Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g03 Octobre nk. 5-9
  • Eutaka mpenza na nini, mpe mikakatano nini ya minene ebimisaka?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Eutaka mpenza na nini, mpe mikakatano nini ya minene ebimisaka?
  • Lamuká!—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eutaka na nini?
  • Mikakatano minene oyo yango ebimisaka
  • Eutaka mpenza na nini?
  • Ndenge ya kosalisa mpe komibatela na yango
  • Likama moko monene mpenza
    Lamuká!—2003
  • Bilei na yo bizali mpenza ya malamu?
    Lamuká!—1995
  • Bana bazali na mpasi
    Lamuká!—1993
  • Lolenge ya bilei oyo bikoki kopesa yo nzoto kolɔngɔ́nɔ́
    Lamuká!—1995
Makambo mosusu
Lamuká!—2003
g03 Octobre nk. 5-9

Eutaka mpenza na nini, mpe mikakatano nini ya minene ebimisaka?

“Nazalaki na nzala mpe bosalaki komite moko mpo na kotalela nzala na ngai. Nazalaki na ndako ya kolala te mpe bosalaki lapolo oyo elobeli mpasi na ngai. Nazalaki kobɛla mpe bosalaki likita mpo na kolobela mikakatano ya babola. Botalelaki makambo nyonso oyo etali mpasi na ngai, kasi atako bongo nazali kaka na nzala, nazali kaka na ndako ya kolala te, nazali kaka kobɛla.” ​—⁠Mokomi apesi nkombo te.

ATAKO masangá oyo esalisaka bato na mokili mobimba esali milende mingi mpo na kosilisa likambo ya kozanga kolya malamu, milende yango elongi kaka te. Na ndakisa, na mobu 1996, Ebongiseli ya ONU mpo na bilei mpe mosala ya bilanga (FAO) esalisaki likita ya mokili mobimba mpo na kolobela likambo ya bilei (Sommet mondial de l’alimentation). Na likita yango, bamityelaki mokano ete, kobanda na mbula wana tii mobu 2015, basengeli kokitisa na katikati motángo ya bato oyo balyaka malamu te na mokili mobimba, elingi koloba basengeli kosalisa bato milio 400 bákóma kolya malamu.a

Ezali solo ete bato basali mwa milende na likambo yango. Kasi, lapolo oyo FAO euti kosala (L’état de l’insécurité alimentaire dans le monde 2001) eyebisi boye: “Emonani polele ete motángo ya bato oyo balyaka malamu te na mokili mobimba ezali kokita, kasi malɛmbɛmalɛmbɛ.” Emonani ete mokano oyo bazwaki na likita yango ezali kaka kokokisama te. Kutu, lapolo wana endimi ete “bato oyo bazali kolya malamu te bakómi ebele mpenza na mikili mingi ya bobola.”

Mpo na nini ezali mpasi mpo na kosilisa mokakatano ya kozanga kolya malamu? Mpo na koyeba yango, tólimbola naino nini babengi kozanga kolya malamu, na nsima tótalela mikakatano minene oyo yango ebimisaka mpe tóluka koyeba soki eutaka mpenza na nini.

Eutaka na nini?

Kozanga kolya malamu eutaka na kozanga koleisa baselile ya nzoto bilei oyo esengeli na yango, mpe mbala mingi makambo mibale nde ebimisaka yango: (1) kozanga kolya bilei oyo ezali na proteini, na kalori, na vitamini, mpe na minero mpe (2) kobɛla mingi maladi oyo eutaka na mikrobe.

Bamaladi lokola pulupulu, kitutu (rougeole), malaria mpe maladi ya mpema, elɛmbisaka nzoto mingi mpe esalaka ete nzoto ebungisa biloko oyo etongaka yango. Esilisaka mposa ya kolya, mpe moto akolya te na ndenge esengeli, yango nde ememaka na kozanga kolya malamu. Kozanga kolya malamu mpe ememaka na maladi, mpo mwana oyo azali kolya malamu te abɛlaka mingi. Likambo wana ezali kosala ete bato oyo bazali kokufa mpo balyaka te bilei oyo ezali na proteini mpe kalori bákóma mingi.

Mpo na nini kozanga kolya malamu etali mingi mpenza bana mike? Ezali mpo lokola bazali naino kokola, nzoto na bango esɛngaka kalori mingi mpe proteini mingi. Likambo ya kozanga kolya malamu etali mpe basi ya zemi mpe basi oyo bazali komɛlisa bana mpo bango mpe bazali na mposa ya kalori mpe proteini mingi.

Mpo na mwana, mbala mingi mokakatano ebandaka liboso kutu abotama. Soki mama na ye azali kolya malamu te to azali kolya mingi te liboso ya kozwa zemi to ntango azali na zemi, mwana oyo akobota akozala na kilo ya kokoka te. Na nsima, soki aboyisi mwana yango mabɛlɛ mbangumbangu, soki azali koleisa ye malamu te, mpe soki azali kobatela ye pɛto te, yango mpe ekoki komema na kozanga kolya malamu.

Kozanga kopesa mwana bilei oyo etongaka nzoto esalaka ete akola malɛmbɛmalɛmbɛ mpe akola malamu te. Mwana yango akobanda kolela mingi mpe kobɛlabɛla. Lokola nzoto na ye ezali se kobeba, mwana yango akokɔnda mingi, miso na ye ekokɔta mpe motó na ye ekozinda mwa moke likoló ya elongi, mposo ya nzoto na ye ekovimbavimba mpe akobanda kosala fiɛvrɛ mingi.

Kozanga kolya malamu ekoki komonana na lolenge mosusu. Yango mpe ekoki kopekisa mwana akola malamu. Na ndakisa, soki mwana azali kolya mpenza te biloko oyo ezali na minero​—⁠mingi mpenza fer, iode mpe zinc​—⁠mpe oyo ezali na vitamini​—⁠mpenzampenza vitamini A​—⁠akokola malamu te. Ebongiseli ya ONU mpo na kosalisa bana (UNICEF) emonisi ete na mokili mobimba bana pene na milio 100 bazali na vitamini A te na nzoto, nzokande kozanga vitimini A ekoki komema na kokufa miso. Elɛmbisaka mpe ebongiseli ya nzoto oyo ebundisaka maladi, yango wana nzoto ekokoka kobundisa maladi malamu te.

Mikakatano minene oyo yango ebimisaka

Kozanga kolya malamu ebebisaka mpenza nzoto, mingi mpenza nzoto ya mwana moke. Binama nyonso ya nzoto​—⁠motema, bangei, likundu (estomac), misɔpɔ, mimpululu, mpe bɔɔngɔ​—⁠ekoki kozala na likama soki moto azali kolya malamu te.

Nsima ya koyekola likambo yango mbala na mbala, bamonaki ete soki mwana akoli na ndenge esengeli te, bɔɔngɔ na ye ekofungwama mpenza te, akozala na makoki mingi te ya koyekola mpe akozala na mayele mingi te. Lapolo moko ya ONU emonisi ete wana ezali mikakatano ya minene mpe ya mabe koleka ya kozanga kolya malamu, oyo emonanaka ata nsima ya bambula.

Mpo na bana oyo bakufaka te mpo na kozanga kolya malamu, mikakatano yango ekoki komonana ata ntango bakómi mikóló. Ezali mpo na yango nde UNICEF emileli na maloba oyo: “Ezali mpenza nsɔni ndenge tozali kobebisa mayele ya bato na ndenge tozali kotika ete mayele yango ekita mpenza motindo wana, nzokande tozali na likoki ya kosilisa makambo oyo ezali komema na mokakatano yango.” Yango wana, bato bazali komitungisa mingi mpo na mikakatano oyo ebimaka ata nsima ya bambula soki moto azali kolya malamu te. Ntango bato ya mayele bayekolaki likambo yango na mikolo oyo euti koleka, bamonaki ete soki mwana azali kolya malamu te, ntango akokóma mokóló, akoki kozwa maladi oyo esilaka te, na ndakisa maladi ya motema, diabɛti, mpe komata tansyo.

Nzokande, UNICEF emonisi ete na mitindo nyonso ya kozanga kolya malamu, oyo ya makasi emonanaka mpenza mingi te: ‘Na bana nyonso oyo bazali kokufa mpo na bantina ndenge na ndenge, bakisa mpe kozanga kolya malamu, mingi kati na bango (koleka 75%) bazali kokufa te mpo na mitindo ya kozanga ya kolya malamu oyo ezali mwa makasi to oyo ezali makasi te.’ Mitindo wana mibale ya kozanga kolya malamu ebimisaka mikakatano epai ya bana ata nsima ya bambula. Yango wana, ezali na ntina mingi koyeba bilembo oyo emonisaka ete mwana azali kolya malamu te mpo na kosalisa ye na ndenge esengeli.​—⁠Talá etanda na lokasa 7.

Eutaka mpenza na nini?

Ndenge tolobeli yango liboso, kozanga kolya malamu eutaka libosoliboso na kozanga biloko ya kolya. Kasi, ezali mpe na makambo mosusu oyo esalaka mpenza ete bato bálya malamu te, na ndakisa mimeseno ya mboka, nkita ya mboka, bitumba, makama, elanga to kozanga mbula. Likambo ya liboso ezali bobola, oyo ezali komonana epai ya bamilio ya bato, mingi mpenza na mikili ya bobola. Nzokande, bobola esalaka ete moto alya malamu te mpe kolya malamu te ememaka na bobola, mpamba te soki moto azali kolya malamu te akozala na makasi ya kosala mosala te, yango wana akotikala kaka mobola.

Ezali mpe na makambo mosusu oyo esalaka ete bato bálya malamu te. Soki bato bakɔtá kelasi te, bakozala na mimeseno mabe ya kolya. Ndenge tomonaki yango, maladi mpe esalaka ete moto alya malamu te. Makambo mosusu eutaka na bizaleli mpe mimeseno ya mboka, na ndakisa bisika mosusu biloko ya kolya ezali mingi, kasi bisika mosusu ezali mpenza te mpe koboya ete basi básala makambo mosusu. Mbala mingi basi “balyaka nsima ya bato nyonso ya libota mpe batikalaka na biloko ya kolya mingi te.” Bapesaka mpe basi likoki mpenza ya kotánga kelasi mingi te, nzokande kotánga kelasi ekoki mpe kosalisa bango bábɔkɔla bana na bango malamu.

Longola yango, makambo oyo ekoki kobima na esika bato bafandi esalaka ete biloko ya kolya ekóma mpasi. Na makambo yango, tokoki kotánga bitumba, mpela, mipɛpɛ ya makasi mpe kozanga mbula. Na kotalela lapolo ya FAO (L’état de l’insécurité alimentaire) dans le monde 2001, kobanda sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1999 tii sanza ya Yuni 2001, mbula ebɛtaki ata moke te na bikólo 22, mopɛpɛ makasi to mpela esalemaki na bikólo 17, bitumba ya bana mboka to kati na bikólo esalemaki na bikólo 14, malili makasi ebɛtaki bikólo 3, mpe koningana ya mabelé esalemaki na bikólo 2. 

Ndenge ya kosalisa mpe komibatela na yango

Ndenge nini kosalisa mwana oyo azali na mokakatano ya kolya malamu te? Soki mwana yango azali na mokakatano ya makasi ya kozanga kolya malamu, likambo ya libosoliboso ezali kokɔta na ye na lopitalo. Na kotalela buku moko ya minganga, oyo Ebongiseli ya mokili mobimba mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto (OMS) ebimisaki, minganga bakotala mwana yango mpe bakosalisa bamaladi nyonso oyo azali na yango mpe bakozongisa ye mai. Bakoki kobanda koleisa ye mokemoke, mbala mingi na nzela ya mwa tiyo. Ndenge wana ya kosalisa ye ekoki koumela soki pɔsɔ moko.

Na nsima, bakobanda koleisa ye malamu. Mama na ye akozongela komɛlisa ye mabɛlɛ mpe bakolendisa mama na ye amɛlisaka ye mbala ebele na mokolo. Ntango bazali kosalisa mwana bongo, ezali na ntina mingi konyolisanyolisa ye nzoto mpe komemamema ye. Soki bazali kolandela ye mpe komonisela ye bolingo ndenge wana, bokokamwa ndenge akoumela te kofungwama. Ezali na ntango wana nde esengeli kolakisa mama na ye ndenge ya koleisaka ye malamu, kobatelaka ye pɛto, mpo azonga lisusu te ndenge azalaki. Na nsima, bakobimisa mwana yango na lopitalo. Ezali na ntina mingi kokendaka na ye na lopitalo mbala na mbala na mikolo oyo ekolanda.

Kasi, likambo oyo eleki malamu ezali ya kozwa bibongiseli mpo mokakatano yango ekóma te. Ezali mpo na yango nde na mikili mingi, baguvɛrnɛma mpe masangá mosusu oyo esalisaka bato ezwá bibongiseli ya kokabola biloko ya kolya oyo basangisi na biloko oyo etongaka mpenza nzoto to kobakisa biloko oyo etongaka nzoto na bilei oyo bato bameseni kolya. Baguvɛrnɛma mingi ezali kosalisa bato mpo bákóma te na mokakatano ya kozanga kolya malamu, na ndakisa ezali koteya bato ndenge ya kolya malamu, ezali kobatela mai ya komɛla, ezali kotonga batwalɛti, ezali kotya bopɛto na mboka, ezali kozwa bibongiseli mpo na kokatisa bana mangwele, mpe ezali kolandela ndenge bana bazali kokola.

Kasi, eloko nini mama akoki kosala mpo mwana na ye alyaka malamu? Etanda oyo ezali na lokasa 8 epesi toli oyo ekoki kosalisa. Longola yango, Georgina Toussaint, monganga ya bana mike, apesi toli ete mikolo nsambo nsima ya kobota, mama asengeli kozonga na mwana epai ya monganga to na lopitalo; akokenda na ye lisusu ntango akokisi sanza moko; mpe na nsima akobanda kozonga sanza nyonso. Mama asengeli mpe kokende na mwana epai ya monganga soki amoni lokola akómi kosila mai na nzoto, asali pulupulu ya makasi to fiɛvrɛ.

Atako batoli wana nyonso ekoki kosalisa yo na koleisa bana na yo malamu, likambo ya kozanga kolya malamu ezali mokakatano moko monene oyo bato bango moko bakoki kosilisa yango te, ata soki bazali kosala milende ya ndenge nini. Buku moko (Encyclopædia Britannica) endimi ete: “Koleisa bato nyonso malamu mpe koteya bango ndenge malamu ya kolya ezali mokakatano monene.” Na yango, “likama ya kotalela nokinoki oyo eyebani malamu te” ekosila mokolo mosusu?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mosusu ya likita yango (Sommet mondial de l’alimentation), talá Lamuká! ya 8 Augusto 1997, nkasa 12-14, na Lifalanse.

[Etanda na lokasa 7]

MWANA NA YO ALYAKA MALAMU TE?

Minganga basalaka nini mpo na koyeba soki mwana alyaka malamu to te? Bakoki kotalela bilembo ndenge na ndenge oyo emonisaka soki mwana alyaka malamu to te, kotuna mituna mpo na koyeba biloko nini mwana yango alyaka, mpe kosala mwana yango baekzamɛ. Kasi, mbala mingi, bayebaka soki mwana alyaka malamu te na kotalela nzoto na ye. Bakokanisaka kilo na ye mpe molai na ye na kilo mpe molai oyo esengeli mpenza mpo na bana ya mbula na ye mpo na koyeba soki mokakatano na ye ya kozanga kolya malamu ezali mpenza makasi mpe soki ezali mpenza likama mpo na ye.

Makambo ya libosoliboso oyo batalelaka ezali kilo ya mwana yango, molai na ye mpe monene ya mabɔkɔ na ye. Kotala soki kilo ya mwana yango ekokani na mbula na ye emonisaka soki mokakatano na ye ya kozanga kolya malamu ezali ya makasi to te. Soki ezali ya makasi, mwana akokɔnda makasi mpe akotikala kaka mikuwa. Balobaka ete mokakatano yango ezali ya makasi soki kilo na ye ekiti makasi (koleka 40%) na kotalela kilo ya bana ya mbula na ye, ezali ya mwa makasi soki kilo ekiti mwa makasi (25 tii 40%), mpe ezali ya makasi te soki kilo na ye ekiti makasi te (10 tii 25%). Soki mwana azali mpenza mokuse na kotalela mbula na ye, yango ekomonisa ete alyaka malamu te banda kala: azali kokola malamu te.

Na mitindo nyonso ya mikakatano oyo ebimaka mpo na kozanga kolya malamu bilei oyo ezali na proteini mpe kalori, oyo eleki mabe ezali oyo babengaka marasme mpe kwashiorkor, to oyo esangisaka marasme mpe kwashiorkor. Marasme (oyo elyaka nzoto mokemoke) ezwaka mingi bana oyo bazali naino komɛla mabɛlɛ, oyo bazali na sanza kobanda 6 tii 18. Bana babɛlaka maladi yango soki bazali kolya te, na boumeli ya ntango molai, bilei oyo ezali na kalori mpe oyo etongaka nzoto. Ebandaka mokemoke mpe ekómaka makasi soki mwana azali komɛla mabɛlɛ ya mama mingi te to soki bazali kopesa ye miliki ya maimai. Mwana akokɔnda makasi, misisa na ye ekokɔnda makasi mpe akomonana ete atikali kaka mikuwa, mpe akokola malamu te. Mwana yango akozala na “elongi lokola ya mokóló,” mpe akobanda kolela mingi.

Nkombo kwashiorkor, oyo euti na lokota moko ya Afrika, elimboli “mwana oyo bakitani.” Elobelaka mwana oyo mama na ye aboyisi ye mabɛlɛ nokinoki mpo na komɛlisa mwana mosusu oyo abotami sika. Mwana abɛlaka kwashiorkor ntango baboyisi ye mabɛlɛ, mpo azali lisusu kozwa kalori mpe proteini mingi te. Epekisaka mai etambola malamu na nzoto, yango wana mabɔkɔ, makolo mpe libumu evimbaka. Ntango mosusu elongi mpe evimbaka, ekómaka lokola sanza ntango ebimaka mobimba. Nzoto ekobimisa mwa bampota mikemike, mpe nsuki ekotɛla. Bana oyo bazali na maladi yango bavimbaka libale (foie), basepelaka ata na eloko moko te mpe bazalaka mawamawa. Erik, oyo tolobeli na lisolo ya ebandeli azalaki ndenge wana. Akómaki bongo mpo mama na ye amɛlisaki ye kaka sanza moko, na nsima akómaki kopesa ye miliki ya maimai. Ntango Erik akokisaki sanza misato, akómaki kopesa ye supu ya ndunda mpe mai ya sukali, nsima na yango atikaki ye epai ya mwasi moko oyo bazalaki kofanda na ye esika moko.

Motindo ya misato ya kozanga kolya bilei oyo ezali na proteini mpe kalori esangisaka marasme ná kwashiorkor. Soki basalisi yango noki te, bamaladi wana nyonso ekoki koboma.

[Etanda/Elilingi na lokasa 8]

LEISAKÁ MWANA NA YO MALAMU!

◼ Ezali na ntina mingi ete mama alyaka malamu. Basi ya zemi mpe basi oyo bazali komɛlisa bana basengeli kolyaka bilei oyo ezali na kalori mingi mpe proteini mingi. Mingi mpenza proteini nde esalisaka mama abimisa mabɛlɛ mingi. Yango wana, soki biloko ya kolya ezali moke, esengeli kotikela libosoliboso basi oyo bazali naino kobota mpe bana mike.

◼ Ezala ndenge nini, bilei oyo eleki malamu mpo na mwana ezali nde mabɛlɛ ya mama na ye. Ezali bongo mingi mpenza na mikolo oyo mwana abotami sika, mpamba te mabɛlɛ ya mama ezalaka na biloko oyo ebundisaka mikrobe na nzoto ya mwana. Na boumeli ya sanza soki minei ya liboso, mabɛlɛ ya mama epesaka mwana bilei nyonso oyo asengeli na yango mpo akola malamu.

◼ Atako mabɛlɛ ya mama esengeli kozala bilei ya libosoliboso ya mwana, soki mwana akokisi sanza minei mpe liboso akokisa sanza motoba, okoki kobanda kopesa ye bilei mosusu. Mokemoke, banda kopesa ye mbuma oyo okamoli mpe ndunda oyo oniki. Kopesa ye bilei ndenge na ndenge mbala moko te. Nsima ya mikolo mibale to misato, soki amesani na lolenge moko ya bilei, okoki komekisa ye bilei mosusu. Ya solo, mbala mingi esɛngaka kozala na motema molai mpe komekisa ye bilei ya sika mbala na mbala liboso ete amesana na yango. Ntango ozali kolambela ye bilei yango, kobosana te ete eloko nyonso esengeli kozala pɛto mpenza! Sukolá malamu mpenza bilei yango, nzungu, saani mpe lutu!

◼ Kobanda sanza mitano tii sanza libwa, mbala mingi bana basengelaka na kalori mpe proteini mingi, longola oyo mabɛlɛ ya mama epesaka. Landá kopesa ye bilei mosusu mbala na mbala. Okoki kobanda kopesa ye loso to masangu mpe ndunda oyo basalá mpo na bana mike, na nsima okoki kopesa ye nyama to mbisi mpe biloko ya kolya oyo basalaka yango na miliki. Na ebandeli ekosɛnga konika yango; kasi soki akokisi sanza motoba, okoki kaka kokatakata yango mikemike. Ezali na ntina te mpe ezali malamu te kobakisa mungwa to sukali.

◼ Nsima ya sanza mwambe, mabɛlɛ ya mama ezali lisusu bilei ya libosoliboso te ya mwana, akolanda komɛla yango kasi mingi te. Mwana akobanda kolya bilei oyo libota mobimba ezali kolya. Esengeli kobatela bilei ya mwana pɛto mpenza mpe kokatakata yango mikemike mpo atafuna yango kozanga mpasi. Bilei oyo ebongi na mwana esengeli kozala na mbuma, ndunda, loso to masangu, madesu to soja, nyama to mbisi, mpe biloko ya kolya oyo basalaka yango na miliki.b Bana mike basengeli mingi mpenza na bilei oyo ezali na vitamini A mingi. Bilei yango ezali, na ndakisa, mabɛlɛ ya mama, ndunda, mbuma lokola mangolo, paipai, to mpe carottes. Bana oyo bakokisi naino mbula misato te basengeli kolyaka mbala mitano to motoba na mokolo.

◼ Soki ozali kopesa mwana biloko ya kolya ndenge na ndenge mpe ozali kosangisa biloko yango na ndenge mingi, ozali kopesa mwana na yo biloko oyo etongaka nzoto mpe oyo ekobatela ye. Mama asengeli kosala nyonso mpo na kopesa mwana na ye bilei ya malamu mpenza, asengeli te koleisa ye na makasi soki atondi, to koboya kopesa ye biloko ya kolya soki emonani ete alingi kolya mingi.

[Maloba na nse ya lokasa]

b Okokuta makambo mosusu na lisolo “Se nourrir mieux, c’est possible!” na Lamuká! ya 8 Mai 2002, ebimeli ya Lifalanse.

[Elilingi]

Bato ya mayele bandimi ete mabɛlɛ ya mama ezalaka ntango nyonso bilei oyo eleki malamu mpo na mwana oyo abotami sika

[Eutelo ya bafɔtɔ]

© Caroline Penn/Panos Pictures

[Elilingi na lokasa 7]

Bana bazali kolya pɔtɔpɔtɔ mpe ndunda na eteyelo moko ya ekólo Bhoutan

[Eutelo ya bafɔtɔ]

FAO photo/WFP Photo: F. Mattioli

[Elilingi na lokasa 9]

Oyo okoki kosala mpo mwana na yo alyaka malamu

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Fɔtɔ ya FAO

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto