Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/4 nk. 4-9
  • Tokoki mpenza kozala na bomoi ya seko?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tokoki mpenza kozala na bomoi ya seko?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tosalami mpo na kozala na bomoi ya seko
  • Mposa ya kozala na bomoi ya seko
  • Tosengeli kotyela nani motema?
  • Nzambe azali mpenza na mokano yango?
  • Mokano ya Nzambe ebongwani te
  • Tokoki kozala na bomoi libela na libela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Ndenge nini tokoki kozwa bomoi ya seko?
    Lamuká!—1996
  • Bakufi bakozonga lisusu na bomoi!
    Lamuká!—2009
  • Osengeli kosala nini mpo ozwa bomoi ya seko?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/4 nk. 4-9

Tokoki mpenza kozala na bomoi ya seko?

“Molakisi, nasala malamu nini ete nazala na bomoi na seko?”​—MATAI 19:16.

1. Tokoki koloba nini mpo na bolai ya bomoi ya moto?

MOKOLO moko, na mobu 480 L.T.B., Zelezese I, mokonzi ya Perse oyo Biblia ebéngi ye na nkombo ya Asierise azalaki kotala basoda na ye liboso bákende na etumba. (Esetele 1:1, 2) Hérodote, moto moko ya ekólo Grèce oyo akomá masolo ya ntango ya kala ayebisi ete mokonzi atangisaki mpisoli ntango azalaki kotala basoda na ye. Mpo na nini? Zelezese alobaki ete, “Soki nakanisi ndenge oyo bomoi ya moto ezali mokuse, epesaka ngai mawa. Na bato oyo nyonso, moko te akozala lisusu na bomoi nsima ya mbula nkama.” Na ntembe te yo mpe omonaka ete bomoi ezali mpenza mokuse; oyebi mpe ete moto moko te alingaka konuna, kobɛla, to kokufa. Ah, soki tokokaki ata kotikala na makasi mpe na esengo lokola bilenge na bomoi na biso mobimba!​—Yobo 14:1, 2.

2. Bato mingi bazalaka na elikya nini? mpe mpo na nini?

2 Kutu, lisolo moko ebimaki na zulunalo The New York Times Magazine ya 28 Sɛtɛmbɛ 1997, ezalaki na motó ya likambo ete “Balingi kozala na bomoi.” Lisolo yango ezongelaki maloba ya molukiluki moko oyo alobaki boye: “Nandimi mpenza ete tokoki kozala nkola (génération) ya liboso oyo tokozala na bomoi ya seko”! Mbala mosusu yo mpe ondimaka ete tokoki kozala na bomoi ya seko. Okoki kokanisa bongo mpamba te Biblia elaki ete tokoki kozala na bomoi ya seko awa na mabelé. (Nzembo 37:29; Emoniseli 21:3, 4) Kasi, bato mosusu bandimaka ete tokoki kozala na bomoi ya seko mpo na bantina mosusu kasi oyo Biblia eyebisi te. Tótalela ntina mibale oyo ekosalisa biso na komona ete tokoki mpenza kozala na bomoi ya seko.

Tosalami mpo na kozala na bomoi ya seko

3, 4. (a) Mpo na nini bato mosusu bandimaka ete tokoki kozala na bomoi ya seko? (b) Davidi alobaki nini na kotalela ndenge oyo asalemaki?

3 Moko ya bantina oyo endimisaka bato mingi ete tokoki kozala na bomoi ya seko ezali lolenge ya kokamwa oyo nzoto na biso esalemi. Na ndakisa, ndenge oyo tosalemaki na libumu ya mama na biso ezali mpenza likamwisi. Nganga-mayele moko ya lokumu oyo ayekolaka konuna ya nzoto akomaki ete: “Nsima ya kosala bikamwiseli oyo ebandi na kosalema na biso na kati ya libumu tii kobotama na biso mpe na nsima kokóma na makoki ya kobota mpe kokóma mikóló, nguya oyo ekelaki biso esalaki ebongiseli moko te oyo, na ntembe te elingaki kozala na mindɔndɔ te, mpo ete mbuma ya bikamwiseli yango eumela seko.” Ɛɛ, soki totaleli ndenge ya kokamwa oyo tosalemi, motuna oyo ezali naino kozwa eyano te: Mpo na nini tokufaka?

4 Eleki bankóto ya bambula, Davidi, moko na bato oyo bakomaki Biblia, akanisaki bikamwiseli wana, atako akokaki komona te ndenge oyo libumu ezali na kati, lokola bato ya siansi bakoki kosala yango lelo oyo. Davidi akanisaki na bozindo ndenge oyo asalemaki. Akomaki mpo na ntango oyo ‘atongamaki na libumu ya mama na ye.’ Alobaki ete na ntango wana ‘bangei na ye esalemaki.’ Alobeli mpe ndenge oyo “mikuwa” na ye esalemaki ntango ‘asalemaki na [esika ebombami, NW].’ Na nsima, Davidi alobelaki ‘likei (embryon) na ngai’ mpe alobaki boye mpo na likei yango na kati ya libumu ya mama na ye: ‘[Biteni na yango nyonso, NW] ekomamaki.’​—Nzembo 139:13-16.

5. Bikamwiseli nini elekaka ntango tosalemaka na kati ya libumu?

5 Ezali polele ete ndenge oyo Davidi asalemaki na libumu ya mama na ye ekomamaki na mokanda ya solo te. Kasi, ntango Davidi azalaki kokanisa ndenge oyo ‘bangei,’ ‘mikuwa,’ mpe biteni mosusu ya nzoto na ye esalemaki, amonaki lokola nde ezalaki kokola na kolanda plan moko, lokola nde eloko mokomoko “ekomamaki.” Ezalaki lokola ete selile oyo ebandaki kokola na libumu ya mama na ye ezalaki na esika moko oyo etondi na mikanda etondi na ebele ya malako na ndenge oyo mwana asengeli kosalema, mpe bazalaki koyebisa malako yango na selile nyonso oyo ezalaki kosalema. Yango wana, zulunalo moko (Science World) esaleli maloba oyo ya elilingi: ‘Selile mokomoko oyo ezali kokola na kati ya likei ya mwana ezali na biro ya kobongisa ba plan.’

6. Ndenge Davidi akomaki yango, nini emonisi ete ‘tosalemi na ndenge ya kokamwa’?

6 Osilá kozwa ntango ya kokanisa ndenge ya kokamwa oyo nzoto na biso esalaka? Jared Diamond, nganga-mayele ya bioloji alobaki ete: “Baselile ya kati ya misɔpɔ na biso ekufaka nsima ya mwa mikolo mpe baselile mosusu ebotamaka na esika na yango, baselile ya kati ya libenga ya masuba ekufaka nsima ya sanza mibale, mpe nsima ya sanza minei, ba globules rouges ya makila ekufaka mpe mosusu ebotamaka.” Asukisaki na maloba oyo: “Mokolo na mokolo nzoto na biso epanzanaka na biteni mikemike, bongo na nsima emizongisaka lisusu mobimba.” Yango elingi mpenza koloba nini? Elingi koloba ete ata soki toumeli mbula boni na bomoi, ezala mbula 8, 80, to mpe 800, nzoto na biso ekozala kaka ya sika. Moto moko ya siansi alobaki ete: “Nsima ya mbula moko, ba atomes 98 % oyo ezali na nzoto na biso lelo oyo ekotika esika na ba atomes mosusu oyo tozali kozwa na mopɛpɛ, na bilei, mpe na mai.” Ya solo, na kolanda maloba ya Davidi oyo ekumisaki Nzambe, tosalemi mpenza ‘na ndenge ya kokamwa.’​—Nzembo 139:14.

7. Na kotalela ndenge oyo nzoto na biso esalemi, bato mosusu balobaki nini?

7 Na kotalela ndenge oyo nzoto na biso esalemi, nganga-mayele moko oyo ayekolaka ndenge nzoto enunaka alobaki boye: “Toyebi mpenza te mpo na nini nzoto na biso enunaka.” Soki totali malamu, tosengeli nde koumelaka libela. Yango wana bato bazali kosala makasi ete bákokisa likambo yango na nzela ya siansi. Eleki mwa mikolo, Profesere Alvin Silverstein akomaki na komindimisa nyonso ete: “Tii mokolo mosusu tokoyeba eloko oyo esimbi bomoi. Tokokanga ntina . . . oyo moto anunaka.” (Conquest of Death) Litomba na yango ekozala nini? Alobaki ete: “‘Mibange’ bakozala lisusu te, mpamba te boyebi oyo ekosalisa biso tólonga liwa ekosala mpe ete bato bátikala bilenge libela.” Soki totaleli bolukiluki ya siansi na nzoto ya moto na mikolo na biso, tokoki koloba ete bomoi ya seko ekozwama te? Ezali na ntina mosusu ya solosolo oyo ekoki kondimisa biso ete tokoki kozala na bomoi ya seko.

Mposa ya kozala na bomoi ya seko

8, 9. Tobotamá na mposa nini oyo bato bamonisaka banda mokili ebandá?

8 Omonaka ete kozala na bomoi ya seko ezali mposa oyo tobotamá na yango? Monganga moko akomaki na zulunalo moko ya ekólo Allemagne ete: “Mposa ya kozala na bomoi ya seko ebandá na moto ya liboso.” Mpo na bindimeli ya bato ya kala na Mpoto, buku moko (The New Encyclopædia Britannica) eyebisi ete bazalaki koloba boye: “Bato ya malonga bakofanda libela na libela na ndako oyo ezali kongɛnga mpe ezipami na wolo.” Bato basali milende nyonso mpo na kokokisa mposa wana ya kozala na bomoi ya seko!

9 Buku mosusu (The Encyclopedia Americana) eyebisi ete eleki mbula 2 000, na ekólo Chine, “baamperere mpe bato [mosusu nyonso], na kolanda banganga-nzambe ya Lingomba ya Tao, basundolaki misala mpo na koluka nkisi ya bomoi”​—oyo babéngaki liziba ya bolenge. Ya solo, banda kalakala, bato mingi bakanisaka ete soki bamɛli bikelakela ndenge na ndenge, to mpe mai mosusu, bakoki konuna te.

10. Na mikolo na biso, bato bameki kosala nini mpo na kobakisa bolai ya bomoi ya moto?

10 Lelo oyo mpe, bato bazali kosala milende makasi mpo na kokokisa mposa ya kotikala na bomoi libela na libela. Ndakisa monene na yango ezali likambo ya kobomba nzoto ya moto oyo akufi na maladi na esika ya malili makasi. Bazali kosala bongo na elikya ya kozongisa bato yango na bomoi na mikolo ekoya soki bazwi nkisi oyo ekoki kosilisa maladi oyo ebomaki bango. Moto moko oyo alendisaka likambo yango oyo babéngi cryogénisation, akomaki ete: “Soki elikya na biso ekokisami mpe toyekoli ndenge ya kobongisa mbeba oyo nzoto ezwi​—bakisa mpe mbeba oyo konuna ememaka​—na ntango wana baoyo bazali ‘kokufa’ lelo oyo bakozwa bomoi oyo ezangi nsuka na mikolo ezali koya.”

11. Mpo na nini bato balingaka kozala na bomoi libela na libela?

11 Okoki komituna ete, mpo na nini tozalaka na mposa makasi ya kozala na bomoi ya seko? Ezali mpo ete “[Nzambe] atyaki na motema ya moto likanisi ya kozala na bomoi seko”? (Mosakoli 3:11, Louis Segond) Tosengeli kotalela likambo oyo malamumalamu! Kanisá naino: Mpo na nini tozali na mposa ya bomoi ya seko, to mposa ya kozala na bomoi libela na libela soki Mokeli na biso akanaki te ete mposa yango ekokisama? Soki asalaki biso na mposa ya bomoi ya seko mpe na nsima ayokisa biso mpasi na kozanga kokokisa mposa yango, ekomonisa mpenza ete azali na bolingo?​—Nzembo 145:16.

Tosengeli kotyela nani motema?

12. Bato mosusu bazali na elikya nini, kasi okanisi ete elikya yango ekoki mpenza kokokisama?

12 Mpo na kozwa bomoi ya seko, tosengeli kotya motema epai wapi to na nini? Na siansi ya ekeke ya 20 to ya 21? Lisolo oyo ebimaki na zulunalo The New York Times Magazine na motó ya likambo ete “Bazali na mposa ya bomoi” elobelaki “nzambe [ya sika]: siansi” mpe “elikya na makambo oyo siansi ekoki kosala.” Kutu, balobaki ete nganga-mayele moko oyo asalaka bolukiluki azali “mpenza na elikya . . . ete bokoli ya mayele babéngi manipulation génétique ekosalema na ntango oyo ebongi mpo ebikisa [biso] na ndenge ekopekisa konuna, ata mpe kosilisa konuna.” Kasi, tozali komona ete milende ya bato epekisi konuna te mpe elongi liwa te.

13. Ndenge nini bɔɔngɔ na biso emonisi ete tosalemaki mpo tózala na bomoi libela na libela?

13 Yango elingi nde koloba ete likoki ya kozwa bomoi ya seko ezali te? Ezali boye te! Likoki ezali! Ndenge oyo bɔɔngɔ na biso esalemi, na makoki na yango ezangi nsuka ya koyekola makambo ya sika, esengeli kondimisa biso likambo yango. James Watson, nganga-mayele na biologie moléculaire abéngaki bɔɔngɔ na biso “eloko oyo esalemi na makambo kilikili koleka biloko nyonso oyo toyebi.” Mpe Richard Restak, nganga-mayele oyo ayekolaka bɔɔngɔ alobaki ete: “Na biloko nyonso oyo bato bayebi na molɔ́ngɔ́ mobimba, ezali na eloko moko te oyo ekokani ata moke na bɔɔngɔ.” Mpo na nini tosalemaki na bɔɔngɔ oyo ezali na makoki ezangi nsuka ya kobomba mpe koyekola makambo mpe lisusu nzoto oyo esalemi mpo na kosala libela na libela soki tosalemaki na mokano ya kozala na bomoi ya seko te?

14. (a) Bakomi ya Biblia bamonisi elikya nini mpo na bomoi ya moto? (b) Mpo na nini tosengeli kotyela Nzambe motema kasi bato te?

14 Boye, nsima ya kotalela nyonso oyo, likanisi nini oyo elongobani mpe ya mayele tosengeli kozwa? Tokoloba ete Mokeli moko oyo azali na nguya nyonso, azali na mayele asalaki biso mpo tózala na bomoi ya seko, boye te? (Yobo 10:8; Nzembo 36:9; 100:3; Malaki 2:10; Misala 17:24, 25) Na bongo, soki tozali na mayele, tosengeli kolanda toli ya mokomi ya nzembo ete: “Ndimelá bana na mikonzi te, to moto, mpo ete azali na kosunga te.” Mpo na nini ezali malamu te tótyela moto motema? Mpamba te, lokola mokomi ya nzembo akomaki yango: “Soko [elimo, NW] ekolongwa, moto akozonga na mabelé lisusu; bobele na mokolo yango kokanisa na ye esili.” Ya solo, atako bakoki kozala na bomoi ya seko, bato bakutanaka ntango nyonso na liwa. Mokomi ya nzembo asukisaki na maloba oyo: “Esengo na ye . . . oyo atii elikya na ye epai na Yehova Nzambe na ye.”​—Nzembo 146:3-5, NW.

Nzambe azali mpenza na mokano yango?

15. Nini emonisi ete mokano ya Nzambe ezali ete tózala na bomoi ya seko?

15 Kasi okoki komituna ete, mokano ya Yehova ezali mpenza ete biso tózala na bomoi ya seko? Ɛɛ, azali na mokano yango! Liloba na ye elaki yango mbala ebele. Biblia alobi ete, “Nzambe akopesa likabo . . . [ya] bomoi na seko.” Yoane, mosaleli ya Nzambe akomaki ete: “Oyo mpe ezali elaka etikelaki [Nzambe] bino, ete bomoi na seko.” Yango wana tokokamwa te ete elenge mobali moko atunaki Yesu ete: “Molakisi, nasala malamu nini ete nazala na bomoi na seko?” (Baloma 6:23; 1 Yoane 2:25; Matai 19:16) Kutu, ntoma Paulo akomaki mpo na “elikya na bomoi na seko. Yango elakami na Nzambe na bilaka na kala.”​—Tito 1:2.

16. Na ndimbola nini Nzambe alakaki bomoi ya seko “na bilaka na kala”?

16 Maloba oyo ete Nzambe alakaki bomoi ya seko “na bilaka na kala,” malimboli nini? Bato mosusu bakanisaka ete ntoma Paulo alingaki koloba ete liboso ete Nzambe akela babalani ya liboso, Adama na Eva, mokano na ye ezalaki ete bato bázala na bomoi ya seko. Kasi, soki Paulo azalaki kokanisa ntango oyo ezali nsima ya kokela bato mpe na ntango oyo Nzambe ayebisaki mokano na ye, tosimbi ete Nzambe azali na mokano ya kopesa bato bomoi ya seko.

17. Mpo na nini babenganaki Adama na Eva na elanga ya Edene, mpe mpo na nini batyaki bakeluba na ekɔtelo na yango?

17 Biblia elobi ete na kati ya elanga ya Edene, “[Yehova] akolisaki . . . nzete na bomoi kati na elanga.” Babenganaki Adama na elanga mpo ‘asembola lobɔkɔ na ye te mpo na kokamata mbuma ya nzete ya bomoi mpe alya yango mpe aumela na bomoi’ mpo na libela! Ntango abenganaki Adama na Eva na elanga ya Edene, Yehova atyaki “bakeluba mpe mopanga ezali kopela na mɔ́tɔ oyo ezalaki kobalukabaluka mpo na kobatela ya nzete ya bomoi.”​—Genese 2:9; 3:22-24, NW.

18. (a) Soki Adama na Eva balyaki mbuma ya nzete ya bomoi likambo nini elingaki kokómela bango? (b) Kolya mbuma ya nzete yango elimbolaki nini?

18 Soki batikelaki Adama na Eva nzela bálya mbuma ya nzete ya bomoi, nini elingaki kokómela bango? Balingaki kozwa libaku ya kozala na bomoi ya seko na Paladiso! Nganga-mayele moko ya Biblia alobaki boye: “Nakanisi ete nzete ya bomoi ezalaki na makoki ya kobatela nzoto ya moto ete ebebisama na bobange te, to na kobeba oyo esukaka na liwa.” Kutu alobaki ete, “na paladiso, ezalaki na nzete oyo ekokaki kopekisa kobeba” oyo eutaka na konuna. Kasi, Biblia elobi te ete nzete yango ezalaki na makoki ya kopesa bomoi. Nzete yango ezalaki se komonisa ndanga ya bomoi ya seko oyo Nzambe asengelaki kopesa na moto oyo bakokaki kotikela ye nzela ete alya mbuma na yango.​—Emoniseli 2:7.

Mokano ya Nzambe ebongwani te

19. Mpo na nini Adama akufaki, mpe mpo na nini biso bana na ye tokufaka?

19 Ntango Adama asalaki lisumu, akokaki lisusu kozala na bomoi ya seko te, ezala ye to bana na ye atako babotamaki naino te. (Genese 2:17) Ntango akómaki moto ya masumu mpo na kozanga botosi na ye, nzoto na ye ebebaki, akómaki moto oyo azangi kokoka. Banda ntango wana, nzoto ya Adama ekamataki nzela oyo esengelaki kosuka na liwa. Lokola Biblia elobi yango: “Masumu makofuta mbongo, mbongo yango bobele kufa.” (Baloma 6:23) Lisusu, bana ya Adama, oyo babotamaki bato ya kozanga kokoka, basengelaki kosuka na liwa, kasi na bomoi ya seko te. Biblia elobi ete: “Mabe ekɔtaki na mokili mpo na moto moko [Adama], mpe kufa ekɔtaki mpo na mabe. Kufa mpe epalangani epai na bato nyonso mpo ete bato nyonso basali mabe.”​—Baloma 5:12.

20. Eloko nini emonisi ete biso bato tosalemaki mpo tózala na bomoi ya seko awa na mabelé?

20 Kasi, makambo elingaki kozala ndenge nini soki Adama asalaki lisumu te? Bongo soki atosaki Nzambe mpe batikelaki ye nzela alya mbuma ya nzete ya bomoi, epai wapi alingaki kozwa bomoi ya seko oyo ezali likabo ya Nzambe? Na likoló? Te! Ata mokolo moko te Nzambe alobaki ete Adama akokende na likoló. Bapesaki ye mosala awa na mabelé. Biblia elobi ete, “[Yehova] akolisaki na mokili nzete nyonso izali na kitoko na kotala, mpe yango izali malamu na kolya,” mpe elobi lisusu ete: “[Yehova] akamataki moto mpe atyaki ye na elanga na Edene kotimola yango mpe kobatela yango.” (Genese 2:9, 15) Nsima ya kokela Eva mpo azala mwasi ya Adama, Nzambe apesaki bango mibale misala mosusu awa na mabelé. Nzambe ayebisaki bango ete: “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili mpe bótya yango na nse na bino; mpe bózala na bokonzi na likoló na mbisi na mai; mpe na ndɛkɛ na likoló, mpe likoló na nyama nyonso na bomoi ikotambolaka na mokili.”​—Genese 1:28.

21. Elikya kitoko nini bato ya liboso bazalaki na yango?

21 Kanisá bomoi kitoko oyo Adama na Eva balingaki kozala na yango soki balandaki malako wana ya Nzambe! Basengelaki kobɔkɔla bana oyo bazali bato ya kokoka mpe bazali na nzoto kolɔngɔnɔ na paladiso awa na mabelé. Na ntango bana na bango balingaki kokola, bango mpe balingaki kobota bana mpe kosala mosala kitoko ya kobatela Paladiso wana. Lokola bato balingaki kozala na bokonzi likoló ya banyama nyonso, bomoi na bango elingaki kozala malamu mpenza. Kanisá esengo oyo balingaki kozala na yango ya kobakisa mokemoke bonene ya elanga ya Edene tii ezipa mabelé mobimba! Olingaki kosepela na bomoi elongo na bana oyo bazali bato ya kokoka na mabelé ya kitoko ndenge wana, kozanga ete omitungisa mpo na konuna mpe kokufa? Tiká ete motema na yo moko epesa eyano na motuna wana.

22. Mpo na nini tokoki kozala na elikya ete mokano ya Nzambe mpo na mabelé ebongwanaki te?

22 Kasi, ntango Adama na Eva bazangaki botosi mpe babenganaki bango na elanga ya Edene, Nzambe abongolaki mokano na ye ete bato bakozala lisusu na bomoi ya seko na Paladiso na mabelé te? Te! Soki Nzambe asalaki bongo elingaki komonisa ete alongi kokokisa mokano na ye te, mokano oyo azalaki na yango na ebandeli. Tokoki kozala na elikya ete soki Nzambe alaki likambo, akokokisa yango, lokola ye moko alobi ete: “Boye na liloba oyo ekobima na monɔkɔ na ngai; [ekozonga] epai na ngai mpamba te, kasi ekosukisa oyo ekani ngai, ekolonga na likambo litindaki ngai yango.”​—Yisaya 55:11.

23. (a) Eloko nini endimisi mpenza ete mokano ya Nzambe ezali ete bato ya sembo bázala na bomoi ya seko awa na mabelé? (b) Tokolobela makambo nini na lisolo oyo elandi?

23 Mokano ya Nzambe mpo na mabelé ebongwanaki te. Biblia emonisi yango polele na elaka oyo ya Nzambe: “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” Na Lisolo na ye likoló ya Ngomba, Yesu Klisto ye moko alobaki ete basɔkɛmi bakozwa mabelé. (Nzembo 37:29; Matai 5:5) Kasi, ndenge nini tokoki kozwa bomoi ya seko, mpe tosengeli kosala nini mpo na kozala na bomoi yango? Tokolobela makambo yango na lisolo oyo elandi.

Okopesa eyano nini?

◻ Mpo na nini bato mingi bandimaka ete tokoki kozwa bomoi ya seko?

◻ Eloko nini esengeli kondimisa biso ete tosalemaki mpo tózala na bomoi ya seko?

◻ Na ebandeli, mokano ya Nzambe mpo na bato mpe mabelé ezalaki nini?

◻ Mpo na nini tokoki kozala na elikya ete Nzambe akokokisa mokano na ye ya ebandeli?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto