Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/4 nk. 19-24
  • Bomibatela na miziki ya mbindo!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomibatela na miziki ya mbindo!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lolenge mabe ya kosalela miziki
  • Esengeli kokeba
  • Rap: miziki ya botomboki
  • Heavy metal: Pite, mobulu mpe losambo ya Satana
  • Tokobuka oyo tozali kolona
  • Bomisenzela
  • Miziki ekoki mpenza kosala ngai mabe?
    Lamuká!—1993
  • Nakoki kosala nini mpo nakóma te moombo ya miziki?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Kopona miziki ezali mpenza na ntina?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Ndenge nini okoyoka esengo ya miziki?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/4 nk. 19-24

Bomibatela na miziki ya mbindo!

“Bongo bokeba mpo na etamboli na bino, bozalaka bazoba te kasi bato na mayele mpenza. Bosalisa ntango na bino misala malamu, mpo ete mikolo mizali mabe.”​—BAEFESE 5:15, 16.

1. Mpo na nini tokoki koloba ete miziki ezali “likabo na Nzembe”?

“MIZIKI . . . ezali likabo na Nzambe.” Oyo ezali maloba na Lulu Wiley kati na mokanda na ye Miziki ya Biblia (na Lingelesi). Mibali mpe basi ya kobanga Nzambe bazali na maoki yango uta kala. Kati na miziki moto asili kobimisa maoki na ye ya mozindo: esengo, mawa, nkanda, bolingo. Yango wana, na ntango ya kala, miziki ezalaki na ntina mingi, lokola emonisami bipai nyonso kati na mokanda wana mosantu.​—Genese 4:21; Emoniseli 18:22.

2. Na ntango ya kala, lolenge nini bazalaki kosalela miziki mpo na kosanzola Jéhovah?

2 Ezali kati na losambo ya Jéhovah nde miziki ezwi esika ya lokumu mingi. Masanzoli mosusu oyo ezali kokumisa Jéhovah na lolenge eleki malamu, etyamaki na ebandeli kati na miziki. Mokomi na Nzembo Davidi akomaki ete: “Nakosanzola nkombo na Nzambe na loyembo.” (Nzembo 69:30) Ntango moto azali ye moko akoki kokanisa mozindo kati na libondeli, mpe miziki ekoki kokende elongo na yango. Asafa akomaki ete: “Nazali kobanza lisusu loyembo na ngai na ntango na butu; nazali koloba kati na motema na ngai mpenza mpe elimo na ngai ezali koluka.” (Nzembo 77:6) Kati na temple ya Jéhovah, miziki ezalaki na esika monene. (1 Ntango 23:1-5; 2 Ntango 29:25, 26) Na bantango mosusu bazalaki koyanganisa bituluku ya bayembi mpe babeti miziki mingi, lokola ntango ya kofungola temple, wana bazalaki na babeti kelelo 120. (2 Ntango 5:12, 13) Toyebi mpenza malamu te soki miziki wana ya lokumu ezalaki kobeta lolenge nini, kasi kati na mokanda Miziki kati na Biblia, (na Lingelesi) tozali kotanga ete: “Ezali mpasi te kokanga matomba oyo makokaki kobima na miziki bazalaki kobeta kati na Temple na mabaku ya bisengo minene . . . Soki moko kati na biso akombamaki kino esika yango, akokaki kozanga te kokamwa na bonene mpe lokumu ya likambo yango.”a

Lolenge mabe ya kosalela miziki

3, 4. Mpo na nini tokoki koloba ete basaleli mosusu na Nzambe mpe baninga na bango ya pembeni basalelaki likabo ya miziki na lolenge ya mabe?

3 Nzokande, miziki esalelamaki ntango nyonso te na mikano mitombwani lokola oyo. Na ngomba Sinai, miziki esalelamaki mpo na kopusa Bayisraele na losambo ya ekeko ya mwana na ngombe ya wolo. (Exode 32:18) Na mabaku mosusu miziki ezalaki na boyokani na molangwa mpe ata na pite. (Nzembo 69:12; Yisaya 23:15) Bapakano oyo bazalaki pembeni ya Yisraele bazangaki mpe ekweyeli te, mpamba te bango mpe basalelaki mabe likabo wana ya Nzambe. Tala oyo tokoki kotanga kati na diksionere moko ya Biblia (The Interpreterˈs Dictionary of the Bible): “Na Phenicie mpe na Syrie, miziki nyonso to penepene nyonso oyo eyebani mingi ezalaki na boyokani na losambo ya Ishtar, nzambe-mwasi ya mabota. Yango wana, banzembo nyonso ya kosepela ezalaki mbala mingi elembo ya milulu mpo na kokumisa etamboli mabe ya bosangisi nzoto.” Bobele bongo, “mabina ya mbindo” oyo mayebanaki mingi na Bagreke ya kala ezalaki kosalema elongo na miziki.

4 Ee, miziki ezali na nguya ya kopusa, ya kosimba motema mpe ya kosala bopusi likolo na moto. Esili koleka mibu mingi, John Stainer (kati na mokanda Miziki kati na Biblia, [na Lingelesi]) akomaki kino kondima ete: “Na ntango na biso, ntóki moko te ezali kosala bopusi makasi likoló na libota na bato lokola miziki.” Kino lelo, miziki ezali naino kosala bopusi monene. Yango wana miziki ya mabe ekoki kozala likama ya monene mpo na bilenge baklisto.

Esengeli kokeba

5. (a) Miziki ezali na bopusi monene nini kati na bomoi na bilenge mingi? (b) Nzambe azali kokanisa ete bilenge basengeli kozala na esengo?

5 Soki ozali elenge, oyebi ntina ya miziki malamu​—mingi mpenza balolenge ya miziki ya kosepelisa bato to miziki rock—​mpo na bato na mbula na yo. Bakomi kino koloba na ntina ya miziki ete ezali “eteni ya misala ya nzoto ya elenge.” Bakanisi ete na boumeli ya mibu motoba ya nsuka oyo asengeli kolekisa na eteyelo, elenge americain oyo auti na libota ya nivo na bakatikati, akolekisa mikolo nyonso ngonga minei mpo na koyoka miziki rock! Na ntembe te, wana ezali kozanga bokatikati. Ezali solo ete mabe moko ezali te na ntango moto asepeli na eloko moko oyo ekoki kosepelisa ye mpe kopesa ye esengo. Ezali polele ete, Jéhovah, Mozalisi na miziki ya esengo, asengi na bilenge te ete bazala na mawa mpe na motema motutami. Ya solo azali kotinda epai na basaleli na ye ete: “Bino bayengebene, bosepela kati na Jéhovah mpe bozala na esengo; boyemba na esengo bino nyonso na mitema sembo.” (Nzembo 32:11) Liloba na ye elobi na elenge mobali ete: “Ɛ elenge, sepela na bolenge na yo mpe tika ete motema na yo esepelisa yo na mikolo na bolenge na yo.”​—Mosakoli 11:9.

6. (a) Mpo na nini bilenge basengeli kokeba na liponi ya miziki oyo bazali koyoka? (b) Mpo na nini miziki mingi ya ntango na biso mizali mabe koleka oyo ya ntango ya kala?

6 Nzokande, ozali na bantina mingi ya kokeba na liponi ya miziki oyo ozali koyoka. Kati na Baefese 5:15, 16 ntóma Paulo alobaki ete: “Bongo, bokeba mpo na etamboli na bino, bozalaka bazoba te kasi bato na mayele mpenza. Bosalisa ntango na bino misala malamu, mpo ete mikolo mizali mabe.” Basusu bakoyanola na oyo lokola elenge mwasi moko asalaki yango ete: “Ntango baboti na biso bazalaki bilenge bakokaki koyoka miziki oyo balingi. Bongo, mpo na nini biso te?” Mbala mosusu ezali na mwa mbeba kati na miziki oyo baboti na bino bazalaki koyoka ntango bazalaki na mbula na bino. Kasi soki totali malamu, banzembo mingi oyo eyebanaki mingi kala ezalaki na makanisi mingi ya mposa na nzoto, elobeli ya mbindo oyo emonisamaki na kobombama. Kasi, oyo kala eyebisamaki na kobomboma elobelami lelo na polele nyonso. Mokomi moko ya mikanda amonisaki ete: “Tomona naino te, kati na bato, bana bazingelami na ebele ya maloba ya bosoto na motindo yango.”

Rap: miziki ya botomboki

7, 8. (a) Miziki rap ezali nini, mpe elonga na yango ekangisami na nini? (b) Ndenge nini okoki koyeba moto oyo azali na lolenge ya bomoi rap?

7 Totalela, na ndakisa, miziki oyo ezali sikawa koningisa mokili: rap. Engebene zulunalo Time, rap esili kobimisa “na polele nyonso mbongwana kati na mondule,” mpe ezali kosepelisa bato mingi na Bresil, na Etats-Unis, na Mpoto, na Japon mpe na Russie. Mbala mingi ezali na loyembo te, bayembaka yango te, kasi balobaka kati na yango na mondule ya kokatakata maloba. Mpe ezali mondule wana ya nguya nde ezali sekele ya elonga monene ya botekisi ya miziki rap. Elenge mwasi moko moto ya Japon alobaki ete: “Ntango nazali koyoka miziki rap, nazali kooka ete maoki nyonso ya nzoto elamuki; mpe ntango nazali kobina na miziki wana, nazali komioka nsomi.”

8 Kasi elonga ya miziki rap ezali lisusu kati na maloba na yango, oyo ezali mbala mingi bosangisi ya maloba ya nsoni mpe elobeli ya bilenge na balabala. Na bokesene ya miziki rock lolenge yango eyebani, oyo elobelaka bilenge masolo ya bolingo, ekomaka mbala mingi ete miziki rap ebimisa maloba ya makasi. Ekomaka ete etombokela bokesene, bokaboli mposo mpe minyoko ya bapolisié. Nzokande, mbala mosusu maloba na yango oyo ezali kozongelama mbala na mbala ezali maloba ya mbindo ya nsomo, oyo moto akoki kobimisa. Emonani mpe lokola ete miziki rap elingi kotombokela mitinda nyonso ya elateli, ya kokatisa nsuki mpe ya etamboli malamu etali kosangisa nzoto. Ezali likambo ya kokamwa te ete rap esili kokoma lolenge ya bomoi. Okoki koyeba bamekoli na yango na bisalasala na bango, na elobeli na bango ya balabala mpe na molato na bango: pantalons jeans ya monene, jakete ya mokuse oyo boutons ekangisami te, chaines ya wolo na nkingo, kepi na moto mpe maneti ya mwindo.

9, 10. (a) Makambo nini bilenge basengeli kotalela mpo na koyeba soki miziki rap mpe lolenge na bomoi oyo ezali kolendisa ezali ˈkosepelisa Nkoloˈ? (b) Likambo nini oyo bilenge baklisto mosusu batalelaka yango na bopotu?

9 Kati na Baefese 5:10, eyebisami epai na baklisto ete: “Bomekaka koyekola yango ekosepelisa Nkolo.” Na kotalela lokumu mabe oyo miziki rap ezali na yango, bokanisi ete “ekosepelisa Nkolo” ete bolinga miziki wana? Elenge moklisto akolinga nde kozala na lolenge ya bomoi oyo ata bato mingi ya mokili bazali komona ete ebongi te? Tala lolenge mokomi ya zulunalo moko alobelaki miziki rap oyo ebetamaki mokolo mosusu: “Bayembi wana bazalaki kosakana na maloba ya kotuka, elobeli na bango ezalaki na maloba ya nsoni etali kosangisa nzoto; ezalaki likambo ya komona nani akobimisa maloba maleki makasi. . . . Babini na bango, mibali mpe basi, bazalaki komekola lolenge ya kosangisa nzoto kati na mabina.” Na ntina na loyembo moko oyo esepelisaki mingi mpenza, moko na babongisi na yango alobaki ete: “Likolo na maloba mibale oyo babimisi, moko ezalaki (ya nsoni).”

10 Nzokande, miziki oyo babetaki na mpokwa wana ekesenaki te na balolenge ya miziki rap. Tala oyo mokambi ya esika alobaki: “Bozali koyoka wana miziki rap ndenge ezalaka, lokola oyo basombaka na magazini.” Ezali likambo na mawa na komona ete kati na bilenge koleka 4 000 oyo bakotaki miziki yango, basusu bazali komitanga ba Témoins de Jéhovah! Basusu bazali komona lokola liseki likambo oyo ete Satana azali “mokolo na nguya ya mopepe.” Ye nde azali kokamba “elimo [to ezaleli ya elimo] oyo ezali sikawa kosala mosala kati na bana na nkanza.” (Baefese 2:2) Okosala mpo na matomba na nani soki obandi koyoka miziki rap to soki olandi lolenge ya bomoi oyo yango ezali kolendisa? Ezali solo ete na maloba na yango, banzembo mosusu ya rap ezali mabe mingi te na bokokanisi elongo na misusu. Kasi ezali nde likambo ya mayele kokolisa mposa mpo na lolenge ya miziki oyo, na motindo na yango, eyokani te na mitinda ya baklisto?

Heavy metal: Pite, mobulu mpe losambo ya Satana

11, 12. Miziki heavy metal ezali nini, mpe makambo na yango nini mazali mabe?

11 Lolenge mosusu ya miziki oyo eyebani mingi lelo ezali heavy metal. Eleki ata miziki ya hard rock oyo ebetami makasi. Tala likambo oyo tokoki kotanga na ntina na yango kati zulunalo Journal of the American Medical Association: “Miziki Heavy metal . . . ezali kobetama makasi ya mindule mpe etondi na maloba oyo mazali kokumisa koyina, kofinga, etamboli ya nsoni, mpe mbala mosusu losambo ya Satana.” Yango wana, bobele nkombo na bituluku mosusu oyo eyebani mingi ezali komonisa kobeba na lolenge wana ya miziki rock. Okokuta kati na yango maloba lokola “ngenge,” “mandoki” mpe “kufa.” Atako bongo, heavy metal emonani lokola eloko mpamba liboso na miziki misusu oyo mibengami Thrash metal mpe death metal, lolenge ya miziki makasi euti na heavy metal. Kati na nkombo oyo bazali komipesa, bituluku wana ezali kosalela elobeli lokola “molei bato” mpe “nsango ya liwa.” Lokola maloba wana mazali na Lingelesi to mpe na minoko misusu, bilenge na mikili mingi bazali koyeba te na meko nini maloba yango mazali ya bosoto.

12 Mbala mingi, bamonaki boyokani kati na miziki heavy metal mpe, likambo ya komiboma maladi ya makanisi mpe komela bangi epai na bilenge. Bokangami na yango na mobulu epusaki mopesi toli moko ya radio na kobenga yango “miziki mpo na koboma baboti.” Bokangami na yango na losambo ebengami Satanisme nde ezali kotungisa baboti mingi, mpe bakonzi ya bapolisié. Engebene molukiluki moko, bilenge mosusu oyo bakoti na losambo ya Satanisme bamikotisaki na misala ya bilimu mabe na nzela ya miziki yango. Mpo na kosukisa alobaki ete: “Bayebi te epai wapi bazali kokende.”

13. Kosepela na miziki heavy metal ezali na likama nini?

13 Nzokande, bilenge baklisto basengeli te ˈkobosana mayele mabe na Satana.ˈ (2 Bakolinti 2:11) Yango wana, “tozali kobundana na . . . nguya mpe mikonzi na mokili oyo na molili, mpe na milimo mabe kati na likolo.” (Baefese 6:12) Oyo nde ekozala ya bolema kokotisa bilimu mabe na bomoi na biso na nzela ya miziki oyo tozali koyoka! (1 Bakolinti 10:20, 21) Nzokande, ezali likambo ya polele ete bilenge baklisto mosusu bazali mpenza kosepela na miziki wana. Basusu bazali koluka miango ya kobombama mpo na kokokisa mposa na bango. Elenge mwasi moko andimaki ete: “Nazalaki koyoka miziki heavy metal, mbala mosusu penepene ya butu mobimba. Nazalaki kosomba bazulunalo oyo elobelaka miziki heavy metal mpe nazalaki kobomba yango kati na sanduku ya basapato na ngai mpo ete baboti na ngai bamona yango te. Nazalaki kokosa baboti na ngai. Nayebi ete Jéhovah azalaki kosepela na ngai te.” Lisoló moko ya Reveillez-vous! etindaki ye na kotika yango. Bilenge boni misusu bazali naino mbala mosusu baombo ya lolenge wana ya miziki?

Tokobuka oyo tozali kolona

14, 15. Mpo na nini tosengeli kondimisama ete miziki ya mbindo ezali na bopusi mabe? Limbola eyano na yo.

14 Kotala mpamba te likama oyo lolenge na miziki yango ekoki komema. Ya solo, mbala mosusu okopusama te na koboma moto to kosala pite bobele mpo ete oyoki loyembo moko. Nzokande, tozali kotanga kati na Bagalatia 6:8 ete: “Soko moto akokona kati na nzoto, akobuka libebi kati na nzoto.” Koyoka oyo miziki ya mokili, ya nzoto, ata mpe ya bilimu mabe ekoki bobele kosala bopusi mabe likolo na yo. (Tala Yakobo 3:15.) Molakisi ya miziki Joseph Stuessy alobaki ete: “Miziki ya lolenge nyonso ezali kosala bopusi likoló na ezaleli, maoki, elimo na biso mpe etamboli oyo euti na yango. . . . Ye oyo alobi ete: ˈNakoki koyoka miziki heavy metal, kozanga ete esala eloko likolo na ngai,ˈ azali komikosa mpenza. Miziki wana, ezali solo na bopusi ekeseni, mpe mitindo ya bopusi yango ekeseni engebene lolenge ya moto na moto.”

15 Elenge mobali moko moklisto andimaki ete: “Namipesaki mpenza mingi na miziki thrash metal na boye ete bomoto na ngai mobimba ebongwanaki.” Nokinoki abandaki kotungisama na bilimu mabe. “Mpo na kosukisa nabwakaki ba disques na ngai nyonso, mpe na nsima bilimu mabe batikaki ngai.” Elenge mobali mosusu apesi litatoli oyo: “Miziki oyo nazalaki koyoka ezalaki kolobela bilimu mabe, to bangi to pite. Bilenge mingi bazali koloba ete ezali kosala bopusi te likoló na bango, ezali lokuta. Natikaki mpenza solo.” Masese ebimisi motuna oyo: “Moto akoki kokamata mɔ́tɔ na ntolo na ye mpe bilamba na ye ekozika te?”​—Masese 6:27.

Bomisenzela

16. Tokoki koloba nini na ntina na basali mpe bayembi mingi ya miziki na ntango na biso?

16 Paulo akomelaki baklisto ya Efese ya ntango na kala ete: “Bongo, nazali koloba mpe kotatola kati na Nkolo ete ebongi na bino lisusu te ete botambolaka pelamoko ekotambolaka bapakano na makanisi na bango na mpamba. Ekaniseli na bango ezali na molili, batangolami mosika na bomoi na Nzambe mpo na kozanga boyebi kati na bango, na ntina na makasi na mitema na bango.” (Baefese 4:17, 18) Tokoki mpe koloba bongo na ntina na basali mpe na bayembi mingi ya nzembo na ntango na biso, boye te? Lelo oyo, miziki​—ezala ya lolenge nini—​ezali kopusama na “nzambe na mokili oyo,” Satan le Diable.​—2 Bakolinti 4:4.

17. Lolenge nini bilenge bakoki kososola to komeka miziki?

17 Na ntina na “mikolo na nsuka,” Biblia esakolaki ete: “Nde bato mabe mpe bakosi bakoleka na mabe, bakozimbisa mpe bakozimbisama.” (2 Timote 3:1, 13) Na bongo esengeli na bino, lelo oyo, kokeba na miziki oyo bozali kopona. Mbala mingi, motó na likambo oyo ebongi te yango moko ekweisi banzembo ya diske. Lisusu, kati na Yobo 12:11, motuna oyo etunami ete: “Litoi ekomeka maloba te? Mpe lolemo ekomeka elengi te?” Bobele bongo, okoki komeka miziki na koyokaka mwa eteni na yango na bososoli nyonso. Maoki nini miziki yango ezali kobimisa epai na yo? Ezali kolendisa etamboli ya mobulu mpe ya mbindo​—oyo emonisi elimo ya koluka bisengo? (Bagalatia 5:19-21) Bongo maloba na yango? Ezali kolendisa pite, komela bangi to misala misusu mabe oyo “ezali nsoni mpo na kolobela yango?” (Baefese 5:12) Biblia elobi ete makambo wana masengeli “kolobelama ata moke te” kati na basaleli na Nzambe, mpe na koleka esengeli ata moke te kolobelama mbala na mbala na mondule ya kolengola. (Baefese 5:3) Ezali boni mpo na etyelo ya diske? Ezali kolobela makambo na bilimu mabe to kolakisa bililingi ya kolamusa mposa na nzoto?

18. (a) Mbongwana nini bilenge mosusu basengeli kosala kati na liponi ya miziki oyo bazali koyoka? (b) Lolenge nini bilenge bakoki keyekola kosepela na miziki ya malamu?

18 Mbala mosusu osengeli kosala mbongwana mpo na lolenge ya miziki oyo ozali kopona. Soki ozali na badiske to bakasete oyo ezali kolobela makambo ya pite to ya bilimu mabe, osengeli kolongola yango nokinoki. (Tala Misala 19:19.) Elimboli te ete tokoki lisusu te kosepela na koyoka miziki; ezali miziki nyonso te oyo miyebani mingi lelo mikweisami. Bilenge mosusu basalaki liponi ndenge na ndenge ya miziki oyo bazali koyoka, bazali sikawa kosepela na miziki ebengami musique classique, miziki ya bonkoko, jazz léger mpe balolenge mosusu. Bakasete ya Mélodies du Royaume esalisaki bilenge mingi na kokolisa makoki na bango ya kosepela na miziki ya kolendisa oyo ebetami na orkestre.

19. Mpo na nini ezali likambo ya ntina monene kotya miziki na esika oyo ebongi na yango?

19 Miziki ezali likabo na Nzambe. Nzokande, ezali kokoma mpo na bato mingi lokola maladi ya mbindo. Bakokani na Bayisraele ya ntango na kala oyo balingaki “ebetelo na nsinga mpe na nzenze, na ngomo mpe na pololo, nde bakotalaka misala na Jéhovah te.” (Yisaya 5:12) Omityela mokano ya kopesa miziki esika ebongi na yango mpe sala ete misala na Jéhovah mizala lobanzo na yo ya liboso. Pona na likebi nyonso miziki oyo ozali koyoka. Bongo, okokoka kosalela malamu, kasi okomizimbisa te, na likabo wana ya Nzambe.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Emonani lokola ete libota ya Yisraele eyebaki kobeta miziki malamu koleka. Elilingi moko ya ba Asulia ezali komonisa ete mokonzi Senakeribe asengaki na mokonzi Ezekiase ete apesa ye, lokola mpako, babeti miziki ya Bayisraele. Tozali kotanga kati na moko moko ya ndimbola ya maloba na miziki (Groveˈs Dictionary of Music and Musicians) ete: “Ezalaki mpenza kosalema mingi te ete . . . basenga babeti miziki lokola mpako.”

Ozali komikundola?

◻ Mpo na nini tokoki koloba ete miziki ezali likabo na Nzambe?

◻ Lolenge nini mabe basalelaki miziki na ntango ya kala?

◻ Miziki rap mpe heavy metal ezali na makama nini epai na bilenge baklisto?

◻ Lolenge nini bilenge baklisto bakoki kozala na bokengi kati na liponi ya miziki oyo bazali kayoka?

[Elilingi na lokasa 23]

Na ntango na kala, miziki ezalaki mbala mingi kosalelama mpo na kosanzola Jéhovah

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto