Bamama oyo bazali na sida bayebi te básala nini
MWASI moko ya bisanga ya Antilles, nkombo na ye Cynthia,a asengelaki kopona soki akobanda komelisa mwana na ye mabɛlɛ to akomelisa ye biberɔ. Okoki kokanisa ete ezali mpasi te mpo na kozwa ekateli yango. Kutu, esili koleka bambula ebele, bato ya mayele oyo batalelaka bokolɔngɔnɔ ya nzoto bakumisaka mabɛlɛ ya mama mpo ezali “bilei” ya bana mike “oyo eleki malamu.” Lisusu, na bamboka ya bobola, bana oyo bamelaka biberɔ bazali na likama monene ya kokufa na pulupulu koleka bana oyo bamelaka mabɛlɛ. Yango wana, UNICEF (Lisangá ya ONU mpo na kosunga bana) emonisi ete bana soki 4 000 bakufaka mokolo na mokolo mpo bamelaka biberɔ na esika ya komela mabɛlɛ.
Nzokande, mpo na Cynthia, kopona komelisa mwana na ye mabɛlɛ ezalaki mpe na likama mosusu. Mobali na ye apesaki ye sida. Nsima ya kobota, bayebisaki Cynthia ete mwana moko kati na bana nsambo oyo bamama na bango bazali na sida, azali na likama ya kozwa maladi yango soki azali komela mabɛlɛ ya mama na ye.b Yango wana, asengelaki kopona, kasi ezalaki mpasi: andima ete mwana na ye azwa sida ntango azali komela mabɛlɛ to andima ete mwana azwa bamaladi oyo euti na biberɔ.
Na mikili oyo sida epalangani mingi, kati na basi 10 oyo bazali na zemi, basi 2 to 3 bazali na sida. Na ekólo moko, soki otángi basi nyonso oyo basalisaki ekzamɛ na lopitalo, koleka basi 50 likoló na monkama bazalaki na mikrobe ya sida. Radio ya ONU elobi ete: “Lokola motángo ya bato oyo bazali na sida ezali se kokola, yango etindi bato ya siansi básala na lombango mpenza mpo na kozwa nkisi na yango.” Mpo na kobundisa maladi yango, masangá motoba ya ONU esangisaki makanisi na yango, milende na yango mpe mbongo na yango mpo na kosala lisangá babengi Programme commun coparrainé des Nations unies sur le VIH/sida, na mokuse ONUSIDA.c Kasi, ONUSIDA emoni ete ezali pɛtɛɛ te kosilisa sida.
Mikakatano minene mpo na kosilisa sida
Edith White, ye ayebi malamu makambo ya komelisa bana mabɛlɛ mpe ndenge bamama bapesaka bana sida, alobi ete, na mikili ya bozwi, bato oyo batalelaka bokolɔngɔnɔ ya nzoto bazali kopesa basi oyo bazali na sida toli ete bámelisaka bana na bango mabɛlɛ te mpo yango ezali kobakisa likama ya kolekisa mikrobe epai ya mwana. Emonani ete ebongi kosalela miliki ya ngɔmbɛ. Kasi ezali mpasi kosalela likanisi ya pɛtɛɛ oyo na mikili ya bobola, kuna mpasi ezali kozwa esika ya makanisi malamu.
Mokakatano mosusu mpe ezali. Na mikili oyo bazali na momeseno ya komelisa mwana mabɛlɛ, basi oyo bapesaka bana na bango biberɔ, bazali komifunda ete bazali na sida. Mwasi akoki kobanga ete bakotombokela ye, to bakosundola ye to kutu bakobɛta ye, soki bayebi ete azali na sida. Mpo na makambo oyo nyonso, basi mosusu bamonaka eloko mosusu ya kosala te, bamelisaka kaka bana na bango mabɛlɛ mpo bato mosusu báyeba te ete bazali na sida.
Ezali mpe na mikakatano mosusu. Talá na ndakisa, Margaret, ye azali na mbula 20. Soki ozwi basi 100 ya bamboka ya zamba ya Ouganda, basi 95 kati na bango basalisá naino ekzamɛ ya sida te, mpe Margaret azali kati na basi yango. Kasi Margaret azali mpenza komitungisa. Mwana na ye ya liboso akufaki mpe oyo ya mibale alɛmbilɛmbi mpe azali na nzoto malamu te. Atako akoki kozala na sida, Margaret amelisaka mwana na ye mabɛlɛ mbala zomi na mokolo. Alobi ete: “Nakokoka komelisa mwana na ngai miliki ya ngɔmbɛ te.” Mpo na nini? Margaret alobi ete, na mboka na ye, mpo na komelisa mwana miliki ya ngɔmbɛ, esengeli kozwa mbongo oyo libota moko ezwaka na mbula mobimba mbala moko na ndambo. Ata soki miliki ya ngɔmbɛ ezalaki ofele, elingaki kaka kozala mpasi mpo na kozwa mai ya pɛto ya kosangisa na miliki yango mpe kosala bilei oyo ezangi mikrobe mpo na mwana.d
Mikakatano mosusu ekoki kosila soki basalisi bamama oyo bazali na sida ete bázala na bopɛto, bázwaka miliki ya ngɔmbɛ oyo basengeli na yango mpe bázala na mai ya pɛto. Yango ekosɛnga mbongo mingi? Ntango mosusu. Kasi, likambo ya kokamwa ezali ete kozwa bibongiseli oyo, ezali mpenza likambo ya mbongo te kasi etali mingimingi nde makambo nini bozali kotya na esika ya liboso. Ya solo, ONU emonisi na lapolo na yango ete mbongo oyo mikili ya bobola esalelaka mpo na kosomba bibundeli ya basoda eleki mbongo oyo basalelaka mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto mpe kelasi mbala mibale.
Tokoloba nini mpo na bankisi ya sida?
Bato ya siansi na ONU balobi ete mwa nkisi babengi AZT, oyo ezali na ntalo mingi te, ekoki kokitisa mwa moke likama ya bamama ya kopesa bana sida. Na lisalisi ya ONUSIDA, bakitisaki ntalo ya nkisi yango tii na dolare 50. Lisusu, na sanza ya Yuli 1999, bato oyo bayekolaka maladi ya sida balobaki ete, mpo na kobatela bana ete bázwa mikrobe ya sida te, emonani ete kosalisa bamama oyo bazali na sida mpe bana na bango na nkisi babengi névirapine, oyo ntalo na yango ezali dolare 3 mpamba, ezali malamu koleka AZT. Bato ya mayele na makambo ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto balobi ete na mbula moko, névirapine ekoki kobatela bana pene na 400 000 mpo bázwa sida te na ebandeli ya bomoi na bango.
Nzokande, bato mosusu bazali kosepela te na bankisi yango mpe bazali koloba ete lokola bankisi yango ezali kaka kobatela mwana ete azwa sida te, nsukansuka, mama akokufa na sida mpe mwana akotikala etike. ONU ezongisi maloba mpe emonisi ete soki basaleli bankisi wana te, ekozala mawa mpenza kotika bana mike bázwa sida mpe kotika bango, bato oyo bayebi eloko moko te, ete bákufa liwa ya mpasi mpe ya mawa. Bamonisi lisusu ete bamama oyo bazali na sida bakoki koumela bambula mingi na bomoi. Na ndakisa Cynthia, oyo tolobelaki na ebandeli, ayaki koyeba ete azwaki sida na 1985, ntango mwana na ye abotamaki, kasi ayaki kokóma na maladi mbula mwambe na nsima. Lisusu, atako mwana na ye abotamaki na sida, ntango akokisaki mbula mibale maladi yango esilaki.
Biblia ezali kolendisa biso ete na mikolo ezali koya tokozala na libateli na mokili mpe bamaladi lokola sida ekosila mpo na libela. (Emoniseli 21:1-4) Yehova Nzambe alaki mokili ya sika esika “mofandi moko akoloba te ete, nazali na maladi.” (Yisaya 33:24) Batatoli ya Yehova bakosepela koyebisa yo ndenge mpasi ekosila mpo na libela. Soki olingi koyeba makambo mosusu mingi, komelá babimisi ya zulunalo oyo to kutaná na Batatoli ya Yehova na esika ofandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi ye nkombo mosusu.
b UNICEF emonisi ete mokolo na mokolo, bana soki 500 to 700 bazwaka sida na mabɛlɛ ya bamama na bango oyo bazali na sida.
c Masangá yango motoba ezali: UNICEF, PNUD, FNUAP, OMS, Banque mondiale mpe UNESCO. ONUSIDA esalemaki na 1995.
d Bolukiluki oyo bato basali na bambula eleki emonisi ete kopesa mwana miliki ya ngɔmbɛ mpe komelisa ye lisusu mabɛlɛ ekoki kotya ye na likama ya kozwa sida, mpe emonisi lisusu ete mabɛlɛ ya mama ezali na biloko oyo esalisaka mpo na kolɛmbisa mikrobe ya sida. Soki likanisi oyo ezali solo, kopona komelisa mwana mabɛlɛ, ata soki ezali na likama, ezali mpenza kobatela mwana. Nzokande, esengeli kozela naino mpo na koyeba soki likanisi ya bato ya siansi oyo bazali kosala bolukiluki yango ezali mpenza solo.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 18]
OMS/E. Hooper