Babangaka lisusu nsuka ya mokili te
NA NSUKA ya bambula ya 1970, Gary mpe Karen bandimaki mpenza ete nsuka ya mokili ekómi pene. Na yango, balongwaki na engumba mpe bakendaki kofanda na kati ya mboka bango moko kaka. Bazalaki na mposa ya kobika.
Mpo na kozwa mayele oyo basengelaki na yango, basombaki babuku, bakɔtaki bakelasi mpe balandaki mateya na baseminɛrɛ mpe basololaki na bato ndenge na ndenge. Balonaki bandunda, mpe banzete ndenge na ndenge ya mbuma 50. Basangisaki mboto mpe bisaleli. Bayekolaki ndenge ya kolona mpe kobatela biloko. Moninga moko alakisaki bango ndenge ya koboma nyama mpe kokaukisa yango. Karen ayekolaki ndenge ya koyeba banzete mpe misisa ya nzete oyo bakoki kolya soki biloko esili. Gary ayekolaki ndenge ya kobimisa mafuta na masango, kosala mbambola, mpe kosala ndako oyo makambo nyonso ezali na kati.
Karen alobi ete: “Lokola makambo ezalaki mabe na mokili na ntango wana, nakanisaki ete mokili ekosuka mosika te.” Gary alobi ete: “Lokola bilenge mosusu, namipesaki mpenza mpo na kosilisa likambo ya koponapona mposo, etumba ya Vietnam mpe likambo ya kanyaka. Kasi, eumelaki te, nalɛmbaki nzoto. Namonaki ete mokili ezali kokende mpenza na libebi.”
Gary alobi ete: “Mokolo moko na butu, nazwaki Biblia, mpe natángaki yango kobanda na Matai tii na Emoniseli. Na boumeli ya mikolo minei oyo elandaki, natángaki yango lisusu. Na ntɔngɔ ya mokolo ya mitano, nayebisaki Karen ete: ‘Tozali na mikolo ya nsuka. Mosika te, Nzambe akopɛtola mabele. Esengeli tóluka baoyo bakobika.’” Gary ná Karen babandaki kotambola na mangomba mpo na koluka baoyo balingi komibongisa mpo na kobika na nsuka ya mokili.
Mosika te, Motatoli ya Yehova moko ayaki epai na bango, babandaki koyekola Biblia. Karen alobi boye: “Nakamwaki makasi, mpo alimbwelaki biso mpenza Biblia. Solo na likambo etali nsuka ya mokili ezali likambo oyo nazalaki koluka mpenza banda kala, mpe nsukansuka nazwaki yango. Nakómaki mpenza na elikya mpo na avenire. Kasi, likambo ya malamu mingi, nakómaki moninga ya Tata na ngai ya likoló, Mozalisi mpe Nzambe ya molɔ́ngɔ́ mobimba.”
Gary alobi ete: “Bomoi na ngai ekómaki na ntina mpenza. Ntango kaka nabandaki koyekola Biblia, mposa ya kotika ezalaki te. Natángaki bisakweli ya Biblia, natalelaki makambo oyo emonisaki ete makambo yango ezalaki kokokisama mpenza, mpe nandimaki ete mosika te Nzambe akosala. Nakanisaki boye: ‘Bato basengeli komibongisa, mpo na likama te, kasi mpo na bomoi oyo Nzambe alingi biso tózala na yango.’” Gary ná Karen bakómaki kotalela avenire na ndenge ya malamu. Na esika ya kobangabanga nsuka ya mokili, bakómaki kotya motema ete Nzambe akolongola makambo nyonso oyo ezali kobebisa mokili mpe akozongisa paradiso awa na mabele.
Na boumeli ya mbula soki 25 oyo eleki Gary ná Karen bazali kosala nini? Karen alobi ete: “Nazali kokolisa bolingo na ngai mpo na Yehova Nzambe mpe kondima epai na ye, mpe nalukaka kosalisa basusu básala mpe bongo. Ngai ná Gary topesanaka mabɔkɔ mpo libota na biso ezala makasi mpe ezala na bomoko na losambo ya Nzambe. Tosalaka makasi mpo na kosala makambo na molɔngɔ, mpe tosalaka nyonso mpo tózala na bomoi ya mindɔndɔ te mpo tókoka kotyela basusu likebi mpe tómibanzabanzaka mpo na bamposa na bango.”
Gary abakisi boye: “Nabondelaka ntango nyonso ete Bokonzi ya Nzambe eya mpe esalisa bamilio ya bato. Mbala nyonso oyo nasakwelaka basusu nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, nabondelaka mpo napesa elikya ya Biblia ata epai ya moto moko. Na boumeli ya mbula koleka 25, Yehova ayanoli mpenza na libondeli yango. Ngai ná Karen tondimaka ete mosika te Yehova akosala mbongwana monene na mabele, kasi tobangaka lisusu nsuka ya mokili te.”—Matai 6:9, 10; 2 Petro 3:11, 12.
[Elilingi na lokasa 9]
Gary ná Karen bazali sikoyo kosepela kosalisa basusu bázwa elikya oyo ezali na Biblia