Mpo na nini tokómaka mibangé mpe tokufaka?
MONGANGA Leonard Hayflick andimi ete: “Na lisalisi ya makambo toyebi, tomoni ete wana moto azali kokóla, mbongwana esalemaka kati na baselile na ye, toyebi makambo mingi te lelo oyo mpo na ntina ya sikisiki oyo tokómaka mibangé lokola ezalaki esili koleka ekeke moko. Ya solo, toyebi ntina mpenza te mpo na nini tosengeli kokóma mibangé.”
Baeksperiansi oyo esalemi kati na balaboratware esili koleka soko bambula 30 emonisi ete ntango baselile ya moto oyo azali na nzoto kolɔngɔ́nɔ́ ekamatami longwa na liki na libumu mpe elonami na esika ya malamu mpenza, ekokabolama mbala 50 liboso ya kokufa. Nzokande, soki baselile ekamatami na nzoto ya mibangé, ezali kokabolama bobele mbala mibale kino mbala zomi liboso ya kokufa. Na yango, búku The Incredible Machine (Masini ya kokamwa) ya National Geographic Society elobi ete: “Bilembeteli ya sikisiki bindimi likanisi oyo ete liwa libongisamaki mpo na mokomoko na biso na ntango ya kobotama.”
Nzokande, kokatana ya kokabolama ya selile ekoki kopengolama te? Te, ezali bongo te. Balakisi oyo bayekolaka bobangé, Robert M. Sapolsky mpe E. Finch balobaki ete: “Ya solo, la non-senescence [kozanga kokóma mobangé] ezalaki ezalela ya biloko na bomoi awa na mabelé.” Kutu, baselile mosusu ya bato oyo ezali na mbeba lelo enunaka te.
Búku La mécanique humaine, ebimisami na Monganga Christiaan Barnard, moto ya liboso oyo alongaki kolongola motema ya moto mpo na kotya yango epai na moto mosusu alimbolaki ete: “Boyebi ya ‘baselile oyo ekufaka te’ ebimisaki mokakatano monene mpo na bato ya mayele oyo bayekolaka senescence (kokóma mobangé), kino ekokóma polele ete baselile motindo wana ezalaki ya malamu te.” Ɛɛ, minkanga mosusu ya baselile ya canser oyo elonami emonanaka lokola emikabolaka libela na libela! Búku The World Book Encyclopedia emonisi ete: “Soki bato na siansi bakoki te komonisa lolenge nini baselile wana ya lolenge mosusu ebikaka, bakoki kososola na ntina na konuna ya selile.” Na bongo, lelo oyo baselile mosusu ya kanser ekoki mbala mosusu kobotama kozanga nsuka kati na laboratware, kasi baselile ya malamu enunaka mpe ekufaka.
Mwango mozangi kokoka
Kokóma mobangé mpe liwa ezali matomba ya “mbeba ya kobotama ya baselile ya malamu” lokola búku The Body Machine elobi yango? Soki ezali bongo, búku yango emonisi ete: “Ezali ntina mingi koyeba esika mpe kososola mwango oyo etalelaka likoki yango mpo na kotambwisa yango mpe komeka kokólisa bomoi ya moto.”
Lokola tokoki komikundwela yango kati na lisoló oyo tolobelaki liboso, monganga Hayflick alobaki na ntina na “makamwisi oyo masalemaka kati na nzoto na biso longwa na ntango ya zemi kino ntango ya kobotama mpe na nsima longwa na ntango ya kobongisama ya biboteli kino bomwana.” Na nsima atángaki “mwango moko ya libandela mpo na kopesa nzela na makamwisi yango masalama libela na libela.”
Atako basali bambula mingi kati na bolukiluki, banganga-mayele balóngi te na koyeba mwango oyo esengeli kopesa nzela na bato ete báumela na bomoi libela na libela. Búku The Incredible Machine emonisi ete: “Bantina oyo tokómaka mibangé ezali bobele libombami.”
Nzokande, ntina oyo tokómaka mibangé mpe tokufaka ezali libombami te. Eyano ezali mpo na yango.
Eyano yango nini?
Ye oyo azali na eyano ezali ye wana nkolo ya “makamwisi oyo masalemaka na nzoto na biso kolongwa na ntango ya zemi kino ntango ya kobotama,” Mozalisi na biso, Yehova, Nzambe ya mayele nyonso. Biblia elobi na ntina na ye ete: “Zambi na yo ezali liziba na bomoi.” “Bóyeba ete Yehova azali Nzambe; ye nde asalaki biso, kasi biso moko te.”—Nzembo 36:9; 100:3, NW.
Tókanisá naino na lolenge ya kokamwa oyo Yehova Nzambe abongisaki bokóli na biso kati na libumu, kotambwisáká, lokola nde ezalaki búku moko ya malako mpo na kosala ete mokomoko na biso azala na lolenge na ye mpenza! Mokomi na Nzembo akomaki ete: “Yo osalaki bilembo na katikati na ngai; otongaki ngai kati na libumu na mama na ngai. Nzoto na ngai ebombamaki na yo te na ntango wana esalamaki ngai na ebombelo . . . Miso na yo imonaki ngai naino esalamaki ngai te; mikolo na ngai ikomamaki nyonso na mokanda na yo.” (Nzembo 139:13, 15, 16) Ya solo, nzoto na biso oyo esalami na lolenge ya kokamwa ezali mbuma ya likambo ya pwasa te!
Nzokande, soki Yehova Nzambe asalaki biso na lolenge ya kokoka mpo ete tozala na bomoi libela na libela, mpo na nini tokómaka mibangé mpe tokufaka? Eyano ezali kati na epekiseli moko epesamaki epai na moto ya liboso, Adama, oyo Nzambe atyaki kati na elanga kitoko awa na mabelé. Nzambe alobaki na ye ete: “Yo okoki kolya mbuma na nzeté nyonso na elanga, nde mbuma na nzeté na koyeba malamu mpe mabe okoki kolya [yango] te. Zambi mokolo okolya yango okokufa solo.”—Genese 2:16, 17.
Likambo nini lisalemaki? Na esika ete atosa Tata na ye ya likoló, Adama abukaki mobeko, kolandáká mwasi na ye Eva na kolyáká mbuma. Na lokoso nyonso, bango mibale bandimaki elaka ya lokuta oyo anzelu motomboki apesaki bango. (Genese 3:1-6; Emoniseli 12:9) Na bongo, bakufaki lokola Nzambe akebisaki bango. Ya solo, basalamaki na likoki ya kozala na bomoi libela na libela, kasi likoki yango ezalaki kotalela botosi na bango epai na Nzambe. Na kozangáká botosi, basalaki lisumu. Na nsima, lokola bakómaki bato ya masumu, balekisaki mbeba ya liwa epai na bana na bango nyonso. “Kufa mpe epalangani epai na bato nyonso.”—Loma 5:12; Yobo 14:4.
Nzokande, yango elingi koloba te ete elikya ezali te mpo na kolónga bobangé mpe liwa. Ekoki kozala likambo ya mpasi te mpo na kondima ete Mozalisi na biso oyo azali na mayele nyonso akoki kobikisa mbeba nyonso ya nzoto na biso mpe kopesa nguya mpo ete tokóba kozala na bomoi libela na libela. Kasi, lolenge nini akosala yango? Mpe tosengeli kosala nini mpo na kosepela na bilaka na ye ya bomoi ya seko?