Mituna oyo bilenge batunaka . . .
Lolenge nini okoki kopɛngola kotya makanisi na yo likoló na bana basi to likoló na bana mibali?
‘MOKOLO na mokolo, myango ya bopanzi nsango ezali kobebisa makanisi ya bilenge na nzela ya maloba ya kotumola mpe ya lisɛki na makambo matali basi mpe mibali; banzembo ya rock ezali kolobela bango makambo matali kosangisa nzoto; ebele ya babúku oyo elobelaka masoló ya bolingo, ezali kosala ete makambo ya kosangisa nzoto mazingelama na makanisi ya kitoko lokola mafuta ya nzói,’ ezali wana maloba ya mokomi Lesley Jana Nonkin. Na ntembe te, myango ya bopanzi nsango ezali kopusa bilenge na kokanisa na bana basi to na bana mibali.
Ya solo, ezali mabe te na kosepela na bana basi soki ozali mwana mobali to na bana mibali soki ozali mwana mwasi.a Kasi, soki makanisi ya makambo matali basi mpe mibali, makanisi ya kosangisa nzoto mpe mabanzo likoló na yango etondi na elimo na yo, na boye ete ekómi kobulunganisa mpɔngi na yo, mabondeli na yo, badevware na yo ya kelasi, botángi na yo ya Biblia mpe misala na yo ya ndako, yango emonisi ete ozali kati na ezalela moko ya likámá uta mwa ntango mingi. Na ntembe te, makanisi wana ya mbindo makoki komema yo na kosala mabe.—Yakobo 1:14, 15.
Yango elingi koloba te ete osengeli kokanga miso liboso ya bana basi to liboso ya bana mibali. Kasi, lokola Masese 23:12 elobi yango, esengeli na yo ete ‘otia motema na yɔ mpɔ na kolakisama.’ Bolóngi na likambo yango eyaka pwasa te. Nzokande, soki osali mpenza makasi, okoki kozongisa elimo na yo na bokatikati. Tótalela sikawa mwa makambo mabongi mpo na kolónga kosala bongo.
Sɛnzɛlá na ntina na baoyo ozalaka na bango elongo
Talelá malamumalamu motindo ya bato oyo ozalaka na bango elongo. Elenge mobali moko alobi ete: “Zingazinga na yo, bato nyonso bazali kolobela makambo ya kosangisa nzoto lokola nde bazalaki kolobela likambo etali kokende kolya epai moko boye.” Na koyokáká yango ntango nyonso, maloba motindo wana ekoki kozala na bopusi likoló na yo, boye te? Ezali bongo mpenza. Na ntango ya bolukiluki moko, ndambo misato kati na minei ya bilenge oyo batunamaki, bamonisaki ete “mposa na bango ya kozala lokola basusu ezali koyangela likanisi na bango na ntina na kosangisa nzoto.”
Tokoloba boni mpo na baninga na yo? Masoló na bango ebongwanaka mokemoke na bantembe makasi likoló na makambo matali basi to mibali? Masoló yango mapusamaka ntango nyonso na kokóma ya mbindo mpe ya kolamwisa mposa ya nzoto? Boye, ekozala na yo mpasi mpo na kotya makanisi na yo likoló na makambo ya pɛto, soki ozali komikɔtisa na lisoló to ata soki ozali bobele koyoka yango mpamba. Biblia epesi elendiseli oyo: “Bolongola na minɔkɔ na bino makambo yango yɔnsɔ: nkɛlɛ, nkanda, kotɔnga, kotuka, maloba na nsɔni.”—Bakɔlɔsɛ 3:8.
Soki baninga na yo bazali kotosa mitinda ya Biblia te, ekozala mpasi mpo na yo na kotosa toli yango; na ntembe te, ezaleli ya elimo na bango ekosala bopusi likoló na yo. (Masese 13:20) Talá likambo ekómelaki elenge moklisto mwasi oyo. Alobaki ete: “Nalingaki te komimonisa epai na baninga na ngai ya kelasi ete nazalaki Motatoli ya Yehova; bazalaki kolobela ngai mbala na mbala mpe na bonsomi nyonso makambo matali kosangisa nzoto.” Aumelaki te na kosala pite mpe azwaki zemi. Masese 9:6 epesi toli oyo ya mayele: “Botika kosala bozoba mpe bokobika, bolanda se nzela ya mayele malamu.” (Liloba lya Nzambe) Bómizwela baninga oyo bazali kolanda mitinda ya Biblia lokola bino, baninga oyo bakolendisa ezaleli malamu ya elimo na bino na esika ete bábebisa yango.
Ya solo, ata bilenge baklisto oyo makanisi na bango etambwisami mpenza na bobangi ya Nzambe, bazali mbala na mbala ‘kobeta mabaku na maloba.’ (Yakobo 3:2, NW) Ntango likambo yango ekómeli yo mpe soki lisoló ebandi kobeba, okoki kosala nini? Biblia ezali koyebisa ete mokonzi Salomo alingaki elenge mwasi moko oyo azalaki mobateli na mpate. Nzokande, elenge yango azalaki na mayoki motindo moko epai na Salomo te. Ntango bilenge oyo bazalaki baninga na ye bamekaki kolamwisa mayoki na ye mpo ete alinga Salomo, ye apesaki bango nzela te ete báyebisa ye ebele ya masoló oyo ekokaki kopusa ye na kolinga ye. Na molende nyonso, atɛmɛlaki bango na kolobáká ete: “Nalaki bino . . . ete olamukisa bolingo tɛ kino yango mpenza elingi bongo.” (Loyembo na Solomo 2:7) Bobele bongo, ntango lisoló ekómi ya mbindo, monisá makanisi na yo na molende nyonso. Elingi koloba te ete osengeli kongangela baninga na yo, kasi okoki nde kobongola lisoló ete ekóma kolobela makambo ya pɛto.
Poná malamu kominanola na yo
Kominanola ezali moko na makambo oyo esengeli mpenza kokeba na yango. Filime ya sika, diske, to kaseti vidéo oyo euti kobima sika, ekoki komonana mpenza ya kosepelisa na boye ete ekómi kobenda likebi na yo. Nzokande, Biblia ezali kokundwela biso ete “makambo yɔnsɔ kati na mokili—mposa mabe na njoto mpe mposa mabe na miso mpe njombo na bijaleli—iuti na Tata tɛ kasi iuti na mokili.” (1 Yoane 2:16) Lokola tolobelaki yango liboso, kominanola ya mikolo oyo esalelami mpo na kolamwisa mposa ya kosangisa nzoto. Na ndakisa, banzembo mpe bafilime oyo bato balingaka mingi, etondi na makambo ya nsɔ́ni mpe mbala mingi emonisaka ata bolumbu ya basi mpe ya mibali.
Kominanola motindo wana ekoki kozala na bopusi nini likoló na yo? Mokomi John Langone ayanoli ete: “Bolukiluki mingi emonisaki . . . ete myango oyo mimonisaka masoló ya bolingo kati na basi mpe mibali, epusaka biso ntango nyonso na kolobela makambo matali kosangisa nzoto. Yango ememaka biso mbala mosusu na komeka makambo oyo mbɛlɛ tokokaki kosala yango te engebene mimesano na biso.” Na ntembe te, ‘kotia motema na makambo na njoto’ ekomema yo na likámá. (Baloma 8:5) Yango ekobebisa likanisi na yo na ntina etali bolingo mpe kosangisa nzoto, mpe ekotondisa elimo na yo na makanisi ya mbindo. Biblia epesi toli oyo ete: “Tomipɛtɔla . . . na mbindo yɔnsɔ na njoto mpe na [elimo, NW] mpe tokokisa ejaleli na biso na bulɛɛ kati na nsɔmɔ na [Nzambe, NW].” (2 Bakɔlinti 7:1) Na yango, bóboya kotala to koyoka bafilime, bakaseti vidéo mpe badiske oyo ezali kolamwisa bamposa ya kosangisa nzoto.
Moklisto moko monzemba apesaki toli malamu oyo ete: “Kotya likebi na yo na makambo ya mbindo te ntango okómi pene na kokende kolala. Baemisyó mingi ya televizyó, oyo balakisaka na butu makasi, ezalaka mpenza na nguya ya kolamwisa mposa ya kosangisa nzoto.” Ezali mpe bongo mpo na babúku mingi. Elenge moklisto mwasi, Sylvie, ayamboli ete: “Nazalaki kotánga babúku oyo ezalaki na masoló ya bolingo. Nazalaki kobanzabanza na ntina etali kosangisa nzoto; nazalaki kolɔ́tɔ bomoi ya kosepelisa nzoto mpe makambo matali kosangisa nzoto.” Lokola elimo na ye etondaki na makambo matali kosangisa nzoto, amipesaki mpenza na kosimbanasimbana na nzoto elongo na elenge mobali moko. Okoki komipɛngwela mikakatano ya lolenge wana na komipesáká na botángi ya mikanda ya pɛto, na ndakisa Lamuká! mpe Linɔngi ya Mosɛnzɛli. Bazulunalo wana ezali kosalisa bilenge mingi na ‘kotia motema na makambo na [elimo, NW]’ na esika ete batya yango na makambo ya mosuni oyo esilá kobeba.—Baloma 8:5.
Bwaká makanisi wana ya mbindo
Nzokande, makanisi na ntina na basi to mibali ekoki mbala mosusu kokɔta na elimo na yo kozanga ete yo moko oyeba yango liboso. Serge, oyo azali na mibu 17, alobi ete: “Na bantango mosusu, kotika kokanisa makambo matali basi mpe mibali ezalaka mpenza mpasi mpo na ngai.” Ekoki kozala ete omoni elenge mobali to elenge mwasi moko ya kitoko mpe, liboso ete yo moko ososola yango, okomona ete makanisi na yo masilaki kokende epai na ye. Ya solo, Yesu akebisaki biso na likambo litali ‘kolanda kotala mwasi na mposa mabe,’ kasi kotala mpamba kitoko ya moto moko boye ezali na yango mabe te. (Matai 5:28, NW; Kokanisá na Masese 6:25.) Soki okoki naino te mpo na kobala, yeba ete kobanzabanza na makambo etali kosangisá nzoto ekonyokola yo na makanisi.—Kokanisá na Masese 13:12.
Serge alandi na koloba ete: “Likambo oyo esalisaka ngai ezali ya kobongola lisoló mpe ya kolongola makanisi na ngai likoló na makambo oyo mazali kolamwisa mposa kati na ngai. Nazalaki komikundola ete bamposa yango ekoleka.” (Kokánisa na Bafilipi 4:8.) Ntoma Paulo alobaki ete: “Najali kobɛta njoto na ngai mpe nakokomisa yango lokola moombo.” (1 Bakɔlinti 9:27) Bobele bongo, ekosengela na yo mbala mosusu ete omisalela makambo na makasi ntango makanisi na ntina na basi mpe mibali ebandi koyela yo. Soki makanisi yango mazali kosila te, meká kosala ngalasisi. “Kokembisa na njoto ekopɛsa litomba mwa mokɛ” mpe kotambola ya nokinoki to koningisa nzoto na ngalasisi ekoki mbala mosusu kozongisa makanisi na yo na nzela ya sembo.—1 Timɔtɛ 4:8.
Lisusu, bilenge mingi basili komɔna ete ‘kozala na makambo mingi ya kosala kati na mosala ya Nkolo,’ ezali kosunga mpenza. (1 Bakolinti 15:58) Déborah alobi ete: “Mpo na kolónga, esengeli kokóba kosala mosala kino ntango okolɛmba.” Na komipesáká mpenza na lisangá ya boklisto mpe kati na misala na yango nyonso, okolónga kobatela makanisi na yo kozanga mpasi.
Nzokande, ata osali milende makasi, mbala mosusu ekozala na yo bobele mpasi mpo na kolongola makanisi na yo likoló na basi to mibali. Soki ezali bongo, luká lisalisi ya mokóló moko. Mpo na nini te koyebisa yango na tata na yo to na mama na yo? Tala oyo Cyril alobi: “Nazwaki mpenza lisalisi na kosololáká na moto moko oyo azali mokóló mpe ayebi makambo mingi. Soki lisoló ezali ya polele, boye makambo ekotambola malamu koleka.” Likoló na makambo nyonso, kobosana te lisalisi oyo okoki kozwa uta na Tata na yo ya likoló. Moklisto moko oyo abali naino te alobi ete: “Nasalaka mabondeli mingi soki nayoki ete mposa ya kosangisa nzoto ebandi koyela ngai.” Biblia elobi ete: “Tika ete tobɛlɛma na molende epai na kiti na bokonji na ngɔlu ete tojua mawa mpe tomɔna ngɔlu na kosunga na ntango na bosenga.” (Baɛbɛlɛ 4:16) Nzambe akolongola te bosepeli na yo likoló na basi to mibali. Kasi, na lisalisi na ye, okoki kososola ete ezali na makambo mingi mosusu oyo okoki kokanisa likoló na yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisoló “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Mpo na nini ezalaka na ngai mpasi na kopɛngola makanisi na ngai likoló ya bana basi to ya bana mibali? oyo ezali kati na nimero na biso ya Yulí 22, 1994 (ebimeli ya Lifalansé).
[Elilingi na lokasa 26]
Soki lisoló na ntina na basi to mibali ekómi ya mbindo, zalá na mpiko ya kobolongola yango