Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g93 Avril nk. 18-20
  • Miziki ekoki mpenza kosala ngai mabe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Miziki ekoki mpenza kosala ngai mabe?
  • Lamuká!—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nguya ya miziki
  • Ebongi mpo na matoi te mpe mpo na miso te
  • Ekoki nde kosala yo mabe?
  • Bomibatela na miziki ya mbindo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Nakoki kosala nini mpo nakóma te moombo ya miziki?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Kopona miziki ezali mpenza na ntina?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Ndenge nini okoyoka esengo ya miziki?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Lamuká!—1993
g93 Avril nk. 18-20

Mituna oyo bilenge batunaka . . .

Miziki ekoki mpenza kosala ngai mabe?

THOMAS azalaki elenge mobali ya mibu 14 oyo azalaki na ye malamu. Moyekoli ya mayele, azalaki mpenza kolinga kosalisa bato. Kasi nsima na kosomba chaîne musicale moko kitoko, amipesaki na koyoka miziki ya mabe mingi ebengami heavy metal.

Mpo na yango, Thomas abandaki komikangela kati na chambre na ye. Tata na ye ayebisi ete: “Nazalaki kopekisa ye ete amikangelaka na ndako te mpo na koyokaka bobele miziki.” Kasi Thomas azalaki koyoka te. Na nsima, na mokolo moko ya malili makasi, atyaki mama na ye mbeli mpe na nsima amibomaki ye moko. Tata yango oyo atondaki na mawa, abakisi ete: “Boyebisa na baboti ete bakeba mpo na lolenge na miziki oyo bana na bango bazali koyoka.” Mikolo mizalaki liboso ete likambo wana ya mawa mingi lisalema, Thomas ayembaki mbala mingi loyembo moko oyo ezalaki kolobela “makila mpe moto oyo abomi mama na ye.”

Ezali nde likambo likomonanaka mingi te? Solo mpenza. Nzokande, ata soki makambo mosusu mamemaki bopusi kati na likámá wana, ezali solo ete: miziki ezali na bopusi likoló na bato atako bilenge mingi bazali mpenza kondima yango te. Ntango mosusu ozali na yo mpenza molingi ya miziki ya mabe mingi te lokola oyo babengi heavy metal, to mpe okanisi te ete okoki kosala mobulu makasi. Atako bongo, miziki ekoki komema bopusi ndenge na ndenge oyo yo ozali kokanisa na yango te.

Nguya ya miziki

Miziki ezali na nguya. Na yango, ekoki komema bopusi likoló na mayoki nyonso ya bato, ekoki kopesa mawa, esengo, mpasi mpe ekoki kokólisa bolingo. Miziki ekoki mpe kokitisa nkanda ya moto to mpe kopesa ye nkanda. Ekoki kolendisa na komipesa to mpe kolendisa bizaleli ya mabe. Ezali bongo likambo ya kokamwa te ete, kobanda na ntango ya kalakala, miziki ezalaki esaleli na nguya kati na loboko ya “nzambe ya biloko na ntango oyo, Satan le Diable.”​—2 Bakolinti 4:4.

Tala ndakisa moko: mwa moke nsima wana Bayisraele basikolamaki na boombo na Ezipito, batikaki losambo ya Jéhovah mpo na kosambela mwana na ngombe ya wolo. Etamboli na bango wana ya nsoni esimbamaki na nini? Na miziki moko ya makasi mpe ya mbindo. (Exode 32:1-6, 17, 18) Bongo ntango mokonzi na lolendo Nebukadanesala apesaki etinda na bato na ye ete basambela ekeko moko na bopakano, na nzela nini alukaki kolamwisa epai na bato na ye bolingo ya ekólo mpe ya losambo? Na nzela ya miziki oyo ekokaki kopusa bango.​—Danyele 3:1-7.

Lelo lisusu, Satana azali kosalela miziki mpo na kopengwisa bato. Azali “mokóló na nguya na mopepe. Elimo yango ezali sikawa kosalaka mosala kati na bato baboyi kotosa.” (Baefese 2:2) Mbala mingi, miziki ya lelo oyo emonisaka elimo ya Satana ya botomboki. Yango ekoki kokamwisa biso te, mpamba te basali na yango bazali baoyo Biblia elobi na ntina na bango ete ‘bazali kotambola na makanisi na bango na mpamba. Ekaniseli na bango ezali na molili, batangolami mosika na bomoi na Nzambe.’ Ya solo, soki totaleli lolenge ya bomoi na bango, mingi na bayembi, babeti na miziki mpe basali na banzembo oyo bazali na lokumu mingi, bazali na etamboli mabe.​—Baefese 4:17-19.

Na ntina yango, bilenge baklisto oyo bazali koyoka lolenge wana ya miziki bazali komitya liboso na makámá mpenza. Yango elimboli te ete miziki nyonso oyo ezali na lokumu ezalaka mabe, to mpe ete bobele rock nde lolenge ya miziki oyo osengeli kokima.a Opéra mpe musique classique ezalaka mpe ntango mosusu na banzembo ya bosoto. Banzembo mosusu ya kala ezalaki kolobela pite kasi na lolenge ya polele te, nzokande eteni monene ya miziki ya lelo ezali kolobela yango polele mpenza.

Ebongi mpo na matoi te mpe mpo na miso te

Kamatá miziki babengi heavy metal, lolenge moko mabe mpenza ya miziki ebengami hard rock oyo mingimingi babetaka yango na mongongo makasi koleka. Bituluku oyo bazali kobeta yango bamipesi bankombo lokola Poison, Skid Row, Guns N’Roses mpe Slayer. Zulunalo Time eyebisi ete: “Bankombo mpamba ya bituluku yango ezali kopesa makanisi ya kokata biteni ya nzoto, minyoko mpe liwa.” Yango ezali mpe solo mpo na bililingi ya mbindo mpe ya nsomo oyo bizali kotyama likoló na bizipeli ya ba disques mpe oyo mbala mingi ezali komonisa bilembo ya misala ya Satana.

Tokoloba boni mpo na miziki yango moko? Banzembo ezalaka na mitó na makambo lokola “Mosuni mpe makila” to “Mposa ya koboma,” mpe maloba mazali kokumisa monyokoli mpe bosoni, kobebisa basi mpe koboma. Ezali bongo likambo ya kokamwa te ete l’Escalier de l’enfer (na Lingelesi), mokanda ya miziki mabe mingi babengi heavy metal, ebengi yango ete “bolóngi ya maloba ya nsoni, ya mbangu, ya elobeli ya bosoto mpe ya mobulu.” Epai mosusu, baoyo balingaka miziki motindo wana bakweaka mbala mingi kati na drogue to kati na losambo ya Satana, to mpe bakomibomaka. Nzokande, engebene myango ya bopanzi nsango, miziki wana heavy metal ekomi kondimama mokemoke epai na bato mingi.

Mbala mingi, miziki rap (to hip-hop) ekomemaka mpe kati na makambo mabe.b Tozali kotanga kati na zulunalo Time ete: “Bakomi na maloba ya nzembo ya rap . . . bakobengaka mɔ́tɔ ya etumba kotemela bapolisi to bazali kolobela bosangisi nzoto . . . kati na mɔ́tɔ.” Mpo na koloba solo, maloba mingi ya banzembo ya rap oyo ezali na lokumu mingi ezali maloba na mbindo mingi oyo tokoki kokoma yango awa te. Mpo na moko na banzembo yango, elenge mwasi moko alobaki ete: “Nayokaki mpasi na motema bobele na liloba ya liboso.”

Banzembo mingi ya miziki babengi rock ata ezali na lokumu, nzokande ebongi mpo na baklisto te. Atako banzembo mingi ya hit-parade ezalaka mpenza na bosoto te lokola oyo ya rap to heavy metal, mingi ekumisaka na kobombama to na polele, pite mpe misala misusu oyo mizali ya boklisto te. Ba vidéoclips, oyo mingimingi esepelisaka bilenge mpenza, ezali kolendisa bopusi ya miziki na bililingi ya nguya. Bolukiluki bosalemaki na ntina na ba vidéoclips emonisaki ete 57% ezalaki na bililingi ya mobulu mpe 75% ezalaki na bililingi ya nsoni, kozanga kolobela molato mabe mpe mabina oyo mazali kolamwisa mposa ya kosangisa nzoto.

Ekoki nde kosala yo mabe?

Na esika ete ezala peto mpe ya kolendisa, eteni monene ya banzembo oyo eyebani mingi lelo ezali mpenza “ya mokili, ya bonyama, ya bilimu mabe.” (Yakobo 3:15) Likambo ya kokamwa, bilenge baklisto nyonso te bazali komona mabe mpo na koyoka banzembo yango to mpe kotala ba vidéoclips. Elenge mwasi moko alobi ete: “Ntina ya komitungisa ezali te mpo na maloba ya banzembo ya rap. Mpamba te ezali na yango polele te.” Moto na moto oyo amekaki kosala makasi mpo na kososola yango akondima ete mwa bosolo ezali kati na lolenge oyo ya kokanisa.

Mbala mingi bilenge basimbaka mpenza te ndimbola ya banzembo oyo esili kopalangana. Na ntango ya bolukiluki moko, batunaki na bilenge ete bayebisa makambo malobami kati na banzembo yango mosusu. Mingi basosolaki mpenza te mitó na makambo lokola pite, mobulu, drogue mpe losambo ya Satana oyo ebombami kati na miziki mingi oyo bazalaki koyoka. Yango wana zulunalo The Journal of the American Medical Association esukisi boye ete: “Eloko moko te epesi nzela na koloba ete miziki yango ezali na bopusi [mabe] likoló na bizaleli ya bilenge.”

Nzokande, likanisi yango eyokani na Biblia te. Biblia elobi ete “baninga mabe bakobebisaka bizaleli malamu.” (1 Bakolinti 15:33) Okolekisa ebele na bangonga mpo na kozala elongo to koyoka moto moko oyo akosalelaka maloba ya nsoni mpe ya mbindo koleka, oyo akolendisa yo mpo ete omela drogue, oyo akozala molóngisi ya losambo ya Satana to oyo akokumisa pite na kosalelaka maloba mabe mingi? Soko moke te. Kasi mpo na nini maloba wana makozala mpenza na likámá te mpo ete mayembami to matangami nzela moko na miziki? Ntango mitó na makambo wana ya mbindo ezali kozongelama mbala na mbala, ekosuka se emema yo na kosala likambo boye to likambo boye. Masese 6:27 etuni ete: “Moto akoki kokamata mɔ́tɔ na ntolo na ye mpe bilamba na ye bikozika te?”

Tala mpo na nini Biblia ezali kopesa biso toli ete tolobela ata nkutu te makambo oyo matali pite, mpe toboya kosolola likoló na yango. (Baefese 5:3-5; Bafilipi 4:8) Moto oyo akotya likebi te na lilako oyo ‘akobuka libebi.’ (Bagalatia 6:8) Judith andimi ete: “Banzembo ezali kopesa yo makanisi. Ntango mposa mabe ezali koyela yo na bɔɔngo, banzembo ezali kolendisa yango.” Nsima na koyoka nzembo moko ya rap oyo ezalaki kolobela pite na lolenge ya polele mpe ya nsoni mingi, elenge mobali moko andimaki ete: “Nazalaki kokoka te kobengana yango kati na makanisi na ngai.”

Bongo tokoloba boni mpo na miziki babengi heavy metal, oyo ezali kolendisa koboma, drogue to losambo ya Satana? Elenge moklisto moko ya mobali oyo abandaki koyoka lolenge wana ya miziki akómaki nokinoki kotungisama na makanisi ya liwa. Ezali bobele na nzela ya milende makasi ya baboti na ye mpe ya moninga moklisto moko ateli nde akokaki kobikisama na libebi wana ya elimo mpe ya mosuni.

Mbala mosusu, makanisi makobongwanaka misala. (Yakobo 1:14, 15) Nzokande, mbala mingi miziki ya lelo oyo ebongisami na lolenge ete etondisa elimo na yo na makanisi mabe. Ya solo, soki obokwamaki kati na malako ya Biblia, ezali mpenza mpasi mpo ete oboma moto to osala pite bobele mpo ete oyoki yango kati na nzembo moko. Kasi okoki kozwa bopusi kati na makambo mosusu. Yango wana, bilenge baklisto mosusu bamekolaki molato mpe ekateli ya nsuki mabe ya babeti na miziki ya rock mpe ya rap. Elobeli, bikélá to gestes mpe elateli ya bilenge wana ezali komonisa polele ete bapusami mpenzampenza na oyo bazali koyoka.

Elenge moko ya mboka Afrique du Sud, alobi ete: “Bilenge balobaka ete miziki ezali na bopusi te likoló na bango. Kasi yango ezali kofungola nzela na Satana, oyo akoki bongo kotambwisa bomoi na yo.” Elenge mobali wana ayebi ntina nini azali koloba boye, mpamba te alimboli ete: “Miziki oyo nazalaki koyoka ezalaki kolobela losambo ya Satana, drogue mpe pite.” Asalaki nini mpo na komisikola na bopusi mabe ya miziki ya mbindo?

“Nabwakaki ba disques mpe bakasete na ngai nyonso. Oyo nde mbongwana na kozala kati na chambre moko ya kimya! Kasi yango ekómisaki ngai malamu koleka.” Mbala mosusu esengeli na yo kozwa ekateli motindo moko, kozanga ete obwaka biloko nyonso, kasi kobwaka ba disques to bakasete oyo omoni ete ezali mpenza ya mbindo.​—Tala Misala 19:19.

Yango elimboli te ete olapi ndai mpo na koyoka lisusu miziki te, kasi bobele koyekola kopona.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Liloba “rock” esangisi lolenge nyonso ya miziki oyo bilenge balingaka.

b Tala lisoló “Les jeunes s’interrogent . . . Qu’y a-t-il à redire à la musique que j’écoute?” ebimaki kati na Réveillez-vous! ya le 8 février 1993.

[Elilingi na lokasa 19]

Kotondisa elimo na yo na makanisi ya liwa, ya koboma mpe ya mitindo mabe ya kosangisa nzoto, ekozala litomba to ekozala nde mabe mpenza?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto