Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g93 Octobre nk. 21-23
  • Matomba ya mabɛlɛ ya mama

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Matomba ya mabɛlɛ ya mama
  • Lamuká!—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bilei malamu oyo eleki bilei nyonso
  • Mabɛlɛ ya mama ezali kobikisa bana
  • Matomba mpo na mama
  • Komelisa mabɛlɛ to komelisa yango te?
  • Konúngisa Bana: Mateya ya ebandeli
    Lamuká!—1994
  • Bamama oyo bazali na sida bayebi te básala nini
    Lamuká!—2000
  • Miliki ya mabɛlɛ ya mama
    Ebimá kaka yango moko?
  • Oyo bana bazalaka na yango mposa mpe balingaka
    Lamuká!—2004
Lamuká!—1993
g93 Octobre nk. 21-23

Matomba ya mabɛlɛ ya mama

Euti na mokomani na biso na Nigéria

KANISA bilei ya bébé oyo ezali kitoko mpe mpasi te na kongumbwana, oyo ezali kokokisa bamposa nyonso mpo na bokóli ya bana. Bilei oyo ekozala “nkisi ya kokamwa” oyo ezali kobatela mpe kosilisa bamaladi. Bilei oyo ezali na ntalo te mpe oyo ezali mpasi te na kozwa bipai nyonso na mokili.

Ozali koloba ete yango ekoki kozwama te? Bilei motindo wana ezali, kasi esalemi na maboko ya bato te. Tolingi nde kolobela mabɛlɛ ya mama.

Na boumeli ya lisoló na bato, bilei wana ya kokamwa etalelamaki ete ezali na ntina mingi mpo na bana. Na ndakisa, Biblia ezali koyebisa biso ete ntango mwana ya mwasi ya Farao amonaki Moize oyo azalaki naino bébé, atindaki ndeko na ye ya mwasi ete akenda koluka “monungisi” mpo na komelisa ye. (Exode 2:5-9) Na nsima, epai na Bagreke mpe Baloma, ezalaki kosalema ete banungisi oyo bazali mpenza na nzoto kolongono bazalaki kokamatama mpo na komelisa bana oyo baboti na bango bazalaki bazwi. Nzokande, na boumeli ya bambula mingi oyo euti koleka, ezalela ya komelisa bana mabɛlɛ ya mama esilaki kokita, mingimingi na ntina na piblisité oyo ezali kondimisa bato ete miliki oyo bazali kosala na bakompanyi eleki mabɛlɛ ya mama na kitoko. Lelo oyo, ezaleli wana ezali kobongwana, bamama bazali komona ete “komelisa mwana mabɛlɛ eleki malamu.”

Bilei malamu oyo eleki bilei nyonso

Bato na sianse basili komona myango ya malamu koleka oyo ya Mozalisi mpo na oyo etali komelisa bana? Soko moke te. UNICEF (Ebongiseli ya O.N.U. mpo na kotalela makambo ya bana) elobi ete: “Bobele mabɛlɛ ya mama nde ezali bilei malamu oyo eleki bilei nyonso mpe bimeli malamu oyo eleki bimeli nyonso mpo na bébé na basanza minei kino motoba ya liboso ya bomoi na ye.” Ezali na ba protéines, bilei bizali kopesa nzela na bokóli, mafuta, hydrates de carbone, enzymes, vitamines, biloko oyo bizali na ntina mpo na kolongono ya nzoto mpo na bokóli ya mwana na boumeli ya basanza ya liboso ya bomoi na ye.

Mabɛlɛ ya mama ezali te bobele bilei oyo ebongi koleka bilei nyonso mpo na ba bébés oyo bauti kobotama sika, kasi lisusu motindo bobele moko ya bilei oyo bazali mpenza na yango mposa. Assemblée mondiale de la santé oyo esalemaki na sanza ya Mai 1992, endimaki ete “na boumeli ya basanza minei ya liboso kino sanza motoba ya bomoi ezali na bilei moko te soko mpe bimeli moko te, longola bobele mabɛlɛ ya mama, oyo ezali na ntina mpo na bokóli malamu ya mwana.” Mabɛlɛ ya mama ezali na mai mingi mpo na kosilisa mposa ya mai epai ya mwana ata na bileko ya molungé makasi. Ba biberons oyo esalemi na mai to na bimeli oyo esalemi na sukali, longola likambo oyo ete ezali na ntina te, ekoki mpe kopusa bébé na koboya mpo na libela mabɛlɛ ya mama, mpamba te ba bébés mbala mingi balingaka biberon mpo ete kosalelama na yango ezali mpasi te. Ya solo, nsima na mwa basanza ya liboso ya bomoi, bilei mosusu mpe bimeli mosusu bikobakisama mokemoke na bilei ya bébé.

Kati na bilei oyo bazali kosalela na esika ya mabɛlɛ, ezali na moko te oyo, na lolenge losengeli, ezali na biloko oyo bizali kopesa nzela na bokóli mpe bokɔmɛli malamu ya bana. Mokanda Santé et reproduction: des questions d’intérêt mondial (na Lingelesi) elobi ete: “Komeka kokitanya biloko mosusu na esika ya mabɛlɛ ya mama ezali kolónga te. Makambo makomami na ntina na bilei ya bana mazali na bilembeteli mingi oyo bimonisi ete bana oyo bamelisami mabɛlɛ ya bamama na bango te bazali na likámá mingi ya kozwa bamaladi mpe kozanga kolongono malamu koleka bana oyo bamelisamaki mabɛlɛ ya bamama na bango.”

Mabɛlɛ ya mama ezali kobikisa bana

Engebene O.M.S. (Lisangá ya mokili mobimba mpo na makambo matali kolongono ya nzoto), bamilió ya bana oyo bazali kokufa na mokili mobimba bakoki kobatelama mbula na mbula soki bamama nyonso bazalaki koleisa bana na bango bilei mosusu te, kasi komelisa bango bobele mabɛlɛ na boumeli ya basanza minei kino motoba nsima ya kobotama. Rapport ya UNICEF (Ezalela ya bana kati na mokili 1992) elobi ete: “Bana oyo bazali komela biberon na mikili ya bobóla bazali na likámá mbala 15 na kokufa na maladi ya pulupulu mpe mbala 4 kokufa na maladi ya mpema koleka baoyo bazali komela bobele mabɛlɛ ya bamama na bango.”

Mpo na nini bongo? Moko na bantina ezali ete miliki ya putulu, longola likambo oyo ete ezali mpenza na ntina mingi te koleka mabɛlɛ ya mama, mbala mingi esangisamaka na mai ya mbindo mpe etyamaka na milangi oyo esukwami malamu te mpo na koboma bamikrobe. Na bongo milangi oyo etyami miliki ekoki kozwa bamikrobe oyo ezali kopesa maladi ya pulupulu mpe mpasi ya mpema, oyo ezali koboma mingi bana na mikili ya bobóla. Na bokeseni, miliki oyo ezali kobima na mabɛlɛ ya mama ezalaka mpasi mpo ete ezwa bamikrobe, esengaka ete balamba yango te, mpe ezali na mposa ya kosangisama mingi na mai te.

Ntina ya mibale oyo esali ete mabɛlɛ ya mama ezala na likoki ya kobikisa bana ezali ete yango ezali na biloko bikobatelaka nzoto (anticorps), oyo ezali kobatela mwana liboso ya bamaladi. Ata ntango maladi ya pulupulu to maladi mosusu ebimi, mbala mingi ezalaka na likámá mingi te mpe ezalaka mpasi mingi te mpo na kosalisa yango epai na bana oyo bazali komela mabɛlɛ ya bamama na bango. Bolukiluki ezali mpe komonisa ete bana oyo bazali komela mabɛlɛ ya bamama na bango bazwamaka mingi te na bokono ya mino, na cancer, na maladi ya sukali mpe na mikosa. Lisusu, na ntina na milende oyo esengeli mpo na kobenda mabɛlɛ, komela mabɛlɛ ya mama ekoki kopesa nzela na bokóli malamu ya mikuwa mpe ya misisa ya elongi ya mwana.

Matomba mpo na mama

Komelisa mwana mabɛlɛ ezali na litomba bobele epai na mwana te, kasi mpe epai na mama. Ya liboso, ntango mwana azali kobenda mabɛlɛ ya mama, ezali kopesa nzela na hormone oxytocine ete ekoka kosalema, oyo longola likambo oyo ete ezali kosala mpe kobimisa mabɛlɛ, ezali mpe kosala ete matrice ekangama. Ntango matrice ekangami nokinoki nsima na kobotama ya mwana, makila makobima ntango molai mingi te. Komelisa mwana mabɛlɛ ya mama ezali mpe kosala ete mama azwa zemi noki te mpe amona sanza noki te. Yango ezali koumelisa kozwa zemi oyo ekolanda. Kolekisa mbula mingi liboso ya kozwa zemi mosusu ezali kopesa nzela ete mama mpe bana bazala na nzoto kolongono.

Litomba mosusu ya monene na komelisa bana mabɛlɛ ezali ete yango ezali kokitisa likámá ya kozwa cancer na eboteli ya mama to na mabɛlɛ. Bato na mayele mosusu bazali koloba ete likámá ya kozwa cancer ya mabɛlɛ epai ya mwasi oyo azali komelisa mwana ezali mingi te soki tokokisi yango na oyo ezali kozwama na basi oyo bazali komelisa.

Boyokani ya bolingo oyo ezali kati na mama mpe mwana ezali litomba mosusu oyo tosengeli kobosana yango te. Mpo ete yango esuki te bobele na kopesa bilei, kasi lisusu kosolola, kosimbana na nzoto, mpe kopesana mɔ́tɔ ya nzoto, komelisa mwana mabɛlɛ ekoki kosalisa na kosala boyokani makasi kati na mama mpe mwana mpe kopesa nzela na bokóli ya mayoki mpe ya bomoto ya mwana.

Komelisa mabɛlɛ to komelisa yango te?

Pene na bamama nyonso bazali na likoki na nzoto na bango na kopesa mabɛlɛ mingi mpo na bana na bango soki masengami mosusu makokisami. Komelisa mwana mabɛlɛ esengeli kobanda nokinoki nsima na kobotama ya mwana, na ngonga oyo elandi nsima na kobota. (Mabɛlɛ ya liboso, ya langi mosaka oyo babengi colostrum, ezali malamu mingi mpo na bana mpe ezali kobatela bango na bamaladi.) Na nsima, bana basengeli komela engebene mposa na bango, ata na butu, kasi engebene ebongiseli moko makasi te. Komema to kolalisa mwana na lolenge malamu ntango azali komela mabɛlɛ ezali lisusu na ntina mingi. Mpo na likambo oyo okoki koluka toli epai na moto oyo azali na eksperianse mingi.

Ya solo, ezala ete mama azwi ekateli ya komelisa mwana mabɛlɛ to aboyi komelisa ye, likambo yango etaleli te bobele kolongono ya nzoto. Ezalela ya bana kati na mokili 1992 eyebisi ete: “Bamama bazali na mposa ya lisungi ya minganga soki balingi kopesa bana na bango ebandeli moko malamu; kasi soki balingi kolanda komelisa bana na bango mabɛlɛ nsima na bozongi na ndako, bakozala mpe na mposa ya lisungi ya ba patrons na misala, ya ba syndicats, ya bato na mboka​—mpe ya mibali.”

[Etanda na lokasa 22]

Komelisa bana mabɛlɛ kati na mikili ya bobóla

1. Mabɛlɛ ya mama yango moko ezali bilei malamu oyo eleki bilei nyonso mpe bimeli malamu oyo eleki bimeli nyonso mpo na bébé na boumeli ya basanza minei kino motoba ya liboso ya bomoi.

2. Mwana asengeli komela mabɛlɛ nokinoki nsima na kobotama. Na lolenge esengeli, mama moko na moko akoki komelisa bébé na ye.

3. Mpo ete mama azala na mabɛlɛ mingi, bébé asengeli komela mbala mingi.

4. Komelisa bana miliki ekoki kobimisa bamaladi makasi mpe ata komema kufa.

5. Mama asengeli komelisa mwana na ye kino ata koleka mbula moko to mbula mibale soki likoki ezali.

Eutelo: Savoir pour sauver, ebimisami na UNICEF, O.M.S. mpe UNESCO.

[Etanda na lokasa 23]

Komelisa mabɛlɛ mpe SIDA

Na nsuka ya Avril 1992, O.M.S. mpe UNICEF bayanganisaki etuluku ya bato na mayele ya mikili mingi mpo na kolobela boyokani bozali kati na SIDA mpe komelisa bana mabɛlɛ. Ntina ya likita wana elimbolamaki na monganga Michael Merson, mokambi ya ebongiseli ya mokili mobimba ya O.M.S. mpo na kobundisa SIDA. Alobaki ete: “Komelisa mwana mabɛlɛ ezali likambo ya ntina mpo na lobiko ya mwana. Esengeli totalela likámá oyo bébé azali na yango ya kokufa na SIDA mpo ete azali komela mabɛlɛ mpe likámá oyo azali na yango ya kokufa na bantina mosusu mpo ete azali komela mabɛlɛ te.”

Engebene O.M.S., soko ndambo moko na misato ya ba bébés oyo babotami na bamama oyo bazali na virus ya SIDA, bango mpe bakómaka na SIDA. Atako kopesama ya maladi longwa na mama kino na mwana esalemaka mbala mingi na ntango ya zemi to na ntango ya kobota, ezali mpe na bilembeteli bimonisi ete yango ekoki mpe kosalema na ntango ya komelisa mwana. Atako bongo, O.M.S. elobi ete: “Mingi kati na bana oyo bazali komela mabɛlɛ ya bamama na bango oyo bazali na virus ya SIDA bazali kozwa virus yango te na komeláká mabɛlɛ.”

Yango wana, etuluku wana ya bato ya mayele bakómaki na bosukisi oyo: “Epai kuna bamaladi oyo epesamaka na nzela ya mikrobe mpe kozanga kolya malamu ezali bantina ya liboso oyo ezali koboma bana mpe epai kuna bana mingi bazali kokufa, tosengeli ntango nyonso kopesa toli na basi oyo bazali na zemi ete bamelisa bana na bango mabɛlɛ, ezala mpe basi oyo bazali na virus ya SIDA. Ezali bongo mpamba te likámá ya bana na bango ya kozwa virus ya SIDA lokola bazali komela mabɛlɛ ezali moke soki tokokisi yango na likámá ya kokufa mpo na bantina mosusu soki bazali komela mabɛlɛ te.

“Nzokande, kati na bisika epai bamaladi oyo epesamaka na bamikrobe ezali ntina ya liboso te ya kufa ya bana mike mpe epai motuya ya bana oyo bazali kokufa ezali moke, tosengeli . . . kopesa toli epai na basi oyo bazali na zemi mpe bayebi ete bazali na virus ya SIDA, baleisa bébé na biloko mosusu kasi na mabɛlɛ ya mama te.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto