Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g95 Janvier nk. 25-27
  • Mpo na nini nasengeli kotosa baboti na ngai?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini nasengeli kotosa baboti na ngai?
  • Lamuká!—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini bakómaka batomboki
  • Kotomboka ezali bozoba
  • Matomba mabe ya “bonsomi”
  • Bilenge: Bozali koluka nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mpo na nini mibeko ebeleebele boye?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Nakosala nini soki baboti na ngai baswanaka?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Bilenge, bótambolaka na ndenge ebongi na Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Lamuká!—1995
g95 Janvier nk. 25-27

Mituna oyo bilenge batunaka . . .

Mpo na nini nasengeli kotosa baboti na ngai?

STÉPHANE abɔkwamaki na baboti oyo bazali na bobangi Nzambe. Kasi, na mibu 16, akómaki motomboki. Stéphane alobi ete: “Nazalaki kolinga kokutana na bato mpe kondimama na bango. Nalingaki kozala na biloko nyonso oyo basusu bazalaki na yango.” Makanisi ya Stéphane mpo na kokokisa mikano wana epusaki ye ete akóma motɛkisi ya bilangwiseli. Na bongo, asengelaki kokosa mpo na oyo etali kobima mpe kozonga na ye, mpe mpo na mosolo oyo azalaki komema na ndako. Amikundoli ete: “Lisosoli na ngai lisilaki kokufa.”

Jean abatisamaki lokola moklisto wana azalaki na mibu 11. Kasi, andimi ete: “Solo ezalaki mpenza te kati na motema na ngai. Nazwaki batisimo mpamba te libota na ngai lizalaki komizela ete nasala bongo. Ntango nakɔtaki na eteyelo ya katikati, nakómaki na etamboli mabe. Miziki ya rock ezalaki mpe na bopusi mabe likoló na ngai. Nabandaki kosala lisano libengami surf mpe kolekisa ntango mingi na libóngo elongo na bilenge oyo batambwisamaki na mitindá ya Biblia te. Bilangwiseli bizalaki mingi kuna.” Mosika te, akimaki ndako ya baboti na ye mpe akómaki na lolenge ya bomoi oyo ezalaki na boyokani te na makambo nyonso oyo bateyaki ye.

Mpo na nini bakómaka batomboki

Ezali mabe te mpo na elenge ete ameka kotalela bandelo na ye mpe azwa mwa bonsomi. Kasi, likambo mabe ezali nde ezaleli ya botomboki, ya bozoba mpe oyo ekoki kosala ye moko mabe. Mpo na nini bilenge mosusu bakómaka na bizaleli motindo wana? Bantina ezali mingi mpe ekeseni. Jean alobi ete: “Ntango ozali elenge, ozali na mposa ya kosakana mpe ya kominanola.” Nzokande, mpo na kozanga na bango ya eksperianse kati na bomoi, bilenge bakamataka ntango nyonso bikateli ya malamu te. (Baebele 5:14) Na yango, baboti ya mayele batyaka bipekiseli ya bokatikati mpo na bana na bango​—bandelo oyo ntango nyonso esepelisaka bango te.

Likambo ya mawa, bilenge mosusu bakómaka kino na kobwaka mateya oyo bazwaki epai na baboti oyo bazali na bobangi Nzambe. (Baefese 6:1-4) Yesu alobaki ete boklisto ezali lolenge ya bomoi oyo ekokani na nzela ya “moke” mpe ya “nkaka.” (Matai 7:13, 14) Na bongo, bilenge baklisto bakoki te kosala makambo oyo baninga na bango ya kelasi basalaka. Mingi balandaka bipekiseli yango kozanga kokakatana, mpamba te bayebi ete mibeko ya Nzambe mizali bozito te. (1 Yoane 5:3) Ya solo, mibeko yango mizali kobatela bilenge na mikakatano lokola kozwa zemi kozanga kobala, bilangwiseli mpe maladi oyo ekozwamaka na kosangisa nzoto. (1 Bakolinti 6:9, 10) Nzokande, bilenge mosusu batalelaka makambo na lolenge wana te; bakanisaka ete mibeko ya Biblia mipekisaka bango ete básepela na bomoi.

Elenge oyo azali komona ete baboti na ye bazali kolekisa ndelo mpo na makambo matali disipilini, kolekisa ntango mpe kominanola, akoki koyoka nkanda makasi. Elenge mwasi moko ya mibu 15 amilelaki ete: “Namoni ete baboti na ngai balekisi mibeko mpo na biso.” Ya solo, ekoki kolɛmbisa soki opesameli nzela te ya kosala makambo oyo baboti mosusu oyo bazali baklisto bapesaka nzela mpo na bana na bango. (Bakolose 3:21) Bilenge mosusu bamonisaka kozanga bosepeli na bango na koboyáká kotosa.

Epai mosusu, bilenge mosusu bapɛngwaka longwa na nzela ya malamu mpamba te baboti na bango bamonisaka botosi te na mitindá ya Nzambe. Jean amikundoli ete: “Tata azalaki molangwi masanga. Ye mpe mama mbala mingi bazalaki koswana mpo ete azalaki komela mingi. Biso mpe mama tozalaki mbala mingi kolongwa na esika tozalaki kofanda bobele mpo na kokima ye.” Bameli masanga mpe baoyo bakómi baombo ya bilangwiseli bazalaka na likoki te ya kokokisa bamposa ya bana na bango. Kati na mabota motindo wana, kofinga mpe koyokisama nsɔ́ni ezali makambo ya mpasi mokolo na mokolo mpo na bilenge.

Ya solo, bilenge mosusu bakómaka batomboki mpo ete baboti na bango basundolaka bango to babosanaka bango. Botomboki ekoki bongo kozala lokola mwango mpo na kobenda likebi ya baboti na bango, to ya koyokisa bango mpasi. Elenge mwasi moko ya mibu 16 na nkombo Lucie oyo abotami na libota ya bozwi, alobaki ete: “Lokola nakoki komikundola yango, baboti na ngai bazalaki kofanda soko moke te na ndako. Nazalaki mwana bobele moko kati na libota mpe lokola baboti na ngai bazalaki kolinga kofanda na ndako te, bazalaki ntango nyonso kotikela ngai mbongo mingi.” Kozangáká libateli, Lucie abandaki kokɔta na bisika bamelaka masanga na butu mpe abandaki kolangwa masanga. Ezali bobele na ntango bakangaki ye mpo ete azalaki kotambwisa motuka na nsé ya molangwa nde baboti na ye bayaki koyeba ete mbeba ezalaki.

Mpo na kosukisa, likambo moko likoki komonana oyo ntoma Paulo alobelaki yango ntango atunaki na etuluku moko ya baklisto ete: “Bojalaki kotambola malamu. Nani apekisi bino ete botosa makambo na sɔlɔ tɛ?” (Bagalatia 5:7) Mingimingi kosangana na baninga mabe nde ezali ntina ya mokakatano. (1 Bakolinti 15:33) Elenge mwasi moko ya mibu 19 na nkombo Élisabeth alobaki ete: “Namikɔtisaki na etuluku ya bato mabe.” Andimi ete, lokola litomba ya bopusi ya baninga, ‘nabandaki komela makaya mpe bilangwiseli.’ Abakisi ete “pite ekómaki momeseno mpo na ngai.”

Kotomboka ezali bozoba

Mbala mosusu yo mpe okoki komimona ete ozali kati na ezalela oyo ezali kotungisa yo, to kopesa yo nkanda. Ekoki kozala komekama monene oyo ekoki komema yo na kozanga kotosa baboti na yo mpe kosala oyo motema na yo elingi. Kasi, lokola moto na sembo Yobo akebisamaki, “keba ete nkɛlɛ ekamba yo te na [misala] mabe. Keba ete opɛngwa te epai na oyo ezali mabe.”​—Yobo 36:18-21, NW.

Na kokómáká na ezaleli ya nkanda, okoki kolamwisa likebi ya baboti na yo ete básala eloko, kasi ekozala mbala mosusu ya kosepelisa te. Ekoki kosala ete bátya yo lisusu na nsé ya bipekiseli mingi koleka. Lisusu, ezaleli ya botomboki ekopesa mpasi mingi na baboti na yo. (Masese 10:1) Yango ezali nde elembo ya bolingo? Yango ekobongisa nde makambo na yo? Soki omoni ete ozali na bantina ya malamu mpo na komilela, likambo ya mayele ezali bongo ya kolobela yango elongo na baboti na yo.a Mbala mosusu, bakoki kotalela lisusu lolenge na bango ya kosalela yo makambo.

Likambo mosusu ya kotalela ezali bopusi oyo misala na yo ekozala na yango likoló na Nzambe. ‘Likoló na Nzambe?’, okoki komituna. Ɛɛ, mpamba te kotombokela baboti na yo elingi koloba kotombokela Nzambe ye moko mpamba te ye nde moto azali kosɛnga na yo ete omemya baboti na yo. (Baefese 6:2) Nzambe aokaka ndenge nini liboso ya bozangi botosi motindo wana? Biblia elobi na ntina na libota ya Yisraele ete: “Mbala boni batɔmbɔkɛlaki ye kati na lisobe.” Yango ebimisaki matomba nini? “Bayokisaki [Nzambe] motema mpasi!” (Njembo 78:40) Ya solo, okoki kozala na nkanda mpo na baboti na yo, komiyokáká ete balekisi mibeko mingi mpo na yo. Kasi, olingi mpenza koyokisa Yehova Nzambe motema mpasi, ye oyo alingi yo mpe asepeli ete ozala na bomoi ya seko?​—Yoane 17:3; 1 Timoté 2:4.

Matomba mabe ya “bonsomi”

Tozali mpenza na bantina malamu ya koyoka Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo. Komitika te kozimbisama na bilaka ya lokuta ya “bonsomi.” (Kokanisá na 2 Petelo 2:19.) Ekoki komonana ete bilenge mosusu bazwaka bitumbu te mpo na etamboli na bango ya mabe. Nzokande, mokomi na Nzembo alobaki ete: “Omitungisa tɛ mpo na bato na masumu; yokela basali na mabe jua tɛ. Mpɔ ete bakolimwa mbango lokola matiti; bakokaoka lokola matiti mobesu.” (Njembo 37:1, 2) Bilenge oyo batombokaka, mbala mingi bazwaka matomba mabe ya oyo babéngi ete bonsomi. Na Bagalatia 6:7, Biblia elobi ete: “Bomijimbisaka tɛ; Njambe akokosama tɛ. Sɔkɔ moto akokona nini, akobuka bobɛlɛ yango.”

Yango emonanaki mpo na Stéphane, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisoló. Bobele lokola alingaki yango, ayebanaki mingi na baninga na ye oyo bazalaki na etamboli mabe. Amikundoli ete: “Namiyokaki ete nandimami.” Nzokande, na nsima makambo makómaki bololo. Alobi ete: “Babetaki ngai masasi, bapolisi bakangaki ngai mpe bakateli ngai etumbu ya bolɔ́kɔ. Oyo nyonso nazali komituna ezali ete: ‘Nyonso oyo nazalaki kosala, ezalaki mpenza na ntina?’”

Ezali boni mpo na Jean, oyo alingaki kozala na “bonsomi?” Nsima ya kokangama mpo ete azalaki na bilangwiseli, abimisamaki na lisangá ya boklisto. Kobanda ntango wana azindaki na etamboli mabe lisusu koleka. Alobi ete: “Nabandaki koyiba mituka mpo na kozwa mosolo. Nazalaki mobulu koleka.” Jean azwaki mosolo mingi na misala na ye ya mabe. Nzokande, amikundoli ete: “Nabebisaki mosolo nyonso. Maboke ya bilangwiseli oyo tozalaki komela ezalaki ya kokamwisa.” Ntango Jean azalaki kobunda te, koyiba te, to kolangwa te, bapolisi bazalaki kolanda ye. Amonisi ete: “Nakangamaki mbala soko 50. Mbala mingi, bazalaki kozwa ngai na elembeteli ya ekweli te, kasi mbala moko nalekisaki mbula mobimba na bolɔ́kɔ.” Ya solo, na esika ete azala na bonsomi, Jean amizindisaki ye mpenza kati na “makambo bojindo na Satana.”​—Emɔnisɛli 2:24.

Ezalaki bobele bongo mpo na Élisabeth. Boninga na ye ya makasi elongo na baninga oyo bazalaki baklisto te ekambaki ye kino na bolɔ́kɔ. Ayamboli ete: “Nazwaki nkutu zemi mpe mpo ete nazalaki komela bilangwiseli, mwana na ngai akufaki. Bilangwiseli ezalaki momeseno na ngai, likambo mosusu ezalaki te bobele komela yango. Na nsima, babimisaki ngai na ndako oyo nazalaki kofutela. Nakokaki lisusu kozonga epai na baboti na ngai te mpe nazalaki kooka nsɔ́ni mpo na kosɛnga lisungi epai na Yehova.”

Bandakisa ezali mingi ya bilenge oyo bazwaki mpasi, mpamba te babukaki mitindá ya Nzambe. Biblia epesi likebisi oyo: “Moto akokanisa ete nzela ya ye ebongi, nzokande ekokamba ye o liwa.” (Biyele 14:12, Liloba lya Nzambe) Na bongo, likambo ya mayele ezali ya kosala milende mpo na kozala na boyokani malamu elongo na baboti na yo, kosolola elongo na bango na esika ete otombokela bipekiseli ozali komona ete elongobani te mpo na yo.

Nzokande, ezali boni mpo na bilenge oyo batoli oyo ekómeli bango nsima, oyo basili komimona ete bakwei mpenza kati na etamboli mabe? Mwango mozali mpo na kobongisa makambo elongo na baboti na bango​— mpe na Nzambe? Lisoló na biso na mbala ezali koya kati na nimero oyo ekolanda ekotalela mituna wana.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Masoló mingi mapesaki makanisi mabongi na makambo motindo oyo. Talá, na ndakisa, molɔngɔ́ “Mituna oyo bilenge batunaka . . . ” kati na nimero ya 8 Yanuáli 1985, 8 Augústo 1992 mpe 8 Novɛ́mbɛ 1992 ya Lamuká!, ebimeli ya Lifalansé

[Elilingi na lokasa 26]

Kotombokela baboti na yo ekoki kopesa yo “bonsomi” koleka, kasi osili kokanisa na matomba mabe na yango?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto