Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g96 Janvier nk. 4-8
  • Tosalamá mpo na kozala na bomoi libela na libela

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tosalamá mpo na kozala na bomoi libela na libela
  • Lamuká!—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mposa ya kozala na bomoi
  • Esalamaki mpo na komibongisa yango moko
  • Selile
  • Bɔɔngɔ́
  • Mpo na nini tokómaka mibangé mpe tokufaka?
    Lamuká!—1996
  • Moto moko ya siansi alobeli kondima na ye
    Lamuká!—2013
  • Mituna mibale oyo ebongi komituna
    Lamuká!—2015
  • Ndenge nini tokoki koyeba ete Nzambe azali
    Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?
Lamuká!—1996
g96 Janvier nk. 4-8

Tosalamá mpo na kozala na bomoi libela na libela

NZOTO ya moto esalamá na lolenge malamu mpenza. Kokóma monene mpe kokóla na yango ezali bobele likamwisi. Mokomi moko ya kala alobaki ete: “Nasalami na motindo na kokamwa mingi.” (Nzembo 139:14) Lokola bayebi makambo mingi ya kitoko na nzoto ya moto, bato mosusu ya siansi na mikolo na biso bazali kososola te mpo na nini tokomaka mibangé mpe tokufaka. Ezali mpe bongo mpo na yo?

Steven Austad, moto na mayele na bioloji na eteyelo monene Harvard akomaki ete: “Kokóma mobangé, ezali likambo oyo lipalangani mingi na boye ete nazali kokamwa ndenge bato mingi bazali koyeba te ete ezali likambo ya bomoi oyo lizali mpasi mpo na kososola.” Austad amonisi ete likambo oyo ete moto nyonso akómaka mobangé “litalelami lokola lilongobani.” Nzokande, soki mpenza ososoli yango, ezali solo likambo lilongobani ete tokómaka mibangé mpe tokufaka?

Na mbula oyo euti koleka, kati na búku na ye Lolenge nini mpe mpo na nini tokómaka mibangé (na Lingelesi), Dr. Leonard Hayflick andimi makambo ya kokamwa ya bomoi mpe kokóla ya moto mpe na yango akomi ete: “Nsima na kokokisa makamwisi oyo esalemaka longwa na ntango ya zemi kino kobotama mpe na kokɔmɛla na nzoto mpe bokolo, bozalisami ekanaki ata mwango moko te ya moke mpo na koumisa litomba ya makamwisi yango seko. Likambo yango lizali kotungisa bato ya mayele uta bambula mingi.”

Yo mpe ozali na mokakatano ya kososola mpo na nini tokómaka mibangé mpe tokufaka? Mokano nini makambo wana mibale ezali na yango? Hayflick alobaki ete: “Emonani ete makambo nyonso oyo masalemaka longwa na ntango ya zemi kino kokóla mazali na mokano, kasi bobangé ezali na mokano te. Elongobani te ete moto akómaka mobangé. Atako toyebi makambo mingi mataleli bobangé . . . , tozali bobele kokutana na likambo oyo tokoki kopengola te, yango nde kokóma mobangé mpe na nsima kokufa.”

Ekoki kozala ete tosalamaki te mpo na kokóma mibangé mpe kokufa, kasi tosalemaki nde mpo na kozala na bomoi seko na mabelé?

Mposa ya kozala na bomoi

Oyebi mpenza ete pene na bato nyonso balingaka te kokóma mobangé mpe kokufa. Ya solo, bato mingi babangaka likambo yango. Kati na búku na ye Lolenge nini tokufaka (na Lingelesi), Monganga Sherwin B. Nuland akomaki ete: “Moto moko te kati na biso akoki kozala na likoki ya koyika mpiko na likanisi ya liwa na ye, likanisi ya kozanga koyeba makambo libela na libela​—kati na yango eloko moko ezali te.” Oyebi moto moko oyo alingaka kokóma mobangé mpe kokufa?

Nzokande, soki bobangé mpe liwa ezalaki eloko malamu mpe likambo oyo lityamaki kati na mwango ya nkolo ya bomoi, mbele toyambaka yango na esengo, boye te? Kasi tolingaka yango te. Mpo na nini? Eyano ezali na lolenge biso tosalamaki. Biblia elobi ete: “[Nzambe] atii mpe lobiko kati na mitema na [biso].” (Mosakoli 3:11, Byington) Na ntina na mposa oyo ya bomoi ya libela na libela, bato uta kala bazali koluka bolenge. Balingi kozala ntango nyonso bilenge. Yango ezali kobimisa motuna. Tozali na likoki ya kozala na bomoi libela na libela?

Esalamaki mpo na komibongisa yango moko

Wana akomaki kati na zulunalo Natural History, biolojiste Austad amonisaki likanisi oyo liyebani ete: “Tozalaka na bopusi ya komitalela biso moko ezala mpe banyama lolenge moko totalelaka masini: ete kolɛmba ekoki kopengolama soko moke te.” Kasi yango ezali solo te. Austad alobaki ete: “Lolenge binama ya nzoto bisalamaki, ekeseni mpenza na masini. Emibongisaka yango moko: mpota ebelaka, mikuwa mitongamaka, bokɔnɔ esilaka.”

Kasi, motuna ya kotungisa ezali ete mpo na nini tokómaka mibangé? Lokola Austad atunaki yango: “Na bongo, mpo na nini [binama ya nzoto] bilɛmbaka lolenge moko na masini?” Lokola misuni ya nzoto mikitanaka yango moko, ekoki te kokóba kosala bongo libela na libela?

Kati na zulunalo Discover, biolojiste evolisioniste Jared Diamond alobelaki likoki ya kokamwa ya binama ya nzoto lolenge yango emibongisaka yango moko. Akomaki ete: “Ndakisa ya sikisiki etali kobongisama ya nzoto ezali bongo lolenge mpota ebelaka, na yango tobongisaka mbeba ya lomposo ya nzoto na biso. Banyama bazali na likoki ya kosala makambo mingi ya kokamwa koleka biso bato: moselekete akoki kozongisa mokɔndɔ́ na ye ekóma ya sika mbala na mbala, étoile de mer mpe lingato bakoki kozongisa binama na bango bíkóma ya sika, concombre de mer akoki kozongisa misɔpɔ́ na ye míkóma ya sika.”

Na oyo etali kozongisama ya mino, Diamond alobaki ete: “Na boumeli ya bomoi na bango, bato babimisaka yango mbala mibale, banzoku mbala motoba mpe requins motuya moyebani te.” Na nsima alimbolaki ete: “Kozongisama ya mbala na mbala mpe emonanaka na biloko bileki mike. Baselíle oyo ezipaka misɔpɔ́ na biso ezongaka ya sika bobele na nsima ya mwa mikolo, oyo ezipaka misisa na biso ya nzela ya masuba ezongaka ya sika nsima ya sanza mibalemibale, mpe oyo ya globules rouges nsima ya sanza mineiminei.

“Mpo na oyo etali molekile, bamolekile oyo esalaka baproteine na biso ezongaka ya sika mbala na mbala, na meko ya proteine moko na moko; na boye ete bamolekile oyo ebebi eumelaka te kofanda kati na nzoto na biso. Soki okokanisi nzoto ya mozalani na yo lelo na lolenge oyo azalaki esili koleka sanza moko, okomona ete azali se ndenge moko, kasi bamolekile mingi ya nzoto na ye esili kobongwana.”

Baselile mingi ya nzoto ekitanaka ntango na ntango na mosusu oyo esalemaka. Kasi baselile mosusu, lokola misisa ya bɔɔngɔ, yango ekoki kokitanama te. Kasi, Hayflick alimboli ete: “Soki biteni nyonso ya selile ekitanamaki, ezali te selile bobele yango ya kala. Misisa oyo obotamaki na yango mikoki kobima lelo lokola baselile bobele yango, nzokande, na solo, bamolekile mingi oyo esalaki yango ntango obotamaki . . . esilaki kokitana na bamolekile ya sika. Na bongo, baselile oyo ekabwanaka te ekoki kozala bobele yango oyo obotamaki na yango!” Ezali bongo mpamba te biloko oyo bisalaka selile bikitanamaki. Na bongo, kokitana ya biloko ya nzoto ekoki kokólisa bomoi na biso libela na libela!

Tomikundwela ete Monganga Hayflick alobelaki “makamwisi oyo masalemaka na nzoto na biso longwa na ntango ya zemi kino kobotama.” Wapi bamoko na yango? Lokola tokolobela yango na mokuse, tótalela likoki ya kokóla oyo babéngi “meko ya moke mpo na kokóbisa makamwisi yango libela na libela.”

Selile

Nzoto ya moto mokóló ezali na baselile soko 100 000 miliare, mokomoko na yango ezali mpenza na lolenge oyo eleki lisosoli na biso. Mpo na komonisa lolenge yango ya kokamwa, zulunalo Newsweek ekokanisaki selile na engumba makasi. Zulunalo yango elobaki ete: “Centrales électriques ezali kopesa lontiliki oyo selile esengeli na yango. Baizini ezali kobimisa baproteine oyo esengeli mpo na nzoto. Lolenge moko ya kotambwisama ya kokamwa mpenza ezali kokamba biloko na libándá mpe na kati ya selile. Basinzili batelemi likoló na bisika ya kobatela bazali kokɛngɛla kokɔta mpe kobima ya biloko, mpe bazali kokeba na makambo oyo mazali koleka libándá ya selile mpo na mwa elembo moke ya likámá. Mampinga ya bioloji ya botosi mazali pene na kobengana nyonso oyo ekokɔta kozanga ete babenga yango. Kotya molɔngɔ́ esalemaka na boyangeli moko ya kati ya génétique.”

Talelá lolenge nini yo​—baselile na yo soko 100 000 miliare​—bokómi na bomoi. Obandaki bobele selile moko oyo esalemaki ntango spermatozoïde moko ya tata na yo esanganaki na ovule ya mama na yo. Na ntango ya bosangani wana, myango mityamaki kati na A.D.N. (ekomeli mokuse ya acide désoxyribonucléique) ya selile wana oyo euti kosalema mpo na kobimisa yo​—moto ya sika mobimba mpe bobele moko na lolenge na ye. Balobaka ete malako oyo mazali kati na A.D.N. “soki esengelaki ete bakoma yango, mbele matondisi nkóto moko ya babúku ya nkasa 600.”

Na nsima, selile wana ya ebandeli ebandi kokabwana, esali baselile mibale, na nsima minei, mwambe mpe bongo na bongo. Na nsuka, nsima ya mikolo soko 270​—na boumeli na yango bankóto ya bamilió ya baselile ya ndenge na ndenge ekóli kati na libumu ya mama na yo mpo na kosala elɛzi​—elɛzi yango nde YO mpe na nsima obotami. Ezali lokola nde selile wana ya liboso ezalaki na eteni ya ndako monene oyo etondi na babúku elongo na malako mpo na kosala yo. Kasi likambo ya kokamwisa ezali oyo ete malako wana makasi malekaki kati na baselile nyonso oyo ezalaki kobika. Ya solo, moko na moko ya baselile oyo ezali kati na nzoto na yo ezali na nsango lolenge moko lokola oyo ezalaki kati na ovule oyo ekómaki liki!

Tótalela mpe likambo oyo. Lokola selile moko na moko ezali na malako ya kobimisa mitindo nyonso ya baselile, wana ntango ekokaki, na ndakisa mpo na kosala baselile ya motema, lolenge nini malako ya kosala baselile mosusu nyonso epekisamaki? Emonani ete, kosaláká lokola mosali oyo azali na biro etondi na myango ndenge na ndenge, selile moko eponaki mwango ya kosala baselile ya motema. Selile mosusu eponaki mwango moko ekeseni elongo na malako mpo na kosala baselile ya misisa, mosusu lisusu eponaki mwango mpo na kosala baselile ya libale, mpe bongo na bongo. Ya solo, likoki oyo elimbolami naino te ya selile mpo na kopona malako oyo masɛngeli mpo na kosala lolenge moko ya selile mpe bobele na ntango yango koboma malako yango epai na baselile mosusu, yango ezali mpenza moko kati na “makamwisi mingi oyo masalemaka kati na nzoto na biso longwa na ntango mama azwi zemi kino ntango ya kobotama.”

Nzokande, makambo mazali mpenza mingi kati na yango. Na ndakisa, baselile ya motema ezalaka na mposa ya kolendisama mpo ete efungwama mbala na mbala. Na bongo, kati na motema, mwango moko ya kokamwa esalemaki mpo na kopesa bopusi ya lontiliki mpo na kosala ete motema ebetaka na lolenge lobongi mpo na kosunga nzoto na mosala oyo ezali kosala. Ya solo, ezali mpenza likamwisi! Na ntembe te minganga balobaki mpo na motema ete: “Ezali ya kokoka koleka masini ya lolenge nyonso oyo esalemi na moto.”

Bɔɔngɔ́

Likambo ya kokamwa mingi koleka ezali oyo etali kokóla ya bɔɔngɔ́​—likamwisi lileki monene na nzoto ya moto. Pɔ́sɔ misato nsima ya zemi, baselile ya bɔɔngɔ́ ebandi kosalema. Nsima ya mwa ntango, bɔɔngɔ́ ekokóma na misisa soko 100 miliare oyo ebéngami neurones​—ebele lokola minzɔ́tɔ na likoló​—misangani kati na bɔɔngɔ́ ya moto.

Zulunalo Time elobi ete: “Misisa yango moko na moko mizali kozwa makambo soko 10 000 oyo mauti na misisa mosusu kati na bɔɔngɔ́, mpe ezali kotinda bansango epai na nkóto ya misisa mosusu.” Kotaleláká makoki ya kosangisama na yango, Gerald Edelman, monganga oyo ayekolaka misisa ya motó alobaki ete: “Eteni ya bɔɔngɔ́ na biso oyo ezali na bonene ya motó ya nzeté ya alimɛti ezali na bikangiseli soko miliare moko oyo bikoki kokangisa kati na banzela oyo ekoki kotalelama lokola motuya moko monene​—na molɔngɔ́ ya zomi oyo elandani na bamilió ya bazero.”

Wapi likoki oyo yango epesaka na bɔɔngɔ́? Astronome Carl Sagan alobaki ete bɔɔngɔ́ ya moto ekoki kosimba makambo oyo “ekoki kotondisa soko bamilió ntuku mibale ya mikanda lolenge moko lokola babibliotɛ́kɛ ya minene koleka kati na mokili.” Mokomi George Leonard alobaki lisusu ete: “Ya solo, mbala mosusu, tokoki sikawa kobimisa likambo oyo ya kokamwisa: makoki ya bɔɔngɔ́ ekoki kozala na nsuka te.”

Na yango, tokoki kokamwa te na maloba oyo ya James Watson, biolojiste oyo ayekolaka molekile, alobaki ete: “Bɔɔngɔ́, momóni ya kokabolama ya A.D.N. ezali likambo oyo lileki kokamwisa oyo tomona naino te na molɔ́ngɔ́ na biso.” Richard Restak, monganga oyo ayekolaka makambo matali misisa ya motó, oyo asalaki bokokanisi kati na bɔɔngɔ́ mpe ordinatɛrɛ, alobaki ete: “Bɔɔngɔ́ ezali eloko bobele moko na boye ete esika moko te na molɔ́ngɔ́ oyo toyebi ezali na eloko mosusu oyo ekokani na yango ata na mosika.”

Minganga oyo bayekolaka misisa ya motó balobi ete na boumeli ya bomoi na biso, tosalelaka bobele mwa ndambo moke mpenza ya makoki ya bɔɔngɔ́, bobele soko 1/10 000 to 1/100 ya yoko ya monkama engebene makanisi bapesaki. Kanisá naino na ntina na yango. Ezali likambo ya kolongobana ete tokokaki kopesamela bɔɔngɔ́ elongo na makoki ya kokamwisa lolenge wana soki ezalaki te ete tósalela yango na mobimba? Ezali mpenza likambo ya kolongobana ete bato, elongo na likoki ya koyeba makambo kozanga nsuka, basalemaki mpo na kozala na bomoi libela na libela, boye te?

Soki ezali boye, mpo na nini tokómaka mibangé? Likambo nini libebaki? Mpo na nini, nsima ya bambula 70 to bambula 80 tokufaka, atako nzoto na biso esalemaki mpo na kozala na bomoi libela na libela?

[Etanda na lokasa 7]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Selile​—Likamwisi ya kozalisama

Libenga ya selile

Yango etalelaka biloko nyonso oyo bikɔtaka mpe bibimaka na selile

Mondika

Ezingami na mposo mibale, etambwisaka misala ya selile

Ribosomes

Biteni bizwami esika oyo aside nyonso isangisami mpo na kosala baproteine

Chromosomes

Ezalaka na A.D.N. ya selile, plan génétique na yango

Nucléole

Esika oyo ba ribosomes esangani

Réticulum endoplasmique

Mabenga oyo mabombaka to matambwisaka baproteine oyo esalemi na ba ribosones oyo ekangami na bikókólo na yango (ribosomes mosusu etepaka kati na baselile)

Mitochondries

Esika ya kobimisa A.T.P., molekile oyo epesaka lontiliki na selile

Appareil de golgi

Biteni bikeseni ya selile oyo eyikani mpe ezali kosangisa mpe kokabola baproteine oyo esalemi na baselile

Centrioles

Efandi na pembeni ya mondika, ezali na mosala moko ya ntina mpo na kokabolama ya selile

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto