Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g95 Octobre nk. 28-29
  • Makambo mazali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokili
  • Lamuká!—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntina oyo bana bandimaka bilangwiseli
  • Kosepela na makambo ya nsɔ́mɔ
  • Kosukola mabɔkɔ na lolenge ya malamu
  • Bozito ya babólá
  • Milangwa na biteyelo minene
  • Mabelé oyo mabebisami, na Grande-Bretagne
  • Miinda ya motane na nzela ya mituka ezali mpe mpo na banyama?
  • Bitíke oyo bazwi sida na mboka Roumanie
  • Elikya ya sika mpo na bikomba
  • Kolangwa ezali mpenza mabe?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
  • Makambo mazali koleka na mokili
    Lamuká!—1997
  • Sukolá mabɔkɔ na yo mpe pangusá yango!
    Lamuká!—1999
  • Makambo mazali koleka na mokili
    Lamuká!—1998
Makambo mosusu
Lamuká!—1995
g95 Octobre nk. 28-29

Makambo mazali koleka na mokili

Ntina oyo bana bandimaka bilangwiseli

“Lolenge nini tokoki kobatela bana na biso na bilangwiseli lokola makaya mpe masanga makasi, mpe mpo na nini esalaka ete bana mosusu bakakatanaka te na koloba “te” koleka basusu?” Mituna wana mibimisamaki kala mingi te kati na zulunalo Parents, oyo epesaki mwa biyano mosusu oyo biutaki na bolukiluki moko oyo esalemaki na Eteyelo monene ya Arizona, na Etats-Unis. Bolukiluki esalemaki epai na banakelasi soko 1 200 ya kelasi ya motoba mpe ya nsambo, mpe elobelaki makambo zomi oyo mazali kopusa bana na bilangwiseli. Makambo mibale ya ntina ezalaki oyo: “bopusi ya baninga mpe kozala na baninga oyo bamelaka bilangwiseli.” Lisusu, bolukiluki emonisaki ete kolónga na eteyelo ekoki kozala na litomba ya kobatela​—mbala mosusu mpo ete yango ekólisaka lokumu ya moto ye moko mpe epesaka nzela mpenza te na boninga elongo na baoyo bamelaka bilangwiseli.

Kosepela na makambo ya nsɔ́mɔ

Engebene zulunalo The Globe and Mail ya Canada, bilenge bakómi kosepela mingi na makambo ya nsɔ́mɔ. Zulunalo yango emonisi ete: “bililingi ya nsɔ́mɔ, mayemi likoló ya mikanda ya kosekisa, mayemi mosusu, bafilime mpe miziki ya nsɔ́mɔ ezali na bopusi mingi likoló na bilenge.” Mpo na kokokisa bamposa wana ya nsɔ́mɔ na botángi ya mikanda, mokomi moko akólisi kobimisama ya mikanda ya makambo ya nsɔ́mɔ mpo na bilenge, kolongwa na mikanda minei mpo na mbula mobimba kino na mokanda moko sanza na sanza. Bakomi mosusu bazali kobimisa mikanda mibale ya makambo ya nsɔ́mɔ sanza na sanza. Mpo na nini bosepeli motindo wana na makambo ya nsɔ́mɔ? Engebene mokomi Shawn Ryan, “uta kala, makambo ya nsɔ́mɔ mazalaka ntango nyonso na bopusi epai na bato na ntango ya mitungisi mpe ya mawa.” Mr. Ryan alobaki kati na zulunalo The Globe boye: “Na bambula oyo ya 1990, guvernemá ekokisaki bamposa na biso te, tozali bato ya mawa mpe tozali na bobangi ya mobulu. Yango wana makambo ya nsɔ́mɔ mazali kopesa bosepeli motindo wana.”

Kosukola mabɔkɔ na lolenge ya malamu

Zulunalo Toronto Star emonisi ete, engebene minganga, likambo moke ya kosukola mabɔkɔ mbala na mbala, “epesaka nzela na kolongola mikrobe ya miyoyo, ya grippe, ya mpasi ya mongongo, mpasi na libumu mpe makɔnɔ mosusu ya minene.” Ebakisi ete: “Bolukiluki moko esalemaki na monganga Julio Soto, épidémiologiste na Montreal emonisi ete kosukola mabɔkɔ na lolenge ya malamu ekoki kokitisa kopanzana ya makɔnɔ mingi​—soko 54 % ya mpasi ya mongongo mpe 72 % ya pulúpulú.” Société pédiatrique ya Canada emonisi ete, mpo na kosukola mabɔkɔ na lolenge ya malamu, esengeli kopɔlisa yango na mai oyo mazali koleka na boumeli ya basegɔ́nde soko 30, kopɛtola yango na boumeli ya basegɔ́nde 5 mpe na nsuka kokaukisa yango na epangwiseli oyo basaleli te, na lokasa ya kopangwisa mabɔkɔ, to na masini ya kokaukisa mabɔkɔ. Bato oyo basimbaka biloko ya kolya na barestorá to na bisika oyo batekaka bilei, basengeli kotya likebi mingi na likambo litali kosukola mabɔkɔ.

Bozito ya babólá

Engebene Sommet mondial pour le développement social, likita ya Mabota Masangani oyo lisalemaki na Copenhague, na Danemark, babólá ya bamboka ya zámba kati na mokili mobimba bazali kati na ezaleli ya likámá. Bayebisaki na ntango ya likita wana ete bato koleka miliare moko bazali kati na bobólá oyo eleki ndelo mpe ete na motuya wana koleka katikati bazali komona mpasi na nzala. Kozanga mosala mpe ezali kokólisa ezalela yango. Ekanisami ete bato milió 800 bazangi mosala to bazali kofutama malamu te. Soki tosangisi mituya nyonso, 30 % ya basali kati na mokili mobimba basalelami na lolenge ya malamu te. Kati na bato miliare 1,1 mpe miliare 1,3 bazali na lifuti oyo ezali na nsé ya dolare moko na mokolo. Boínga, oyo ezali mpenza kokólisa likambo yango, ezwi sikawa bato soko milió 905. Motuya na bango ezali kokita nokinoki te; bana milió 130 bazali kotánga kelasi te ata soki bakómi na mbula ya kotánga kelasi mpe emonani ete motuya na bango ekokóma milió 144 na mobu 2000.

Milangwa na biteyelo minene

Engebene zulunalo News & World Report, milangwa ya bayekoli kati na biteyelo minene ezali kobimisa matomba mabe na mikolo oyo​—ata mpe mpo na baoyo bazali komela te. Na kokamatáká mituya ya bolukiluki oyo esalemaki kati na biteyelo minene 140, mpe ebimisamaki kati na The Journal of the American Medical Association, zulunalo emonisi ete 44 % ya bayekoli ya biteyelo minene oyo batunaki bango mituna bazalaki komela masanga mingi koleka​—elingi koloba, na ntango moko to na ntango mosusu ya bapɔ́sɔ mibale oyo euti koleka, mibali bamelaki bakɔ́pɔ mitano ya masanga na mbala moko, mpe basi bamelaki bakɔ́pɔ minei. Bato zomi na libwa kati na monkámá bazalaki komela mingi koleka mbala na mbala; soko mbala misato na eleko wana. Mingi kati na bango bazali kozwa matomba mabe oyo mayebani​—mokakatano ya koloba malamu, kosangisa nzoto oyo ekanamaki te, kozangisa kelasi, kozoka bampota, kobebisa biloko mpe bongo na bongo. Kasi bayekoli mosusu mpe bazali konyokwama. Kati na biteyelo minene oyo makambo yango ezali kosalema mingi, bayekoli 9 kati na 10 bamilelaki mpo na bizaleli mabe ya baoyo bazali kolangwa, lokola masenginya ya kosangisa nzoto, kobebisa biloko, kokata bango mpɔngi to mafinga ya nsɔ́ni.

Mabelé oyo mabebisami, na Grande-Bretagne

Zulunalo New Scientist emonisi ete, kala mingi te minisitɛlɛ ya kobatela mboka na Grande-Bretagne elobi ete mabelé na ye mingi mabebisami na bibundeli na boye ete makoki kotekama te. Minisitɛlɛ yango ezali na mabelé 3 400 na Grande-Bretagne, elingi koloba 242 000 hectares. Ndambo mibale kati na misato ya mabelé yango esalelamaka mpo na kobongisama mpe koyekola kobeta mindóki. Mpo na kokita ya mosolo na makambo matali bitumba, minisitɛlɛ yango esɛngisami mpo na koteka ndambo ya mabelé yango kasi eyebi mpenza te motángo ya oyo mabebi mingi koleka na boye ete makoki kopesa nzela te mpo na kotonga bandako ya kofanda. Ekanisami ete mwambe kati na yango mabebisami na radioactivité oyo euti na mokóbo ya kongɛnga oyo basalelaki kala mpo na ba boussoles mpe mpo na tableaux de bord militaires. Bisika mingi ya koyekola kobeta mindóki bitondi na babɔ́mbi oyo epanzani naino te. Mabelé moko mabebisami na batiyó oyo ezali na gaz moutarde na ntina na bosɔtɔ ya etumba ya liboso ya mokili mobimba oyo elongolamaki malamu te na 1918.

Miinda ya motane na nzela ya mituka ezali mpe mpo na banyama?

Kokatisa ya banyama na nzela ezalaka likámá mpo na batambwisi mituka mpe mpo na banyama. Zulunalo ya France Terre Sauvage oyo etalelaka zámba eyebisi ete, mpo na koluka kosukisa makámá mingi oyo mauti na banyama oyo bakatisaka banzela ya zámba na butu, basáli ya Office national des forêts de France bamoni likambo moko ya kokamwisa. Banyama batɛlɛmaka liboso ya miinda ya motane na nzela ya mituka! Bomeki oyo bango basalaki emonisi ete kongɛnga ya motane ezalaka na bopusi ya konyelisa banyama. Pembenipembeni ya banzela mosusu na France oyo ezali na bazámba, batye miinda ya motane oyo ebendaka kongɛnga ya fálé ya motuka oyo ezali koya, kasi na esika ete ezongisa kongɛnga yango epai ya motabwisi motuka, ezali kotinda yango na zámba. Na bongo, liboso ete nyama ekatisa nzela, ekozela kino mwinda wana mokozimana.

Bitíke oyo bazwi sida na mboka Roumanie

Roxana Dascalu, mopanzi-nsango na agence Reuters, akomi ete, na Roumanie, 93 % ya bato oyo bazali na mikrobe V.I.H. oyo epesaka sida, ezali bana oyo bazali na nsé ya bambula 12 ya kobotama. Amonisi ete motuya oyo moleki monene ya bana na Mpótó oyo bazwi mikrobe yango ezali na engumba Constantza, epai kuna bazalaki bana 1 200 kasi kati na bango bana 420 basili kokufa. Katikati ya bana yango bazwaki mikrobe na kozongisama makila mpe na bantonga oyo esukolamaki malamu te liboso ya kokwea ya ebongiseli ya kala ya politiki na 1989. Ndambo monene ya makila oyo mazalaki na mikrobe etekisamaki na babólá mpe balekisaki yango mbala moko na mapitalo mpe na bandako ya bitíke. Lapólo emonisi ete na bandako oyo babéngaka hospices epai oyo batalelaka bana yango, “bakokanisaki bolongi na motuya ya babiki te kasi nde na lolenge oyo bana bazali kolekisa mikolo na bango ya nsuka mpe mpiko na bango liboso ya liwa.” Mosalisi moko na bandako wana alobaki ete: “Totikaka te ete bana bákufa bango moko na mbeto. Lífulumɛ́ moko akamataka bango na mabɔkɔ na kiti oyo ebalukaka mpe abondelaka bango na koyembeláká bango nzembo.”

Elikya ya sika mpo na bikomba

Agence France-Presse emonisi ete tekiniki moko ya sika ya minganga ezali kosunga babalani oyo babotaka te ete bálónga bokomba na bango. Tekiniki wana basalelaki yango mpo na mbala ya liboso na Denemark, etaleli kotya spermatozoïde moko likoló ya ovule na lisalisi ya ntonga ya moke ya litalatálá na kati ya libumu ya mwasi. Nzokande, tekiniki yango ezali makasi mpe esɛngaka mayele mingi (spermatozoïde moko ezalaka bobele na microns mibale; ovule moko ezalaka na un dixième ya milimɛtɛlɛ), kasi emonani ete ezali kolónga. Ezali na litomba ya kosala yango na kati ya nzoto ya mwasi mpe kosalela spermatozoïde ya mobali na ye na esika ya kosalela oyo ya mopesi mosusu​—yango mpo na kopɛngɔla makambo matali bizaleli malamu mpe bipekiseli ya losambo. Sperme oyo ezali na nguya te ezali ntina ya bokomba ya mobalani moko kati na misato, monganga oyo asalelaka tekiniki wana akanisi ete babalani mingi bakoki sikawa kozala na elikya ya kobota bana.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto