Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g93 Juillet lok. 12
  • Mangomba oyo makoki kopesa eyano?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mangomba oyo makoki kopesa eyano?
  • Lamuká!—1993
  • Masolo mosusu
  • Kosopa zemi—Yango nde nzela mokuse ya kosilisa mikakatano?
    Lamuká!—2009
  • Kosopa zemi​—⁠Yango ezali nde mwango ya malamu?
    Lamuká!—1995
  • Makambo mazali koleka na mokili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Kosopa zemi: Likambo ya nsomo mingi
    Lamuká!—1993
Makambo mosusu
Lamuká!—1993
g93 Juillet lok. 12

Mangomba oyo makoki kopesa eyano?

LIBOSO na kokakatana likoló na kosopa zemi, bato mingi bazali koluka litambwisi ya bakonzi ya mangomba na bango. Eyano nini bakonzi ya mangomba bazali kopesa bango?

Lingomba ya Katolike lizali kotemela makasi likambo litali kosopa zemi; lizali koteya ete bomoi ya mwana ezali kobanda uta mama azwi zemi. Basangó mosusu oyo bazali kotemela likambo yango bazali kosenga na pape ete abengana na lingomba bato ya politike oyo bazali kondima likambo litali kosopa zemi. Atako bongo, bato na Katolike mingi bazali kondima likambo litali kosopa zemi mpe bazali kosenga ete yango endimama na mibeko.

Lingomba libengami Église presbytérienne (États-Unis) eyebisi ete, na likanisi ya ba pasteurs 46%, “Biblia ezali koteya te ete kosopa zemi ezali mabe.” Lingomba yango endimi likambo ya kosopa zemi.

Likita linene ya mbala ya 16 ya lingomba libengami Église unifiée du Christ elobaki ete ‘ezali kolóngisa lotómo ya mobali mpe ya mwasi ya kozala na ebongiseli ya motuya mosengeli ya bana kati na libota mpe kotalela ndingisa ya kosopa zemi lokola liponi oyo moto asengeli kosala.’

Mpo na lingomba libengami Église luthérienne évangélique, kosopa zemi ‘esengeli kosalema bobele soki myango nyonso misusu milóngi te’; kasi eboyaki kolobela yango lokola “lisumu” to koloba ete “bomoi ya mwana ezali kobanda uta mama azwi zemi.”

Lingomba libengami Assemblée baptiste du sud ezali kotemela makasi likambo litali kosopa zemi. Nzokande, Église baptiste américaine elobaki ete: “Tozali na makanisi makeseni mpo na etelemelo mpenza ya Lingomba na likambo litali kosopa zemi. Na yango, tozali kotika na moto na moto bonsomi ya kosala engebene bindimeli na ye.”

Lingomba ya Bayuda (Judaïsme), yango mpe ezali na bokabwani na likambo oyo. Eteni oyo ekolandaka mpenza mibeko ezali kotemela makasi likambo litali kosopa zemi, nzokande, judaïsme réformé mpe judaïsme conservateur ezali kondima mingi likambo litali kosopa zemi.

Islam to lingomba ya bamizilmá ezali kopesa nzela na kosopa zemi mpo na bantina nyonso na boumeli ya mikolo 40 ya liboso. Koleka mikolo wana, esengeli kosalema bobele soki bomoi ya mama ekómi na likámá. Engebene mokanda hadith, zemi ekozalaka na boumeli ya “mikolo 40 na lolenge ya mbuma moko moke, na nsima ekozala mwa liboke ya makila ekangami na boumeli ya eleko oyo ekokani, na nsima ekokóma ndambo ya mosuni na boumeli ya eleko oyo ekokani, na nsima . . . bakotindela ye anzelu oyo akoya kotyela ye mpema na bomoi.”

Lingomba libengami Shintoïsme ezali na etelemelo ya polele te mpo na likambo yango; ezali kotikela moto na moto likoki ya kozwa ekateli.

Ba hindous, ba bouddhistes mpe ba sikhs bazali mbala mingi koteya limemya mpo na bomoi. Kasi, bazali komikotisa te kati na ntembe oyo na likambo litali kosopa zemi, mpo bango bakondimaka kobotama lisusu to réincarnation; kosopa zemi ezali bobele kotinda bomoi ya mwana epai mosusu.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto