Mboloko oyo ebosanaki mobɔkɔli na yango te
EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA AFRIQUE DU SUD
MBOLOKO ya mobali kati na motindo moko ya mboloko ebéngami Kudu ezalaka kitoko mingi na kotala, maseke na yango ezingamazingama mpe matoi na yango milai. Soki ekómi mokóló mpenza, mboloko yango ya mobali ekómaka na bosándá ya mɛtɛlɛ 1, 50 longwa na makolo kino na mapeka. Kudu ya mwasi, atako ezalaka na maseke te, ezali mpe na matoi milai. Kudu ezali nyama ya nsɔ́ninsɔ́ni, ezalaka ntango nyonso na bokɛngi mpe pene na kokima mpo na komibomba. Na bongo, oyo ekómelaki mwasi moko na nkombo Karen na mboka Zimbabwe ekoki mpenza kobenda likebi na biso.
Engebene zulunalo African Wildlife, bazwaki kudu ya mwasi oyo ezalaki naino mwana, ekangami na lopango ya nsinga ya bibende mpe bapesaki yango na Karen mpe abɔkɔlaki yango na miliki ya biberɔ́ na boumeli ya mwa bapɔ́sɔ. Nyama yango ekólaki malamu mpe ezalaki kobima te na libándá ya lopango ya libota ya Karen, mingimingi ezalaki kosakana na bana mpe mbwa oyo izalaki wana. Nzokande, mbala na mbala ezalaki kokenda na zamba mpe kozonga kino eyaki kokenda libela ntango ekómaki mpenza mokóló.
Pene na mbula mibale na nsima, wana azalaki kotambola na motuka na nzela ya zamba, Karen akamwaki mpo ete amonaki kudu moko ya mwasi oyo ezalaki na zemi mpe ekimaki motuka te. Ekimaki mpe te ntango Karen akitaki na motuka mpe abandaki kotambola epai nyama yango ezalaki. Na likambo oyo, Karen ayaki kososola ete ezalaki bobele nyama oyo ye abɔkɔlaki na biberɔ́, na bongo alobelaki yango na mongongo ya nsé ntango akómaki mpenza pene na yango. Kudu yango mpe eyebaki ye lokola mpo ete ekitisaki motó na nsé mpe elɛmbolaki Karen wana emitikaki ete Karen azinga yango na mabɔkɔ na ye!
Sanza mibale na nsima, kudu yango eyaki lisusu pembeni na nzela—mbala oyo elongo na mwana na yango. Karen amonaki ete kudu wana ezalaki na esengo ya kolakisa ye mwana na yango mpe na mbala oyo, lokola na mbala ya liboso, emitikaki ete Karen asakana na yango. Likambo motindo moko esalemaki mpe mwa bapɔ́sɔ na nsima mpe emonanaki lokola ete kudu yango ezalaki mpenza kozela Karen.
Na nsima ya sanza mosusu mibale, basáli mosusu na bilanga balobaki ete bamonaki kudu oyo tozali kolobela na nsinga ekangi yango makasi na nkingo. Bamekaki ete bákanga yango mpo na kolongola yango nsinga oyo ezalaki na nkingo kasi ekimaki. Na koyokáká bongo, Karen akendaki koluka kudu yango na zamba, kobeleláká nkombo na yango. Mosika te, Karen amonaki kudu wana liboso na ye. Koyebáká ete kudu yango elingaka kolya mapa, Karen amemaki mapa; apesaki mboloko yango, nde ntango ezalaki yango kolya mapa na esengo nyonso, mobali ya Karen akataki nsinga oyo ezalaki kokanga yango makasi na nkingo.
Na ntembe te, bolingo oyo esili koumela kobanda bileko mingi kati na moto mpe nyama esili komema esengo monene na libota oyo.