Makambo mazali koleka na mokili
SIDA na Paris
“Na Paris, moto moko kati na bato misato azali kokufa, epai ya mibali oyo bazali na mibu kobanda 25 kino 44, mpo na SIDA,” ndenge tozali kotanga yango kati na zulunalo Le Monde. Mituya wana mibimisamaki kala mingi te na INSERM (Lisangá ya France mpo na makambo matali kolongono ya nzoto mpe bolukiluki mpo na makambo ya monganga). Lisoló yango libakisi ete kati na 1983 mpe 1990, kozwa virus ya SIDA ebakisaki na 50%, motuya ya bato oyo bazali kokufa kati na bato ya bambula wana. Monganga Jonathan Mann, directeur ya kala ya ebongiseli mpo na kobundisa SIDA na O.M.S. (Lisangá ya mokili mobimba mpo na makambo matali kolongono ya nzoto), ayebisaki likambo oyo: “Likambo ya mabe koleka lizali liboso na biso, bipai nyonso maladi oyo ekómi kozwa bato mingi.” Engebene O.M.S., bato 5 000 bazali kozwa maladi oyo mokolo na mokolo kati na mokili mobimba.
Bana mpe biberon
Soko bana 25% ya Japon, bazali na mikakatano mpo na kolya. Biberon nde ezali mobandisi ya likambo yango. Uta koleka mibu 20, zulunalo Asahi Evening News, elimboli ete balakisi na biteyelo ya bana mike, bazali komona ete biloko oyo bizali mpasi mpo na kotafuna bizali kopesa mikakatano na bana mosusu: bazali kokakatana mpo na komela yango, bazali kobimisa yango to bazali naino na yango kati na monoko nsima na kolala mwa moke nsima na midi. Minganga bazali komona ete mbángá ya bana yango ezali makasi te mpe bimɛkú na bango bikóla malamu te. Naohiko Inoue, mosalisi ya mino, mpe Reiko Sakashita, moto ayekoli malamu makambo matali kolongono ya bato, bandimi ete mabe ebandaki longwa na bomwana: biberon. Ba bébés oyo bazali komela biberon, emonani ete bazalaka bobele kobenda mopepe, kozanga ete baningisa mbángá. Ba bébés oyo bamelaka mabɛlɛ, bazali kosalela makasi mbángá na bango mpe bazali koyeisa bongo makasi misisa oyo ekozala na ntina mpo na bango na kotafuna bilei.
Mikakatano ya kóbá ya mai
Atako kóbá ya mai bazali banyama oyo bafandaka na mai, ezali na mabelé nde babotaka maki na bango. Nsima na kosala mobembo molai na mai minene makeseni ya mokili, kóbá ya mai bazali kozonga kobota maki na bisika ya zelo ya sikisiki. Nsima ya kosangana na kóbá ya mobali, kóbá ya mwasi ekomibenda likoló na esika ya zelo, mbala mosusu esika oyo yango ebotamaki, liboso ya kobota na kimya nyonso na esika moko eponami malamumalamu. Ekosala boye mbala na mbala na boumeli ya mwa mikolo, kino ekosilisa kobota maki nyonso, oyo mbala mingi ezalaka nkóto, mpe kozipa yango na mpasi mpenza. Ezali na ntango yango nde mikakatano mizali kobima. Zulunalo ya Afrique du Sud Prisma ebengi yango ete “kobebisama mpenza ya zumbu” mpo na lokoso ya moto “lokoso oyo emonanaki boye liboso te mpe kozanga limemya mpo na ezingelo.” Kobebisama wana “ezali kopesa mpasi mpo ete kóbá babota malamu.” Mitindo misusu ya kóbá mizali sikawa kolimwa.
Bapesi piblisité ya makaya bazali kozimbisa basi
“Osali mpenza makasi, chérie.” Uta bambula mingi, maloba motindo wana mazali kolendisa basi ya Amérique na komela makaya. Na mawa nyonso, Kathy Harty, oyo azali mokambi ya ebongiseli mpo na kopekisa komela makaya na États-Unis, alobi ete basi yango bazimbisami. Asanganaki na ebongiseli ekamatamaki mpo na kosala piblisité na radio mpe na televizyó mpo na komonisa polele bozimbisi yango. Kati na moko na maloba mapesamaki mpo na kotemela komela makaya, mwasi moko kitoko abambaki likaya na ye na libandi ya moto moko oyo asalaka piblisité ya makaya. Na maloba mosusu oyo mapesamaki, mwasi moko alobi na basali ya makaya ete: “Matondi mpo na nsuki na biso oyo ezali kolumba nsolo ya makaya. Matondi mpo na mino na biso oyo ekóma mosaka mpe mpo na mbongo tozali kobungisa mpo na kolongola nsolo ya makaya na bilamba. Matondi mpo na basi 52 000 oyo mbula na mbula bazali kozwa cancer ya mapulúlú. Tozali bobele kolikya ete tokokoka kozongisela bino makambo wana mokolo mosusu!” Kathy Harty alimboli ete: “Tolingi ete [basi] bakanisa likambo oyo malamumalamu: Balingi mpenza makaya? Balingi mpenza ete bazwa maladi mpo na kokómisa bato mosusu bazwi?”
Elikya ya bayekoli na minzoto
Mpo na ebongiseli moko ya mbula zomi oyo etambwisamaki na Agence aéronautique et spatiale américaine, bayekoli na minzoto bakobungisa milió 100 ya dolare mpo na kozwa bansango na radio oyo euti na bikelamu ya mayele oyo bizali na bitando mosusu. Engebene International Herald Tribune, ba radiotélescopes oyo ezali na Argentine, na Australie, na Inde, na Russie, na Porto Rico mpe na États-Unis ekokengela mbala moko bamilió ya banzela ebengami micro-ondes. Atako bato mosusu ya sianse, oyo bazali na elikya makasi bazali koyebisa ete matomba makomonana mosika te, basusu bazali komonisa ete boyekoli 50 oyo esalemaki kobanda 1960, ebimisaki matomba te.
Kosala ebongiseli ya kotala televizyó?
Engebene boyekoli moko ya Académie américaine de pédiatrie oyo ebimisamaki kati na The Journal of the American Medical Association, “ezali malamu ete bana batalaka televizyó mingi te, mingimingi soki ezali na ba films ya mobulu.” Lisoló yango limonisaki ete “bana oyo bazali bobele na sanza 14 bazali kotala mpe komekola mpenza bizaleli oyo bazali komona na televizyó.” Makambo oyo bazali komona na kati, mingi ezali makambo ya mabe mpe ya mobulu. Mpo na kolendisa bokonzi ya baboti, lisoló limonisaki ete esengeli kosalela verrou électronique, ebongiseli euti kobimisama kala mingi te mpo na kopesa nzela na kopona ba émissions, ba chaînes mpe bangonga ya kolanda televizyó. Na yango, atako baboti bazali na ndako te, bakoki kopona libela makambo oyo bana bakoki kotala na televizyó mpe ngonga oyo bakoki kofungola televizyó.
Matomba ya mafuta na nzoi
Uta kalakala, mafuta na nzoi eyebani na ndenge esalisaka bamaladi. Engebene zulunalo La Presse Medicale, minganga na mikolo na biso babandi komona lisusu matomba na yango. Na boyekoli moko oyo esalemaki kala mingi te, minganga bamekaki kosalela mafuta na nzoi ya peto mpo na kosalisa moto oyo aziki mɔ́tɔ mpe bampota ekeseni. Mafuta ya nzoi masopamaki mbala moko na mpota oyo na nsima, bakangaki yango. Nsima na bangonga 24 bazalaki kozongela kosala bongo mpe kokanga yango lisusu. Matomba mamonisi ete mafuta na nzoi mazali kosala ete microbes ekota na mpota te mpe ezali kobelisa yango. Ebomaka microbes mingi oyo ekutani na yango mpe ezali kopesa nzela na bokóli ya ba cellules ya sika. La Presse Médicale esukisi ete: “Nkisi wana ya petee mpe ya malamu ebongi ete eyebana mpenza mpe ekotisama kati na molongo ya bankisi oyo ezali kosalelama sikawa mpo na kopekisa microbes ete ekota na mpota te.”
Kolongono mabe ya basali minene na masano
“Komimeka ya makasi mpe mayoki oyo mazalaka liboso ya momekano moko ya ntina mingi ezalaka na bopusi ya kobulunganisa likoló na makoki ya nzoto ya basali na masano,” ndenge eyebisami na O Estado de São Paulo. “Ekoki kosalema ete nzoto ezangi makoki ya komibatela liboso ya microbes oyo ekokani na bilembo ya SIDA.” Bolukiluki ya minganga Gerd Uhlenbruck mpe Heinz Liesen emonisi ete basali na masano minene to baoyo bamimekisi mingi, bazali na microbes mingi mpe bilembo ya cancer. Mibali wana mibale, balobi ete esalemi bongo na ntina na “komimekisa makasi mpe makambo oyo momekano ezali kosenga.” Rapport ebakisi ete: “Nzokande, kosalela lisano na bokatikati ezali kopesa makasi na nzoto. Ezali kobatela ete cancer ezwama te mpe ezali kosala ete bomoi ezala molai.”
Lipasó longwa na mosika na mikolo mizali koya?
“Moto na maladi azali na Rome, monganga-mopasoli azali na Milan,” ndenge elimbolami na zulunalo ya Italie Il Messaggero mpo na “komeka ya liboso ya kopasola longwa na mosika oyo esalemaki na robot.” Longwa na bankáma ya bakilometele, na lisalisi ya oyo ebengami relais téléphonique mpe na moniteur vidéo, monganga-mopasoli ayebi “esika ya sikisiki esengeli kokatama. Azali kopesa mitindo, mpe robot azali kosala. Loboko na ye ya mekanike ezali kokita na nzoto ya moto na maladi, mpe mbɛli moke ebandi mosala na yango.” Na lipasó wana ya elakiseli mpamba, oyo esalemaki na Rome na ntango ya congrès Chirurgie 92, moto na maladi azalaki bobele ekeko, mpamba te mibeko ya Italie mipekisi ete masini moko ekoka kopasola moto mpenza. Nzokande, na bambula motoba to nsambo oyo ezali koya, kopasola longwa na mosika, to “lipasó ya mosika,” ekokoka kokóma likambo ya solo. Engebene Licinio Angelini, molakisi ya makambo matali kopasola bato na Université La Sapienza (Rome), mokolo ezali koya oyo “misala nyonso mizali komonisa mokakatano mpo na monganga-mopasoli mikopesama na bamasini.”
Kozanga mosala mpe kolongono ya nzoto
Kozanga mosala epai ya bilenge, ezali moko na mikakatano minene ya mikili na Mpótó, wana ezali maloba ya monganga Anne Hammarström, ya Institut Karolinska, na Stockholm. Bolukiluki na ye, oyo eyebisami kati na British Medical Journal, emonisi ete bilenge mibali oyo bazangi mosala, bazali komipesa na makambo ya mabe, lokola komela masanga mpe mobulu. Epai ya bilenge basi, kozanga mosala ezali na bopusi ndenge na ndenge: mingimingi bazali maladi mpe, lokola bazali kobanga kozala bozito mpo na mabota na bango, bazali na mayoki ya kokweisama. Ezalela ya mibali ezali mbala mingi kobenda likebi ya bato, mpo ete mayoki na bango liboso ya ezaleli ya kozanga mosala ezali kokoka kobombama te, ndenge Anne Hammarström amonisi yango. Alobi ete: “Basali na lopitalo basengeli koyeba malamu bopusi ya kozanga mosala likoló ya basi.” British Medical Journal esukisi na maloba oyo ete: “Nkisi mpenza ya malamu, ezali bobele mosala oyo ezali na ntina.”
‘Allemagne, mboka ya bapakano’
“République fédérale [ya Allemagne] ekómi mboka ya bapakano, oyo ezali bobele na mwa ndambo moke ya baklisto batikali naino. Milió motoba kati na bafandi ya mboka wana bazali kondima Nzambe te. Baoyo bazali na lingomba moko te, bazali mingi koleka baoyo bakendaka na ndakonzambe. Bobele bafandi 10% nde bazali kokende na losambo mokolo ya lomingo nyonso.” Ezali wana makambo mamonanaki na bolukiluki moko esalemaki na zulunalo ya Allemagne Der Spiegel, makambo oyo bakokanisaki yango na oyo ya bolukiluki motindo moko, oyo esalemaki na 1967. “Bapakano ya sika,” ndenge zulunalo ezali kobenga bango, “basili kotika Mangomba kozanga mawa mpe kozanga nkanda. Ezali na nkanda te, kasi na kozanga bosepeli nde basili kolongwa.”