Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g94 Janvier nk. 23-25
  • Mpo na nini nazali kokóla mbángumbángu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini nazali kokóla mbángumbángu?
  • Lamuká!—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Malamu mpe mabe ya kozala molai
  • ‘Bazali kokanisa ete nazali na mbula mingi’
  • Kotungisama na mposa ya kosangisa nzoto
  • Nazali kokóla malamu?
    Lamuká!—1993
  • Kosalisa mwana na eleko oyo abandi kokóma mwasi to mobali
    Lamuká!—2016
  • Mpo na nini nzoto na ngai ekómi boye?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Nasala nini mpo nalonga mitungisi ya bolenge?
    Mituna oyo bilenge batunaka
Makambo mosusu
Lamuká!—1994
g94 Janvier nk. 23-25

Mituna oyo bilenge batunaka . . .

Mpo na nini nazali kokóla mbángumbángu?

“Ntango nazalaki na kelasi ya motoba, nazalaki molai mingi koleka baninga nyonso. Ezalaki nsoni mingi. Nazalaki na moninga moko ya mokuse mingi mpe nazalaki kolula ye.​—Annie.

“Lokola batalelaka ngai ete nazali na mibu 16 to 17, bato mingi, kati na bango baboti na ngai mpe, bazalaki komizela ete nasala makambo lokola moto akɔmeli mpenza.”​—Tania, mibu 12.

EBANDELI YA BOLENGE. Mingi kati na baoyo basilaki koleka yango bakosepela mpenzampenza kobosana eleko wana ya bomoi na bango, oyo mpo na koloba solo ezali eleko kitoko kasi mpe ya kobangisa. Ebandeli ya bolenge emonanaka na mbongwana ya nokinoki ya kokamwisa mpe mbala mosusu oyo etungisaka mingi kati na nzoto, mpe na kobima ya mayoki, ya bopusi mpe ya bamposa ya sika mpe ya nguya. Mingi kati na bilenge bamibondisaka na ntango bazali komona makambo motindo moko epai na baninga na bango. Kasi, epai na basusu, emonani ete eleko ya ebandeli ya bolenge ekómaka nokinoki. Bazali kokóma monene mingi to molai mingi, bazali kokóla mingi mpe bazali komonana mikóló mingi koleka bilenge ya mbula na bango.

Soki yango ezali boye mpo na yo, mbala mosusu okolendisama na koyeba ete bokóli ya mbángumbángu ezali likambo ya mabe te. Moto na moto azali na ngonga kati na nzoto na ye oyo ekobetaka lolenge moko te. Ekoki kozala ete oyo ya yo ebetaka mwa mbángu koleka oyo ya baninga na yo. Ebandeli ya bolenge ekoki kobanda uta na mibu 10 epai na bana mibali mpe na mibu mwambe epai na bana basi. Ata ndɛlɛ, ekozala mpe ngala ya baninga na yo. Na kozeláká, ozali mbala mosusu kokutana na mwa mikakatano.

Malamu mpe mabe ya kozala molai

Elenge mwasi moko alobaki na Lamuká! ete: “Nalingaka nazala moto oyo aleki molai kati na kelasi boye basusu bakopesa ngai limemya. Bolukiluki emonisi mpenzampenza ete bana mibali oyo bakólaka mbángumbángu bazali kozwa matomba malamu mingi koleka basusu. Kati na búku na bango Adolescent Development (Bokóli ya bilenge), Barbara mpe Philip Newman bakomi ete: “Bana mibali oyo bazali kokóla mbángumbángu bazali milai mingi mpe makasi mingi koleka baninga oyo bazali na bango mbula moko. . . . Bana mibali oyo bazali milai mpe makasi bazwaka mabaku mpenza ya kopesamela mikumba, ya kotalelama lokola batambwisi ya baninga na bango, na kotalelama lokola nde baleki na mayele na kotalela nzoto na bango.”

Ezali solo ete kozala molai mingi koleka mbula na yo ebimisaka mikakatano. Na ndakisa, mokakatano ya kokóma moto oyo bazali kosɛka mbala na mbala epai na baninga na yo ya kelasi. Elenge mwasi moko alobaki na Lamuká! ete: “Nazalaki moto oyo alekaki molai mingi kati na kelasi. Bazalaki kobénga ngai ‘makolo milai.’” Damien azali komikundola ete: “Basusu bazalaki kopesa ngai nkombo ya ndeke oyo babéngi ‘nkɔngí,’ to cigogne. Mbala mosusu bazalaki kotuna ngai ete: ‘Tokómi ngonga nini kuna na likoló?’”a

Eleko moko ya mpasi mingi ezali oyo moto azali kokóma na binama ya molai koleka kati na nzoto na ye. (Kokanisá na Baefese 4:16.) “Moto ya molai mpe akɔnda oyo azangi makoki”: talá lolenge oyo Christine azali komitalela. Damien azali komikundola lisusu ete: “Na masano, ezalaki mawa mpenza. Nazalaki komona lokola ete mitindá mizalaki kouta na bɔɔngɔ́ na ngai, kasi mizalaki kokóma na binama na ngai bobele poso moko na nsima. Nazalaki lokola dikálá (girafe) oyo abuti likoló na libaya moko oyo ezali na bapinɛ́ na nsé.” Atako bongo, zalá na elikya ete eleko wana ya mpasi ekómelaka moto nyonso. Nsima na bambula ekoleka na yango. Nzokande, okomona ete mwa ‘kokembisa nzoto ezali na litomba.’ (1 Timoté 4:8, NW) Soki okosalela nzoto na yo malamu, binama ya nzoto na yo mobimba bikosala na boyokani malamu.

Ezaleli na yo esengeli kozala nini liboso ya masɛki mpe mafinga? Mposa ekoki kozala ya kozongisa mabe na mabe na likambo moko oyo lipesi yo mpasi kati na motema, kasi Biblia epesi toli oyo ete: “Jongisela joba kobila ebɛbɛ na ye tɛ, ete yɔ mɔkɔ ojala lokola na ye tɛ.” (Masese 26:4) Lisusu, ‘kozongisa mabe mpo na mabe’ ezali bobele koyeisa likambo ndóngó. (Baloma 12:17) Lokola Biblia ezali kokundola yango, ezali na “ntango mpo na koseka.” (Mosakoli 3:4) Koyeba kosala masɛki ekosalisa yo kati na mikakatano mingi.b

‘Bazali kokanisa ete nazali na mbula mingi’

Ntango mosusu ezali baninga na yo te nde bazali kobimisela yo mikakatano, kasi mikóló, oyo bazali kokanisa ete ozali na mbula mingi, nzokande ezali bongo te. Damien azali komikundola lisusu ete, kati na etuluku, ezalaki bobele ngai nde bazalaki kotalela lokola mokonzi, motambwisi ya basusu. Mokolo moko, nazalaki penepene na etuluku moko ya bilenge oyo babandaki kobwaka biloko longwa na likoló ya gbagba. Bapolisi bayaki mpe babandaki kopamela ngai mpo ete nazalaki molai koleka basusu, nzokande nayebaki likambo oyo lisalemaki te.”

Basusu basepelaka ete bátalela bango lokola mikóló. Mokakatano mozali ete, bokeseni bokoki kozala kati na bokóli ya nzoto mpe bokóli ya makanisi mpe ya mayoki. Atako okóli na nzoto na yo, ozali naino kokanisa to mpe kososola lokola mokóló te, kasi lokola bato ya mbula na yo. (Kokanisá na 1 Bakolinti 13:11.) Yango wana, ntango bazali kosɛnga yo ete omitambwisa lokola mokóló, mbala mosusu ozali na mpasi mpo ete okokisa lisɛngi yango.

Soki ezali bongo, ekozala malamu ete, na bantango mosusu, oyebisa na boboto nyonso epai na baninga na yo mpe na basangani ya libota na yo ete ozali mpenza mokóló te ndenge bazali kokanisa yango. Masese 15:22 elobi ete: “Miango ikokufa wana bato na toli bajangi, nde ikolonga wana bamɔnisi bayei mingi.” Na bongo, soki omoni ete baboti na yo bazali kosɛnga yo makambo mingi, lobelá bango likambo yango na limemya nyonso. Zulunalo moko oyo elobelaka makambo matali bilenge emonisi makambo oyo okoki koloba: “Nayebi ete, lokola nazali komonana ete nakɔmeli, bozali kozela epai na ngai ete namitambwisa lokola mokóló. Kasi esengeli bóyeba ete na kati nazali bobele na mbula na ngai mpe yango wana mbala mosusu nazalaka na nkaká mpo na kokokisa makambo oyo bozali komizela ete nasala yango.”

Na bongo, komikosa te na komimonisa ete osili kokóla na komekoláká etelemelo ya mikóló, to na kolatáká milato to na kokatisáká nsuki oyo ebongi te mpo na bato ya mbula na yo. Bilenge mosusu oyo bakólaka mbángumbángu bakómaka kino kotika baninga na bango ya bomwana, oyo bamonani ete bazali mpenza bilenge mpo na kosala boninga elongo na bato oyo baleki bango na mbula. Atako bongo, ye oyo azali komeka kobomba bomoto na ye ya solo azali na likámá ya koyokisama nsoni. (Kokanisá na Nzembo 26:4.) Na nsima ya mikolo, komikumisa na ye ekoyebana polele. Biblia elobi na solo nyonso ete “bwanya ezali epai na basɔkɛmi.” (Masese 11:2, NW; Mika 6:8) Mpe moto oyo azali mosɔkɛmi ayebaka bandelo na ye.

Kotungisama na mposa ya kosangisa nzoto

Kozala na ezaleli ya kosɔkɛma ekoki mpe kobatela yo liboso na mokakatano moko oyo bilenge bakólaka mbángumbángu na nzoto, mingimingi bilenge basi, bakutanaka na yango: kotungisama na mposa ya kosangisa nzoto. Na mwa ntango moke, nzoto ya mwana mwasi moke ekoki kobongwana nokinoki na oyo ya elenge mwasi moko kitoko. (Kokanisá na Loyembo na Salomo 8:8, 10.) Nzokande, mpo na basusu kozala na ntólo mpe na loketo ya mwasi mokóló etungisaka mingi.

Mokomi Ruth Bell apesi likanisi oyo ete: “Bilenge basi oyo bazali kokóla noki babendaka mingi likebi ya bana mibali.” Denise, oyo azali na mibu 12, alobi ete: “Uta nabandi kokɔmela na nzoto, bato mingi bazali kotyela ngai miso na nzela.” (Changing Bodies, Changing Lives [Mbongwana ya nzoto, mbongwana ya bomoi]). Kopusamáká na elimo ya koluka koyeba makambo mingi, baninga ya kelasi, ezala basi to mibali, bakoki kolengolama na komonisa bikéla oyo bilongobani te. Na bongo ezali likambo na kokamwa te na kotánga kati na búku Adolescent Development (Bokóli ya bilenge) ete “bana basi oyo bakólaka mbángumbángu bakómaka na momeseno ya kosala makambo na kotatabana, balataka mimpila ya minene to mpe bakómaka nsoninsoni mpe bazalaka bango moko mpo na kobomba mbongwana ya nzoto na bango epai na baninga na bango.

Kozanga ete okóma kino komibomba na kolatáká bilamba mingi, makanisi mabongi masɛngi yo ete oboya kolata bilamba mpe kokatisa nsuki oyo ezali kobenda likebi likoló na yo. Ezali yango nde Biblia ezali kosɛnga na biso, wana elobi yango ete ‘tómilatisa na kosɔkɛma mpe na makanisi mabongi.’​—1 Timoté 2:9, NW.

Meko oyo osengeli kokamata esuki bobele wana te. Lisoló ya Biblia ezali koyebisa biso ete Luta azalaki na likámá ete bátungisa ye na makambo matali kosangisa nzoto ntango akendaki kosala kati na elanga ya Boaza. Na boboto nyonso, Boaza ‘asɛngaki na bilenge mibali ete básimba ye te.’ Kasi abakisaki toli oyo: “Kɛnda kolɔkɔta na elanga mosusu tɛ, . . . kasi tikala pɛnɛpɛnɛ na baseka na ngai.” (Luta 2:8, 9) Bobele bongo, bilenge basi basengeli kozala elongo na baklisto basi mosusu oyo bazali kotánga na bango eteyelo moko. Basengeli kokima kotambola bango moko na bisika oyo bizali ya likámá.

Atako lolenge nini ya makambo okoki kokutana na yango, moto moko te azali na lotómo ya kotungisa yo, ezala na nzoto to na maloba. Soki ozali kokutana na mikakatano na likambo wana, yebisá yango epai na baboti na yo to epai na mokóló moko oyo otyelaka motema. Na ntembe te, bakopesa yo batoli to bakomeka kosalisa yo na lolenge mosusu.

Ata soki makambo nyonso mazalaki malamu, ebandeli ya bolenge ezalaka eleko moko ya mpasi kati na bomoi. Kozala molai ​— to mokuse mingi ​— na kotalela baninga na yo ekoki kobakisa mikakatano. Atako nini ekoki kozala milende na yo, okoki kosala eloko moko te mpo na kopekisa bokóli na yo ya nzoto. Nzokande, okoki kosala eloko mpo na bokóli na yo ya elimo. Na kosaláká bongo, na ndakisa ya elenge Samwele na ntango ya kala, okokóla “na bolai mpe na bonzengá, na miso na Yehova mpe na miso na bato.”​—1 Samwele 2:26, NW.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Nkombo mosusu ebongwanaki.

b Okokuta batoli mosusu mpo na lolenge ya kosilisa mafinga kati na mokapo 19 ya búku Les jeunes s’interrogent​— Réponses pratiques ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

[Elilingi na lokasa 25]

Bilenge oyo bazali milai koleka bakosɛkamaka mabe na baninga na bango

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto