Ndenge nini tokoki kozwa bomoi ya seko?
LOKOLA nzoto ya moto ezali solo na likoki ya kozala na bomoi molai koleka oyo tozali na yango sikawa, bato mosusu batyaka elikya na bango na siansi mpo na koyeba ndenge nini tokoki kozala na bomoi ya seko. Monganga Alvin Silverstein akomaki ete: “Lokola tozali kokóma na boyebi mingi ya biloko oyo bisalaka kati na nzoto ya moto mpe lolenge yango esalaka moko mpo na mosusu, tokoyeba ntina ya bomoi. Tokososola . . . lolenge nini moto akómaka mobangé.”
Nini ekolanda nsima? Silverstein alobaki ete ekokamba kino “eleko moko ya sika kati na lisoló ya bato. ‘Mibangé’ bakozala lisusu te, pamba te, mayele oyo makopesa nzela na kolónga liwa makomema mpe bolenge ya libela na libela.”
Bato bakolónga kokokisa likambo yango? Biblia ekebisi ete: “Ndimela bana na mikonzi te, to moto, mpo ete azali na kosunga te. Soko [elimo, NW] ekolongwa moto akozonga na mabelé lisusu; bobele na mokolo yango kokanisa na ye esili.” (Nzembo 146:3, 4) Bato balóngi te na koyeba, lisusu kobongisa, eloko oyo tosangolaki, oyo ezali kopesa nzela na bobangé mpe na liwa, lokola tolobelaki yango. Bobele Mozalisi na biso nde azali na makoki ya kosala yango.
Kasi, ezali solo ete mokano ya Nzambe ezali ete bato bafanda seko awa na mabelé?
Mokano ya Nzambe
Esika nini Yehova atyaki babalani ya liboso mpo ete bákoka kofanda? Ezalaki kati na paladiso awa na mabelé. Mpe bapesamelaki etindá ete ‘bábota mpe bázala na kobota mingi, mpe bátondisa mokili, mpe bátya yango na nsé na bango.’ (Genese 1:28) Ɛɛ, mokano ya Nzambe ezalaki ete na ntango ebongi, mabelé mobimba mátonda na bato ya libota ya sembo oyo bafandi elongo kati na kimya mpe na esengo.—Yisaya 45:18.
Atako Adama apesamelaki etumbu ya liwa mpo na kozanga botosi, mokano ya Nzambe ya ebandeli mpo na bato ete báfanda seko na paladiso awa na mabelé mobongwanaki te. (Genese 3:17-19) Nzambe alobi ete: “Ngai nasili koloba yango mpe nakosala yango.” (Yisaya 46:11; 55:11) Nzambe amonisaki ete mokano na ye na ntina na mabelé mobongwani te ntango alobaki ete: “Bayengebeni bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”—Nzembo 37:29.
Lokola azali Mozalisi na biso, Nzambe azali na likoki ya kolongola mbeba oyo esalaka ete moto akóma mobangé mpe akufa. Na moboko nini akosala yango? Lokola tosangolaki mbeba yango longwa na moto ya liboso, Adama, Nzambe apesaki mbeka na lisiko, bomoi ya kokoka ya Mwana na ye, Yesu Klisto mpo ete “moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi ya seko.”—Yoane 3:16; Matai 20:28.
Na yango, Yesu Klisto akitani mpenza Adama ya liboso lokola tata na biso, mopesi na bomoi. Yango wana kati na Biblia Yesu Klisto abéngami “Adama na nsima.” (1 Bakolinti 15:45) Na bongo, na esika ete bákatelama etumbu ya liwa lokola bana ya Adama moto na masumu, bato na botosi bakoki kotángama ete babongi na kozwa bomoi ya seko lokola bazali bana ya “Tata na seko,” Yesu Klisto.—Yisaya 9:6.
Ya solo, “Mokonzi na seko” mpe “Tata na Nkolo na biso Yesu Klisto” ezali bongo Yehova Nzambe. (1 Timote 1:17; Emoniseli 15:3; Bakolose 1:3) Nzokande, Yesu Klisto, longola likambo oyo ete apesameli biso lokola “Tata na seko” mpe “Mosikoli,” azali lisusu “Mokonzi na kimya.” (Luka 2:11) Lokola azali momonisi ya Tata na ye, Klisto akosalela bokonzi mpo na kotya kimya awa na mabelé.—Nzembo 72:1-8; 110:1, 2; Baebele 1:3, 4.
Na nsé na boyangeli ya Yesu Klisto, paladiso oyo ebungisamaki ekozonga lisusu. Yesu alobaki ete yango ekosalema “na kozalisa ya sika, wana mwana na moto akofanda na kiti na bokonzi na ye na nkembo.” (Matai 19:28) Bayekoli ya sembo ya Klisto—bango nyonso 144 000—bakoyangela paladiso elongo na ye. (2 Timoté 2:11, 12; Emoniseli 5:10; 14:1, 3) Bamilió ya bato bakozwa matomba na boyangeli wana ya sembo na kosepeláká na bomoi kati na paladiso yango awa na mabelé. Kati na bango, ekozala mpe na mosali-mabe oyo akufaki elongo na Yesu mpe epai na ye Yesu alakaki ete: “Okozala na ngai elongo kati na paladiso.”—Luka 23:43.
Na bongo, ata bato bazangi sembo oyo basilá kokufa bakosekwisama mpe bakopesamela libaku ya kokokisa masengami mpo na bomoi ya seko awa na mabelé. (Misala 24:15) Na lolenge kitoko mpenza, Biblia ezali komonisa kolongolama ya mpasi, bobangé mpe liwa na kolobáká ete: “Nzambe akofanda na bango esika moko. Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te, mpo ete makambo na liboso masili koleka.”—Emoniseli 21:3, 4.
Ndenge nini tokoki kozwa bomoi ya seko?
Ya solo okolinga kozala moko kati na baoyo bakosangola mabelé mpe bakofanda seko kati na yango. Soki ezali bongo, osengeli kokokisa masengami mpo na kofanda seko kati na paladiso. Kati na libondeli oyo asalaki epai na Tata na ye ya likoló, Yesu Klisto alobelaki lisengami ya moboko kolobáká ete: “Oyo ezali bomoi na seko, báyekola koyeba yo, Nzambe bobele moko ya solo, mpe motindami na yo, Yesu Klisto.”—Yoane 17:3, NW.
Batatoli ya Yehova bakosepela kosunga yo ete ozwa boyebi oyo ezali kopesa bomoi. Túna bango mpe bakoya kokutana na yo na ntango oyo okopesa bango, kozanga kofuta, bokosolola mpo na koyeba lolenge oyo Nzambe azali kokana kobongisa bato mpo ete bákóma na ezaleli ya kokoka ezala na nzoto to na elimo. Ndimisama ete Mozalisi na biso mpe mozwi-na-nguya-nyonso atondi na makoki ya kolongola mbeba oyo tosangolaki, oyo ezali kopesa nzela na bobangé mpe na liwa. Ntango ekoya mpe esili kobelema, wana bomoi ekozala lisusu mokuse te. Yehova akopesa bato na ye “bomoi na lobiko.”—Nzembo 133:3.
[Elilingi na lokasa 10]
Na nsé na boyangeli na Klisto, bobangé mpe liwa ekozala lisusu te