Ndakisa malamu mpo na lolenge ya kotalela bato bakimá mboka
KATI na Mibeko oyo Yehova Nzambe apesaki na libota ya Yisalaele, bakundwelaki bango ezalela na bango ya bato bakimá mboka kati na Ezipito. (Exode 22:21; 23:9; Deteronome 10:19) Yango wana bapesamelaki mitindá ete basengeli komonisela boboto epai na bapaya oyo bafandaki kati na bango, lokola bandeko na bango mpenza.
Mibeko ya Nzambe elobaki ete: “Wana ekofanda mopaya [oyo mbala mingi ezalaki moto akimá mboka] epai na yo na mokili na yo, okosalela ye mabe te. Mopaya oyo afandi epai na bino akozala lokola moto abotami kati na bino, mpe okolinga ye lokola yo mpenza, mpo ete bino bozalaki bapaya na mokili na Ezipito.”—Levitike 19:33, 34.
Koyebáká ete mbala mingi moto oyo afandi na mboka mopaya azangaka nguya mpe makoki ya komibatela, Yehova apesaki mibeko ya sikisiki mpo na bolamu mpe libateli na bango. Tótalela ntómo ilandi oyo ipesamaki mpo na kobatela bango.
LOTÓMO YA KOSAMBISAMA NA BOSEMBO: “Bokozala na mobeko moko mpo na mopaya mpe mpo na moto abotami na Yisalaele.” “Okobebisa likambo na ntina na mopaya to na etike te.”—Levitike 24:22; Deteronome 24:17.
LOTÓMO YA KOZWA NDAMBO YA ZOMI: “Na nsima na mbula misato okobimisa ndambo na zomi nyonso na mbuma na yo na kati na mbula yango, mpe okobomba yango na kati na mboka na yo, mpe Molevi, awa ezali ye na ndambo na biloko to na libula na yo elongo te, mpe mopaya, mpe etike, mpe mwasi-mokufeli-mobali, baoyo kati na mboka na yo, bakoya mpe bakolya mpe bakotónda.”—Deteronome 14:28, 29.
LOTÓMO YA KOZWA LIFUTI NA BOSEMBO: “Okonyokola mosali na lifuti te, oyo na bobóla mpe na bosɛnga, soko ye azali moko na bandeko na yo to moko na bapaya na mokili na yo to na mboka na yo.”—Deteronome 24:14.
LOTÓMO YA KOBATELAMA NA MBOKA NA KOBOMBAMA NA NTINA NA KOBOMA MOTO OYO ESALAMI NA NKO TE: “Mboka motoba oyo ikozala bisika na kobombama mpo na bato na Yisalaele mpe mpo na mopaya mpe mpo na moto afandi kati na bango ete soko moto abomi mosusu na nko te akima kuna.”—Mituya 35:15.
LOTÓMO YA KOLƆKƆTA MBUMA NSIMA YA BOBUKI: “Wana ekobuka bino bilanga na bino okobuka kino nsuka na elanga mpenza te, mpe okolɔkɔta oyo etikali na elanga nsima na kobuka na liboso te. Okobuka mbuma na vinyo nyonso mpenza te, mpe okolɔkɔta mbuma na vinyo oyo ekwei kati na elanga na vinyo te. Okotika yango mpo na babóla mpe mpo na bapaya. Ngai nazali [Yehova] Nzambe na bino.”—Levitike 19:9, 10.
Na ntembe te, Mozalisi na biso, Yehova Nzambe, azali na motema mawa na ntina na bato bakimá mboka, mpe azali kosepela ntango biso mpe tomonisi motema mawa. Ntoma Moklisto Paulo akomaki ete: “Bózala bayokoli na Nzambe. . . Bótambolaka mpe na bolingo.”—Baefese 5:1, 2.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 9]
Elenge mobali na lobɔ́ko ya mwasi: FƆTƆ́: UN 159243/J. Isaac