Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g94 Octobre lok. 30
  • Makambo mazali moleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali moleka na mokili
  • Lamuká!—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mikakatano ya libala na Grande-Bretagne
  • “Kolangwa televizyó”
  • Toli epai na bato bazwaka mpɔngi te
  • Koteya batata
  • Lolenge bandɛkɛ bayebaka bitúká na bango
  • Konyokola basi
  • Okosala nini mpo okóma moombo ya televizyo te?
    Lamuká!—2007
  • Tv eyibaka ntango na biso?
    Lamuká!—2007
  • Bashario ya mikanda ezali kopesa “litatoli na bikólo nyonso”
    Ndenge oyo makabo na yo esalelamaka
  • Salelá televizyo na mayele
    Lamuká!—2000
Lamuká!—1994
g94 Octobre lok. 30

Makambo mazali moleka na mokili

Mikakatano ya libala na Grande-Bretagne

Boyekoli moko oyo euti kosalema kala mingi te emonisi ete, soki mabala mazali kolónga te na mikili ya Mpótó, ezali mpenza na Grande-Bretagne nde ezali na mikakatano mingi. Eurostat, ebongiseli moko oyo epesaka mitango na makambo matali mikili ya Mpótó, emekaki koyebisa lolenge ya bomoi ya basi milió 177 ya mikili ya Mpótó. Na Grande-Bretagne, motango ya basi oyo bazali kobɔkɔla bana bango moko eleki mwayene: 10,1 % na esika ete ezala 6,5 %. Allemagne ezwi esika ya mibale na 7,7 %. Epai mosusu bilenge basi ya Grande-Bretagne bazali kobala noki koleka bilenge basi mosusu ya Mpótó (liboso ete bákoma na mibu 24). Ezali mpe lisusu na Grande-Bretagne nde koboma libala ezali kosalema mingi.

“Kolangwa televizyó”

Boyekoli moko euti kosalema kala mingi te emonisi ete bato mingi ya Italie bazali na maladi ya “kolangwa televizyó,” elingi koloba bazali na mposa makasi ya kotala ntango nyonso makambo mazali kolakisama na televizyó. Na ntango ya bolukiluki moko oyo esalemaki na pɔ́sɔ moko, bato ya Italie 82 % batalaki televizyó, mpe “balekisaki na mwayene soko ngonga mitano [na mokolo] liboso ya televizyó,” ezali makambo makomi zulunalo La Repubblica. Epai ya bana oyo bazali na mibu minei kino nsambo, kotala bililingi ya televizyó emati kino na 15 % soki tokokanisi yango na mobu 1992. Kasi “baoyo bazwami mingi na kolangwa televizyó ezali bongo bilenge mpe bato oyo basukaki bobele na eteyelo ya ebandeli.” Batalaka mingi televizyó mpo ete mbongwana ekɔti kati na yango? Francesco Siliato, mokambi ya lisangá oyo esalaki bolukiluki yango ayanoli ete: “Mitango mimonisi ete yango ezali na boyokani te na kitoko to na mabe ya makambo mazali kolakisama.”

Toli epai na bato bazwaka mpɔngi te

Balukiluki ya makambo matali monganga na eteyelo monene ya Harvard bapesaki molɔngɔ́ ya batoli epai na bato bazwaka mpɔngi sé na mpasi. Zulunalo Harvard Mental Health Letter eyebisi ete babɛli oyo kala esengeli na bango soko miniti 80 liboso ya kozwa mpɔngi bamoni sikawa mbongwana monene. Tozali kotánga kati na zulunalo wana ete, nsima ya mwa bapɔ́sɔ, “esengelaki na bango bobele miniti 19 na mwayene mpo na kozwa mpɔngi, elingi koloba basombi 75 % ya ntango.” Kati na batoli yango, tozali kokuta oyo: kozala na mbeto te koleka boumeli ya bangonga nsambo; kolekisa te ngonga moko na kolala mpamba koleka ntango na yo ya kolamuka; kolamuka mikolo nyonso na ngonga sé moko, ezala ata na mikolo ya mosala te; kokende kolala bobele soki oyoki mpɔngi; soki ozali kozwa mpɔngi te nsima na miniti 20, tɛlɛmá mpe salá mosala moko oyo ekoki kolɛmbisa yo kino ntango mpɔngi ekozwa yo.

Koteya batata

Na Japon, epai kuna batata balekisaka na mwayene bobele miniti 36 na mokolo elongo na bana na bango, ministɛ́lɛ ya makambo matali Koteya esali ebongiseli moko mpo na koteya bango. Engebene Mainichi Daily News, Leta ezali kobimisa mosolo mpo na “‘mateya matali libota’ na mokano ya kopusa batata ete básangana mingi na misala ya libota mpe na kolekisa ntango mingi elongo na bana na bango.” Mateya yango ekabwani na biteni mitano na boumeli ya ngonga moko na ndambo kino ngonga mibale, ekopesama na bisika ya mosala to penepene na yango, mpe na bantango oyo ekopesa bango nzela na koyangana kozanga nkaká. Likambo ya kokamwa, kati na bato ya liboso mpo na kozwa mateya yango, tozali kokuta basáli na ministɛ́lɛ ya makambo matali koteya, ministɛ́lɛ oyo eyebani na likambo litali kosɛngisa bangonga mingi mosusu ya mosala epai na basáli na yango.

Lolenge bandɛkɛ bayebaka bitúká na bango

Ndɛkɛ moko ekoki kososola ete ndɛkɛ mosusu oyo ekokani na yango ezali ndɛkɛ ya etúká mosusu bobele na koyokáká lolenge yango ezali koyemba? Eyano ezali ɛɛ mpo na bandɛkɛ oyo ebéngami rouges-gorges. Engebene búku National Geographic, Lance Workman, moto oyo ayekolaka bizaleli ya banyama na eteyelo monene ya Glamorgan (na mboka Pays de Galles), amonaki ete ntango azalaki koyoka mpe kokɔtisa nzembo ya ndɛkɛ rouges-gorges na magnétophone, akokaki kozanga nkaká koyeba ete oyo ezali na etúká boye ya Angleterre epai bandɛkɛ bautaki. Ya solo, ntango ndɛkɛ moko ya mobali oyo ezalaka na Sussex eyoki kati na magnétophone loyembo ya ndɛkɛ ya mobali ya Pays de Galles, ekotombola mapapu na yango na nkanda mpe ekobundisa magnétophone.

Konyokola basi

Engebene zulunalo Globe and Mail, bolukiluki moko euti kosalema kala mingi te emonisi ete 51 % ya basi ya Canada oyo bazali na mibu 16 mpe koleka, elingi koloba koleka bamilió mitano ya basi, bazali kobetama na mibali soko mbala moko kati na bomoi na bango ya bokóló. Pene na ndambo ya basi oyo batunamaki mituna balobaki ete bato oyo babetaki bango ezalaki bongo “makango na bango, mibali na bango, baninga na bango, ndeko na bango moko to moto moko oyo ayebani na bango.” Basi zomi kati na monkámá babetamaki na boumeli ya mbula oyo ezalaki liboso ete bolukiluki esalema, mpe soko 20 % ya kobetama yango ezalaki makasi kino ezokisaki bango. Basi mingi bayebisaki ete batindikaki bango, basukumaki bango, bakangaki bango na mabɔkɔ, babɛtamaki mbata, baswamaki mino, babɛtamaki bibɔtu to kotutama na makolo, nyonso oyo, na bamakango na bango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto