Bwanya ya Nzambe emonanaka na biloko oyo akelá
“Ye akolakisaka biso koleka banyama ya mokili, mpe akokómisaka biso na mayele koleka bandɛkɛ ya lola.”—YOBO 35:11.
BANDƐKƐ basalaka makambo mingi ya kokamwa. Ndenge oyo ndɛkɛ apumbwaka na likoló ebendaka likebi ya bato ya mayele oyo basalaka bampɛpɔ. Bandɛkɛ mosusu bapumbwaka bankóto ya bakilomɛtrɛ likoló ya mbu mpe bakómaka epai basengeli kokende kozanga ete bábunga nzela.
Bandɛkɛ bazalaka mpe na likoki ya kosolola bango na bango na nzela ya makɛlɛlɛ oyo basalaka mpe ya banzembo; likambo yango mpe emonisaka bwanya ya Mozalisi na bango. Tótalela mwa bandakisa.
Ndenge oyo bandɛkɛ basololaka
Bandɛkɛ mosusu babandaka kosolola bango na bango liboso kutu bábima na maki. Na ndakisa, ndɛkɛ oyo babengi nkanga abwakaka ata tii maki mwambe, likei moko na mokolo. Soki maki yango nyonso ezalaki koumela mikolo ndenge moko liboso epasuka, mbɛlɛ likei ya nsuka elingaki kobanda kobimisa mwana mikolo mwambe nsima ya likei ya liboso. Yango elingaki kozala mokakatano mpo na ndɛkɛ yango mpamba te, alingaki kobanda kobatela bana oyo babimi mpe kolanda kofandela maki oyo epasuki naino te. Nzokande, maki nyonso mwambe epasukaka mokolo moko. Ndenge nini esalemaka bongo? Nsima ya koyekola likambo yango, bato ya mayele bamoni ete ntango bana ya nkanga bazali naino na kati ya maki, bayokanaka ete bábima mokolo moko.
Ntango bandɛkɛ bakoli, mbala mingi mibali nde bayembaka. Ndɛkɛ ayembaka mingimingi na eleko ya kobotana mpo na kobengana bambanda to mpo na kobenda mwasi. Ezali na bankóto ya mitindo ya bandɛkɛ, kasi motindo mokomoko ezali na ndenge na yango ya kosolola; yango esalisaka bandɛkɛ ya basi báyeba bandɛkɛ ya mibali ya mitindo na bango.
Mbala mingi, bandɛkɛ bayembaka na ntɔngɔntɔngɔ mpe na mpokwa. Bayembaka na bantango yango mpamba te mopɛpɛ ezalaka makasi te mpe makɛlɛlɛ ezalaka mingi te. Bato ya mayele bamoni ete banzembo ya bandɛkɛ ekendaka mosika mingi na ntɔngɔ mpe na mpokwa koleka na moi.
Atako mibali nde bayembaka, bandɛkɛ nyonso, ata mpe basi bayebaka kosala makɛlɛlɛ to kobelela mpo na bantina ndenge na ndenge. Na ndakisa, ndɛkɛ oyo babengi pinson azali na balolenge libwa ya kobelela. Ndɛkɛ yango azali na lolenge oyo abeleleka mpo na kokebisa baninga ete likama ezali na likoló—na ndakisa, ntango amoni ndɛkɛ moko oyo alyaka bango—kasi azali na lolenge mosusu oyo abelelaka ntango amoni likama na mabelé.
Likabo ya monene koleka
Ya solo, mayele ya lɔɔmbi (instinct) oyo Nzambe apesá bandɛkɛ ekamwisaka mpenza. Kasi, makoki ya koloba mpe kosolola oyo bato bazali na yango ekamwisaka koleka. Yobo 35:11 elobi ete Nzambe akelaki bato “na mayele koleka bandɛkɛ ya lola.” Kaka bato nde bazali na likoki ya kobimisa makanisi ndenge na ndenge na maloba mpe na bajɛstɛ.
Na bokeseni na bikelamu mosusu nyonso, bato babotamaka na likoki ya koyekola minɔkɔ oyo ezali na maloba ndenge na ndenge. Zulunalo moko (American Scientist) oyo ebimisamaka na Internet elobi boye: “Bana mike bayebaka koloba ata soki baboti na bango balobaka te; kutu, bana oyo bazali bababa bayekolaka kosala bajɛstɛ ata soki baboti bateyi bango yango te.”
Likoki ya koloba mpe kosala bajɛstɛ mpo na koyebisa basusu makanisi mpe komonisa bango mayoki na biso ezali mpenza likabo ya kokamwa oyo Nzambe apesá biso. Kasi, likabo ya monene koleka oyo bato bazali na yango ezali likoki ya kosolola na Nzambe na nzela ya libondeli. Kutu, Yehova Nzambe alendisi biso ete tólobaka na ye. Biblia, Liloba ya Nzambe, elobi boye: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na nzela ya libondeli mpe na lilɔmbɔ elongo na matɔndi tiká ete masɛngi na bino eyebana epai ya Nzambe.”—Bafilipi 4:6.
Yehova alendisi biso ete tólukaka bwanya na ye na kati ya Biblia ntango tolingi kozwa ekateli moko ya monene. Lisusu, asalisaka biso tóyeba ndenge ya kosalela toli ya Biblia. Yakobo, mokomi moko ya Biblia, alobi boye: “Soki moko na bino azali kozanga bwanya, tiká akoba kosɛnga Nzambe, mpo ye apesaka na bokabi epai ya bato nyonso mpe kozanga kotyola; mpe yango ekopesama na ye.”—Yakobo 1:5.
Osengeli kosala nini?
Osalaka nini ntango oyoki ndɛkɛ moko azali koyemba to mwana moke abandi koloba? Omonaka bwanya ya Nzambe na biloko oyo akelá?
Nsima ya kotalela ndenge oyo akelamá, Davidi alobaki na Nzambe boye: “Nakotɔnda yo mpo ete nasalami na motindo ya kokamwa mingi; misala na yo ezali ya kokamwa mpe molimo na ngai eyebi yango malamu.” (Nzembo 139:14) Ntango ozali komona bwanya ya Nzambe na biloko oyo akelá, na ntembe te okokóma na kondima makasi ete akoki mpenza kotambwisa yo.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
Likoki ya kosolola ezali likabo ya Nzambe
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 4]
© Dayton Wild/Visuals Unlimited