Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g95 Avril nk. 5-7
  • Lolenge ya bilei oyo bikoki kopesa yo nzoto kolɔngɔ́nɔ́

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lolenge ya bilei oyo bikoki kopesa yo nzoto kolɔngɔ́nɔ́
  • Lamuká!—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kobomba ya mayele
  • Mpo na nini kolya bilei bikeseni?
  • Likanisi ya bokatikati na ntina etali bilei mpe kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto
  • Bilei na yo bizali mpenza ya malamu?
    Lamuká!—1995
  • Eutaka mpenza na nini, mpe mikakatano nini ya minene ebimisaka?
    Lamuká!—2003
  • Olyaka malamu na elimo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Ndenge nini nakoki kokitisa kilo na ngai?
    Mituna oyo bilenge batunaka
Makambo mosusu
Lamuká!—1995
g95 Avril nk. 5-7

Lolenge ya bilei oyo bikoki kopesa yo nzoto kolɔngɔ́nɔ́

OYO nde esengo ya komona mwana oyo aleisami malamu! Nzokande, mwana akómaka na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto malamu bobele na pwasa te. Kate, mobotami ya ekólo Canada oyo afandi sikawa na Brésil alobi ete: “Bilei oyo ezangi mindɔndɔ́ kasi ezali na matomba ezalaki ntango nyonso likambo ya liboso kati na libota na biso bobele te mpo na makambo matali mosolo kasi mpe mpo na ngonga oyo elekisami mpo na kolamba mpe kolya esika moko. Lokola mama na ngai azalaki kosala epai mosusu te bobele na ndako, mokolo na mokolo soki touti na kelasi, tozalaki kokutana na nsolo kitoko ya bilei ya nzánga oyo ezalaki kozela biso mpe mbala mosusu mikate asalaki oyo ezali kozela biso.”

Engebene Zulunalo Economist, na esika ya kozala na bilei ya malamu, “bato soko milió 780 kati na mikili ya bobóla, elingi koloba moto moko kati na bato mitano na motuya ya bato nyonso, bazali kolya malamu te. Nzokande, bato miliare mibale oyo bazali kozwa bilei, bazali kozanga vitamini mpe biloko mosusu ya ntina kati na nzoto.” Longola likambo oyo ete moto oyo alyaka malamu te alɛmbaka; lisusu, azali mpe na likoki te ya kopesa basusu matomba. Na yango, mpo na bana oyo balyaka malamu te, Eduardo Giannetti da Fonseca, moto oyo ayekolaka makambo ya nkita na Eteyelo monene ya São Paulo, na Brésil, alobi boye: “[Kobebisama ya bato] lolenge oyo ezali mpenza mabe koleka eloko nyoso mosusu. . . . Nakanisi ete kati na bana oyo mayele ezali mpe makoki ezali, kasi yango ezali kokóla te na ntina na bobóla. Kati na bango, na makambo mosusu, Albert Einstein mosusu akoki kobima.” Zulunalo Veja elobi ete “Mboka ezali kobungisa misisa oyo mizali kobeba mpo na kolya ya malamu te mpe ezali kobwaka maziba ya mayele, ya zébi ya kosala, mpe nguya.” Ezali na ntina yango nde baboti ya mayele bazali kopesa bana na bango moboko ya makasi na bomoi na kobombáká mosolo mpo na bilei ya malamu, atako bomoi ekómi mpasi.

Kobomba ya mayele

“Kobomba” elimboli “kosalela eloko moko boye mpo na kozwa mbano to matomba na yango na mikolo mizali koya.” Lolenge nini okoki kobomba mosolo mpo na bilei ya malamu? Soki esengeli, okoboya kosomba biloko ya ntalo makasi to ya monzɛlɛ mpo na kotika mwa mosolo na yo mpo na bilei ya malamu?

Kati na búku The New Encyclopœdia Britannica tozali kotánga boye: “Biyokeli ya nzoto bitikalaka ya kolala te mpo ete bílamuka na mbalakaka mokolo ya kobotama; bolukiluki emonisi ete biyokeli bibandaka kosala liboso ya kobotama.” Na bongo, mwango ya malamu ya kobanda koleisa mwana ezali ya kozala na mama oyo aleisami malamu. Litambe ya mibale​—nsima ya kobotama ya elɛzi​—ezali ya konúngisa ye lokola mabɛ́lɛ ya mama epesaka bilei nyonso mpe ebatelaka mwana na makɔnɔ oyo mamonanaka mingimingi. Engebene Savoir pour sauver, mokanda moko ya Mabota Masangani (Nations Unies), “Mabɛ́lɛ ya mama yango moko ezali bilei bileki kitoko mpe bimeli bileki kitoko mpo na elɛzi na boumeli ya basanza ya liboso ya kobotama na ye. Bana bazalaka na mposa ya biloko mosusu, bakisá mpe konúnga mabɛ́lɛ, na ntango bazali na basanza minei kino motoba ya kobotama.”

Atako ezali mpenza makasi, nzoto ya moto esengeli kotalelama na bopɔtu te. Ezali mpenza likambo ya ntina na kotonga yango uta bolenge na lisalisi ya bilei ya malamu. Kati na búku The World Book Encyclopedia, tozali kotánga boye: “Ntango mwana akokisi mbula motoba ya kobotama, bɔɔngɔ́ ekokisaka bakiló na yango nyonso, soko 1,4 kilogrammes. Lokola baselilɛ mingi ya bɔɔngɔ́ ezalaka na ntango ya kobotama, na bongo kobakisama ya kiló eutaka mpenza na kokóla ya ba cellules. Na boumeli ya bambula motoba ya ebandeli, mwana ayekolaka mpe azwaka bizaleli ya sika na lombangu koleka.” Na bongo, ata soki mwana azali kolya malamu nsima ya mbula motoba ya kobotama, bobele ba cellules moke nde ekólaka lisusu. Kate alobi boye: “Likabo lileki malamu oyo baboti bakoki kopesa na bana na bango ezali ya kopesa bango bilei ya malamu. Ata soki bakoki te kokokisa biloko mosusu oyo ebyangami ya ntina na kati na bomoi, oyo ezalaka mbala mingi ya ntalo koleka, baboti oyo bamipesaka mingi mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya makanisi mpe ya nzoto ya bana na bango, bazali kopesa bango ebandeli malamu kati na bomoi oyo eloko mosusu te ekoki kokitana yango.”

Mpo na nini kolya bilei bikeseni?

Mwana asengeli na bilei ya vitamini mingi mpo ete akóla malamu na nzoto mpe na makanisi. Bilei oyo bizali malamu te bilɛmbisaka mayele ya mwana na kelasi, akoki kolɛmba, kokóma gɔigɔi, akozala na likoki te ya kotya likebi makasi to komikundola makambo oyo mateyami. Lolenge ya makɔnɔ soko 25 euti na bozangi ya biloko ya ntina kati na bilei lokola​—proteini, vitamini, mafuta oyo masengeli mpe biloko mosusu.

Tótalela oyo ekómelaki Joaquim. Alobi boye: “Libota na biso ezalaki ya bobóla. Kasi tozalaki na etando ya mabelé mpe tolónaki pene na biloko nyonso oyo tozalaki kolya. Na ntango nyonso ya kolya, tozalaki na mámpa oyo esalemi na masangu mpe na farini ya seigle, yango ezalaki kopesa nzela na kolya ya malamu. Pene na mikolo nyonso, mama azalaki kolamba súpu oyo esangisaki mitindo mingi ya ndunda, bakisá mpe madesu, mpe yango ezalaki kokokisa bamposa na biso ya kolya ya malamu. Tozalaki kolya nyama mingi te, kasi tozalaki na mbisi, mingimingi sardines, morue mpe hareng.” Abakisi ete: “Mama na ngai azalaki na bana mitano, mpe nazali komikundola te ete moko na biso abɛlaki mpasi mosusu longola bobele miyoyo mpe gilípi. Nakanisi ete bilei na biso ya bokatikati esalaki mpenza bongo.” Mama moko ya bana nsambo alobi: “Esengelaki na biso kopesa bilei ya malamu na ntalo moke. Na bongo, tolónaki mwa elanga ya ndunda, oyo, ata soki ezalaki moke kasi ezalaki kokokisa bamposa na biso. Abakisi ete: bana na biso babɛlaki makɔnɔ makasi te mpe bazalaki ntango nyonso kolónga na misala na bango ya kelasi.”

Nzoto na biso ezali na mposa ya kozala na ba éléments chimiques 22 kati na 103 oyo eyebani. Atako ezali mpasi mpo na kolobela motuya ya sikisiki ya bavitamini, ya ba sels minéraux mpe ya baproteini ya ntina mpo na moto moko na moko, kolya ya malamu mpe ya bokatikati ekokokisa bamposa na yo. Nganga-mayele moko alobaki boye: “Sɛkɛlɛ́ ya kolya ya malamu ezalaka kati na kolya bilei bikeseni, oyo bizali na biloko nyonso oyo bipesaka matomba.”

Okosala nini soki bana na yo baboyaka bilei mosusu, lokola ndunda oyo ezali bololo? Engebene makanisi ya molambi moko oyo azali na eksperiansi, baboti bakoki kotya na mesa “lolenge ya bandunda nyonso oyo ezali na mboka oyo bango bafandi. Mikóló mingi balingaka kolya ndunda te mpamba te bapesaki bango yango te na ntango bazalaki bana. Lokola ndunda epesaka nsinga mpe bavitamini mingi oyo tozali na yango mposa mpe ezalaka na ntalo mingi te, baboti basengeli ntango nyonso kozala na yango mpo na kopesa na bana.” Na bongo, mpo na nini te kobanda koyekola kolamba lolenge ya sika ya bilei lokola ndunda to bambuma ya malamu, lokola soufflés ya elɛngi mpe compotes? Mpo na bakalori oyo ebéngami “ya mpamba,” apesi toli oyo: “Baboti basengeli te kozala na biloko ya sukali na ndako, longola bobele na mabaku ya ntina. Soki bana bazali na yango te, bakolya yango mpe te.”

Atako kolya bilei ya malamu na lolenge ekoki ekitisaka makámá ya kolya ya malamu te, bato mosusu bamilukelaka mikakatano bango moko na kolyáká mingi koleka. Kolya bakalori mingi koleka oyo nzoto ezali na yango mposa, ekoki kokamba moto na monene ya mabe, oyo ezalaka elongo na maladi ya sukali mpe na mpasi ya motema.a Ezala nkisi to mosala ya mabɔkɔ, lokola yango ekoki kokitana te mimeseno malamu ya kolya, ezali malamu kokitisa kolya biloko ya mafuta, biloko ya sukali, mungwa mpe masanga makasi. Lisusu, búku monene moko elobi ete: “Esengeli kozwa meko mpo na kobundisa nzala, mayoki ya komiyoka yo moko, kobulungana na makanisi, bomoi ya mitungisi, nkanda mpe kolɛmba; makambo wana nyonso ekoki kobimisa bopusi ya kolya mingi koleka.”

Likanisi ya bokatikati na ntina etali bilei mpe kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto

Biblia ezali te búku oyo etalelaka makambo matali bilei; nzokande, ezali kosalisa biso na kozala na bokatikati na makambo matali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto. Ntoma Paulo akebisaki baoyo basɛngisaka basusu na “kokila bilei ata Nzambe asalaki yango ete bandimi baoyo bayebi makambo na solo bakwa yango na matɔndi.” (1 Timote 4:3) Nzambe alingi ete biso tózala na esengo mpe tómizwela matomba na oyo tozali na yango. “Moke moke elongo na botosi na kotosa Yehova eleki mosolo mingi nde mikakatano elongo na yango.”​—Masese 15:16.

Moto moko te lelo oyo azali na kolɔngɔ́nɔ́ ya kokoka. Na yango esengeli kozala na bokatikati, kosala ete ozanga te to omitungisa mpe te koleka ndelo. Komipesaka mingi koleka na makambo matali bilei to makambo matali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto ekoki kobungisa bokatikati na biso.

Atako tozali kosala milende mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na biso, kasi lokola tozali naino na ebongiseli ya ntango oyo, tokómaka mibangé mpe tokufaka. Nzokande, likambo ya esengo, Biblia endimisi biso ete Bokonzi ya Nzambe ekotya nsuka na kozanga kolya ya malamu mpe bampasi. Atako bato balóngi te na milende na bango mpo na kosilisa nzala, tokoki kotalela na elikya makasi epai na mokili oyo kati na yango bilei ya malamu bikozala mingi koleka.​—Nzembo 72:16; 85:12.

[Maloba na nse ya lokasa]

a “Bato mosusu na mayele balimbolaka monene ya mabe lokola kolekisa 20 % ya kiló oyo ‘esengeli’ na kotalela molai ya nzoto, bonene mpe mbula.”​—The American Medical Association Family Medical Guide, lokasa 501. Talá mpe nimero na biso ya Lamuká! ya Apríli-Yúni 1994, (“Mituna oyo bilenge batunaka . . . Ndenge nini nakoki kokɔnda?”).

[Etanda na lokasa 7]

PESÁ NA BANA NA YO MIMESENO MALAMU YA KOLYA

◻ Monisá ndakisa malamu.

◻ Kotikela bango nzela te ete bálya bobele biloko oyo bango moko balingi.

◻ Bópɛngola kozala na biloko ya sukali to biloko mosusu oyo bizangi ntina na ndako.

◻ Bómesenisa bana na bino ete básepela na mitindo mikeseni ya bilei.

◻ Bólya na ntango ya sikisiki, bakisá mpe bolei ya ntɔ́ngɔ́.

◻ Bótika nzela te ete bapiblisité ya televizyó ezala na bopusi likoló na oyo bozali kolya.

◻ Bótikela bana nzela te ete bango moko bázwa biloko na frigó.

◻ Bómesenisa bango na kopesa mabɔkɔ na ntango ya kolamba.

◻ Bósala ete bázala na botɔ́ndi mpo na bilei ya mokolo na mokolo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto