Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g96 Octobre nk. 26-27
  • Balóngi mawa monene na lisalisi ya nguya ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Balóngi mawa monene na lisalisi ya nguya ya Yehova
  • Lamuká!—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Bólendisana bamoko na bamosusu”
  • Likámá oyo libimisi elikya
  • Libɔndisi liuti na “Nzambe na kobɔndisa nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • ‘Tóbɔndisa baoyo bazali kolela’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • “Bólela elongo na bato oyo bazali kolela”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Bóbɔndisa bato oyo bazali na mpasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Lamuká!—1996
g96 Octobre nk. 26-27

Balóngi mawa monene na lisalisi ya nguya ya Yehova

EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA ESPAGNE

NA FEBWÁLI ya mbula oyo, Batatoli mingi ya Yehova na lisangá ya Bailén na Espagne balekisaki elongo mokɔlɔ moko kitoko na ngomba Sierra Nevada oyo ezali pembeni na engumba na bango. Nzokande na ntáká bobele ya kilomɛtɛlɛ 5 liboso ya kokóma na engumba, wana ezalaki bango kozonga, vuatire moko oyo eutaki na ngambo mosusu ekatisaki longwa na nzela na yango kino na oyo ya bísi na bango mpe eyaki kotuta bango. Mɔ́tɔ ebimaki, mpe bísi ebandaki kopela. Bamoko kati na bato bazalaki kati na bísi bazwaki likoki ya kobima na ntango malamu, nzokande mingi baoyo bazalaki na bifandelo ya nsima bazwamaki kati na molinga mpe bakufaki.

Na nyonso, Batatoli 26 bakufaki, kati na bango baministre basakoli ya ntango nyonso minei mpe bana mike mingi​—pene na ndambo ya minei kati na basangani ya lisangá ya Bailén. Juan Carlos, mokonzi ya Espagne, amonisaki mayoki ya bato mingi ya espagne wana akomaki kati na telegrame na ye atindelaki guvernere ya engumba Bailén ete: “Toyoki mpenza mawa na ntina na likámá yango, Bondimisama ete tosangani na mawa na bino. Tolombi yo ete oyebisa mabota oyo bakufeli bandeko ete tokaboli mawa na bango mpe tolendisi bango na ntango oyo ya mpasi mingi.”

Na makanisi ya bamoko kati na bankóto ya bato oyo basanganaki na molulu ya bokundi, motuna moko mozalaki koya: mpo na nini makámá motindo boye masalemaka? Emonani ete ezali mpamba te “ntango mpe makambo makanami te” makoki koyela libota ya Yehova lokola mpe bato nyonso mosusu. (Mosakoli 9:11, 12, NW) Nzokande, Yehova alaki ete mosika te makámá motindo oyo makozala lisusu te.​—Emoniseli 21:4, 5.

Basangani mingi ya libota ya Betele ya Batatoli ya Yehova na Espagne mpe bankóto mingi ya Batatoli bautaki na bisika mosusu ya mokili yango basalaki mobembo kino na Bailén mpo na kobondisa mpe kolendisa bandeko na bango ya engumba wana. Bafandi ya Bailén, elongo na bakonzi ya engumba mpe ya etúka, bango mpe basanganaki na mawa ya mabota ya Batatoli. Bato mingi baoyo bamonaki makambo wana bakamwaki na mpiko ya Batatoli oyo bakufelaki bandeko.

Antonio Gómez, guvernere ya engumba Bailén, alobaki: “Nayebi Batatoli uta bambula mingi, mpe atako ngai moko nazali moto oyo andimaka te makambo maleki mayele na bato (agnostique) nasepelaka mingi na kondima na bino. Ntango likámá lisalemaki, nakanisaki mbala moko ete bomoko na bino na lingomba mpe na bomoto ekosalisa bino na kolónga likámá oyo koleka bituluku nyonso mosusu. Namonaki lolenge oyo engumba mobimba esungaki mabota oyo bakufelaki bandeko. Ekoki kozala ete liboso, bato bazalaki kokanisa mabe na ntina na lolenge na bino mpe na mitindá oyo botosaka, kasi nazali na esengo ya koloba ete makanisi wana mazali lisusu te. Bozali na nguya oyo ezali mpasi mpo na moto oyo azali Motatoli te ete akanga ntina na yango.”

José Borrell, ministre ya makambo matali botongi mboka (travaux publics), oyo ayaki na molulu ya bokundi lokola momonisi ya guvɛrnemá ya Espagne, alobaki: “Okoki koloba nini epai na baoyo babungisi pene na mabota na bango mobimba na mbala moko? Eloko te oyo ekoleka oyo bango moko basilaki kozwa kati na kondima na bango. . . . Bozali mpenza na kondima moko monene.”

“Bólendisana bamoko na bamosusu”

Eloko nini ‘bazwaki kati na kondima na bango’? Likoló na nyonso bazwaki kobondisama oyo euti na Yehova, “Nzambe na kobondisa nyonso. Ye oyo akobondisa biso kati na bolozi na biso.” (2 Bakolinti 1:3, 4) Atako bazalaki na mawa, bazwaki nguya ya kobondisana bamoko na bamosusu, kobateláká na motema maloba ya Paulo epai na Batesaloniki ete: “Bobondisana bamoko na bamosusu.”​—1 Batesaloniki 5:11, NW.

Ezalaki likambo ya kosimba mpenza motema na komona bandeko baklisto mibali mpe basi, bamoko kati na bango babungisaki kino bandeko na bango mwambe, kokende kotala bandeko mosusu ya lisangá baoyo mpe bakufelaki basangani ya mabota na bango. Francisco Saez, mokɛngɛli-mokambi, oyo ye moko abungisaki bana na ye nyonso mibale, alobaki: “Na ntango tokutani, tozalaki kolela. Kasi na nzela ya mpisoli na biso, tozalaki komikundwela elikya ya lisekwa, mpe tozwaki kobondisama.”

“Tosundolaki te mosala na biso ya kosakola, mpe tosalaki molende makasi na kotaláká bato bazali batatoli te oyo bakufelaki bandeko, kosaleláká mwa búku Ntango moto oyo olingaka akufi. . . ” Francisco alandi koloba: “Ngai mpenza, nazalaki na mposa ya kosakola, mpamba te nayebaki ete wana nazali kosakola epai na basusu, nakomiyoka malamu. Mpe na ntembe te, atako nazalaki kobima na kolela, nazongaki na ndako na kobondisama.”

Bafandi ya Bailén bayanolaki mpenza malamu na mosala wana ya kopesa litatoli. Pɔ́sɔ moko nsima ya likámá, Encarna, oyo azalaki na mawa mpo ete abungisaki bana na ye ya basi mibale mpe bana na bana na ye minei, akendaki kotala mwasi moko oyo kala mingi te abandaki boyekoli ya Biblia elongo na ye. Encarna asilaki kopesa bilendiseli ya Makomami na mwasi yango, oyo mobali na ye akufaki sanza minei liboso. Mwasi yango alobaki: “Sikawa tokobondisana moko na mosusu,” wana ezalaki bango kokóba botaleli na bango ya mwa búku Ntango moto oyo olingaka akufi. . .

Libota ya bandeko na mokili mobimba mpe emonisaki nokinoki lisungi na yango. Francisco Capilla, mokomeli ya lisangá, alimbolaki: “Lisangá mobimba elendisamaki na bankóto ya bankomá mpe batelegrame oyo tozwaki. Biró ya positá esengelaki kotinda mikolo nyonso mwa mótuka na ndako na biso mpo na kotika bankoma yango nyonso. Tozali mpenza na botɔ́ndi mpo na likebi litondi na bolingo oyo bandeko bamonisaki.”

Likámá oyo libimisi elikya

Likambo ya malamu likoki kobima na nsima ya likámá wana? Salomo, mokonzi moko ya kala, akomaki ete: “Mitema na bato na mayele ikozala na ndako na kolela.” (Mosakoli 7:4) Na boyokani na etindá yango, likámá ya Bailén lisali ete bato mosusu bákanisa na mozindo likoló na boyokani na bango elongo na Nzambe. Faustino, mobali moko mopakano oyo abungisaki mibale kati na bana na ye motoba na likámá yango ayebisaki mwasi na ye Dolores ete: “Nazali na nsango ya malamu ya koyebisa yo. Nalingi kobanda koyekola Biblia, awa ezali ngai na mposa ya komona bana na ngai na mokili ya sika.”

Atako bandeko basi mpe mibali ya Bailén bakobosana mawa na bango noki te, bazali kobondisa basusu mpe bazali kobondisama. Yehova azali kolendisa bango na nzela ya elimo santu na ye mpe na lisungi ya bandeko mingi mibali mpe basi ya bolingo. Mabondeli na biso mpo na bango mazali komata epai na Tata na biso na likoló.

[Bililingi na lokasa 26]

Minei kati na baoyo bakufaki

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto