Lilako lileki malamu—ezali na ntina kino lelo?
WOLO ebebaka te. Yango wana basepelaka mingi na biju oyo esalami na wolo. Lokola wolo ebatelaka ntango nyonso motuya na yango, na esika ete babwaka biloko esalemi na wolo mpe ebebi, basali na biloko na wolo balambaka libanga yango ya ntalo mpo na kosala biloko mosusu ya sika.
Bobele bongo, atako yango eyebisamaki na Yesu esili koleka bongo pene na mibu 2 000, lilako lileki malamu (ebengami na Français ete Règle d’or) ebungisi motuya na yango soko moke te. Soki toluki koyeba mpo na nini yango ezali na ntina kino lelo, wana tokosepela mpenza na motuya na yango mpo na biso lelo.
Nsima na kopesa Règle d’or: “Salela baninga makambo oyo olingi ete basalela yo”, Yesu abakisaki: “Mpamba te Mibeko mpe Basakoli ezali bongo”. (Matai 7:12) Ndenge nini bayekoli na ye mpe bato mosusu oyo bazalaki koyoka ye, bakangaki ntina ya maloba oyo?
“Mibeko mpe Basakoli ezali bongo”
“Mibeko” elimboli mikanda mitano ya liboso ya Biblia, oyo ebandi na Genèse kino Deteronome. Makomi yango ya bulee mamonisi ete mokano na Jéhovah ezalaki ya kobimisa libota oyo ekotya nsuka na mabe. (Genèse 3:15) Na mikanda yango, tozali mpe kokuta Mibeko, elingi koloba bitinda nyonso oyo Jéhovah apesaki epai na libota na Yisraele na nzela na Moïse, na 1513 liboso na ntango na biso na ngomba Sinai.
Mibeko ya Nzambe ezalaki kokabola Yisraele na mabota na bapakano oyo bazingaki bango, mpe Bayisraele basengelaki kosala likambo moko te oyo ekokaki kozanga kosepelisa Jéhovah. Bazalaki libota na ye mpe basengelaki kotikala bongo soko balingaki kozwa mapamboli na ye. (Exode 19:5; Deteronome 10:12, 13) Nzokande, longola masengami na bango epai na Nzambe, Mibeko na Moïse ezalaki kosenga epai na Bayisraele ete basala malamu epai na bapaya. Na ndakisa, elobaki boye: “Mopaya oyo afandi epai na bino akozala lokola moto abotami kati na bino, mpe okolinga ye lokola yo mpenza, mpo ete bino bozalaki bapaya na mokili na Ezipito. Ngai nazali Jéhovah Nzambe na bino.” (Levitike 19:34) Na eleko na bakonzi na Yisraele, bapaya bazalaki na mabaku malamu mingi; na ndakisa, bapesaki maboko mpo na kotonga temple na Nzambe na Yelusaleme.—1 Ntango 22:2.
Mibeko mipesamaki na Yisraele mizalaki kopekisa pite, koboma, moyibi mpe bilulela. Malako oyo mpe “mibeko mosusu oyo etikali” eyanganisami na etinda oyo: “Olinga mozalani na yo lokola yo moko.” Ntoma Paulo abakisi: “Bolingo ekosalelaka mozalani mabe te; bongo bolingo ezali kokokisa Mibeko.”—Baloma 13:9, 10.
Soko lilako oyo ya Règle d’or ezali kati na Mibeko, yango ezalaki boni mpo na “Basakoli?
Mikanda na basakoli oyo ezali kati na Makomi na hébreu mimonisi mpe motuya ya Règle d’or. Ezali komonisa Jéhovah lokola Nzambe oyo azali kokokisa na bosembo nyonso mokano na ye. Mozalisi ye moko azali kopambola basaleli na ye ya sembo oyo, atako bazali bato bazangi kokoka, bazali komeka kosala mokano na ye mpe bazali komonisa ete bazali kobongwana na bosembo nyonso kotikaka misala na bango ya mabe. “Bomisukola, bomipetola, bolongola mabe na makambo masalaki bino liboso na miso na ngai; botika kosala mabe, yekola kosala malamu, luka boyengebene, bongisa minyoko, bundela bitike na batata, lobela mwasi-akufeli-mobali.”—Yisaya 1:16, 17.
Ntango libota na Nzambe ezalaki kosala makambo mazali malamu epai na bato mosusu mpe epai na Jéhovah, Ye azalaki kobatela bango: “Jéhovah alobi boye ete, Bosambisa sembo, bosala mpe boyengebene; . . . Mapamboli epai na moto oyo asali bongo mpe na mwana na moto oyo asimbi yango makasi.’”—Yisaya 56:1, 2.
Klisto azali kotambwisa lisangá na ye
Klisto ayaki mpo na kokokisa Mibeko mpe Basakoli; nsima na ye, mokano na seko ya Jéhovah elandaki kokokana. (Matai 5:17; Baefese 3:10, 11, 17-19) Boyokani na sika ezwaki esika ya Mibeko ya kala ya Moïse, likambo yango epesaki nzela na Bayuda mpe Bapakano ete bakoma baklisto bapakolami. (Yilimia 31:31-34) Yango epekisi te ete lisangá ya boklisto elanda lisusu Règle d’or na eleko na biso. Tala likambo mosusu ekotinda biso na kondima ete lilako eleki malamu to Règle d’or ezali na ntina: Klisto azali Mokonzi na lisangá na boklisto kino na ntango na biso. Mitinda na ye mibongwani te; mpe toli na ye, epemami na Nzambe, ezali ntango nyonso na motuya monene.
Liboso ete akenda likoló, Yesu alobaki epai na bayekoli na ye ete bazalisa bayekoli mosusu kati na bato na mabota nyonso mpe balakisa bango ete batosa makambo nyonso oyo ye alakaki bango. Règle d’or to lilako lileki malamu ezalaki bongo kati na bitinda na ye. Yesu apesaki epai na bayekoli na ye elaka oyo: “Mpe tala, ngai nazali na bino elongo mikolo nyonso kino nsuka na ekeke.”—Matai 28:19, 20.
Lilako na Yesu ekomami boye kati na Luka 6:31: “Lokola ezali bino na mposa ete bato basalela bino, salela bango bobele bongo.” Yesu azalaki kosala malamu epai na baninga; yango ezali ndakisa malamu oyo atikaki.
Na mosala na ye awa na mabelé, Yesu atyaki likebi nyonso epai na bato oyo bazalaki na mpasi, na ndenge yango akabolaki mpasi na bango. Wana azalaki kosakola na mboka moko, amonaki bibele mpe ayokaki mawa. Kasi asukisaki se wana te: azwaki bibongiseli mpo na kosalisa bango. Na ndenge nini? Abongisaki mosala monene ya kosakola na kotindaka bayekoli na ye epai na bato yango. Apesaki bango etinda oyo: “Ekokoma bino na mboka monene nini to mboka moke nini, boluka soko nani azali moto malamu kati na yango. Boumela wana kino ekolongwa bino.” Mosala yango esimbamaki na ye mpe ezalaki na lipamboli na Tata na ye, lokola emonisi yango maloba oyo Yesu alobaki mwa nsima: “Ye oyo akoyamba bino azali koyamba ngai mpe ye oyo akoyamba ngai azali koyamba motindi na ngai. . . . Mpe ye nani akopesa kopo na mai na mpio epai na moko na baoyo mike mpo ete azali moyekoli, solo nazali koloba na bino, akobungisa libonza na ye te.”—Matai 9:36 kino 10:42.
Règle d’or to lilako lileki malamu, esengi kokamata mokano ya kosalela baninga malamu, lokola emonisi yango makanisi oyo Yesu abimisaki mokolo mosusu: “Soko mpe bokolingaka balingi na bino, bozali na libonza nini?
Mpo ete bato na masumu bakolingaka balingi na bango. Kasi bolinga bayini na bino, mpe bosala malamu . . . mpe libonza na bino ekozala monene. (Luka 6:32, 33, 35) Mpo na yango, soko tozali kobatela Règle d’or, oyo ezali ntango nyonso na ntina kino lelo, tokobanda kosala malamu ata epai na bato oyo toyebi bango te.
Ezali ntango nyonso na ntina mpe na nguya
Lilako lileki malamu ezali ntango nyonso na ntina: bato oyo bazali kotosa yango na bomoi na bango bazali komona ete ezali solo ndenge yango; mpe mbala mosusu yango ezali elembeteli eleki malamu mpo na komonisa motuya na yango. Baklisto oyo bazali kolanda ntango nyonso mibeko ya Nzambe na bomoi na bango bazali na esengo monene mpe bazali mbala mingi kozwa bolamu oyo bakanaki te. Moklisto moko ya mwasi, oyo azalaki kozwa nkisi na Klinike moko, azwaki mbano mpo na etamboli na ye ya boboto mpe ya limemya epai na minganga, mpamba te minganga basalaki nyonso oyo ekokaki na bango mpo na kosalisa ye malamu.
Ba Témoins de Jéhovah oyo bazali kosala mpo na kotonga ba Salles du Royaume na mikolo mibale bakoki mpe komonisa ete Règle d’or ezali na ntina. Bakendaka kotala bato oyo bafandi na quartier mpo na koyebisa bango ete bakotonga ndako na mikolo mikoya, mpe mbala mingi, bayambamaka malamu. Bato oyo na kala bazalaki koboya koyamba Batemwe, bakoki komona ete Batemwe bazali kosala malamu epai na baninga na bango mpe bazali komona bango moko boyokani oyo ezali kati na libota na Nzambe. Na yango, mingi kati na bango bazali mbala mosusu kopesa lisalisi na bango, na kopesaka maboko na botongi ndako yango to na kopesaka mwa bitongeli.—Tala Zakari 8:23.
Temwe moko ya Iran, oyo afandaka na Londres, azalaki kati na magasin mpo na kosomba bilei mpe motekisi afingaki ye, mpo azalaki mopaya. Moklisto yango afandaki kimya mpe alimbolaki ye na boboto nyonso mpe na mayele ete lokola azali Témoin de Jéhovah azali na koponapona te. Azali nde kotala bato nyonso ya quartier na ye mpo na komemela bango nsango ya Biblia. Likambo nini esalamaki? Ntango abimaki na magasin yango, longola biloko oyo asombaki, motekisi akabelaki ye biloko mosusu ya kitoko!
Règle d’or esuki bobele na mwa misala ya boboto te. Na ntembe te, etinda yango ezali komonana malamu koleka na ndenge ba Témoins de Jéhovah ya mokili mobimba bazali kosala malamu na kokendaka kotala bazalani na bango mpo na kosakola epai na bango nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe.
Ndenge nini kosalela lilako lileki malamu
Mpo na kolanda Règle d’or, lilako lileki malamu, oyo ezali kosenga kozwa mokano ya kosalela bato malamu, esengeli kotya likebi epai na baninga. Ee, osengeli koluka mabaku ya kosala malamu zongazonga na yo. Na yango, sepela na bato mosusu mpe, omibanzabanza mpo na bolamu na bamosusu. (Bafilipi 2:4) Kosalaka bongo, okozwa mapamboli mingi. Okolanda toli na Yesu: “Bongo, tika ete moi na bino engenga liboso na bato ete bamona misala na bino malamu mpe bakumisa Tata na bino oyo azali na Likoló.” (Matai 5:16) Na bongo, soko ozali solo koluka ye mpe soko olandi ntango nyonso la Règle d’or to lilako lileki malamu, okozwa libonza epai na Jéhovah.—Baebele 11:6.