Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g94 Juillet lok. 3
  • Mpo na nini kozongela kotánga kelasi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini kozongela kotánga kelasi?
  • Lamuká!—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntina ya likambo oyo ezali nini?
  • Kotánga kelasi ya milai to kotánga yango te?
    Lamuká!—1994
  • Ntina ya kelasi mpe kolakisama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Baboti—Bokolinga bana na bino bákóma bato ya ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Biblia epekisi kotánga kelasi?
    Lamuká!—1998
Makambo mosusu
Lamuká!—1994
g94 Juillet lok. 3

Mpo na nini kozongela kotánga kelasi?

BOLUKILUKI oyo Robert asalaki mpo na kozwa mosala, ezalaki likambo ya mpasi oyo eumelaki bambula misato. Na nsima, ntango akómaki na bambula 21, azwamaki na mosala lokola molakisi na kati na káa moko ya bana oyo bazalaki na lói. Atako abɔndisamaki mwa moke, Robert alɛmbisamaki mpenza na mpasi ya boluki mosala. Alobi ete: “Baboti na biso bazali kososola te. Na mikolo na biso, kozwa mosala ezali likambo ya mpasi koleka.”

Lokola Robert, ebele ya bilenge oyo bauti kosilisa kelasi, bazali kokɔta, mbula na mbula, kati na bomoi oyo esengi kosala mosala. Batondi na elikya. Bazali na mikano mingi. Kasi, mingi na bango bazali komona ete bakoki te kozwa mosala oyo bazalaki komizela na yango.

Na ntina yango, mingi bazali kotánga bakelasi milai.a Tozali kotánga kati na zulunalo Fortune ete: “Soki bambula 1970 etalelaki mpamba matomba mauti na kelasi mpe kolakisama, bambula 1980 epesaki likanisi ekeseni mpo na yango ete: zwá lipɔlɔ́mi, soki te. . . ”

Ntina ya likambo oyo ezali nini?

Mpo na nini mbala mingi bato bamonaka malamu kolanda kelasi molai? Libosoliboso ezali mpo ete, na mikolo na biso, misala mingi ezali kosɛnga kotánga kelasi mingi koleka ndenge ezalaki kala. Momonisi moko ya Ministère américain du travail alobi ete: “Mosáli na lininisa (guichet) ya bánki alongolamaki na mosala na ye, kotikáká esika na masini moko oyo ezali kokokisa mosala wana yango moko. Sikawa mosáli na guichet asengeli kopesa ngai toli likoló na lolenge misato ya mombongo ya mosolo oyo esengeli kotyama kati na misala mikeseni ya mombongo ya bánki mpe koyebisa ngai mpo na nini nasengeli kopona lolenge oyo ya mombongo ya mosolo mpe kotika oyo mosusu.” William Ford, mokambi ya commission sénatoriale américaine Education et Travail, amonisi likanisi oyo ete: “Misala ya pɛtɛɛ mizali lisusu te.”

Ya mibale, mingi bazali kokanisa ete kelasi ezali kopesa te kolakisama oyo ebongi epai na bayekoli. Bazali koloba ete motuya oyo epesami na makambo oyo: bilangwiseli, SIDA mpe kosalela bankisi mpo na kozwa zemi te, esili kokóma likámá mpo na kolakisama ya kotánga, ya kokoma mpe ya mituya. Robert Appleton, oyo asili kokokisa bambula 27 na mosala ya molakisi, azali kolimbola ete ebongiseli ya kelasi ekómi lokola “ebongiseli ya lisalisi mpo na bato” oyo ezwi mokumba ya “kotalela makambo oyo, na kala, mazalaki kotalela eteyelo te.”

Lokola eteyelo ezali kopesa te makoki mabongi epai na bayekoli, mingi na baoyo bazali na lipɔlɔ́mi ya kelasi ya katikati bazali kolónga te kokokisa bamposa na bango mpenza. Joseph Schroeder, mokambi ya biro moko oyo etalelaka makambo ya mosala na Floride (Etats-Unis) Alobi ete: “Bazali kolakisa bango mosala te. Likambo oyo ebimaka ntango nyonso na minoko ya bankóló ya misala na ntina na bilenge ezali ete, bayebi kotánga te mpe kokoma malamu te. Bakokaka te kotondisa lokasa ya lisɛngi mosala.”

Ntina mosusu oyo bato bazali kotánga bakelasi milai ezali ete, na mikili mingi, baoyo bazali na mapɔlɔ́mi ya kelasi minene batondi mingi mpo na koluka mosala. Zulunalo New York Times elobi ete: “Baoyo bazali na mapɔlɔ́mi ya kelasi minene bazali mingi koleka motuya ya bato oyo bazali na yango mposa.” Lapólo yango ebakisi ete: “Lokola motángo wana ya koleka epesameli bango, bankóló ya misala bazali kokakatana mpo na kozwa, na mosala, baoyo bazali bobele na lipɔlɔ́mi ya kelasi ya katikati.”

Kolukáká kozwa makoki oyo ekopesa bango nzela na kozwa mosala mobongi mpo na kokokisa bamposa na bango, mingi bazali kozongela kotánga kelasi. Na Etats-Unis, 59 % ya banakelasi bazali kolanda kotánga nsima ya kosilisa kelasi ya katikati. Motuya yango ezali mpenza komonisa kobakisama monene likoló na motángo ya 50 %, oyo emonanaki na boumeli ya bambula zomi.

Na mikili mosusu, likambo yango lizali mpe komonana. Na ndakisa, uta mibu oyo mibandaki na 1960, kobakisama monene ya motángo ya banakelasi oyo bazali kokóba kotánga nsima ya kosilisa kelasi oyo esɛngisami na mibeko ezali komonana na Grande-Bretagne. Na Australie, kati na bambula oyo euti koleka, banakelasi 85 % oyo basilisaki kelasi ya katikati, bazalaki kokomisa nkombo na bango na bakelasi ya likoló mpe bakelasi minene ekeseni. Soko 95 % ya banakelasi na Japon, bazali kosala mimekano mpo na kozwa lotómo ya kotánga lisusu kelasi na boumeli ya bambula misato, oyo ekobongisa bango mpo na koyeba mosala to kosala kelasi minene.

Nzokande, kotánga bakelasi milai epesaka ntango nyonso te matomba oyo malukamaki. Wapi matomba mpe mabe na yango?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Lolenge ya kobénga bakelasi ekeseni, mpamba te mokili moko na moko ezali na ebengeli na yango. Kati na masoló oyo, “kelasi ya katikati” ezali komonisa lolenge ya kelasi oyo esɛngisami na mibeko. Maloba “kelasi monene,” “eteyelo monene”, “eteyelo monene ya tekiniki,” mpe “kelasi ya boyekoli mosala,” ezali komonisa lolenge ya kelasi oyo esɛngisami na mibeko te, kasi eponami mpenza na moto ye moko.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto