Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g16 No. 2 nk. 8-9
  • Kosalisa mwana na eleko oyo abandi kokóma mwasi to mobali

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosalisa mwana na eleko oyo abandi kokóma mwasi to mobali
  • Lamuká!—2016
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MOKAKATANO
  • OYO OSENGELI KOYEBA
  • OYO OKOKI KOSALA
  • Nasala nini mpo nalonga mitungisi ya bolenge?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Mpo na nini nzoto na ngai ekómi boye?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Mpo na nini nazali kokóla mbángumbángu?
    Lamuká!—1994
  • Nazali kokóla malamu?
    Lamuká!—1993
Makambo mosusu
Lamuká!—2016
g16 No. 2 nk. 8-9
Tata oyo azali kosolola na mwana na ye

LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA

Kosalisa mwana na eleko oyo abandi kokóma mwasi to mobali

Tata ná mwana na ye bazali kotala elembo ya nzela oyo emonisi kobanda bomwana, bolenge mpe kimokóló

MOKAKATANO

Emonani lokola ezalaki kaka lobi nde ozalaki komema bebe na yo na mabɔkɔ. Sikoyo ata azali kaka mwana, abandi kokóma elenge, abandi kokɔta na eleko oyo esalaka ete moto akóma mokóló.

Lokola mbongwana oyo nzoto esalaka ebangisaka, ndenge nini okoki kosalisa mwana na yo na eleko wana oyo etyaka bana mobulu na motó?

OYO OSENGELI KOYEBA

Ebandaka mbula moko te epai ya mwana nyonso. Ekoki kobanda noki, na mbula mwambe to mpe mwa nsima na mbula soki 15. Buku moko (Letting Go With Love and Confidence) elobi boye: “Mbula oyo eleko yango ebandaka eyebanaka mpenza te.”

Ekoki kobangisa. Bilenge ya mbula yango bakoki kobanda kotya likebi mingi na ndenge oyo bazali komonana na miso ya bato. Elenge moko na nkombo Jared, a alobi boye: “Nakómaki kokipe makambo oyo nazalaki kosala mpe ndenge nazalaki komonana na miso ya bato.” Kellie, elenge ya mbula 17 alobi boye: “Soki nazali elongo na bato mosusu, nazalaki komituna soki bazali kokanisa nini na ndenge oyo nazali komonana.” Elenge akoki kutu kotika komityela motema soki babutɔ ebimi ye na elongi. Kellie abakisi boye: “Namiyokaki ete nabebi mpenza elongi. Nazali kokanisa lisusu ndenge nazalaki kolela mpe komibenga elongi mabe.”

Ezalaka mpasi mingi mpo na bana oyo eleko yango ebandaka noki. Ezalaka mingi bongo mpo na bana basi, oyo batungisamaka ntango babandi kobima mabɛlɛ. Buku moko (A Parent’s Guide to the Teen Years) elobi boye: “Bilenge yango bazalaka mpe na likama ya kobenda likebi ya bana mibali oyo bakoli mpe bamesaná na kosangisa nzoto.

Yango elingi koloba te ete akómi mokóló. Masese 22:15 elobi boye: “Bozoba ekangami na motema ya mwana.” Eleko ya bolenge ebongoli toli yango te. Buku moko (You and Your Adolescent) elobi ete na nzoto elenge akoki komonana ete akoli, kasi yango “elingi koloba te ete akómi na likoki ya kozwa bikateli ya malamu to kosala makambo lokola mokóló, kozala na komipekisa to [komonisa] bizaleli mosusu oyo emonisaka ete moto akoli.”

OYO OKOKI KOSALA

Sololá na mwana liboso eleko yango ebanda. Yebisá mwana na yo makambo oyo ekokómela ye, mingimingi na oyo etali komona sanza (mpo na bana basi) mpe kobebisa mbeto na mai ya mibali na nse ya mpɔngi (mpo na bana mibali). Na kokesana na bambongwana oyo eyaka mokemoke na eleko yango, makambo wana eyaka na mbalakaka mpe ekoki kotya mwana mobulu na motó ata mpe kobangisa ye. Ntango bozali kolobela makambo yango, monisá mwana ete eleko yango ebongisaka moto mpo na kokóma mokóló.​—Toli ya Biblia: Nzembo 139:14.

Koloba makambo likolólikoló te. Elenge moko na nkombo John, alobi boye: “Ntango baboti bazalaki ‘kosolola’ na ngai, bazalaki koloba makambo polele te. Elingaki kozala malamu soki báyebisaka ngai makambo polele.” Alana, oyo azali na mbula 17 alobi mpe bongo: “Mama asalisaki ngai nayeba mbongwana oyo ekosalema na nzoto na ngai, kasi elingaki kozala malamu soki alakisaka ngai ndenge nakoki kosala mpo namitungisa mingi te.” Liteya nini okoki kozwa? Ata soki ezalaka nsɔni mpo na kolobela yango, sololá na mwana makambo nyonso oyo esalemaka na eleko yango.​—Toli ya Biblia: Misala 20:20.

Tuná mituna oyo ekofungola lisolo. Mpo mwana ayoka nsɔni te, liboso lobelá makambo oyo bato mosusu bakutaná na yango na eleko wana. Na ndakisa, okoki kotuna mwana boye: “Baninga na yo mosusu ya kelasi babandi naino te kobɛta masolo etali komona sanza?” “Bana mosusu basɛkaka baninga na bango oyo bazali kokola maimai?” Okoki kotuna mwana mobali boye: “Bana basɛkaka baninga na bango oyo bakolaka te?” Soki bilenge babandi kolobela ndenge eleko yango ekómelaka bana mosusu, ekozala mpasi te bálobela polele ndenge oyo bango moko bazali komiyoka mpe makambo bazali kokutana na yango. Soki babandi koloba, salelá toli oyo ya Biblia: “Moto nyonso asengeli koyokaka noki, kowelaka koloba te.”​—Yakobo 1:19.

Salisá mwana na yo akolisa “bwanya ná likoki ya kokanisa.” (Masese 3:21) Mbongwana oyo esalemaka na eleko yango eyaka kaka na nzoto te to na ndenge oyo azali komiyoka. Na eleko yango mwana akolisaka makoki ya kokanisa oyo ekosalisa ye azwa bikateli ya malamu ntango akokóma mokóló. Salelá libaku yango mpo na kokolisa bizaleli ya malamu na motema ya mwana.​—Toli ya Biblia: Baebre 5:14.

Kolɛmba te. Bilenge mingi bayokaka nsɔni kosolola na baboti na bango makambo etali bambongwana wana, kasi komikosa te. Buku moko (You and Your Adolescent) elobi boye: “Bilenge oyo bamonanaka lokola ete masolo yango etali bango te, basepelaka na yango te, motó makasi, bakoki kokanga liloba mokomoko oyo ozali koloba.”

a Na lisolo oyo bankombo nyonso ezali ya bango te.

BAVƐRSƐ YA NTINA MINGI

  • “Nasalami na ndenge moko ya kokamwa.”​—Nzembo 139:14.

  • ‘Namipekisaki te koyebisa bino makambo nyonso oyo ezalaki na litomba mpo na bino.’​—Misala 20:20.

  • “Bato oyo bakɔmɛli . . . makoki na bango ya kososola, lokola basalelaka yango, emesaná kokesenisa ná mabe ná malamu.”​—Baebre 5:14.

“Ntango nakómaki na eleko ya bolenge, baboti na ngai basalisaki ngai mpenza, mingimingi mama. Azwaki ntango ya kolimbolela ngai makambo nyonso. Nayebaki mpenza makambo oyo ekokómela ngai mpe ndenge oyo nakosala, yango wana ekamwisaki ngai te ntango nakómaki na eleko yango. Lisusu, mama azalaki kosala nyonso ete nabanga te kosolola na ye. Baboti basalaki ete likambo oyo ezalaki nsɔni, ekóma pɛtɛɛ mpo na kolobela yango.”​—Marie, oyo azali na mbula 16.

“Baboti bapesaki ngai mabɔkɔ. Na ndakisa, bazalaki kobomba basekele na ngai, mpo bayebaki ete makambo yango ezalaki kotungisa ngai. Lokola bazalaki koyebisa bato mosusu te, yango mpe esalisaki. Mpe bayebisaki ngai makambo oyo nakokutana na yango liboso kutu ekómela ngai.”​—Joan, oyo azali na mbula 18.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto