Makambo mazali koleka na mokili
Ba “Unitariens” bandimi libala ya mibali na mibali mpe basi na basi
Zulunalo Christian Century elobi ete Lingomba ya ba Unitariens esili kokóma lingomba ya liboso na États-Unis mpo na likambo litali kondima libala ya mibali na mibali mpe basi na basi. Batindami oyo bayanganaki na likita ya mobu, mingi kati na bango “bandimaki libala kati na bato mibale oyo bandimani.” Zulunalo yango elobaki lisusu ete “na nsé ya mitindá ya lingomba, mokomoko kati na masangá 1 040 ekoki kozwa yango moko ekateli soki ekondima likambo litali libala kati na mibali na mibali mpe basi na basi mpe soki ekokumisa mabala motindo wana.”
Kopona kobota mwana mwasi to mwana mobali
Engebene Zulunalo Popular Science, “likoki ezali ya kopona kobota mwana mwasi to mwana mobali na kokaboláká mai ya ebotelo ya tata, mpamba te yango nde ekesenisaka soki mwana akozala mwasi to mobali.” Liboso, mai ya ebotelo ya mobali makosangisama na oyo ebéngami fluorescent mpo na kopesa yango lángi. Na nsima, masini moko (Rayon Laser) esalelami mpo na koyeba mbuma (X) ya (mwasi) mpe mbuma (Y) ya (mobali). Ordinatɛrɛ moko ekokɔtisa bokeseni yango mpe esaleli moko ya laboratwarɛ oyo na momeseno ‘esalelamaka mpo na ekizamɛ́ ya makila ekopesa oyo ebéngami charge électrique positive mpo na mbuma (X) ya mwasi mpe charge électrique négative mpo na mbuma (Y) ya mobali. Mbuma yango ikokabolama na lisalisi ya oyo babéngi électrode oyo charge électrique na yango ekeseni na oyo ya mbuma.’ Engebene moto na siansi oyo abandisaki tekiniki yango oyo na ebandeli etalelaki kompanyi ya kobɔkɔla bibwele, mbuma ntuku libwa likoló na monkámá (90 %) ikoki kokabolama malamu. Bongo na nsima, mai ya bibotelo oyo eponami ekosalelama mpo na kokólisa likei (ovule), mpe “mimboto oyo eponami ekotyama sikawa kati na likukú ya mama (matrice).” Nzokande, kino sikawa, bobele mwana moko ya moto abotamaki na mwango yango.
Mbeba ya elobeli ya bana
Milende ya liboso ya bana mpo na koloba mbala mingi etalelami lokola ya kosepelisa, mpe mpo na kozongisela bango maloba na boboto nyonso, baboti mingi basalelaka elobeli ya bana na bango. Nzokande, Eliane Regina Carrasco, nganga-mayele na makambo matali koloba, mobotami na Brésil, alobi kati na zulunalo Veja ete lolenge wana ekoki kobebisa milende oyo bana bazali kosala mpo na koloba malamu. Carrasco alobi ete ntango baboti bazali kozongela elobeli ya mabunga ya mwana, yango “ekokólisa ndakisa ya maloba oyo ezali malamu te.” Alobi ete yango ekoki kobimisa mikakatano ya koloba. Ekoki mpe kobebisa boyokani ya mwana elongo na basusu. “Mbala mingi, bana motindo wana bamitangolaka na basusu, bakómaka mawamawa, mpe na bobangi, kopɛngoláká mabaku oyo ekoki koyokisa bango [nsɔni].” Carrasco alobi ete ezali likambo lilongobani mpo na bana mike ete báyeba te ebengeli malamu ya maloba mosusu, mpe ezali na ntina te kosembola bango ntango nyonso. Kasi ezali ntina kosolola na bango na elobeli malamu mpe komikundola ete “bazali na mayele mpe bazali na likoki ya koyekola.”
Ekólo Chine ezali kozwa myango ya kokitisa kobeba ya mai
Molobeli moko ya zulunalo China’s National Environmental Protection Agency alobi ete “kobeba ya mai ezali mokakatano monene na ekólo Chine, mpe kokitisa mokakatano yango ezali mpenza mosala oyo mosengeli kosalema noki.” Na yango, zulunalo China Today elobi ete guvernemá ya Chine ezali kozwa myango ya kokitisa mokakatano yango na bibale mpe baláki mingi oyo ebebisami mingi. Na ndakisa, mpo na kotalela bosɔtɔ oyo ekɔ́taka na Huaihe, moko ya bibale oyo bibebisami mingi koleka na ekólo yango, guvernemá esili “kokanga baizine ya mikemike 999 oyo esalaka bapapyé na lobwaku ya ebale Huaihe.” Bato soko milió 154 bafandaka na lobwaku ya Huaihe, moko ya biteni ya Chine oyo ezali kobimisa bilei mpe lontiliki mingi.
Banganga-mobulu ya “bulɛɛ”
Kati na lisoló moko na zulunalo Compass Direct Willy Fautré alobi ete na milende oyo ezali kosala mpo na “komizongisa lisusu lokola lingomba ya ekólo,” Lingomba ya Ɔrtɔdɔksɛ ya Roumanie esili “kosala kampanye moko mabe mpo na kotyola mangomba mosusu.” Fautré abakisi ete: “Bakonzi mpe basángó ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔksɛ na Roumanie” basili kobongisa bituluku ya “kosala mobulu mpo na kobangisa bituluku ya mangomba oyo mazali na bato moke mpe koboya ete bázala na ntómo ya mangomba na bango.” Kobéngáká batei ya kompanyi moko ya radio ya lingomba ete “babebisi ya kondima ya bankɔ́kɔ,” episkɔ́pɔ ya engumba Suceava mpe engumba Rădăuţi akomelaki mokambi ya kompanyi ya radió mpe televizyó na Roumanie, alobi ete: “Tolɔmbi bino ete bópekisa bango to bótya ndelo na makambo bazali koloba, mpamba te bazali ata na nsɔni te mpe balobi ete bakokómisa bato ya mboka na biso bandimi na bango.”
Nyama oyo imelisaka mabɛlɛ ikómi na likáma koleka ndɛkɛ
Zulunalo New Scientist elobi ete “nyama oyo imelisaka mabɛlɛ izali na likámá ya kosilisama koleka ndɛkɛ.” Bolukiluki yango ezwami na mitángo oyo mibimisami na ebongiseli ebéngami World Conservation Union’s Red List, emonisi ete wana mitindo ya ndɛkɛ 11 likoló ya monkámá ezali na likámá ya kosilisama nyɛɛ, nyama oyo imelisaka mabɛlɛ 25 likoló ya monkámá izali na likámá. Primates ezali etuluku oyo ezwami na likámá koleka, mitindo na yango 46 likoló ya monkámá ezali na likámá ya kosilisama. Na esika ya mibale ezali bongo nyama oyo ilyaka nyamankɛkɛ, nyama yango 36 likoló ya monkámá izali na likámá, nsima na yango ezali bongo nsombo mpe mboloko na 33 likoló ya monkámá. Ndɛkɛ oyo izali na likámá koleka ezali oyo ebéngami na Lingelesi ete crane oyo mitindo na yango 26 likoló ya monkámá ilingi kosila. Moko ya bantina ya kosilisama ya nyama oyo imelisaka mabɛlɛ ezali ete, na bokeseni na ndɛkɛ, izali na likoki mpenza te ya kokende na esika mosusu nokinoki ntango esika oyo ifandaka ezali kobebisama.
Manáka ya kotánga esalisaka na kokitisa mobulu
Zulunalo The Independent elobi ete na engumba Bradford, na Angleterre, ebongiseli moko ya Letá oyo etyami mpo na kokólisa makoki ya bana ya kotánga ezali kozwa matomba malamu mpenza. Manáka ya kotánga ezali te bobele kokólisa makoki ya kotánga, kasi ezali mpe kosalisa na kokitisa mobulu! John Watson, mokambi ya ebongiseli yango ebéngami Better Reading Partnership alobi ete: “Tosili komonisa ete motángo ya bilenge oyo bayibaka na bandako ekokani na motángo ya bana oyo bakimaka kelasi. Soki bana bayebi kotánga malamu bazalaka mbala mosusu na mposa mingi ya koyeba makambo mazali koleka na eteyelo mpe bakokima kelasi mingi mpenza te. Lokola bazali na babalabála te bakozala mpe mpenza te na bandako mpo na koyiba.”
Masano ya Olimpiki mpe bobóla
ENI Bulletin ya Suisse elobi ete “motángo ya midai oyo mikili misusu mizwaka na masano ya Olimpiki mpe motuya ya mosolo oyo mobimisami mpo na bisika mpe bibongiseli oyo bibombaka mosolo ya masano ya Olimpiki ebimisi ntembe na ntina na kobimisama ya mosolo na mokili mpo na kosilisa bobóla. Greg Foot, mosangani ya ebongiseli ebéngami World Vision agency of Australia alobi ete “yango elingi koloba te ete tokoki te kokumisa to kobɛtela basani oyo balóngi mabɔkɔ mpo na makoki mpe milende na bango.” Abakisi ete “kasi, tosengeli kotuna soki tozali na makambo ya kotalela liboso ntango tozali kobimisa mosolo mingi mpo na bilei ya basani na biso wana bamilió ya bazalani na biso bazangi bilei bikoki kopesa bango nguya ya kotambola.” Ekanisami ete na boumeli ya bapɔ́sɔ mibale oyo masano ya Olimpiki mazalaki kosalema na engumba Atlanta, bana 490 000 na mokili mobimba bakufaki na nzala mpe na makɔnɔ oyo makoki kopɛngolama.
Kokenda na nganda ya kafe
Basali mosusu babimaka mpo na komɛla mwa kafe pene na midi. Na yango, mingi bazali kotika mpenza bisika ya mosala. Na nganda oyo eyebani, basali bazali kokenda kuna na lombangu komɛla mwa kɔ́pɔ ya kafe. Na yango, The Wall Street Journal elobi ete “na esika ete basali bámɛla kafe na esika ya mosala, bazali kotika yango mpo na kokenda komɛla na nganda ya kafe.” Kasi bakonzi ya mosala bazali komibanzabanza na ntina na ntáká ya botamboli wana kino na banganda ya kafe. Na milende oyo mizali kosalema mpo na kokitisa motángo ya baalingá-kafe oyo bazali kotika bisika ya mosala, zulunalo yango elobi ete bakompanyi mosusu izali kosala milende ya kotya masini na yango moko mpo na kolamba kafe.
Milóna oyo mibimisaka molungé
Balukiluki mibale na Australie basili komona ete fololo ebéngami lotus ezali na likoki moko ya kokamwa ya komipesa molungé yango moko. Liboso, bobele nyama ya makila nde ezalaki na likoki ya kosala bongo. Dr. Roger Seymour mpe Dr. Paul Schultze-Motel, oyo bazali kosala na lobálá ya banzeté na Australie, batyaki bimekeli ya molungé na lotus mpo na koyeba molungé na yango mpe makambo mosusu. Bamonaki nini? Ata ntango molungé ya mopɛpɛ ekiti na badegrɛ́ 10, fololo ya lotus etikalaka bobele kati na badegrɛ́ Celsius 30 mpe 35. Balukiluki bazwi naino ndimbola te mpo na likambo yango. Nzokande, engebene zulunalo The New York Times, Dr. Hanna Skubatz, biochimiste ya milóna na Inivɛrsité ya Washington, na États-Unis, alobaki ete “kobimisama ya molungé [na milóna] epalangani, na yango, ezali mpenza mpasi mpo na koyeba.”
Basakoli ya mangomba ya boklisto bandimi mabunga
Búku moko oyo ezali na motó na likambo ete “Cambridge Declaration of the Alliance of Confessing Evangelicals” elobi ete “basakoli ya mangomba ya boklisto lelo bazali kobungisa bosembo na bango, bizaleli malamu mpe molende ya misionere.” Maloba makasi boye mauti wapi? Mbala mosusu na lingomba moko oyo ezali kowelana? Te, maloba wana mauti na basakoli bango moko. Búku yango ebimisamaki na basakoli bakambi koleka 100 ya mangomba ya boklisto oyo bayanganaki na likita moko kala mingi te na engumba Cambridge, na Massachusetts. Bakomi ya búku yango bandimi ete bango mpe bakonzi ya mangomba basengeli “kobongola motema mpo ete bazali komitika kotambwisama na mitindá ya mimeseno ya bato.” Búku yango mpe endimaki ete “mitindo ya kosalisa makɔnɔ, myango ya mombongo, mpe nguya ya kominanola ya mokili mbala mingi ezalaka na bopusi likoló na makambo oyo lingomba elingaka, lolenge ezali kotambola mpe oyo lingomba esengeli kopesa, koleka makambo oyo Liloba ya Nzambe ezali kosɛnga.”