Makambo mazali koleka na mokili
Mikrobe V.I.H. na Inde
Banganga-mayele na Institut national de recherche sur le sida na Pune, na Inde, na boyokani elongo na ekípi moko ya balukiluki oyo etambwisamaki na Dr. Max Essex ya Institut de recherche sur le sida na Havard basili koyeba mikrobe ya V.I.H. oyo ezali komonana mingi na Inde. Ezali bongo V.I.H.-1C, oyo ekanisami ete ekoki kolekisama longwa na moto moko kino mosusu koleka mikrobe V.I.H.-1B mbala mitano kino mbala zomi, oyo ezali komonana mingi na Mpótó mpe na Amerika. Engebene zulunalo Indian Express, Dr. Essex alobaki ete bopalangani ya mikrobe V.I.H. na Inde emonani ete ezali mingi koleka bipai mosusu na mokili. Nganga-mayele Dr. V. Ramalingaswami alobaki ete mwa ndambo ya mangwele oyo ezali kokatama mpo na kopɛngola sida, moko te ezali makasi mpo na V.I.H.-1C.
Lisungi mpo na kokauka ya biloko oyo esalemaki na Zimbabwe
Na bambula oyo euti koleka, Batatoli ya Yehova mbala mingi bapesaki lisungi na bisika oyo bizwaki makámá mauti na biloko bizalisami. Elimo na bango ya boklisto mingimingi epesami motuya na mikili ya bobóla lokola Zimbabwe, epai kuna kokauka ya biloko esalemaki na bitúká mingi ya mokili yango. Mpo na yango, bilei mingi mpe bilamba mingi bitindamaki na bolingo nyonso, mpe filiale ya la Société Watch Tower na Zimbabwe elóngaki kokabola biloko yango epai na Batatoli ya Yehova mpe baninga na bango na bitúká bizwami mosika. Longolá bilei mpe bilamba, Batatoli ya Zimbabwe bapesaki $7 500 (U.S.), mpe la Société Watch Tower abimisaki $20 500 mpo na komema lisungi yango. La Société mpe Batatoli oyo bazwami na bisika yango bamonisaki botɔ́ndi na bango mpo na elimo ya bokabi oyo bandeko na bango baklisto bamonisaki.
Eutelo moko?
Engebene zulunalo International Herald Tribune ya Paris, lisoló moko kati na zulunalo ya bajezwitɛ La Civiltà Cattolica, elobi ete “Ekoki kozala ete Nzambe asilaki koloba na nzela ya búku ndenge na ndenge lokola Koran ya Bamizilmá, Vedas mpe Bhagavad-Gita ya Bahindu mpe makomi mosantu ya Taoïsme ya Chine mpe Shintoïsme ya Japon.” Lisoló yango lilobi ete makomi oyo mpe mosusu ya losambo “ezali komonisa bobele masoló to filozofi mpamba te, kasi nde ‘emoniseli’—ya maloba ya Nzambe na nzela ya moto.” Lokola masoló ya zulunalo yango matalelamaka liboso ya kobimisama na yango na bataleli-makambo ya Vatican, mituna mibimisamaki mpo na koyeba soki makanisi yango mazali mpe oyo ya pápa ye moko mpo na likambo yango. Zulunalo Tribune emonisaki ete kati na búku na ye Entrez dans l’espérance, pápa Jean Paul II amonaki ete lingomba Katolike lizali koluka eloko moko kati na mangomba mosusu oyo ezali komonisa eutelo bobele moko ya mateya na yango.
Mɔ́tɔ ya mbula nkáma mozimisami
Esili koleka mbula 100, libeke moko ya makála (charbon) oyo litimolamaki naino te na mboka Chine lizwaki mɔ́tɔ, mpe likóbaki kopela kino kala mingi te. Mɔ́tɔ mozikisaki etando ya kilomɛtɛlɛ caré 6 mpe mobebisaki tɔ́nɛ 300 000 ya makála mbula na mbula. Milende mpo na kozimisa mɔ́tɔ yango milóngaki te na boumeli ya mibu mingi. Nzokande, eyebisami ete nsukansuka babomi-mɔ́tɔ balóngi kozimisa mɔ́tɔ yango. Mpo na kozimisa mɔ́tɔ, babomi-mɔ́tɔ basalelaki babɔmbi mpo na kotɔbɔla madusu mpe na nsima basopaki zɛlo, mabanga mpe mai likoló ya mololi ya mɔ́tɔ.
Hypertension mpe kobosana makambo
Kati na zulunalo Psychology Today tozali kotánga ete: “Boyekoli moko euti kosalema kala mingi te emonisi ete mibangé oyo babɛlaka hypertension bakoki kozwa lisusu mokakatano ya kobosana makambo, ya kososola mpe kokanisa wana bakómi na mibu koleka 70. Balukiluki bamonaki ete komata ya mbala nyonso ya tasiɔ́ na motángo ya zomi ezali na 9 % ya likámá ya kolɛmbisa mosala ya bɔɔngɔ́. Lenore Launer, mokambi ya bolukiluki yango alobi ete: “Toyebi ete hypertension ekangami na mpasi ya motema, mpe abakisi ete: “Wana ezali ntina mosusu ya kokitisa yango.”
Bozangi ya lisoló
Zulunalo The Courier-Mail ya Brisbane, na Australie ekomi ete bolukiluki moko euti kosalema kala mingi te emonisi ete bilenge ya eteyelo ya ntei basololaka mingi te, mbala mosusu mpe ata moke te masoló ya solosolo elongo na batata na bango. Bolukiluki emonisi ete bilenge mingi balekisaka miniti na nsé ya 15 na mokolo elongo na batata na bango, nzokande balekisaka pene na ngonga moko na mokolo mpo na kosolola elongo na bamama na bango. Baboti mingi te basololaka na bana na bango na ntina na bizaleli malamu to kosɛnzɛla makambo oyo bazali kotala na televizyó to na video. Masoló oyo batata basololaka na bana na bango emonani ete mazalaka bobele ya makambo mazangi ntina, lokola mituka mpe masano. Lisoló kati na bamama elongo na bana na bango etalelaki mingimingi baninga, eteyelo mpe mikano ya makambo ya bomoi kasi makambo ya solosolo basololaka yango te. Mbala mingi, lisoló kati ya tata na mwana ya mwasi esukaka bobele na masɛki epai na moko na mosusu.
Makámá na nzela—Mpo na nini?
Bolukiluki moko ebimisami na minisitɛlɛ ya transport na Brésil emonisi ete soko 90 % ya makámá ya nzela masalemaka mpo na libunga to bopɔtu ya batambwisi-mituka. Engebene lapólo yango, mbala mingi batambwisi-mituka bakómaka kino komityela motema koleka ndelo wana bazali kotambwisa na ntango malamu to na nzela oyo ezali semba. Lapólo emonisi mpe ete makámá ya motuka masalemaka na ntina na lolenge mabe ya nzela mpe kwɔ́kɔ́sɔ́ ya motuka ebomaka bato 25 000 mpe ezokisaka bato 350 000 mbula na mbula na Brésil.
Kobebisama ya Mai monene
Zulunalo New Scientist elobi ete “Na mowelano na bango oyo bazali kosala mpo na kozwa bankisi ya sika mpe ya motuya, balukiluki oyo bazali kosala mpo na bakompanyi oyo esalaka bankisi bazali kokamata biloko mingi kati na mai monene kozanga kokanisa na matomba mabe oyo makoki kobima.” Engebene Mary Garson, biochimiste ya Mai monene na Inivɛrsité ya Queensland, na Australie, 98 % ya biloko oyo bakamataka mpo na koyekola bibwakamaka kozanga kosalela yango. Na ndakisa, kiló 450 ya entéropneustes mpe kiló 2 400 ya éponges mokomoko ebimisaka bobele miligramɛ 1 ya nkisi ya kosilisa kansɛr; kiló 1 600 ya lièvres marins ebimisaka miligramɛ 10 ya peptide oyo basalelaka mpo na kosalisa mélanomes, mpe esengeli kiló 847 ya libale (foie) ya murène mpo na kobimisa miligramɛ 0, 35 ya ciguatoxine mpo na koyekola yango. Garson alobaki ete: “Tosengeli te kobimisa ebele ya bikelamo longwa na Mai monene—yango ezali na ntina—lobá soki toyebi malamumalamu ete tozali kosilisa yango te.”
Planɛ́ti moko emonani na pwasa
George Sallit, mobali oyo asepelaka kolekisa ntango na astronomie, oyo afandi na Bradfield, mboka moko moke na Angleterre, kala mingi te amonaki planɛ́ti moko moke na lisalisi ya télescope oyo atyá na mwa ndako moke na elanga na ye. Alobi ete: “Ezalaki mpenza na pwasa. Nakangaki fɔtɔ́ mpe na nsima ntango natalaki yango malamumalamu mpe nayaki komona ete ezalaki planɛ́ti moko oyo ezalaki kotambola malembemalembe na litalatála ya masini.” Planɛ́ti yango ya sika ebéngami Sallit One ezali bobele na kilomɛtɛlɛ 30 ya diamɛtɛlɛ mpe na ntáka ya kilomɛtɛlɛ milió 600 longwa na mabelé. Nzela oyo yango ezolonganaka ezwami kati na planɛ́ti Mars mpe Jupiter. Zulunalo The Times ya Londres elobi ete télescope oyo esalelamaki ezali na litalatála ya santimɛtɛlɛ 30 ya diamɛtɛlɛ, motindo yango ya masini oyo etambwisami na ordinatɛrɛ ezalaka na ntalo ya dolare 7 000, kasi esalelaka logiciel oyo ebongi mpo na télescope Hubble. Ekoki kozala na bankóto ya baplanɛ́ti mike ya lolenge wana, to astéroïdes, kati na système solaire na biso.
Likambo oyo balóni-lɔ́sɔ bamizelaki na yango te
Na boumeli ya bambula mingi, balóni-lɔ́sɔ na Azia bazalaki kosopa nkisi mingi likoló na milóna na bango ya lɔ́sɔ na ebandeli ya eleko ya kobuka mpo na koboma nyamankɛ́kɛ oyo ibebisaka nkasa ya nzeté ya lɔ́sɔ. Nzokande, baeksperiansi oyo eutaki kosalema kala mingi te emonisi ete nzeté ya lɔ́sɔ ekoki kobungisa kino koleka katikati ya nkasa na yango kozanga ete mbeba emonana likoló na boike ya lɔ́sɔ oyo yango ezali kobimisa. Balóni-lɔ́sɔ mosusu na Vietname bandimisami ete bakotika kosopa nkisi na milóna ya lɔ́sɔ liboso ya ntango oyo ebongi mpo na kobuka yango—oyo ezali na 30 kino 50 % ya nkisi ya koboma nyamankɛ́kɛ oyo balóni-lɔ́sɔ na Azia basalelaka—mpe bamonaki ete lɔ́sɔ na bango ebebaki te.
Kozanga komonisa motuya na losambo mpe na politiki
Engebene zulunalo The Australian, “elenge ya mboka Australie” asepelaka na makambo ya politiki te, ata mpe na makambo ya losambo te. Bosukisi yango bozwi moboko na bolukiluki moko esalemaki na molobi Dr. Jennifer Bowes ya Inivɛrsité ya Sydney epai na banakelasi ya mibu kobanda 13 kino 16. Makambo oyo bilenge bazalaki kotya na esika ya liboso matyami awa na molɔngɔ́ na kokitáká: “kozala na baninga ya motema, koteyama malamu, kozala na mosala malamu, kokólisa ntɔ́ki, kozala na boyokani malamu na libota, kobatela mabelé mpo na mabota oyo makoya nsima, kobatela banyama, kozala na ndako kitoko, kosala mibembo na mikili misusu, kozwa mosolo mingi, kosala likambo moko mpo na kopekisa kobebisama ya ezingelo, kobala, kosunga babóla, kosunga mboka, kosala likambo moko ya motuya mpo na bato ya mboka oyo ofandi, kozala na mwa bopusi likoló ya bato mosusu.” Makambo mibale ya nsuka oyo mazali na ntina moke na molɔngɔ́ ya makambo 18 oyo matyamaki ezalaki bongo “kolanda mitinda ya lingomba” mpe “komipesa na makambo ya politiki.”