Eteyelo na Afrika eteyaki makambo nini?
EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA GHANA
ETEYELO na Afrika? Bato mosusu ya mikili ya Mpótó bakoki kokamwa na koyeba ete ebongiseli motindo wana ezalaki na ntango ya kala na Afrika. Likambo ya mawa, bafilime ya Hollywood oyo etaleli Afrika emonisaka yango lokola mboka ya babomi ya bato na makɔnga mpe likanisi yango lizali na mitó ya bato kino lelo. Bato mingi bayebaka te ete Baafrika ya ntango ya kala bakoki kozala bato oyo batángá.
Ezali solo ete Baafrika oyo bakólaki na bitúlúká ya bankɔ́kɔ bayekolaki mateya ya mikanda te mpe bakɔtaki na bakelasi te. Nzokande, liboso ete mateya ya Mpótó mákɔta na Afrika, bamboka mingi ya Afrika ezalaki na mateya malamu oyo mazalaki kosunga bana ete bákoka koyeba mpe kosalela makambo ya bonkɔ́kɔ na bango. Tótalela na ndakisa, mateya oyo ba Akans bazalaki kozwa, bato ya mboka Ghana oyo balobaka lokótá Twi.
Mateya na ndako
Epai na ba Akans, ndako ezalaki lokola eteyelo ya ebandeli. Mwana abandaki koyekola na ntango oyo abandi koloba monɔkɔ ya baboti na ye. Na ntango yango, azalaki mpe kozwa mateya ya ebandeli na lolenge ya malamu. Na ndakisa, soki mopaya ayei na ndako mpe alingi kopesa mbote na mwana, mwana asengelaki kolakisama lolenge nini asengeli koyanola. Na nsima, soki batindi ye, azalaki koyekola lolenge nini asengeli kopesa nsango.
Likanisi ya ba Akans mpo na mateya ezalaki lolenge moko na makambo oyo mamonisami na Biblia na Masese 22:6 ete: “Bɔkɔlá mwana na nzela ekoki na ye kotambola; ekokóma ye [mokóló] akopɛngwa na yango te.” Baboti, mingimingi tata, azalaki kotya likebi mpo na koteya mwana. Lisese moko ya Akan elobi ete: “Soki mwana azwi makambo ya mama na ye te, akozwa makambo ya tata na ye.”
Na meko oyo mwana azalaki kokóla, mateya na ye mpe mazalaki kopusana. Mateya matali bomoi mapesamaki na lisalisi ya mikanda te, kasi na lisalisi ya masapo lokola oyo matali elombe limpúlututú na nkombo Kwaku Ananse. Bana balingaki masapo yango mingi mpenza! Na mpokwa to na butu na ntango ya kongɛnga makasi ya sanza, bazalaki kofanda zingazinga ya mɔ́tɔ mpo na koyokamela na motema mobimba masapo ya bolóngi mpe bokwei ya elombe wana.
Lisapo moko oyo liyebani mingi limonisaka ete Ananse atambolaki na mokili mobimba mpo na kosangisa mayele ya mokili mobimba kati na mbeki moko. Ntango amonaki ete akokisaki mosala na ye, azwaki ekateli ya kokakisa mbeki yango likoló ya nzeté mpo ete moto moko te akoka kozwa mayele yango. Abandaki sikawa komata na mokakatano mpenza likoló ya nzeté, mbeki etondi na mayele elengemi na nsinga na libumu na ye. Wana Ananse azalaki kobunda na komata, mwana na ye ya liboso, Ntikuma abimaki mpe abelelaki ye ete: “Eh, tata! Bamataka nzeté elongo na mbeki na libumu te. Mpo na nini otyaki yango na mokɔngɔ te na boye ete omata malamu?” Ananse atali na nsé esika mwana na ye azali mpe alobi: “Mpo na nini ozali komeka koteya ngai?”
Kasi amonaki sikawa ete ndambo ya mayele etikali libándá ya mbeki! Ayoki nkanda makasi, abwaki mbeki na nsé, epasuki mpe mayele nyonso mapanzani. Baoyo bazalaki bato ya liboso mpo na kokóma na esika wana bakómaki bato ya mayele mingi koleka. Liteya nini lipesami na lisapo yango? Moto moko te akoki kozala na mayele nyonso. Ba Akans balobaka ete “Moto moko te akoki kosala likita ye moko.”—Kokanisá na Masese 15:22; 24:6.
Misala ya mabɔkɔ
Mateya ya ba Akans ezalaki mpe kotalela kobongisama mpo na koyeba misala ya mabɔkɔ. Bana mibali mingi bazalaki koyekola misala ya batata na bango—mingimingi kolóna bilanga. Kasi ezalaki mpe na misala mosusu ya koyekola, lokola bokila, kobimisa masanga ya mbila mpe kotonga bikɔlɔ́. Mpo na misala mosusu ya ntɔ́ki lokola kosala bikeko to kotonga, bana bazalaki koyekola yango epai na moto moko oyo ayebi misala ya mabɔkɔ. Ezali boni mpo na bana basi? Kobongisama na bango ezalaki mingimingi mpo na misala ya ndako, lokola kosala mafuta ya mbila, kosala basabuni, kosala bambeki, kotonga ntokya mpe bongo na bongo.
Basiansi mpe ezalaki kati na ‘manáka’ wana ya bonkɔ́kɔ. Zébi ya minɔ́ miuti na matiti, lolenge ya kolamba yango mpe doze ya kopesa ezalaki kouta epai ya tata mpe koleka epai ya mwana, to kouta epai ya nkoko koleka epai ya mwana ya mwana na ye. Mwana mpe azalaki koyekola kotánga mituya na kosaleláká misapi na ye, mbuma ya zɛ́lo, mabanga ya mikemike mpe banzeté ya mikemike. Masano lokola kobeta ngola (oware) mpe kobeta dámɛ ezalaki mpe kosunga bana mpo na kotánga mituya.
Wana bazalaki kosangana na bisika oyo bato bazalaki kosamba makambo na lolenge ya bonkɔ́kɔ, bilenge ba Akans mpe bazalaki kozwa bososoli na makambo ya politiki mpe ya kosambisa. Milulu ya kokunda bibembe mpe bafɛ́ti ezalaki mabaku kitoko mpo na koyekola banzembo ya matánga, maloba ya ntɔ́ki, istware, mizíki, koyeba kobeta mbonda mpe mabina.
Mokumba ya bato nyonso
Epai na ba Akans, mwana azalaki komitangola na bato te. Nokinoki na bolenge na ye, bazalaki koyebisa ye mikumba oyo azali na yango epai na bato. Azalaki kozwa mateya ya ebandeli oyo matali lolenge asengeli komitambwisa wana azali kosakana elongo na baninga na ye. Ntango azalaki kokóla, azalaki mpe kosangana na misala ya bato nyonso (lokola salongo na mboka). Soki amitambwisi na lolenge ya mabe, asengelaki kopesama etumbu, ezala ata na baboti na ye to na mokóló mosusu ya mboka. Ya solo, mikóló nyonso bazalaki na mokumba ya kopesa etumbu na mwana nyonso oyo asali mabe.
Bana bazalaki kondima bitumbu motindo wana mpamba te bateyamaki ete basengeli kotosa mikóló. Na yango, ba Akans bazalaki koloba ete: “Mwasi mobangé azali bobele nkɔ́kɔ ya mwana moko te.” Bana basengelaki kotosa mpe kosalisa mibangé. Mwana oyo, kozanga ntina, aboyaki kosunga mokóló moko, basengelaki kofunda ye epai ya baboti na ye.
Mateya ya losambo
Ba Akans bazalaki bato oyo balingi kosambela mingi, bazalaki na botosi mingi mpo na bikelamu mpe mɔlɔ́ngɔ́. Nzokande, bazalaki bato oyo basambelaka banzambe mingi. Atako bongo, bazalaki koyeba Moto oyo aleki likoló. (Baloma 1:20) Liloba ya Akan mpo na kolimbola “Nzambe,” ezala ata nzambe nini, ezali onyame. Nzokande, mpo na ba Akans liloba wana libongi te mpo na Mozalisi. Na bongo bazalaki kobénga ye Onyankopɔn, oyo elimboli “Nzambe oyo aleki monene.”
Bazalaki mpe kosambela banzambe ya mikemike mpamba te bakanisaki ete yango ezalaki ebongiseli ya Nzambe oyo aleki monene. Na makanisi na bango, ezalaki lokola nde kosalela mokonzi monene na nzela ya bakonzi oyo bazali na nsé na ye. Na lolenge moko to mosusu, yango ezalaki losambo oyo bazalaki kolakisa na mwana nyonso oyo azali Akan.
Mateya ya bonkɔ́kɔ na mikolo na biso
Na bambula oyo euti koleka, bamilió ya Baafrika bakei na bingumba minene epai kuna mateya ya kelasi mazwi esika ya mateya ya bonkɔ́kɔ. Nzokande, mateya ya bonkɔ́kɔ na Afrika mazali kokóba kopesama na bisika mosusu, mingimingi na bamboka ya zámba. Baafrika mosusu nkutu basili kozwa mitindo mibale ya mateya, oyo ya bonkɔ́kɔ mpe oyo ya kelasi!
Tótalela na ndakisa Alfred, moklisto mosakoli ya nsango malamu na mboka Ghana. Atako atángaki kelasi, atalelaka na motuya mitindo mingi ya lolenge ya bomoi ya bonkɔ́kɔ. Alobi ete: “Basangani mingi ya libota na ngai oyo batángá kelasi te, bazali bateyi malamu ya mitindo ya bomoi. Na kosaláká elongo na baoyo bazali na kondima motindo moko na ngai, yango esalisi ngai ete nayeba mitindo mingi ya malamu ya kolakisa nsango malamu na lolenge ya pɛtɛɛ. Na bongo, nakoki kosimba mitema ya bato oyo batángá kelasi na baoyo batángá kelasi te. Mbala mingi, nasalelaka masese to bililingi oyo eyebani mingi na bato yango, nabongisaka yango mpe nakɔtisaka yango kati na masukúlu na ngai! Na kosaláká bongo, bayangani mbala mingi babetaka mabɔ́kɔ.” Nzokande, matɔ́ndi esengeli kopesama epai na basi mpe mibali oyo babongisami na lolenge ya bonkɔ́kɔ.
Emonani polele ete mateya na Afrika mazali na makambo mingi ya malamu mpe esengeli kotalela yango na motuya na esika ya kotyola yango. Mateya yango mabimisi mbala mosusu makambo ya tekinoloji te, kasi mabimisi lolenge ya bomoi ya libota ya moboko, bato oyo bayebi kosala masɛki, oyo bakabaka mpe bazali na elimo ya koyamba bapaya. Likambo ya kokamwa ezali te ete bato mingi oyo bafandaka na bingumba ya Afrika basalaka milende ya kozala ntango nyonso na boyokani na bandeko na bango oyo bafandaka na bamboka ya zámba na kokendáká kotala bango. Mabaku motindo wana ezalaka mpe na mwa mikakatano. Bato oyo bafandaka na bingumba mbala mingi babukaka mibeko ya bonkɔ́kɔ. Na ndakisa, mbala mingi, bayebaka te ete ntango olingi kopesa mbote ya mabɔkɔ na etuluku ya bato, ezali “malamu” kobanda epai ya lobɔkɔ ya mobali mpe kosukisa na lobɔkɔ ya mwasi. Nzokande, bavizite ya ndenge wana esepelisaka bato nyonso.
Kasi, esengeli koyeba ete mateya ya bonkɔ́kɔ na Afrika mazalaki kolakisa botosi mpe komipesa, mazalaki kolakisa boyebi oyo ekoki kopesa bomoi, ya koyeba Yehova mpe mwana na ye Yesu Klisto. (Yoane 17:3) Batatoli ya Yehova bazali kolakisa boyebi wana epai na ba Akans mpe bitúká mosusu ya Afrika. Basili koteya Baafrika mingi oyo bayebi kokoma te mpe kotánga te mpo ete bákoka koyekola Liloba ya Nzambe bango moko. Mpo na baoyo bazali “kososola bamposa na bango ya elimo,” yango ezali mateya maleki ntina oyo moto asengeli koyekola.—Matai 5:3.
[Bililingi na lokasa 25]
Epai na ba Akans, mwana azalaki kosungama mpo na koyeba mikumba na ye liboso ya bato
[Elilingi na lokasa 26]
Kelasi mpo na koyekola kotánga mpe kokoma ezali kosalema na Bandako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova