Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/10 nk. 23-27
  • Bilenge, bótambolaka na ndenge ebongi na Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilenge, bótambolaka na ndenge ebongi na Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mikakatano oyo etali kaka bilenge
  • “Yehova azalaki na Yozefe”
  • Moize akimaki “bosepeli ya . . . lisumu”
  • Asalelaki lolemo na ye mpo na kosanzola Nzambe
  • Bazalaki kondima ete Yehova azali
  • Yehova akosundola bino te
  • Bilenge: Bozali koluka nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mpo na nini nasengeli kotosa baboti na ngai?
    Lamuká!—1995
  • Biblia mpe ezaleli ya bilenge
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Bopeto na bizaleli ezali kitoko ya bilenge
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/10 nk. 23-27

Bilenge, bótambolaka na ndenge ebongi na Yehova

BAKLISTO mosusu oyo bazali bilenge batikaki baboti mpe lisangá na bango mpo na mwa ntango mpe bakendaki kofanda epai mosusu. Bamosusu basalaki yango mpo na komipesa lisusu mingi na mosala ya kosakola. Mpo na bamosusu, ezalaki nde mpo bazalaki na ekateli ya kokɔta na makambo ya politiki te. (Yisaya 2:4; Yoane 17:16) Na mikili mosusu, “Kaisala” akatelaki bilenge ya sembo etumbu ya bolɔkɔ to ya kosala misala mpo na bolamu ya bato nyonso.a​—Malako 12:17; Tito 3:1, 2.

Ntango bilenge yango bakɔti bolɔkɔ mpo balingaki kokɔta na makambo ya politiki te, bakoki kozala esika moko na bato ya mobulu na boumeli ya ntango molai. Bilenge mosusu oyo batikaki ndako ya boboti mpo na bantina mosusu basengelaki mpe kosala na bisika oyo ezali na makambo mabe. Ndenge nini bilenge yango to bato mosusu oyo bazali na bisika ya ndenge wana bakoki kolonga makanisi mpe makambo oyo bakutanaka na yango wana bazali kosala makasi ete ‘bákoba kotambola na ndenge ebongi na Nzambe?’ (1 Batesaloniki 2:12) Ndenge nini baboti na bango bakoki kobongisa bango liboso mpo na kolonga makambo mabe oyo bakoki kokutana na yango?​—Masese 22:3.

Mikakatano oyo etali kaka bilenge

Tákis, elenge moko ya mbula 21, oyo atikaki baboti na ye na boumeli ya sanza 37, alobi boye: “Kozala mosika na baboti oyo bazalaki kobatela ngai mpe bankulutu oyo bayebaki ngai malamu mpe bazalaki kokɛngɛla ngai na bolingo ezalaki mpasi mpe ezalaki kobangisa ngai.”b Abakisi boye: “Ntango mosusu nazalaki komimona ete nazali na libateli te.” Pétros, elenge ya mbula 20, atikaki baboti na ye na boumeli ya mbula koleka mibale. Alobi boye: “Mpo na mbala ya liboso na bomoi na ngai, nasengelaki kozwa bikateli ngai moko na makambo lokola masano mpe baninga, mpe ntango mosusu nazalaki kozwa bikateli ya malamu te.” Abakisi boye: “Ntango mosusu nazalaki kobanga mokumba monene oyo bonsomi oyo nakómaki na yango ebakiselaki ngai.” Tássos, nkulutu moko oyo akutanaka mingi na bilenge ya ndenge wana, alobaki boye: “Maloba ya salite, botomboki, mpe mobulu ya baninga oyo bazali bandimi te ekoki kobebisa elenge oyo azali na bokɛngi te mpe azali makasi te na elimo.”

Ntango bilenge ya ndenge wana bazali kofanda esika moko na bato oyo batosaka mitinda ya Biblia te mpe kosala na bango, basengeli kokeba ete bákóma te na mposa ya kolanda banzela mabe ya baninga na bango. (Nzembo 1:1; 26:4; 119:9) Ekoki kozala mpasi bábatela mimeseno malamu ya koyekola bango moko, koyangana na makita, mpe kobima na mosala ya kosakola. (Bafilipi 3:16) Ekoki mpe kozala mpasi bámityela mikano ya elimo mpe bákokisaka yango.

Bilenge ya sembo balingaka ete maloba mpe etamboli na bango esepelisa Yehova. Basalaka makasi mpo na kokokisa likambo oyo Tata na bango ya likoló azali kosɛnga bango: “Mwana na ngai, zalá na mayele mpe sepelisá motema na ngai, ete nazongisela ye monɔkɔ oyo akopamela ngai.” (Masese 27:11) Bayebaka ete molato mpe bizaleli na bango etindaka bato bákanisa malamu to mabe mpo na Yehova mpe basaleli na ye.​—1 Petelo 2:12.

Ezali esengo ete mingi kati na bilenge yango bazali kosala nyonso mpo bázala lokola bandeko na bango ya ekeke ya liboso, oyo ntoma Paulo abondelaki mpo na bango ete ‘bátambola na ndenge ebongi na Yehova mpo básepelisa ye mpenza wana bazali kokoba kobota mbuma na mosala nyonso ya malamu . . . mpo báyika mpenza mpiko mpe bázala na motema molai esika moko na esengo.’ (Bakolose 1:9-11) Biblia elobeli ebele ya bilenge oyo bazalaki kobanga Nzambe mpe balongaki kotambola na ndenge ebongi na Nzambe atako bazalaki na bisika oyo bamesenaki na yango te, ya makambo mabe mpe ya losambo ya bikeko.​—Bafilipi 2:15.

“Yehova azalaki na Yozefe”

Yozefe, mwana oyo Yakobo ná Laele balingaki mingi, azalaki naino elenge mpenza ntango alongwaki na mabɔkɔ ya tata na ye oyo azalaki kobanga Nzambe. Batɛkaki ye na boombo na Ezipito. Yozefe apesaki ndakisa ya elenge oyo alingá mosala, oyo bakoki kotyela motema mpe oyo aboyaka makambo mabe. Atako azalaki moombo ya Potifala​—moto oyo azalaki mosambeli ya Yehova te​—Yozefe azalaki kosala mosala na ye na motema moko mpe azalaki komipesa; yango wana, nsukansuka, nkolo na ye atyaki ye mokɛngɛli ya biloko nyonso ya ndako na ye. (Genese 39:2-6) Yozefe atikalaki sembo epai ya Yehova, mpe mpo na ezaleli yango, akɔtaki bolɔkɔ. Atako bongo, alobaki te ete: “Mpo na nini nabomaki nzoto?” Ata na kati ya bolɔkɔ amonisaki bizaleli malamu, mpe mwa moke na nsima, batyaki ye kapita na kati ya bolɔkɔ. (Genese 39:17-22) Nzambe apambolaki ye, mpe ndenge Genese 39:23 elobi yango, “[Yehova] azalaki na [Yozefe].”

Lokola Yozefe azalaki mosika na baboti na ye oyo babangaka Nzambe, elingaki kozala mpasi te alanda bizaleli ya bato ya bikólo mosusu oyo afandaki na bango mpe alanda makambo ya mbindo ya bato ya Ezipito! Kasi, abatelaki mitinda ya Nzambe mpe asalaki lisumu te ata ntango amekamaki makasi. Ntango mwasi ya Potifala azalaki koluka ete asangisa na ye nzoto, Yosefe azalaki mbala nyonso koloba na ye ete: “Nakoka kosala mabe monene oyo mpe kosala lisumu epai ya Nzambe boni?”​—Genese 39:7-9.

Lelo oyo, Batatoli oyo bazali bilenge basengeli koyoka makebisi ya Biblia na makambo lokola baninga mabe, masano ya mabe, bililingi ya bato bazali kosangisa nzoto, mpe miziki ya nsɔni. Basengeli koyeba ete “miso ya [Yehova] ezali na bipai nyonso, kotalaka mabe mpe malamu.”​—Masese 15:3.

Moize akimaki “bosepeli ya . . . lisumu”

Moize abɔkwamaki na ndako ya Falao epai bazalaki kosambela bikeko mpe balingaki bisengo mingi. Biblia elobi ete: “Na kondima Moize, . . . aboyaki kobengama mwana ya mwana mwasi ya Falao, koponáká konyokwama elongo na bato ya ekólo ya Nzambe na esika ya kozwa bosepeli ya ntango mokuse ya lisumu.”​—Baebele 11:24, 25.

Kozala moninga ya mokili ekoki komemela moto mwa matomba, kasi ezalaka kaka ya ntango mokuse. Soki eumeli, ekoki koleka te ntango oyo etikali mpo na mokili oyo. (1 Yoane 2:15-17) Eleki malamu kolanda ndakisa ya Moize! Biblia elobi ete “atikalaki ngwi lokola nde azalaki komona Moto oyo amonanaka te.” (Baebele 11:27) Atyaki makanisi na ye na libula ya elimo ya bankɔkɔ na ye oyo bazalaki kobanga Nzambe. Azalaki na mposa ya kokokisa mokano ya Yehova na bomoi na ye.​—Exode 2:11; Misala 7:23, 25.

Ntango bilenge oyo babangaka Nzambe bazali na bisika ya mabe, basengeli koyekolaka bango moko mpo na kokolisa boyokani na bango na Yehova, mpo bákoka koyeba malamu “Moto oyo amonanaka te.” Kozala na programɛ malamu ya makambo ya elimo, lokola koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola, ekosalisa bilenge bábosana makambo ya elimo te. (Nzembo 63:6; 77:12) Basengeli kosala makasi mpo na kolona kondima mpe elikya makasi lokola oyo ya Moize. Ekozala malamu bátya makanisi na bango epai ya Yehova mpe básala misala oyo ekosepelisa ye, básepela kozala baninga na ye.

Asalelaki lolemo na ye mpo na kosanzola Nzambe

Elenge mosusu oyo apesaki ndakisa malamu ntango azalaki mosika na libota na ye ezali elenge mwasi Moyisalaele oyo Basulia bakangaki na mikolo ya mosakoli Elisa. Elenge yango akómaki mwana ya mosala ya mwasi ya Namana, mokonzi ya basoda ya Sulia, moto oyo azalaki kobɛla maba. Elenge yango ayebisaki mwasi wana boye: “Soki nkolo na ngai azalaki liboso ya mosakoli oyo azali na Samalia, mbɛlɛ ye akobikisa ye na [maba] na ye.” Namana ayokaki litatoli na ye, yango wana akendaki na Yisalaele kokutana na Elisa mpe maba na ye esilaki. Lisusu, Namana akómaki mosambeli ya Yehova.​—2 Mikonzi 5:1-3, 13-19.

Ndakisa ya elenge mwasi yango ezali komonisa ete bilenge basengeli kosalela lolemo na bango mpo na kokumisa Nzambe, ata soki bazali mosika na baboti na bango. Soki elenge mwasi yango amesanaki na “masolo ya bozoba” to “masɛki ya nsɔni,” alingaki nde kozwa makasi ya kosalela lolemo na ye malamu ndenge asalaki ntango libaku emonanaki? (Baefese 5:4; Masese 15:2) Níkos, elenge mobali ya mbula koleka mwa moke 20 oyo akɔtaki bolɔkɔ mpo aboyaki kokɔta na makambo ya politiki alobi boye: “Ntango nazalaki na bandeko mosusu oyo bazali bilenge na bolɔkɔ moko na zamba, mosika na baboti mpe bankulutu, namonaki ete elobeli na biso ekómaki kobeba. Nazalaki kokumisa Yehova ata moke te.” Likambo ya malamu ezali ete Níkos ná bilenge mosusu bazwaki lisalisi mpo na kolanda toli ya Paulo na likambo yango: “Tiká ete pite mpe bosɔtɔ ya ndenge nyonso to lokoso etángama ata kotángama te na kati na bino, ndenge mpenza ebongi na basantu;”​—Baefese 5:3.

Bazalaki kondima ete Yehova azali

Makambo oyo ekómelaki bilenge Baebele misato, baninga ya Danyele, na Babilone ya kala ezali komonisa ete Yesu alobaki solo ete moto oyo azali sembo na makambo mike azalaka mpe sembo na makambo minene. (Luka 16:10) Ntango bapesaki bango bilei oyo Mibeko ya Moize epekisaki, bakokaki koloba na mitema na bango ete bazali baombo na mboka mopaya mpe ndenge mosusu ya kosala ezali te. Kasi bapambolamaki na ndenge batalelaki na lisɛki te oyo ekokaki komonana lokola likambo moke! Bazalaki na mayele mpe nzoto kolɔngɔnɔ koleka baombo mosusu oyo bazalaki kolya bilei kitoko ya mokonzi. Kozala sembo na makambo wana mike elendisaki bango; yango wana, ntango bamekamaki makasi, elingi koloba ntango basɛngaki bango báfukamela ekeko, baboyaki mbala moko.​—Danyele 1:3-21; 3:1-30.

Bilenge misato yango bazalaki mpenza kondima ete Yehova azali. Atako bazalaki mosika na baboti na bango mpe na esika ya losambo ya Nzambe, bazalaki na ekateli ya kozwa litɔnɔ ya mokili te. (2 Petelo 3:14) Bamonaki ete boyokani na bango na Yehova ezali na motuya mingi mpe bandimaki ata kokufa mpo na yango.

Yehova akosundola bino te

Ya solo, ntango bilenge bazali mosika na bato oyo balingaka mpe batyelaka motema, bakoki kokanisa ete bazali na libateli te, ete mabe ekoki koyela bango mpe bakoki kobanga. Kasi, na elikya makasi ete “Yehova akosundola” bango te, bakoki kolonga komekama mpe mikakatano oyo bakoki kokutana na yango. (Nzembo 94:14, NW) Soki bilenge yango ‘banyokwami mpo na boyengebene,’ Yehova akosalisa bango bákoba kotambola na “nzela ya boyengebene.”​—1 Petelo 3:14; Masese 8:20.

Yehova alendisaki mpe apambolaki Yozefe, Moize, elenge mwasi ya Yisalaele, mpe bilenge Baebele misato. Lelo oyo, na nzela ya elimo santu, ya Liloba na ye, mpe ya ebongiseli na ye, azali kosunga baoyo bazali ‘kobunda etumba ya malamu mingi ya kondima’; alaki kopesa bango “bomoi ya seko.” (1 Timote 6:11, 12) Ya solo, moto akoki kotambola na ndenge ebongi na Yehova, mpe ezali malamu mingi kosala yango.​—Masese 23:15, 19.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai 1996, nkasa 18-20.

b Topesi bango bankombo mosusu.

[Etanda na lokasa 25]

BABOTI​—BÓBONGISA BANA NA BINO LIBOSO!

“Bana mibali babotami na moto kati na makasi na ye bazali [lokola] mbanzi na lobɔkɔ ya elombe.” (Nzembo 127:4) Mpo mbanzi ebɛta na esika oyo bakani kobwaka yango esengeli koyeba mpenza kobwaka yango. Ndenge moko mpe, bana bakoyeba te kobunda na mikakatano oyo bakoki kokutana na yango bipai mosusu soki baboti bateyaki bango te na ndenge ebongi.​—Masese 22:6.

Bilenge bamemamaka na loyenge to balandaka “bamposa oyo ekangani na bolenge.” (2 Timote 2:22) Biblia elobi boye: “Fimbo mpe mpamela ekoyeisa mayele, kasi mwana oyo atikami epai na ye moko akokómisa mama na ye na nsɔni.” (Masese 29:15) Soki baboti bazali kotika elenge asala nyonso oyo alingi, akoyeba ndenge ya kosala te ntango akokutana na mikakatano ya bomoi mpe masɛnginya ntango akozala esika moko te na baboti.

Baklisto oyo bazali na bana basengeli komonisa bango polele mpe na ndenge ebongi mikakatano, masɛnginya, mpe makambo mabe ya mokili oyo. Basengeli kozala na makanisi ya kolɛmbisa nzoto te to mabe, kasi bakomonisa elenge makambo mabe oyo akoki kokutana na yango soki azali esika moko na baboti te. Formasyo wana, bakisa bwanya ya Nzambe, ‘ekopesa mayele epai ya elema, boyebi mpe toli epai ya elenge.’​—Masese 1:4.

Baboti oyo bazali koteya bana na bango mitinda oyo esepelisaka Nzambe mpe bizaleli malamu bapesaka bango makoki ya kolonga mikakatano ya bomoi. Koyekola Biblia na libota pɔsɔ na pɔsɔ, kosolola malamu, koluka mpenza bolamu ya bana ekoki kosalisa bana bálonga mpe kozanga kosala yango ekoki kosala ete bana bábeba. Baboti basengeli kopesa bana na bango formasyo na bokatikati, na makanisi malamu mpe basengeli kozala na makambo makasi te, basengeli kosalisa bana na bango bayeba kozwa bikateli bango moko na bomoi. Na ndakisa na bino, bóteya bana na bino ete likoki ezali ya kozala na mokili, kasi kozala moto ya mokili te.​—Yoane 17:15, 16.

[Elilingi na lokasa 23]

Baklisto mosusu oyo bazali bilenge batikaki ndako ya baboti

[Bililingi na lokasa 24]

Soki bilenge bazali kolonga komekama, bakoki kolanda ndakisa ya Yozefe mpe kotikala pɛto na elimo

[Bililingi na lokasa 26]

Landá ndakisa ya elenge mwasi Moyisalaele oyo asalelaki lolemo na ye mpo na kopesa Yehova nkembo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto