Mikanda mikolimbolaka Biblia miyambami malamu na ex-Union Soviétique
Euti na mokomani na biso na Russie
NA EBANDELI ya 1991, ex-Union Soviétique na ntango wana esangisaki Russie mpe bikólo mosusu 14. Uta ntango wana, bikólo yango bizwaki lipandá na yango. Nzokande, Russie ezali na bato mingi koleka mikili misusu 14 oyo mpe bonene na yango eleki bango nyonso mbala misato. Na Sɛtɛ́mbɛ 1994, Batatoli ya Yehova bazalaki 117 276 kati na ex-Union Soviétique oyo bazalaki kokabola basolo ya Biblia epai na bazalani na bango.
Lelo oyo ntalo monene ya bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! na lokótá Russe ezali konyatama sanza na sanza mpo na kosalela yango kati na ex-Union Soviétique. Lisusu, batrakte mingi mpe mikanda ezali kokabolama kuna. Likambo oyo ete mikanda wana mikolimbolaka Biblia miyambami emonisami polele na nkomá oyo etindamaki na filiale ya Batatoli ya Yehova na Russie, pene na Saint Pétersbourg.
Basepeli na bazulunalo ya lángi
Mobali moko na Sibérie ya ntéi akomaki ete: “Ezalaki mpenza libaku ete námona Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na mabɔkɔ ya moninga na ngai moko ya mosala. Nasɛngaki ye ete alakisa ngai yango. Liboso, nabwakaki bobele liso likoló na bililingi ya kongɛnga mpe ya lángi. Na nsima, natángaki mingi koleka . . . Kozanga koyeba, natángaki zulunalo yango longwa na ebandeli kino nsuka. Mituna mitunamaki na lolenge ya kosepelisa, ya kobenda likebi mpe ya lisoló.”
Mobali mosusu na Sibérie alobaki ete: “Na libaku moko boye, nazwaki nimero moko ya zulunalo na bino. Nalingi kolɛ́tɛ bino te, kasi yango ezali nsango ya malamu koleka oyo natángá naino te na ntina na kondima.”
Lífulumɛ́ moko na Saint Pétersbourg, engumba ya mibale ya Russie mpo na bonene, akomaki ete: “Matɔ́ndi mingi mpo na kolandana ya masoló kitoko ya Lamuká! ya 8 Yanuáli 1995 (ebimeli ya Lifalansé) na ntina na kotungisama na makanisi mpo na bolɛmbu ya nzoto. Masoló yango masilisaki mikakatano na ngai te, kasi mapesaki ngai lisungi oyo nazalaki kozela mpe koluka.”
Mwanakelasi moko ya mibu 17 akomaki ete: “Nazali na botɔ́ndi mingi mpo na bino nyonso oyo bozali kobimisa mikanda kitoko boye. Ntango ngai mpe baninga na ngai tolongwaki na ndako ya sinemá, tomonaki mwa bazulunalo oyo batikaki likoló na kiti moko. Tokamataki yango. . . . Ntango nazalaki kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, nakamwaki mingi na makambo nazalaki kotánga. Bomoi ya mikolo mizali koya ekozala solo bongo? Sikawa nazali kotánga Baevanzile mpe nazali komeka kososola yango. Bazulunalo na bino ezali mpenza kolimbola makambo oyo Biblia ezali koyebisa.”
Mobali moko ya mibu 26, alobaki ete: “Nazali na botɔ́ndi mingi mpo na lisoló ‘Komiboma ezali nde mwango ya malamu?’ kati na Lamuká! ya 8 Apríli 1994 (ebimeli ya Lifalansé). Na ntina na kotungisama na ngai kati na makanisi mpe momeseno na ngai ya kosakana na biboteli, nakanaki mbala mingi komiboma. Kasi Liloba ya Nzambe mpe mabondeli epai na Yehova epekisi ngai kotya nsuka na bomoi na ngai. Lisoló yango elendisaki kondima na ngai kati na motema mawa ya Nzambe mpe elendisaki ngai na kondima ete Nzambe akosunga ngai ete násilisa mikakatano na ngai. Amoni kobongola motema na ngai. Alingi ete názala na bomoi. Nazali kopesa ye matɔ́ndi mpo na lisungi oyo apesi ngai na nzela ya lisoló yango.”
Bobele mpo na lisoló yango moko ya Lamuká!, elenge mwasi moko ya mibu 15, alobaki ete: “Zulunalo yango esali bopusi makasi likoló na bomoi na ngai. Ntango nazalaki na mibu mwambe, nabandaki komiyoka ete moto moko asengeli na ngai te. Baboti na ngai bazalaki na ntango te ya kosolola elongo na ngai, mpe namekaki kosilisa mikakatano na ngai bobele ngai moko. Namitangolaki na basusu. Naswanaki mbala na mbala na biboto na ngai. Na nsima, likanisi ya komiboma eyelaki ngai. Oyo nde esengo nazalaki na yango ya kokutana na Batatoli ya Yehova!”
Mwasi moko na eteni ya Mpótó ya Russie akomaki ete: “Nayokaki mbala moko lisoló ya Biblia kati na bilenge mibali mibale na esika bazelaka bísi. Nasepelaki na lisoló yango mpe nasololaki na bango. Bilenge mibali yango bapesaki ngai nimero moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Na bosepeli mpe na esengo, natángaki zulunalo yango mpe nalingi koyeba makambo mingi na ntina na Biblia. Nalingi kokutana na bino na nzela ya bazulunalo na bino mpe nalingi koyeba mpe koyekola Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ.”
Mikanda mosusu oyo basepeli na yango
Elenge mwasi moko na mboka Caucase akomaki ete: “Mwasi moko ayaki na biro na biso mpe abandaki koloba na ntina na liyangani moko. Namonaki bosepeli mpe esengo oyo azalaki na yango, ngai mpe nasepelaki. Mokolo oyo elandaki, apesaki ngai búku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis. Natángaki yango na mposa nyonso. Ezalaki likambo ya kokamwa. Namiyokaki ete nsima na koyengayenga kati na molili, namonaki ekuke oyo ezali kokamba na pole. Nsima ya kosala bolukiluki ntango molai, nazwaki biyano mpo na mituna na ngai nyonso bobele kati na búku moko. Yango ezali esengo oyo ekoki te kolobelama.”
Mobali moko na Azia ya ntéi akomaki ete: “Nazali mosangani ya parwási na lingomba ya bateyi ya Nsango Malamu. Tozali na bozangi makasi ya mikanda oyo mizali kolobela makambo ya elimo. Tozali kosɛnga na bino ete bótindela biso nokinoki babúku, mwa babúku mpo na koyekola mpe mpo na kokabola.”
Moto moko na Arménie, pene na Mai Monene ebéngami Mer Noire, akomaki ete: “Natángaki mwa búku Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?, mpe ezalaki lokola mpema ya kokitisa motema. Na yango, namonaki ete mokanda oyo ekosalisa ngai mpo na koyekola Biblia. Nazali kosɛnga na bino na boboto nyonso ete bótindela ngai mikanda mpo na boyekoli yango.”
Mwasi moko na Sibérie, alobaki ete: “Motatoli ya Yehova moko ayaki kotala biso na ndako mpe atikelaki biso búku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Atako nazalaki moto oyo andimaka Nzambe te uta nakɔtaki kelasi, makambo oyo natángaki elendisaki ngai na komanyola na mozindo mpe kobanda koyekola Biblia.”
Mama moko oyo azali na bana mibale amonisaki botɔ́ndi na ye mpo na búku yango moko na ntina na bomoi ya Yesu Klisto mpe alobaki ete: “Ezali pɛtɛɛ na kokanga ntina epai na bilenge mpe yango esepelisaka bango. Ezali kopesa mposa makasi mpo na koyekola Biblia mpe kotánga mikanda ya losambo. Mokanda yango esalemi mpe ebimisami na lolenge ya kitoko mpenza.”
Mobu moleki, bato 34 608 kati na ex-Union Soviétique bamonisaki bosepeli na bango na makambo oyo bayekolaki, na kozwáká batisimo. Tiká ete mikanda mikolimbolaka Biblia oyo mibimisami na Batatoli ya Yehova mikabolama mingi kati na eteni ya mokili wana mpe tiká ete bankóto mingi ya bato koleka báyanola na basolo ya Biblia oyo ezali kati na yango!