Mafuta ya nzoi Nkisi moko elɛngi
BATO mosusu ya mayele, oyo balukaka koyeba makambo ya sika oyo etali mosala ya monganga, bazali mpenza kosepela na komona ete mafuta ya nzoi ezali na makoki ya malamu mpenza ya koboma mikrobe mpe ya kokitisa bisika ya nzoto oyo evimbi. Zulunalo moko (The Globe and Mail) ya Canada epesi lapolo oyo: “Nkisi ya makasimakasi (antibiotiques) oyo bato basali ezali kokoka te koboma mikrobe ya makasi oyo ezali kokufa na nkisi yango te, nzokande mafuta ya nzoi ezali na makoki ya koboma ndambo ya mikrobe yango soki ezali na kati ya mpota.”
Eloko nini ezali na kati ya mafuta ya nzoi oyo esalaka ete mpota ebela? Eyano ezali nde epai ya nzoi oyo ekendeke kozwa mai ya elɛngi ya fololo. Nsoi ya nzoi yango ezalaka na mai babengi glucose-oxydase. Yango nde esalaka mosala ya kokabola na bitenibiteni sukali (glucose) oyo ezalaka na kati ya mai ya elɛngi ya fololo. Moko ya biloko oyo ebimaka na mosala yango babengaka yango peroxyde d’hydrogène (to eau oxygénée), oyo banda kala basalelaka yango mpo na kosukola mpota. Na momeseno, soki batii peroxyde d’hydrogène na mpota, makasi na yango eumelaka te na kosila; kasi mpo na mafuta ya nzoi, ezalaka bongo te. Zulunalo (Globe) elobi ete: “Ntango batii yango na mpota, mafuta ya nzoi esanganaka na mai oyo ezalaka na nzoto ya moto mpe ekómaka maimai; yango elɛmbisaka asidɛ ya mafuta ya nzoi.” Mai oyo babengi glucose-oxydase esalaka mosala na yango na esika yango oyo ezali lisusu na asidɛ mingi te. Kokabwanakabwana ya sukali oyo ezali na kati ya mafuta ya nzoi esalemaka malɛmbɛmalɛmbɛ mpe esilaka noki te. Yango ebimisaka malɛmbɛmalɛmbɛ peroxyde d’hydrogène oyo ekoki koboma bamikrobe oyo ezali na mpota kasi kozanga kobebisa baselile ya malamu oyo ezali zingazinga.
Zulunalo yango elobi ete mafuta ya nzoi ezalaka na makoki mingi ya kobelisa mpota. Ekomi boye: “Kopakola mafuta ya nzoi mwa moke elɛmbisaka loposo; yango nde ebatelaka loposo mpe epekisaka ete ekokoto esalema te. Mafuta ya nzoi esalisaka misisa ya mikemike oyo ememaka makila ebotama mingi mpe ekóma mingi mpe mafuta yango etindaka baselile ebota loposo ya sika.” Lisusu, biloko oyo babengi ba anti-oxydants oyo ezalaka na kati ya mafuta ya nzoi esalisaka na “kokitisa kovimba ya mpota mpe esalaka ete makila etambola malamu; lisusu, esalaka ete mpota ‘ebimisaka mai te.’”
Lapolo yango epesi likebisi oyo: “Atako bongo, ezali moto nyonso te nde akoki kosalela mafuta ya nzoi.” Bato ya mayele bamonaki ete mwa ndambo (5 %) ya mafuta ya nzoi ekoki kozala na mikrobe oyo ebimisaka maladi babengi botulisme. Bibongiseli ndenge na ndenge (lokola Service de référence pour le botulisme de Santé Canada) mpe masangani ya minganga oyo batalaka maladi ya bana bazali kokebisa ete esengeli te kopesa bana mike oyo bakokisi naino mbula moko te mafuta ya nzoi mpamba te “bana yango naino bakómi te na mikrobe mingi oyo efandaka na misɔpɔ oyo ekoki kobatela bango na mikrobe yango [ya botulisme].”