Nkoso-babebisi oyo izwami na mboka Australie
NA AUSTRALIE, motámboli-mopaya oyo ayebi te, akokamwa na kokanisáká ete ezali limpinga ya bandɛkɛ ya mokili ya molungé oyo bakimi longwa na lopango ya banyama to longwa na ebombelo ya bandɛkɛ. Bikelamu oyo, na bamboka mosusu ekoki komonana bobele na kati ya lobálá, nzokande awa, izali kotambola na bonsomi nyonso zingazinga na bilanga. Ezali mpenza solo mpo na nkoso oyo izwami na Australie—oyo izali kati na libota ya bandɛkɛ ya lángi ndenge na ndenge mpe ya makɛlɛlɛ.
Kati na mokili mobimba, ezali na mitindo soko 330 ya nkoso. Ezwami na mikili minso mpe bisanga, longola bobele na Antarctique oyo ezwami na nsé ya 20 degrés ya latitude nord. Atako mitindo nyonso ezwami na Australie te, nkoso izali kuna mingi mpo ete kozala na bango eyebana! Libota ya nkoso esangisi: perruches, cacatoès mpe loris, balei ya nectar. Na Australie, mbala mosusu emonani ete bandɛkɛ oyo lángi ndenge na ndenge bazali bipai binso.
Yango ezalaki mpenza likambo ya kokamwa ntango tosalaki mobembo na Nouvelle-Galles ya Súdi. Na ntango yango, ezalaki na perruches mingi oyo bazalaki kokómela biloko likoló na landalánda, mingimingi na ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ to mosika na nsima ya nzánga. Na balabála ya bato mingi, tomonaki cacatoès rosalbins, na nsálá ya lángi rose mpe mpɛmbɛ. Makɛlɛlɛ na bango makasi ezangi koyokama lokola miziki. Bazali kati na nkoso oyo emonanaka mingi na Australie, mpe iyangeli bingumba na mampinga minene minene. Batɛlɛmaka na bansinga ya telefone mpe ya lontiliki, basilá kobimisa kokatama ya kosolola na telefone na kati ya mboka. Nkoso ya basi mpe ya mibali basanganaka mpo na bomoi mpe babatelaka makasi zúmbu na bango, oyo esalami kati na nzeté oyo ezali na lidusú mpo na banyama oyo bayaka kokɔta kozanga ete babénga bango. Likambo ya mawa, “ikómi mingi koleka na boye ete ikómi kotángama kati na banyama oyo izali babebisi ya milóna.”—The Cambridge Encyclopedia of Ornithology.
Na lopango ya bato nyonso (parc public), perruches de Pennant bayaki kolya na mabɔkɔ na biso. Babangaka soko moke te mampinga ya batamboli-bapaya oyo balandaka bango na mobulu, bayebaki mpenza epai oyo bakoki kozwa likabo. Kozaláká kati na bandɛkɛ wana ya mboka, tokokaki kokanisa ete tozalaki kati na paladiso.
Oyo ekokaki kokamwisa biso mingi koleka ezalaki komona cacatoès oyo bazalaki na lisumba ya lángi ya mosaka ya minene kokita noki pene na koswá biso na moto. Ba cacatoès yango bankombo na bango euti na lisumba na bango ya lángi ya mosaka. Búku The Illustrated Encyclopedia of Birds elobi boye: “Wana limpinga bazali kolya na mabelé, basusu batelemi na banzeté ya mpembeni lokola basínzílí mpe bakopesa likebisi na konganga makasi.” Okoyeba nokinoki soki bozali na nkoso moko zingazinga na bino!
Eloko nini esalaka ete nkoso bakesena na bandeke mousu? Uta bikeke mingi, bato basepelaka na yango mpo na likoki na bango ya komekola mongongo ya moto. Kasi, bamekolaka mpe bandeke mosusu? Búku The Cambridge Encyclopedia of Ornithology eyanoli: “Atako mampinga ya nkoso ya zámba bazalaka makɛlɛlɛ mingi, bazali na likoki te ya komekola bandɛkɛ mosusu. Toyebi te mpo na nini nkoso bazali na likoki ya ‘koloba.’” Mpo na oyo etali komekola bandɛkɛ mosusu, elombe oyo aleki basusu banso ezali bongo mokɛ́ngɛlɛmboka (passereau) moko ya nɔ́rdi ya Amerika na nkombo moqueur polyglotte.
Ndɛkɛ izali pene na bipai binso na mokili—Omonaka yango? Otalaka yango? Oyebi oyo bazalaka zingazinga na yo? Okoki koyeba yango na nsálá na yango, na kolela na yango, na nzembo na yango to na kopumbwa na yango? Talá likambo oyo lizali mpenza boyekoli ya kokamwisa.
Na mitindo koleka 9 300 ya bandɛkɛ ya koyeba, kozanga kolobela mosusu nyonso ya kitoko oyo ezingi biso, nani akoki koloba ete bomoi ya seko ekozala na mpii? Tozali na makambo mingi ya koyekola, tozali na bantina mingi ya kokumisa mozalisi na biso! Tokoki kozala na botɔ́ndi mingi mpo na Nzambe na boye ete amonaki malamu na kokɔtisa kati na misala na ye ya kozalisa, “ndɛkɛ ikopumbwaka, NW.”—Genèse 1:20-23; Yobo 39:26, 27; Emoniseli 4:11.
[Bililingi na lokasa 15]
Cacatoès rosalbin mpe awa na nsé, perruche de Pennant
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Na ndingisa ya Australian International Public Affairs
[Bililingi na lokasa 16]
Cacatoès ya monene na lisumba ya lángi ya mosaka
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Na ndingisa ya Australian International Public Affairs