Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g94 Juillet nk. 22-24
  • Bósalisa bana na bino na Eteyelo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bósalisa bana na bino na Eteyelo
  • Lamuká!—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bopusi ya baninga
  • Maloba ya bosɔtɔ
  • Pite mpe bilangwiseli
  • Kotyola mpe mobulu
  • Mateya mazali kopesama malamu te
  • Nasala nini soki batumoli mwana na ngai?
    Lisalisi mpo na libota
  • Nasala nini mpo na matumoli na kelasi?
    Biyano na mituna 10 oyo bilenge batunaka
  • Teyá mwana na yo uta azali naino moke mpenza
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Ndenge ya kobatela bana na yo
    Lamuká!—2007
Makambo mosusu
Lamuká!—1994
g94 Juillet nk. 22-24

Bósalisa bana na bino na Eteyelo

BATO banso, bakisá mpe bana na biso, batalelami na kobeba ya makambo ya bomoi. Biblia, Liloba ya Nzambe, ekosaki te na kolobáká ete “ntango na mpasi ekoya” mpe “bato mabe mpe bakosi bakoleka na mabe.” (2 Timɔtɛ 3:1-5, 13) Tála mpo na nini eteyelo ekómi esika ya mpasi lelo, banakelasi basengeli kokutana na makambo oyo baboti mingi bakutanaki na yango te na ntango bazalaki bilenge. Na bongo, baboti basengeli kosala nini mpo na kosunga bana na bango ete bálónga mikakatano yango?

Bopusi ya baninga

Na ntango moko to mosusu, bana mingi bazali kokutana na bopusi euti epai na baninga na bango. Elenge mwasi moko ya France alobaki na mawa nyonso ete: “Baboti mpe bato mosusu bazali kosala oyo ekoki na bango, kasi yango ekoki mpenza te. Bilenge ya mobulu bazali kobenda bilenge mosusu . . . Baboti oyo bazali kobatela bana na bango te, bazali baboti te.”

Baboti oyo bayebi mikumba na bango bazali kosala milende mpo na kosunga bana na bango ete bálona bizaleli ya elimo oyo ekopesa bango nguya oyo bazali na yango mposa mpo na kotɛmɛla bopusi mabe ya baninga na bango. Tata moko ya libota alimboli ete: “Tozali kosala nyonso ekoki na biso mpo na kotonga epai na bana na biso mayoki ya bomoto, mpo bámiyoka te ete basɛngisami na koluka kondimama na baninga na bango. Ya solo, soki bazali komona ete ntina ezali te ya kozala lokola bana mosusu, ekozala na bango mpasi te na komipekisa ntango bapusami na kosala yango.” Mpo na kolakisa bana na ye lolenge ya kolónga mikakatano, tata wana azali kobongisa bantango mpo na bilakiseli oyo na boumeli na yango libota ezali komonisa mikakatano oyo bana bakoki kokutana na yango mpe lolenge ya kolónga yango. Bósunga bana na bino, mpe bósalisa bango ete bázala na bobángi te.

Maloba ya bosɔtɔ

Kolimwa ya mitinda ya bizaleli malamu ezali komema bopalangani ya maloba na bosɔtɔ. Na mikili mingi, bazali kolakisa yango na televizyó na ntango oyo bato batalaka yango mingi. Na yango, makambo ya nsɔ́ni mazali koyokana mingi na eteyelo, bilekelo ya eteyelo mpe kati na bakelasi mpenza.

Balakisi mosusu, oyo bazali kosalela maloba motindo wana bazali komilóngisa na kolobáká ete bana na bango ya kelasi bakoki kozwa likanisi na bango moko likoló na maloba yango. Na bongo, bazali komonisa ete maloba wana ya mbindo ezali mabe te, na boye ete bana bazali komimona ete bapesameli nzela na komekola yango.

Baboti ya mayele bakolimbola na boboto nyonso epai na bana na bango ntina oyo balingi te koyoka maloba ya motindo wana kobima na minɔkɔ na bango. Bakoki mpe kopɛngola likambo oyo etali maloba ya mbindo na mateya oyo bana bakozwa na kotaleláká manáka ya mbula mpo na koyeba babúku nini bana na bango basengeli koyekola. Soki moko na babúku yango ezali na maloba ya bosɔtɔ to makambo ya nsɔ́ni, bakoki mbala mosusu kosɛnga na molakisi ete apona búku mosusu oyo ezali na makambo malamu na kati na yango mpe bakosala yango kozanga kolekisa ndelo, mpo na komimonisa ete bazali bato na makambo makasi te.​—Bafilipi 4:5.

Pite mpe bilangwiseli

Bolukiluki emonisi ete baboti mingi bandimi ete “bayokaka nsɔ́ni mpo na kopesa [mateya matali binama ya nzoto] epai na bana na bango.” Bazali kotya motema na biteyelo ete epesa bandimbola ya polele epai na bana mpo na likambo yango. Nzokande, na ntina na makambo oyo asili kokutana na yango, molakisi moko oyo atángamaki na zulunalo The Sunday Times ya Londres amonisaki ete kopalangana ya bazemi lelo epai na bilenge basi ezali likambo oyo etaleli mingimingi kolakisama “ya bizaleli malamu, kasi myango ya kopekisa kozwa zemi te.” Na yango, baboti nde bazali bato babongi mpenza mpo na kotya mitinda na ntina na bizaleli oyo bazali komizela ete bana na bango bátosa yango.

Ezali mpe lolenge moko mpo na oyo etali kosalela bilangwiseli: kozanga litambwisi ya baboti ezali kobakisa mpasi. Zulunalo Francoscopie 1993 emonisi ete: “Soki bomoi ya libota ezali kosepelisa mwana te, akoluka makambo mosusu oyo makoki kosepelisa ye. Bilangwiseli ezali moko na makambo yango.” Micheline Chaban-Delmas, mokambi ya Fondation Toxicomanie et Prévention Jeunesse alobi ete: “Ezali mpasi kozala moboti, esengeli kozala na bokɛngi ntango nyonso; bilangwiseli, ezalaka mbala mingi lolenge moko ya kolamwisa likebi ya baboti likoló na likambo moko ya mpasi. Soki elenge moko azali na mayoki ete tata na ye to mama na ye bayokaka ye te na ntango oyo bazali kopesa ye bilangwiseli, yango ekomonana lokola nkisi malamu mpo na mikakatano na ye.”

Tata moko ya libota na Canada alimboli ete mwasi na ye mpe ye moko balandaka malamumalamu kelasi ya mwana na bango moke ya mwasi: “Tokendaka kotika Nadine na eteyelo mpe tokendaka kozwa ye. Mbala mingi, na ntango tosololaka na ye, ayebisaka biso makambo malekaki na eteyelo. Soki tomoni likambo moko ya likámá, mbala mosusu tokosolola na ye bobele na ntango wana, to tokolobela yango na ntango ya kolya to na boumeli ya masoló kati na libota.” Na ndakisa na bango, bokoki komonisa bosepeli mpe bolingo ya solo epai na mwana na bino na kosololáká malamu elongo na ye.

Kotyola mpe mobulu

Kati na búku na ye oyo ezali na motó ya likambo ete How to Help Your Child Through School (Lolenge ya kosalisa mwana na yo na eteyelo), Maureen O’Connor akomaki ete: “Moko na makambo maleki mabe oyo tokutanaka na yango na biteyelo” ezali kotyola. Abakisi ete “atako bazali kokutana na minyoko, mbala mingi bilenge oyo bazali konyokwama bazalaka pene te ya koloba yango epai ya mikóló, bazali na bobangi ete bakofinga bango ‘bato na bibangabanga.’”

Soki, na mawa nyonso, bamoko na balakisi bazali kotalela kotyolama ete ezali malamu, balakisi mosusu bazali kondima likanisi ya moteyi Pete Stephenson oyo alobaki ete yango ezali “lolenge ya minyoko,” minyoko oyo “ezali malamu te mpo na banyokoli ete bálanda kosala yango.”

Na yango, bosengeli kosala nini soki mwana na bino azali kotyolama? Maureen O’Connor alobi ete “ezali ezingelo ya mikóló epai kuna mwana oyo atyolami azali kokóla nde esengeli kozala libateli ya liboso.” Bómonisa likambo yango epai na molakisi moko oyo ayebi komitya na esika ya basusu. Yango ekondimisa mwana na bino ete molakisi na ye mpe bino bosepeli na ezaleli yango ya mobulu te. Na biteyelo mingi, basili kozwa meko ya sikisiki na ntina na kotyola oyo balakisi bazali kolobela yango na polele kati na kelasi.

Nathalie atyolamaki na eteyelo mpo na oyo etali lingomba na ye. Alobi ete: “Mpo ete nazali Motatoli ya Yehova, bafingaki ngai mpe bapasolaki mikanda na ngai ya kelasi.” Mpo na kobongisa likambo yango, alobaki yango na baboti na ye mpe bango balendisaki ye ete akende koyebisa balakisi na ye. Ezali yango nde asalaki. Abakisi ete “nazwaki likanisi ya kosolola na telefone elongo na baboti ya bana wana mibale [kati na baninga ya kelasi oyo bazalaki kotumola ngai], mpe longwa ntango yango makambo mabongaki mpamba te nalimbwelaki bango mokakatano yango. Balakisi nyonso mpe mingi na baninga ya kelasi bakómaki kotosa ngai.”

Ntango mosusu, baboti bayebaka ete bazali kotumola mwana na bango te, kasi ye nde azali kotumola basusu. Na yango, bakosala malamu na kotala na likebi nyonso oyo ezali kosalama kati na libota na bango. Zulunalo The Times ya Londres eyebisi ete: “Bana oyo bizaleli na bango ezali ya mabe bautaka mingimingi na mabota oyo baboti basilisaka te mikakatano na lolenge ya malamu.” Ebakisi ete: “Mobulu ezali ezaleli oyo basangoli yango.”

Na bisika mosusu, bato basili komesana na mobulu. Na ntango oyo eteyelo ekómi na likámá mpo na yikiyiki ya politiki, bana oyo baboyi komikɔtisa na yikiyiki yango bazali komona ete ezali likambo ya mayele kotikala na ndako. Soki mobulu ebimi na ntango oyo bazali na eteyelo, bazali komonisa bokɛngi na kotikáká yango na nkuku mpe kozonga na ndako kino kimya ekozongisama lisusu.

Mateya mazali kopesama malamu te

Soki mateya oyo mapesami mazali mpenza ya malonga te, ezali malamu ete bana na bino basololaka malamu elongo na balakisi na bango. Mobali moko na mwasi na ye balobi ete: “Ntango nyonso, tolendisaka mwana na biso ya mwasi ete azala na elimo moko ya malamu na ntina etali mateya oyo bazali kopesa.” Kasi soki molakisi moko azali te koyeisa mateya na ye elɛngi, banakelasi bakolɛmba. Soki yango nde ekómelaka mwana na yo, mpo na nini te kopesa ye toli ete aloba yango na molakisi na ye wana bazali sé bango mibale?

Bósunga bana na bino na kobongisa mituna oyo biyano na yango ekosalisa bango na kosimba malamumalamu likanisi ya sikisiki ya mateya mpe ntina na yango. Soki yango ekoki te mpo na kolamwisa mposa ya solo mpe oyo ekoumela, ndakisa na bino ekoki kozala na ntina mingi. Bómonisa epai na mwana na bino ete bozali kosepela na mateya na ye ya kelasi na kosololáká na ntina na yango elongo na ye mpe bópesa ye lisungi na bino mpo na kosala bolukiluki oyo molakisi asɛngaki.

Na eteyelo, banakelasi oyo bauti na mabota makabwani, baoyo bakutani na minyoko to batalelami mpamba na baboti na bango mpe baoyo, mpo na bantina yango, bazangi komityela motema mpe bazali komimona ete bazali na ntina te, bazali kokutana na bana oyo bazali malamu na bomoi na bango. Baboti mingi bayebi ete basengeli kokóba kosunga bana na bango mpo na kolónga mikakatano oyo bazali kokutana na yango na eteyelo. Kasi boyokani na bango elongo na balakisi ezali nini? Lolenge nini ya boyokani basengeli kozala na yango elongo na bango, mpe ndenge nini?

[Etanda na lokasa 24]

Mwana na bino atyolami na eteyelo?

BANGANGA-MAYELE ya makambo matali koteya bazali kopesa toli epai na baboti ete básɛnzɛla mpo na kososola bilembo oyo emonanaka epai na mwana: bazali kotinda ye na eteyelo na makasi, azali kokima baninga na ye ya kelasi, azali kozonga na ndako na mapipi na nzoto to mpe na bilamba bipasuami.

Bólendisa ye ete ayebisa bino nini ezali mpenza kosalema. Yango ekosalisa bino na koyeba soki atyolami na eteyelo. Soki ezali bongo, bóyebisa yango na molakisi moko oyo akotya likebi na likambo yango.

Bópesa toli epai na mwana na bino ete azalaka penepene na baninga ya kelasi oyo babongi na kotyela motema mpe kopɛngola bisika mpe makambo oyo ekoki kopesa nzela na bitumba. Mbala mingi, mwana oyo ayebi kosala masɛki elongo na baninga na ye mpe azali na maloba mingi mpo na kobongisa makambo, alóngaka malamu.

Bómitungisa koleka ndelo te mpe bópusa ye na kozongisa mabe te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto