá. Lelo ezali lisusu bongo te. Uta Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, 80% kati na bamilió 20 ya bato oyo babomamaki mpe bamilió 60 mosusu oyo bazokaki na boumeli ya bitumba ndenge na ndenge, bazalaki basivile​—mingimingi basi mpe bana. Na eleko moko, na boumeli ya mibu zomi kobanda 1980, na ngonga moko na moko, bitumba bizalaki koboma bana 25 na Afrika. Bana ebele bazali bongo kobomama, kozoka, kobwakama, kokangama to bazali kokóma bitiké.

Bamilió mingi ya bana bayebi baboti na bango te mpe bayebi ekólo na bango te, bazali lelo kokóla kati na ba camps ya bato oyo bakimá mboka na bango; kuna, mbala mingi bilei bizali te, kelasi ezali te mpe lopitalo to mpe nkisi ezali te. Mingi bazali na likoki te ya koyekola mosala oyo bakoki kobikela na yango.

Longola likambo oyo ete bana bazali konyokwama mpe kobomama na bitumba, bango moko mpe bazali kobunda bitumba mpe koboma bato. Na bambula euti koleka, bana 200 000 bakokisi naino mibu 15 te, bakɔtisamaki na mosala ya sodá, bapesaki bango bibundeli mpe balakisaki bango koboma. Basusu kati na bango bakufaki, basusu bakatamaki mabɔkɔ to makolo mpo ete balekisaki bango liboso mpe banyataki mine to bombe moke oyo bakokundaka na nsé ya mabelé.

Kobebisa bana

Na mikili mizali na bozwi mingi te, bobólá ezali kopusa baboti mosusu na kotɛka bana na bango na mosolo moke mpenza, mpo bakoka kolya to kofuta banyongo bazali na yango. Bana wana bakosalaka nini? Bazali kopusa basusu kati na bango na kosala bondumba to kosala mosala makasi lokola baombo kati na ba atéliers ya bosɔtɔ mingi. Basusu bazali kotɛkisama mpo na mbala ya mibale kino motuya ya 10 000 dolare na nzela ya bakomisionere to na ba agences na mikili ya Mpótó, oyo mosala na yango ezali bobele kolukela bato bana ya kobɔkɔla.

Ba rapports emonisi ete bana mingi ya mike bazali basali ya pite, ezala mibali to basi, mpe motuya na bango ezali sé kobakisama. Na mokili ya Brezile, bana soko 500 000 bazali komibebisa na pite. Bazali mpe kosalela bana mingi mpo na kokanga bango bafɔtɔ ya nsɔni to ya bolumbu mpe kotɛkisa yango, mingimingi lokola ezali lisusu mpasi te mpo na kosomba biloko ya vidéo.

Makambo masengeli kosilisama liboso

Mituya oyo nyonso mikoki te mpo na komonisa biso mpasi nyonso mpe mitungisi nyonso mitali bana. Tokoki te kokanga motema na komona bankóto mpe bamilió ya bana oyo bazali konyokwama. Mingi kati na biso basili komona motindo nini motema epaswamaka soko mwana moko mpamba azali konyokwama to akufi​—mpo ete mwana nyonso azali na bomoto na ye, azali molimo ya motuya mingi na miso ya Nzambe, azali moto oyo azali na lotómo ya kozala na bomoi mpe kozala na esengo lokola bato nyonso.

Kozanga kolekisa ntango mpo na kolukaluka ntina na bampasi oyo bana bazali na yango lelo, bato oyo bafandelaki likita ya mokili mobimba mpo na bana, balobaki na elikya nyonso mpo na mikolo mizali koya mpe bazwaki mokano ete baluka nzela nyonso ya kosilisa noki ezalela oyo. Kati na makambo mosusu, mikano na bango ezali ete, kobanda lelo kino na mobu 2 000, bakokisa makambo lokola oyo:

◻ Kokitisa ndambo moko kati na misato na motuya ya bana oyo bazali kokufa, baoyo bakokisi naino mibu mitano te na kotalela mituya mipesamaki na 1990.

◻ Kokitisa ndambo ya motuya ya bana bakokisi naino mibu mitano te, baoyo bazali kokelela na nzala to bazali kolya malamu te, na kotalela mituya mipesamaki na 1990.

◻ Kopesa na bana nyonso mai malamu ya komela mpe bibongiseli malamu mpo na kobwaka mai ya bosɔtɔ.

◻ Kobatela bana na bileko ya mpasi makasi, lokola na ntango ya bitumba.

Mbula na mbula, esengeli soko 2,5 miliare ya dolare mpo na kobakisa bibongiseli mosusu ete balónga kokokisa mikano oyo nyonso; na motindo yango bakokoka kobikisa bana 50 milió oyo, soko bongo te, bakokufa na boumeli ya mbula zomi kobanda 1990.

Mpo na mokili mobimba, yango ezali bobele mosolo moke. Ekokani na mosolo mobimisami mbula na mbula na bakompanyi oyo ekosalaka makaya na Amerika mpo na kosala piblisité na bango; ekokani mpe na mosolo oyo mokili mobimba mozali kobimisa mokolo na mokolo mpo na kosomba bibundeli.

Lelo oyo, mosolo mobimisami mpo na kosomba bibundeli mpe kofuta basodá​—oyo eleki 1000 miliare ya dolare mbula na mbula engebene likanisi moko O.N.U. amonisaki na bokatikati—​eleki mosolo ya mbula na mbula ya ndambo na bafandi ya mokili mobimba baoyo bazali mpenza babólá, ata basangisi yango nyonso esika moko. Soki mokili esaleli ata 5% mpamba ya ebele ya mosolo oyo, mbɛlɛ mikano mingi mikamatamaki na Likita yango mikei liboso. Na ndakisa, motuya ya mpepo moko mpamba ya bitumba, mpepo F/A-18 esalemi na Amerika (koleka 30 milió ya dolare) mbɛlɛ bakoki kosomba na yango nkisi ya mangwele mpo na bana 400 milió ete babatelama na maladi oyo makoki koboma bango.

Mabota to mikili bazali na makoki mpo na kolónga na mikano malamu mingi oyo bakamataki na Likita yango. Bazali na boyebi, bazali na bisaleli, bazali mpe na mbongo oyo esengeli mpo na yango. Kasi motuna motunami ete: bakosala yango solo?

[Etanda/​Elilingi na lokasa 6]

Etumba mpo na kozanga kolya malamu

Makambo motoba oyo baboti basengeli koyeba

1. Mabɛlɛ ya mama yango moko ezali malamu mingi na boumeli ya sanza minei kino sanza motoba ya liboso kati na bomoi ya mwana. Ezali kokokisa bamposa na ye nyonso ya kolya mpe ezali kobatela mwana na bamaladi mingi.

2. Kobanda sanza minei kino sanza motoba, mwana azali na mposa na biloko mosusu. Kopesa ye bilei makasi liboso ya mikolo wana ya bomoi, ezali kobakisa likámá ya kozwa maladi; kopesa yango nsima mingi ekomemaka na kozanga kolya malamu.

3. Mwana oyo akokisi naino mbula misato te asengeli koleisama mbala mibale koleka mokóló mpe kobakisela ye mwa ndambo moke ya bilei oyo bikopesaka makasi ntango nyonso oyo azali kolya.

4. Bilei mpe mai esengeli ntango nyonso kopesama na mwana ntango azali na maladi to azali na pulúpulú.

5. Mwana oyo auti kobɛla asengeli, mokolo na mokolo, asengeli koleisama mwa mingi koleka momeseno, na boumeli ya poso moko mpo ete azwa lisusu bakilo oyo abungisi.

6. Kolekisa soko mibu mibale liboso ya kobota mwana mosusu ezali na ntina mingi mpo ete mama mpe mwana bazala na nzoto malamu.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Epai yango ekamatami: United Nations Children Fund (Ebongiseli ya Lisangá ya Mabota mpo na kosunga bana)

UNICEF/​C/​91/ Roger Lemoyne

[Elilingi na lokasa 5]

Na mikili ya bobólá, bobele ndambo ya bana nde bakoki kozwa mai malamu ya komela

[Eutelo ya fɔtɔ]

UNICEF/​3893/89/ Maggie Murray-​Lee

[Elilingi na lokasa 7]

Mwana moko na moko, elongo na bomoto na ye oyo ekeseni na basusu, azali na motuya mingi na miso ya Nzambe mpe azali na lotómo ya kozala na esengo lokola bato banso

[Eutelo ya fɔtɔ]

Foto: Cristina Solé/​Godo-​Foto

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto