Mwana na ngai asengeli kokɔta kelasi?
OLINGAKI komiyoka ndenge nini soki oyebaki te kotánga makambo oyo ekomami na lokasa oyo? Bongo, soki oyebaki te koloba monɔkɔ oyo batángisaka na kelasi mpe oyo esalelamaka na misala ya Leta na mboka na bino? Bongo soki oyebaki te koluka mboka na bino na karte? Ezali na ebele ya bana oyo bakozala ndenge wana ata ntango bakokola. Ezali boni mpo na bana na yo?
Mwana na yo asengeli kokɔta kelasi? Na bikólo mingi, mobeko esɛngi ete mwana nyonso akɔta kelasi ya ebandeli mpe ya ntei mpe mbala mingi bafutaka te. Ebongiseli oyo etalelaka ntomo ya bana elobi ete mwana nyonso asengeli kokɔta kelasi. Esakola ya ONU mpo na ntomo ya moto elobi mpe bongo. Kasi, na bikólo mosusu, esɛngaka kofuta mbongo mpo na kotánga kelasi mpe yango ekoki kozala mokakatano monene mpo na baboti. Tiká tótalela likambo yango ndenge baboti baklisto oyo balingi ete bana na bango báyeba kotánga mpe kokoma, ezala na kelasi to na ndenge mosusu, basengeli kotalela yango.
Bato oyo batángaki kelasi oyo Biblia elobeli
Basaleli mingi ya Nzambe oyo Biblia elobeli bayebaki kotánga mpe kokoma. Atako ntoma Petelo na ntoma Yoane bazalaki balɔbi-mbisi, bakomaki Biblia na monɔkɔ ya Grɛki, kasi na monɔkɔ ya Bagalilai te.a Na ntembe te, baboti na bango basalaki nyonso mpo ete bana na bango bákɔta kelasi ata mwa moke. Bato mosusu oyo bakomaki Biblia, oyo bayebaki kotánga mpe kokoma ezali Davidi, mobateli ya mpate; Amosa, mosali-bilanga, mpe Yuda, ndeko ya Yesu oyo ekoki mpe kozala ete azalaki mosali ya mabaya.
Yobo ayebaki kotánga mpe kokoma, mpe mokanda ya Biblia oyo ezali na nkombo na ye emonisi ete ayebaki mwa makambo ya siansi. Ekoki mpe kozala ete ayebaki kokoma maloba ya ntɔki mpamba te maloba na ye oyo ekomami na mokanda ya Yobo ezali na elobeli ya ntɔki. Toyebi mpe ete baklisto ya ekeke ya liboso bayebaki kotánga mpe kokoma mpamba te bato ya arkeoloji bazwaki biteni ya bambɛki oyo ezali na mwa makambo oyo ekoki kozala bango nde bazalaki kokoma yango na makita na bango.
Ezali na ntina mingi ete baklisto bákɔta kelasi
Baklisto nyonso basengeli kokola na boyebi ya Biblia mpo bákoka kosepelisa Nzambe. (Bafilipi 1:9-11; 1 Batesaloniki 4:1) Moto akoki kokola na elimo kaka soki azali komipesa na koyekola Makomami mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia. Lokola Nzambe apesaki Liloba na ye oyo ekomami, yango emonisi ete azali na mposa ete basaleli na ye báyeba kotánga. Soki moto azali kotánga Biblia mpe azali kokanga ntina na yango, ekozala mpasi te mpo asalela toli na yango. Ya solo, ntango mosusu esɛngaka tózongela kotánga mbala na mbala eteni moko mpo na kokanga mpenza ntina na yango mpe komanyola likoló na yango.—Nzembo 119:104; 143:5; Masese 4:7.
Mbula na mbula, Batatoli ya Yehova bazwaka ebele ya mikanda oyo “moombo na sembo mpe ya mayele” akambaka mosala ya kokoma yango. (Matai 24:45-47) Mikanda yango elobelaka makambo etali libota, mimeseno ya bato, makambo ya losambo, ya siansi mpe makambo mosusu ya ndenge na ndenge. Oyo eleki ntina ezali ete mikanda yango elobelaka toli oyo Makomami ezali kopesa na makambo ya elimo. Soki bana na yo bayebi kotánga te, bakozanga ebele ya makambo ya ntina mpenza.
Koyekola makambo ya bato ya kala ezali na ntina mingi mpamba te esalisaka biso tóyeba ntina oyo tozali na mposa ya Bokonzi ya Nzambe. Koyeba mwa moke geografi ezali mpe malamu mingi. Biblia elobeli bamboka ebele lokola Yisalaele, Ezipito mpe Grèce. Mwana na yo akoki kolakisa bamboka yango na karte ya mokili mobimba? Akoki koyeba esika oyo mboka na bino moko ezali? Soki moto ayebi kosalela karte malamu te, akozala mpe na mokakatano mpo na kosakola na esika oyo bapesi ye.—2 Timote 4:5.
Mikumba na lisangá
Bankulutu mpe basaleli na misala bazalaka na ebele ya mikumba oyo esɛngaka ete báyeba kotánga. Na ndakisa, basengeli kobongisa masolo oyo bakosala na makita ya lisangá. Basengeli kokoma mitango ya babuku, bazulunalo mpe ya makabo. Soki moto ayebi kotánga ata moke te, ekozala mpasi mpo akokisa mikumba yango malamu.
Ebele ya bandeko basili komipesa mpo na kosala na Babetele na mokili mobimba. Mpo bákoka kosolola kati na bango mpe bákokisa malamu misala na bango, na ndakisa kobongola mikanda na minɔkɔ mosusu mpe kobongisa bamasini, basengeli koyeba kotánga mpe kokoma monɔkɔ oyo bayekolaka na kelasi mpe oyo esalelamaka na misala ya Leta. Mpo bana na yo bázwa mikumba ya ndenge yango, ezali na ntina mingi bákɔta kelasi ya mwa malonga. Wapi bantina mosusu ya malamu oyo esengeli mwana na yo akɔta kelasi?
Bobola mpe biyambayamba
Bato mosusu oyo bazali babola bazali mpenza na likambo ya kosala te mpo bálongwa na bobola. Kasi, mbala mosusu mpe kotánga kelasi ata mwa moke ekoki kosalisa biso moko ná bana na biso na kokima mikakatano mosusu. Bato moke mpenza oyo bayebi kotánga mpe kokoma te bazali na bomoi ya malamu. Bana mingi, ezala mpe baboti, bazali kokufa kaka mpo bazangi mbongo mpo na kokende na lopitalo. Mingimingi, ezali bato oyo bakɔtaki kelasi mingi te to mpe ata moke te nde bazalaka na mikakatano mpo na kozwa biloko ya kolya ya malamu mpe kofanda na bandako ya malamu. Kokɔta kelasi, to mpe koyeba ata kotánga mpe kokoma mpamba ekoki kosalisa bato oyo bazali na mikakatano wana.
Koyeba kotánga mpe kokoma esalisaka mpe bato na kotika biyambayamba. Ezali solo ete, ezala baoyo batángá to oyo batángá te bazalaka na biyambayamba. Kasi, mbala mingi ezali nde bato oyo bakɔtá kelasi ata moke te nde bakosamaka mingi, mpamba te bakoki te kotánga mikanda oyo emonisaka lokuta yango. Yango wana, balingaka mingi kokangama na biyambayamba mpe bandimaka ete banganga-nkisi bakoki kobikisa bato na ndenge ya makamwisi.—Deteronome 18:10-12; Emoniseli 21:8.
Kokɔta kelasi ezalaka kaka mpo na kozwa mosala te
Bato mingi bakanisaka ete ntina mpenza oyo moto asengeli kotánga kelasi ezali mpo na kozwa mosala oyo bakobanda kofuta ye malamu. Nzokande, ezali na bato mosusu oyo batángá kelasi kasi bazali na misala te to mpe bazwaka mbongo te oyo ekoki mpo na bamposa na bango. Yango wana, baboti mosusu bakoki kokanisa ete ezali mpenza na ntina te ya kokɔtisa mwana kelasi. Kasi, kelasi ezali na matomba mosusu mingi koleka kozwa mbongo; ebongisaka bomoi mobimba ya mwana. (Mosakoli 7:12) Soki moto ayebi koloba, kotánga mpe kokoma monɔkɔ oyo bayekolaka na kelasi mpe oyo esalelamaka na misala ya Leta ya mboka na ye, akozala na mpasi te mpo na kosolola na minganga, na bakonzi ya Leta, to na basali na banki.
Na bisika mosusu, bana oyo bakɔti kelasi te bakoki koyekola mosala ya masɔ, ya koboma mbisi, ya kotonga bilamba mpe misala mosusu ya mabɔkɔ. Ezali malamu ete mwana ayeba mosala ya mabɔkɔ, kasi soki akɔti kelasi te, ekozala mpasi mpo ayeba kotánga mpe kokoma malamu. Soki bana bakɔti ata mwa kelasi moke, na ntembe te, ekozala mpasi ete moto akosa bango mpe bakosepela lisusu mingi koleka na bomoi.
Yesu ya Nazalete azalaki mosali ya mabaya mpe emonani ete ayekolaki mosala yango epai ya Yozefe, tata-mobɔkɔli na ye. (Matai 13:55; Malako 6:3) Yesu ayebaki mpe kotánga ná kokoma, mpamba te, ata ntango azalaki naino na mbula 12, azalaki na likoki ya kosolola na tempelo, na bato oyo batángaki bakelasi ya mineneminene. (Luka 2:46, 47) Atako Yesu ayekolaki mosala ya mabɔkɔ, yango epekisaki ye te ete ayekola makambo mosusu.
Bana basi mpe basengeli kokɔta kelasi?
Ntango mosusu baboti bakɔtisaka bana na bango ya mibali kelasi kasi oyo ya basi te. Baboti mosusu bakanisaka ete kotángisa mpe bana na bango ya basi kelasi ekosɛnga bango mbongo mingi, kasi bamonaka malamu bana yango básalisaka bamama na bango na misala ya ndako. Kasi, mwana mwasi oyo ayebi kotánga te akozala na mikakatano na bomoi na ye. Buku moko ya UNICEF elobi boye: “Baankɛtɛ ndenge na ndenge emonisi ete kotángisa bana basi kelasi ezali lolenge oyo eleki malamu ya kolongwa na bobola.” (Poverty and Children: Lessons of the 90s for Least Developed) Bana basi oyo bakɔti kelasi bazalaka na makoki mingi mpo na kozala na bomoi ya malamu, bayebaka kozwa mikano ya malamu, mpe na ndenge yango, bakoki kosalisa libota na bango.
Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na ekólo Bénin emonisaki ete bana ya bamama oyo bayebi kotánga te, oyo bakokisi naino mbula mitano te, bakufaka mingi koleka bana ya bamama oyo batángá tii na kelasi ya ntei; soki bakamati bamama 1 000 oyo bayebi kotánga te, bana ya bamama 167 bakufaka; nzokande, soki bakamati bamama 1 000 oyo bakɔtá kelasi ya ntei, kaka bana ya bamama 38 nde bakufaka. Mpo na yango, bato ya UNICEF bapesaki likanisi oyo: “Na Bénin, bana ya bamama mingi bazali kokufa mpo bamama na bango bakɔtá mpenza kelasi te; ezali mpe bongo na bikólo mosusu na mokili mobimba.” Na bongo, kokɔtisa bana na yo ya basi kelasi ezali na matomba ebele.
Kelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma ekoki?
Na bisika oyo mposa ezali, Batatoli ya Yehova bazalaka na bakelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma mpo na bato oyo bayebi kotánga te na kati ya lisangá.b Ebongiseli wana ya ntina mingi esalisaka bato báyeba kotánga, mingimingi na monɔkɔ ya mboka oyo bazali. Kasi, esengeli nde kozwa esika ya eteyelo? Osengeli kokanisa ete lisangá ekotángisa bana na yo ata soki otindi bango na eteyelo te?
Kelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma ezali ebongiseli malamu oyo lisangá ya Yehova esali mpo na kosalisa mikóló oyo bakɔtá kelasi te na bomwana. Mbala mosusu baboti na bango bayebaki mpenza ntina ya kotinda bana na kelasi te to mpe bakolaki na bisika oyo bakelasi ezalaki te. Bato yango bakoki kosalisa bango na bakelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma oyo etambwisamaka na masangá. Kasi, kelasi yango esengeli kozwa esika ya eteyelo te, epesaka mpe mateya nyonso ya kelasi ya ebandeli te. Na kelasi yango, bateyaka mateya lokola siansi, matematiki mpe istware te. Kasi, mwana akoki koyekola yango soki akɔti kelasi na eteyelo.
Na Afrika, bakelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma etambwisamaka mbala mingi na minɔkɔ ya mboka, ezali mwa mpasi okuta yango na monɔkɔ oyo basalelaka na misala ya Leta. Nzokande, mbala mingi na biteyelo batángisaka na monɔkɔ oyo basalelaka na misala ya Leta. Yango ezali malamu mingi mpo na bana mpamba te babuku mingi mpe bisaleli mosusu oyo bazalaka na mposa na yango ezalaka na minɔkɔ wana. Atako bakelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma ekoki kosalisa mwana oyo azali kokende na eteyelo, yango ekoki kozwa esika ya eteyelo te. Na bongo, soki likoki ezali, ezali malamu kokomisa bana na eteyelo mpo bákɔta kelasi ya malonga!
Ezali mokumba ya baboti
Bato oyo bazali kokamba lisangá mpo na kokokisa bamposa na biso ya elimo basengeli kozala baklisto oyo bazali kopesa ndakisa ya malamu. Basengeli kokamba ndako na bango mpe bana na bango “na ndenge ya malamu mingi.” (1 Timote 3:4, 12) Kokamba na “ndenge ya malamu” esɛngi mpe kosala nyonso oyo esengeli mpo na kolongola makambo nyonso oyo ekoki komemela bana mikakatano na mikolo ezali koya.
Nzambe asili kopesa baboti baklisto mokumba monene. Basengeli kobɔkɔla bana na bango na boyokani na Liloba na ye mpe kosalisa bango ete ‘bálinga boyebi.’ (Masese 12:1; 22:6; Baefese 6:4) Ntoma Paulo akomaki ete: “Ya solo mpenza soki moto azali kokokisa bamposa ya bato na ye te, mpe mingimingi mpenza ya bato ya ndako na ye, awangani kondima mpe azali mabe koleka moto oyo azangi kondima.” (1 Timote 5:8) Tosengeli kotángisa bana na biso kelasi oyo ebongi.
Ekómaka ntango mosusu ete bana bazali koteyama malamu te; mbala mosusu mpo bana baleki ebele na bakelasi, bazali na bisaleli mingi te, to mpo ete balakisi bazali na esengo te mpo bazali kofuta bango malamu te. Yango wana, ezali na ntina mingi ete baboti bálukaka koyeba makambo oyo bana na bango bazali koyekola na kelasi. Ezali malamu koluka koyebana na balakisi, mingimingi na ebandeli ya kelasi soki bauti na konje mpe ata kotuna bango oyo bosengeli kosala mpo na kosalisa bana bátánga kelasi malamu. Na ndenge yango, balakisi bakomiyoka ete bazali na ntina mpe bakosala nyonso mpo na koteya bana na ndenge ya malamu.
Ezali na ntina mingi ete mwana atánga kelasi ntango azali kokola. Masese 10:14 elobi ete: “Bato na mayele bakotya boyebi na ebombelo.” Yango ezali solo mingimingi mpo na oyo etali boyebi ya Biblia. Basaleli ya Yehova, ezala bana mike to mikóló basengeli koyeba makambo mingi mpo na kosalisa bato mosusu na elimo mpe ‘komimonisa epai na Nzambe lokola basali oyo bazali na eloko moko te ya koyokela nsɔni, oyo bazali kosembola liloba ya solo malamumalamu.’ (2 Timote 2:15; 1 Timote 4:15) Na yango, soki totuni motuna ete: Bana na yo basengeli kotánga kelasi? Na ntembe te okoloba ete basengeli kotánga kelasi, atako makambo mingi ekotalela oyo ezali malamu na mboka na bino. Kasi, baboti baklisto basengeli koyanola na motuna oyo ya ntina mingi, ‘Mwana na ngai asengeli kotánga kelasi?’ Ata soki bofandi na mboka nini, tokanisi ete eyano na motuna oyo esengeli kozala: Ɛɛ!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bazalaki koloba monɔkɔ moko ya Bagalilai oyo eutaki na Aramɛyɛ to mpe na Liebele. Talá buku Étude perspicace des Écritures, Volimi 1, nkasa 150-152, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Talá Lamuká! ya 22 Desɛmbɛ 2000, nkasa 8-9 (ebimeli ya Lifalanse).
[Etanda/Elilingi na lokasa 12]
SOKI LIKOKI YA KOKOMISA BANGO NA ETEYELO EZALI TE
Na bisika mosusu, likoki ya kokomisa bana na eteyelo ezali te. Na ndakisa, na zulunalo moko (Refugees) balobaki mpo na bana oyo bazali na bakaa ya bato bakimá mboka ete soki na ndakisa okamati bana mitano, kaka mwana moko nde akoki kotánga kelasi. Na bisika mosusu, bakelasi ekangamá mpo bazali kofuta balakisi te, yango wana baboyi kotángisa. Na bamboka mosusu, bakelasi ezali mosika mpenza, mbala mosusu mpe ezali te. Konyokola baklisto esalaka mpe mbala mosusu ete bábengana bana na bango na kelasi.
Na makambo ya ndenge wana, ndenge nini okoki kosalisa bana na yo? Okosala nini soki ozali na bana mingi mpe ofandi na mboka oyo okoki te kozwa mbongo oyo bazali kosɛnga mpo okoka kokɔtisa bango nyonso kelasi? Okoki kotinda ata mwana moko to bana mibale na kelasi na esika oyo bakozala na likama te na elimo. Na ndenge yango, bakoki kotángisa bandeko na bango oyo batikali makambo oyo bango bazali koyekola na kelasi.
Na bamboka mosusu, ezalaka na ebongiseli ya koteya bana na ndako.c Yango esɛngaka ete mokolo na mokolo moboti moko azwaka mwa bangonga mpo na kotángisa bana. Na ntango ya kalakala, baboti bazalaki bango moko koteya bana na bango. Emonani ete ezali mpo baboti ya Yozefe bateyaki ye malamu nde , mwana ya Yakobo, azalaki na likoki ya kokɛngɛla bato mosusu ya bolɔkɔ, atako azalaki naino elenge.
Na bisika lokola kaa ya bato bakimá mboka, ezali mpasi bázala na biteyelo ya malamu, kasi baboti bakoki kosalela mikanda ya Batatoli ya Yehova mpo na koteya bana na bango. Na ndakisa, buku Mokanda mpo na Masolo ya Biblia ekoki kosalisa mpo na koteya bana mike. Zulunalo Lamuká! ezalaka na masolo ya ndenge na ndenge. Okoki kosalela buku La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création? mpo na koteya makambo ya siansi. Annuaire des Témoins de Jéhovah ezalaka na mwa karte moke ya mokili mpe elobelaka bomoi mpe mosala ya kosakola na bamboka ebele.
Bokoki mpenza kosalisa bana soki mateya yango ebongisami malamu mpe eyokani na makoki ya bana. Soki balandi kotánga mpe koyekola, bakozala na mikakatano mingi te ntango likoki ya kokende na eteyelo ekomonana. Soki ozali kokanisa makambo nini okoki kosala mpe soki osali molende, okoki kosalisa bana na yo mpo báteyama malamu, mpe okozwa mbano monene!
[Maloba na nse ya lokasa]
c Talá lisolo “L’enseignement au foyer: est-ce pour vous?” na Lamuká! ya 8 Aprili 1993, nkasa 9-12 (ebimeli ya Lifalanse).
[Elilingi na lokasa 13]
Osengeli kosala nini soki ofandi na esika oyo okoki kokomisa bana na eteyelo te?