Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g95 Octobre nk. 3-5
  • Masano ya mbongo​—Bilangwiseli ya bambula 1990

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Masano ya mbongo​—Bilangwiseli ya bambula 1990
  • Lamuká!—1995
  • Masolo mosusu
  • Bilenge​—Basani mosusu ya sika!
    Lamuká!—1995
  • Biblia epekisi masano ya mbongo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masano ya mbongo
    Lamuká!—2015
  • Basani ya lokoso​—Basukaka bobele na kobungisa
    Lamuká!—1995
Makambo mosusu
Lamuká!—1995
g95 Octobre nk. 3-5

Masano ya mbongo​—Bilangwiseli ya bambula 1990

LISANO likamatami na mokangi-fɔtɔ́ ya lángi. Elilingi na yango etyami likoló ya nkasa mibale ya zulunalo ya mokolo ya lomingo​—kati na ebombelo wana monene oyo ekómi ndako ya lisano ya bingo, bato ya mitindo nyonso mpe mposo nyonso, mikóló mpe bilenge batondi wana. Ozali komona bilongi na bango lokola bisusani, miso mateli, bilembo oyo bizali komonisa ete basani na boumeli ya bangonga mingi? Bazali kozela na mitema lúkulúku koyebisama ya nimero oyo ekolanda na elikya ete mbala mosusu bakolónga mpe bakotika makila mabe oyo babundani na yango na boumeli ya butu mobimba.

Balolá nkasa ya zulunalo oyo. Ozali komona bilongi ya mawa ya basani wana, mabɔkɔ matondi na bakálati mpe nsɔ́mɔ ekangi bango soko bakozwa oyo ya mabe? Mbala mingi, kálati moko ekoki kolóngisa to kobungisa badolare mingi. Kanisá naino na mozindo makambo oyo ozali komona na bililingi te. Ozali komona lokola mabɔkɔ na bango matoki mpo na nkanda? Ozali koyoka lokola mitema na bango mizali kobeta mbangumbangu mpe libondeli ya nsé ya motema oyo lizali kosalema mpo na kozwa nkɔ́nzɔ na mbala ya nsima mpe ete basani mosusu bázwa makila mabe?

Kɔtá kati na kazino kitoko ya moko ya baotɛ́lɛ to ya masuwa. Okokoka koyeba nzela epai outaki kati na ndako monene wana etondi na bamasini ya lángi ndenge na ndenge? Ozali koyoka makɛlɛlɛ ya mabɔ́kɔ ndenge bazali kobeta masini mpe barulo oyo ezali kobaluka? Miziki ya mwa nsé ezali kobima mpo na basani oyo bazali kolónga to oyo bazali kolónga te. Mokambi moko ya kazino alobaki ete: “Likambo oyo basepelaka na yango ezali esengo oyo bayokaka ntango babalolaka masini.”

Pasolá nzela na katikati ya bato kino na mesa oyo etondi na basani. Okokamwa mingi mpo na kobalukabaluka ya masini wana na matono na yango ya lángi motane mpe ya moindo liboso na yo. Makɛlɛlɛ ya mondika oyo ezali kobaluka epai na epai ezali mpe kobakisa bopusi na yango. Soki yika ebaluki, na bongo esika ekokenda kotɛlɛma nde ekomonisa soki mosani alóngi to alóngi te. Mbala mingi, badolare mingi ebungisamaka bobele na kobaluka moke ya yika.

Yikinyá bililingi mpe masano na bankóto, basani na bamilió mpe bisika ya masano na bankóto kati na mokili mobimba. Bibele bayaka na mpɛpɔ, na bingbunduka, na masuwa, na mituka, bautaka bipai binso ya mokili mpo na kosepelisa mposa na bango ya masano ya mbongo. Ezali likambo oyo libéngamaki “bokɔnɔ oyo ebombami, bilangwiseli ya bambula 1990: Mposa makasi ya masano ya mbongo.” Durand Jacobs, moto na mayele mpo na makambo matali bizaleli ya masano ya mbongo na mboka Etats-Unis alobaki ete: “Bambula 1990 ekozala oyo bakopesa lotómo mingi na masano ya mbongo kati na lisoló ya bato na mokili mobimba.”

Na ndakisa, na Etats-Unis, na 1993, bato milió 92 bakɔtaki na bakazino​—yango emonisi motuya ya bato koleka baoyo bakendaka kotala lisano babéngi baseball. Bandako ya sika ya bakazino ezali sé kotongama. Bakambi ya otɛ́lɛ ya libongo ya ɛ́sti bazali basungi na yango. “Lelo oyo, bisika bizali kokoka te mpo na koyamba bato 50 000 na mokolo kati na kazino.”

Na 1994, na bitúká mingi ya súdi ya Etats-Unis, epai kuna kala mingi te masano ya mbongo matalelamaki lokola lisumu, lelo oyo bayambi yango malamu mpenza lokola mobikisi. Zulunalo News & World Report ya Etats-Unis emonisi ete: “Lelo, Bible Belt ekoki kobéngama Blackjack Belt, na Mississippi mpe na Louisiane, bakazino ya masuwa mpe ya mokili ezali bipai binso, bazali mpe kokana kosala mosusu na Floride, na Texas, na Alabama mpe na Arkansas.” Bakambi mosusu ya mangomba basili kobongola makanisi na bango na ntina etali kotalela masano ya mbongo lokola lisumu. Na ndakisa, na 1994, ntango bakonzi ya engumba Nouvelle-Orléans bafungolaki kazino na yango ya liboso na masuwa na ebale Mississippi, nganganzambe moko asalaki libondeli na kopesáká Nzambe matɔ́ndi mpo na “likoki ya kosana masano ya mbongo, likoki oyo na nzela na yango osili kopambola engumba.”

Na mobu 2000, ekanisami ete 95 % ya Baamerikɛ́ nyonso bakolekisa ngonga misato to minei na masano ya mbongo kati na kazino. Ba Indiens ya Amerika basili kozwa mabelé monene mpo na kotonga bisika ya masano ya mbongo. Na bongo, zulunalo News & World Report emonisi ete guvernemá ya Etats-Unis esili kopesa nzela mpo na kotonga bandako 225 ya kazino mpe ya bingo.

Soki tobakisi mosolo oyo moleki na bakálati, na balotó, na mbangu ya bampunda mpe ya bambwa, na bingo mpe bongo na bongo, boye tozali kososola lolenge oyo Baamerikɛ́ babungisaki badolare miliare 394 na masano ya mbongo na mobu 1993, elingi koloba 17,1 % koleka na 1992. Baoyo batɛmɛlaka masano ya mbongo batungisami. Mokambi moko ya komité ya makambo matali masano ya mbongo alobi ete: “Makambo ya ntina mingi oyo makoki kosunga bato ezali: bandakonzambe, batempelo mpe guvernemá. Nzokande, nyonso misato esili komikɔtisa na masano ya mbongo.” Zulunalo moko ebéngaki Etats-Unis ete “mboka ya masano ya mbongo” mpe emonisi ete yango ezali “lisano ya mboka mobimba kati na Etats-Unis.”

Angleterre ebimisaki loteri na yango kobanda 1826, mpe yango ezali kokɔtisa mosolo mingi. Zulunalo New York Times emonisi ete ebimisi mpe bingo. Zulunalo bobele yango ebakisi lisusu ete: “Moscou mpe etondi sikawa na bakazino. Basani ya mboka Liban bazali kotya bomoi na bango na likámá na kokɔtáká na bisika ya masano ya mbongo na Beyrouth-Ouest oyo basodá mpe bato ya mobulu ya mangomba bakɔtelaka yango. Balóngi oyo bazwi mosolo mingi bakambamaka na babateli oyo bazali na bibundeli kino na bandako na bango.”

Mokambi moko ya etúká mpo na makambo ya masano ya mbongo na Canada alobaki ete: “Bato ya mboka Canada bayebaka te ete bazalaka basani minene. Engebene balapólo mosusu, mbala mosusu masano ya mbongo masalemaka mingi na Canada koleka na Etats-Unis.” Zulunalo Globe and Mail emonisi ete: “Na mbula oyo eleki, bato ya mboka Canada babungisi mosolo koleka miliare 10 ya badolare ya Canada​—soko mbala 30 koleka mosolo oyo balekisaka na sinemá.” Zulunalo yango ebakisi lisusu ete: “Na Canada, bingo ezali makasi koleka na Etats-Unis. Baloteri ezali mingi na Canada. Ezali mpe bongo mpo na masano ya mbangu ya bampunda.”

Zulunalo moko ya Afrika ya súdi emonisi ete: “Moto moko te ayebi motángo ya bato ya masano ya mbongo oyo bazali na Afrika ya súdi, kasi emonani ete bazali bankóto.” Nzokande, guvernemá ya mboka Espagne esili koyeba mokakatano yango mpe bokóli ya motuya ya basani. Mitángo ya Leta mimonisi ete kati na bato milió 38, mingi bazali kobungisa badolare miliare 25 na mbula moko, yango ezali kosala ete Espagne ezala moko ya mboka oyo basanaka masano ya mbongo mingi koleka kati na mokili mobimba. Mobandisi moko ya lisangá mpo na kosunga basani amileli ete: “Bato ya mboka Espagne bazali basani minene. Bazalaka basani uta kala . . . Basanaka na masano ya mbangu ya bampunda, na baloteri, na ndembo, na masano ya roulette, na poker, na bingo mpe na bamasini ya masano ya mbongo. Bobele na bambula oyo euti koleka nde masano ya mbongo mayebani lokola mobulungano ya makanisi na mboka Espagne.”

Bilembeteli ya sikisiki bimonisi ete mboka Italie mpe esili kozwa fɛ́fɛlɛ ya masano ya mbongo. Mosolo mingi mozali kolekisama na baloteri mpe kobeta mundenge mpo na masano mosusu, bakisá masano ya bingo oyo batyaka na bazulunalo mpe na mesa ya masano. Lapólo moko euti na balukiluki ya guvernemá emonisi ete “masano ya mbongo ekɔti kati na mitindo nyonso ya bomoi ya mokolo na mokolo.” Zulunalo New York Times emonisi ete: “Masano ya mbongo masili kokóma na nivó moko oyo tokanisaki yango te. Kobanda basáli ya Leta kino na Sángó mokonzi ya parwase, bango nyonso bazali kowelana mpo na kozwa mbongo.”

Ya solo! Mbala mingi, masano ya mbongo mazalaka na bopusi likoló na bomoi ya bato, lokola lisoló oyo lilandi likomonisa yango.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]

Kala ezalaki lisumu​—sikawa ekómi “mobikisi”

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]

Masano ya mbongo mapanzani lokola bokɔnɔ na mokili mobimba

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto