Libala—Mpo na nini mingi ezali kolónga te?
NA NTINA na koboma libala na mokili ya Hong-Kong, epai kosangisama na mimeseno ya mikili ya Mpótó mpe ya Azia ezali, zulunalo Asia Magazine emonisaki ete: “Kozanga kosolola, kozanga kotikala sembo, mikakatano na ntina na kosangisa nzoto mpe kokesena na makambo mingi, ezali makambo oyo mazali kobimisa mikakatano kati na mabala, ezala epai ya babalani ba Chinois soko mpe epai na bato oyo bauta na mikili ya Mpótó.” Makambo motindo oyo mazali komonana bipai binso kati na mokili.
Mibali mpe basi oyo bazali kotya mosala na bango na esika ya liboso bakakatanaka te na kosundola mabota na bango mpo na komipesa mingi koleka na mosala. Na yango, bazali kokata likoki ya kosolola na libota. Lokola alembi nsima na kolekisa mokolo mobimba na mosala, mobali azali komipesa mingi na kotanga zulunalo. Junichi mpe mwasi na ye bazalaki kosala na ba restaurants misato, yango esengaki bango kosala mosala banda 8 heures ya ntongo kino 22 heures na bisika bikeseni. Junichi andimi ete: “Tozalaki kosolola ata moke te lokola mwasi na mobali.” Kozanga kosolola wana etyaki libala na bango na likámá.
Likambo mosusu oyo ezali kolembisa bikanganeli ya libala ezali likanisi oyo bato bazali na yango na ntina na kosangisa nzoto na libandá ya libala. Likambo yango lipalangani na boye ete 20% ya mibali mpe 8% ya basi oyo batunamaki na bolukiluki moko oyo esalemaki na Japon bandimaki ete basangisaki nzoto elongo na mwasi mosusu to na mobali mosusu oyo azalaki mobalani na bango te na boumeli ya mbula oyo euti koleka. Na Japon, emonanaka mingi ete basi oyo basalaka bazali kosangisa nzoto na mibali misusu oyo bazali mibali na bango te. Bazali kosangisa nzoto na mibali ndenge na ndenge, kozaláká na likanisi oyo ete: “Soki mobali na ngai akangi ngai na mobali moko, nakoboma libala.” Bato ya ntango na biso bazali kokanga miso na makambo motindo wana.
Bato ya ntango na biso bazali kolendisa ezaleli ya koloba “liboso ngai.” Moimi oyo euti na ezaleli yango ezali kobimisa kozanga boyokani kati na babalani, yango ezali likambo mosusu oyo ezali koboma libala. Kiyoko alobi ete: “Ntango nyonso libala na biso ezalaki kolinga kokufa. Na ebandeli ntango tobalanaki, mobali na ngai asengaki ngai ete natosa ye na makambo nyonso. Ntango makambo mazalaki kotambola malamu mpo na ye, mokakatano ezalaki te, kasi ntango makambo mazalaki kotambola malamu te, azalaki te kondima libunga na ye mpe mabe nyonso azalaki kobwaka yango bobele epai na bato mosusu. Nazalaki mpe na ngambo, mpo ete nazalaki na momeseno ya kotombokela bokonzi na ye. Nazalaki na mokakatano monene mpo na kotosa mobali na ngai wana azalaki komimonisa moto na sembo te.”
Kati na makambo mazali kosuka na koboma libala, tobakisa mobulu mpe kolangwa masanga, mikakatano ya mbongo, kozanga koyokana elongo na bakilo mpe mitungisi ya mayoki.
Nini ebombami nsima na makambo nyonso wana?
Atako mikakatano oyo mizali komema na koboma libala mizali mingi, kasi ezali na likambo mosusu oyo eleki mpe yango ebombami nsima na mopepe wana ya mabe oyo epalangani kati na mokili mobimba mpo na koboma mabala. Atako bato ya Azia bazali koloba ete bopusi ya mikili ya Mpótó nde ezali komema na koboma libala, nzokande kondima koboma libala na mikili ya Mpótó ezali likambo ya sika. Ya solo, ezali bobele na boumeli ya mibu zomi oyo miuti koleka nde motuya ya koboma mabala ebakisamaki mbala misato na États-Unis mpe ebakisamaki mbala minei na Grande-Bretagne. Koyebáká ete makambo oyo mazali komema na koboma libala mayebani mpenza malamumalamu te, Andrew J. Cherlin, mosangani ya ebongiseli moko oyo eyekolaka makambo ya bato mpe ya nkita na États-Unis, alobi ete mobandisi ya likambo wana ezali “lipanda na makambo ya nkita oyo ezali kokóla ntango nyonso, oyo basi bazali na yango” mpe “mbongwana ya bizaleli kati na bato.”
Mpo na basi ya Amerika, mpe mpo na basi ya mikili ya bozwi, ezali komonana mingi ete basi ya mabala bazali mpe kosala na bakompanyi. Bobele bongo, bosangani ya mobali na misala ya ndako ekóli mpenza mingi te. Ezali likambo na kokamwa te na koyoka ete basi mosusu bazali koloba na koimaima: “Mwasi oyo asalaka azali lokola na mposa ete . . . mwasi mosusu azala na ndako!”
Mokanda Évolution de la famille et des comportements aux États-Unis elobi ete wana basi bazali komipesa na kosukola bilamba, kobongisa ndako, kolamba mpe kobatela bana, “mibali mingi bazali kolekisa ntango na bango ‘kozanga kosala eloko.’” Bato na mayele oyo bakoyekolaka mimeseno ya bato balobi ete ezali likambo lizali komonana kati na mokili mobimba. Na Japon, emonanaka mingi ete mibali bazali kokutana bango na bango nsima ya mosala. Bazali koloba ete esengeli kosalema bongo soki balingi kozala na boyokani malamu na mosala. Nzokande, bazali kopesa nzela te na boyokani malamu yango kati na libota. Na makanisi ya mibali, basi mpe bana basengeli kosepela na boye ete bazali kokokisa bamposa na bango. Nzokande, lokola motuya ya basi oyo bazali kosala ezali se kokóla, likanisi wana ezali se mpo na koluka komilongisa.
Likambo mosusu ya monene oyo ezali koboma mabala ezali “mbongwana ya ezaleli ya bato” to engebene maloba ya Journal of Marriage and the Family, “kokwea ya boumeli ya bikanganeli ya libala.” Mpo na baoyo bazali kobala lelo oyo, ndai ya kala oyo ete “kino liwa ekokabola biso” ezali lisusu na ntina te. Moko na moko azali koluka mobalani ya malamu koleka. Soki ezali bobele wana nde makambo oyo babalani ya sika bazali kopesa motuya na libala na bango, yango ekoki kozala na makasi nini?
Mbongwana wana kati na bato ezali kokamwisa soko moke te bayekoli ya Biblia. Mokanda wana mopemamaki na Nzambe emonisi ete kobanda 1914, tozali kobika na “mikolo ya nsuka,” oyo ezali “ntango ya mpasi mpe ya mikakatano.” Bato bazali “balingi na bango moko, . . . bato bazangi botɔndi, bato bazangi bulee, bato bazangi bolingo, bazangi boboto.” (2 Timoté 3:1-3) Na yango, mpo na bato oyo bazali komilinga bango moko koleka babalani na bango, baoyo bazangi bulee mpe baoyo bazangi boboto kati na libala na bango, koboma libala ezali na miso na bango lokola nzela bobele moko mpo na kosilisa mikakatano ya libala.
Ebandeli ya bomoi ya esengo koleka?
Kati na makambo mingi, koboma libala epesaka esengo te.a Judith Wallerstein, ye moyekoli ya bizaleli ya bato, nsima na koyekola na boumeli ya mibu 15 bomoi ya mabala 60 oyo ekufaki, alobaki ete: “Koboma libala ezali ndoto mpamba. Na kolanda mibeko ya kosambisa, ezali bobele likambo moko, kasi mpo na oyo etali makanisi, ezali kolandana ya makambo ebele—mbala mosusu molongo molai mozangi nsuka—ya makambo, ya kotika ndako moko kokota na ndako mosusu, mpe ya mbongwana kati na boyokani.” Bolukiluki na ye emonisi ete, mibu zomi nsima ya koboma libala na bango, 25% ya basi mpe 20% ya mibali bazalaki naino na bomoi ya kotengatenga.
Bana nde baleki konyokwama. Kati na bolukiluki yango moko, Wallerstein amonaki ete pene na bana nyonso oyo batalelami na likambo yango, koboma libala ezali “kobimisa makambo ya mpasi mpe oyo bamizelaki na yango te.” Bana mosusu oyo bazali kosala makasi ete bapesa nzela na makanisi wana ya mabe te na ntina na koboma libala ya baboti na bango bazali komona mayoki yango kobima mbala moko na nsima, na ntango oyo balingi kobala.
Yango elingi koloba te ete moto oyo mobalani na ye aboyaki ye mpe babomaki libala akozala na esengo te ata ndenge nini. Ya solo, basusu bazali kozwa bolamu. Makambo wana mazali kobongola bango, kobotisáká mbala mingi bomoto ya sika longwa na bomoto ya kala. Na ndakisa, nsima wana mpasi ya koboma libala mpe makambo malandaka yango na nsima—mawa mpe komisosola eleki, mobalani oyo asalaki likambo te akomonana na nguya ya sika mpe na makasi mingi lisusu kati na bomoto na ye mobimba.
Mwasi moko oyo mobali na ye asundolaki ye mpo na kokamata mwasi mosusu alimboli ete nsima wana mawa mpe nkanda ebandi kokita, “ozali komiyoka kati na yo ete okómi lolenge mosusu. Mayoki na yo mabongwani. Okozala te lolenge ozalaki liboso.” Apesi toli oyo: “Kamata ntango ya koyeba lolenge ya sika ya moto oyo yo okómi. Ntango tobali, tolongolaka bilulela mpe bamposa na biso mpo na limemya epai na mosusu; nsima ya koboma libala, esengeli kokamata ntango mpo na koyeba bamposa mpe bilulela na yo. Soki okundi mayoki na yo, ozali kokunda yango naino ezali na bomoi. Mokolo mosusu, ekobima mpe ekosengela na yo kobunda na yango. Na bongo, ezali malamu kobundisa mayoki na yo sikawa.”
Lokola makambo na yango mingi ya mabe mayebani malamumalamu, koboma libala ebungisi elengi na yango. Zulunalo Time eyebisi ete mbala na mbala bapesi na toli bazali kolendisa mingi babalani oyo libala na bango ezali na kotengatenga ete: “Bazala esika moko.” David Elkind ya Université Tufts, akomaki ete: “Koboma libala, ezali mwa moke lokola kobukana likoló na lisano libengami ski. Likambo oyo ete ebele ya basani mosusu babukanaki mpe makolo, ezali kosilisa mpasi na yo te.”
Koboma libala ezali te nzela esengeli mpo na kosilisa mikakatano kati na libala. Na bongo, nzela malamu mpo na kosilisa mikakatano ya libala ezali nini?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Kokabwana to koboma libala oyo endimami na mibeko ekoki kopesa mwa libateli mpo na ye oyo azali kozwa minyoko makasi to mpo na ye oyo mobalani na ye aboyaki na nko kokokisa bamposa na ye.
[Elilingi na lokasa 16]
Mbala mingi babalani bazali kokoka lisusu kosolola te