Koboma libala—Likambo likutanisi Est mpe Ouest
Euti na mokomani na biso na Japon
“TIKA ngai mpe nazwa oyo na ngai pension.” Maloba oyo makamwisaki moto monene wana ya Japon oyo asengelaki kozwa pension na ye kati na kompanyi moko monene na makambo ya mombongo. Mwasi na ye alingaki koboma libala. Japon ezali sikawa kokutana na likambo ya koboma mabala mingi, oyo na lolenge ya kokamwa, ezali kosalema mingi kati na babalani oyo balekisi mibu ntuku minei. Na mibu 20 oyo miuti koleka, motuya ya mabala oyo mabomamaki ebakisamaki mbala misato epai na bato oyo bazalaki na mibu 50 kino 70. Makambo mazali kosalema lokola nde koboma libala ezali likambo lisengeli mpo na kozala na bomoi ya malamu.
Kati na bilenge babalani mosusu ya sika, kozangáká kozwa oyo bazalaki kolikya na yango, na basanza ya liboso ya libala na bango, bamoni malamu kosalela oyo babengi Narita rikon (koboma libala na Narita). Narita ezali nkombo ya libandá monene ya mpepo na Tokyo, mpe maloba wana mazali komonisa kokabwana ya mwasi na mobali nsima na kokóma na Narita, longwa na mobembo na bango ya libala. Ya solo, likambo yango ezali kosalema kati na bato ya bambula ekeseni, ezali kati na 20 mpe 25% ya babalani ba Japonais nde bazali koluka koboma libala. Koboma libala etalelami lokola nzela esengeli mpo na kozala na bomoi ya esengo koleka.
Ata na Hong-Kong, epai mimeseno ya bonkɔ́kɔ ya ba Chinois ekotela bato mingi, motuya ya mabala oyo mazali kobomama emataki koleka mbala mibale kati na 1981 mpe 1987. Na Singapour, ezala kati na bamizilmá to bato oyo bazali bamizilmá te, koboma libala emataki pene na 70% kati na 1980 mpe 1988.
Na kotalela likanisi oyo eyebani mingi, uta kala, basi ya Azia bazalaki na likambo ya koloba te. Mpo na yango, Japonais moko akokaki na ntango ya kala kolongola mwasi na ye kozanga nkáka. Mpo na kosala yango, asengelaki bobele kokoma mokanda ya koboma libala oyo ezalaki bobele na maloba “milongo misato na ndambo” mpe kopesa yango na mwasi na ye. Nzokande, basi bazalaki na mpasi mingi mpo na koboma libala, longola bobele soki bakimi na batempelo oyo ezalaki lokola ebombamelo mpo na bakími. Lokola bazalaki na makoki ya komisunga bango moko te, basi basengelaki kondima mabala oyo ezangi bolingo kati na yango, ata soki mibali na bango bazalaki kozwa basi mosusu ya libandá.
Lelo oyo, ebele ya mibali bazali komipesa mingi na misala kino bakómi kosundola mabota na bango. Bazali komona mabe moko te na komipesáká mobimba mpo na kompanyi na bango. Na komipesáká motindo wana na mosala, bazali kokokisa malamu bamposa ya kosolola ya basi na bango te mpe bazali kotalela bango lokola basaleli oyo bazali wana bobele mpo na kolamba, kokombola mpe kosukola ndako.
Nzokande, kopalangana ya makanisi ya bato ya mikili mya Mpoto ezali kobongola likanisi ya bato na Azia na ntina na libala mpe bomoi ya babalani. Zulunalo Asia Magazine, emonisi ete: “Kozanga kolobelama polele, ‘kosikwama’ ya mwasi nde ezali likambo ya liboso oyo epesi nzela na koboma mabala mingi na Azia.” Anthony Yeo, oyo azali mokambi ya centre de conseils et de soins na Singapour, alobaki ete: “Basi bandimisami mingi lelo oyo na ntina na bonsomi na bango mpe bazali koyeba malamu lokumu na bango. Ntango oyo bazalaki kofanda kozanga koloba likambo esili koleka! Basi ya ntango na biso bazali na makoki mingi mpe bazali kopesa nzela te ete bamonela bango to basalela bango makambo mabe. Nzokande, koboma libala ezali moko na makoki yango epai na basi oyo bakoki kozwa bolamu te kati na libala, mingimingi wana kobomama ya libala etalelami lisusu te lokola likambo ya nsoni mingi ndenge bazalaki kotalela yango esili koleka mibu 25.”
Mikili ya Mpótó mpe misalaki mbongwana monene na boumeli ya mibu ntuku mibale na mitano oyo miuti koleka ya ekeke oyo ya ntuku mibale. Samuel H. Preston alobelaki yango lokola “koningana makasi ya mabelé oyo eningisaki mabota ya Amerika na boumeli ya mibu 20 oyo miuti koleka.” Na 1985, pene na libota moko likoló na minei oyo ezalaki na bana ya mibu 18, ezalaki bobele na moboti moko. Ezaleli oyo epesi likambo wana nzela ezali bongo: koboma libala. Bazali kokanisa ete 60% ya bana oyo babotamaki na 1984 bakokoka kotikala bobele na mama to na tata liboso ete bakókisa mibu 18.
Lokola bikanganeli ya libala bizali kobeba, koboma libala ezali mpenza ebandeli ya bomoi moko ya esengo koleka? Mpo na koyanola na motuna oyo, totalela mpo na nini bato bazali kotalela koboma libala lokola mwango malamu mpo na kosilisa mikakatano ya libota.
[Etanda na lokasa 13]
Matomba mabe ya “koboma libala na nkuku”
NA MOTUYA ya mabala oyo mazali kobomama na miso ya Leta, esengeli mpe kobakisa oyo ezali kokufa bobele na miso ya mwasi na mobali, kasi bazali naino bobele kofanda ndako moko. Na Japon, epai bomoi na basi mingi esimbami naino na mibali na bango na kotalela makambo ya mbongo mpe bazali naino na momeseno makasi ya koyangelama na mibali, babalani basengisami kofanda na ndako moko engebene oyo bazali kobenga “koboma libala na nkuku.” Basi oyo bazali na ezalela motindo wana, bazali kopesa makasi na bango nyonso mpo na koteya bana na bango. Bamama wana mbala mingi bazali kobatela bango na kolekisa ndelo; yango ezali kosala ete na nsima, bana bazali na mpasi na komitambwisa bango moko wana bakómi mikóló.
Litomba mabe na yango ezali ete ntango bana mibali ya bamama wana bakóli mpe babali, mingi kati na bango balingaka te ete basi na bango basimba bango na nzoto. Bazali na likoki te ya komonisa bolingo epai na basi na bango, ata na boumeli ya bambula mingi ya libala, bazali komona mpasi na ntina na bolingo makasi oyo bazali na yango mpo na bamama na bango. Basili kobala, mbala mingi ezali bobele mpo ete bamama na bango bayebisaki ete babala. Kati na zulunalo Asahi Evening News, monganga Yasushi Narabayashi, mopesi na toli na makambo ya libala, amonisaki ete likambo wana lizali komonana mingi uta mibu zomi mpe ete bankóto na mibali bazali kobanga kosenga lisalisi mpo ete bazali koyoka nsoni.