Bomoi ya esengo nsima ya kokende ya bana
MAMA moko alobaki ete: “Mpo na baboti mingi kati na biso, kokabwana na bana ezali likambo oyo epesaka mpasi, ezala lolenge nini tomibongisaki mpo na yango.” Ɛɛ, lokola nsukansuka bana bakendeke, ntango yango esalemi, kolonga mawa wana ekoki kozala likambo ya pɛtɛɛ te. Tata moko alobaki lolenge ayokaki nsima ya kopesa mwana na ye ya mobali mbote ya nsuka: “Mpo na mbala ya liboso na bomoi na ngai . . . , nalelaki mingi mpenza.”
Mpo na baboti mingi, kokende ya bana na bango etikaka bango na bozangi moko monene mpenza—ezalaka lokola mpota moko monene. Kozanga komona bana na bango mokolo na mokolo, basusu bamiyokaka ete batikali bobele bango moko, bakómaka mawamawa mpe bamiyokaka ete bazangi eloko moko. Mpe ezali bobele baboti te nde balukaka komesana na ezaleli yango. Babalani mibale, Edward mpe Avril, bakundweli biso ete: “Soki bana mosusu bazali naino na ndako, bango mpe bakomiyoka ete babungisi eloko moko.” Toli nini babalani yango bapesi? Balobi ete: “Bólekisaka ntango elongo na bana oyo batikali na ndako, mpe bómitya na esika na bango. Yango ekosalisa bango ete báluka komesene na ezaleli yango.”
Atako bongo, bomoi ezali kokoba. Lokola bosengeli kobɔkɔla bana oyo batikali—mpe kosala mosala na bino to misala mosusu ya ndako—bosengeli te kozala ntango nyonso mawamawa. Na yango, tiká ete tótalela mwa makambo mosusu oyo bokoki kosala mpo na kozala na esengo ntango bana na bino batiki ndako.
Bótalela makambo na lolenge malamu
Ya solo, soki boyoki mawa to bomiyoki ete bozali bino moko mpe boyoki mposa ya kolela to kosolola na moninga moko ya boboto, na lolenge moko to mosusu bokoki kosala yango. Biblia elobi ete: “Bozito na motema na moto ekokitisa yango, nde liloba malamu ekosepelisa yango.” (Masese 12:25) Mbala mosusu bato mosusu bakoki kopesa bino makanisi mabongi. Na ndakisa, babalani mibale, Waldemar mpe Marianne, bapesi toli ete: “Bótalela likambo yango lokola kobungisa eloko te, kasi lokola kolonga na mokano oyo bomityelaki.” Oyo nde lolenge malamu ya kotalela makambo! Babalani mosusu mibale, Rudolf mpe Hilde, balobi ete: “Tozali na esengo ete tobɔkɔli bana na biso mpe bakómi mikóló oyo babongi na kozwa bikateli bango moko.”
Bosili kosala milende mpo na kobɔkɔla mwana na bino ‘na mateya mpe na mpamela na Nkolo’? (Baefese 6:4) Ata soki bosili kosala bongo, kasi bokoki koyoka mawa ntango mwana akokende. Kasi epai na baoyo bazali kobongisa mwana na bango, Biblia epesi bango endimiseli ete ata “ekokóma ye monene [mokóló, NW] akopɛngwa na yango te.” (Masese 22:6) Ezalaka mpenza likambo ya esengo komona ete mwana na bino alandi mateya oyo bopesaki ye, boye te? Ntoma Yoane alobaki na ntina na bana na ye na elimo ete: “Nazali na esengo eleki oyo te ete nayoka ete bana na ngai bazali kotambolaka kati na makambo na solo.” (3 Yoane 4) Mbala mosusu bokoki mpe kokanisa bongo mpo na mwana na bino.
Ya solo, bana nyonso te nde balandaka nzela ya Klisto. Soki ezali bongo mpo na mwana na bino oyo asili kokola, yango elingi koloba te ete bozali baboti mabe. Bómitungisa ntango nyonso te soki bosalaki nyonso oyo ekoki na bino mpo na kobɔkɔla ye na nzela ya Nzambe. Bóyeba ete lokola akómi mokóló, mwana na bino akozongisa monɔkɔ liboso na Nzambe mpo na ye moko. (Bagalatia 6:5) Bózala ntango nyonso na elikya ete mokolo mosusu, akobongola mikano na ye mpe ete nsukansuka “mbanzi” ekokóma na esika oyo botindaki yango.—Nzembo 127:4.
Bozali ntango nyonso baboti
Atako kokende ya mwana na bino ekɔtisi mbongwana monene na ndako, yango elingi koloba te ete mosala na bino ya baboti esili. Howard Halpern, nganga-mayele na makambo matali bizaleli ya bato alobi ete: “Bozali baboti kino mokolo bokokufa, kasi mbongwana ekɔti na lolenge bokobanda kopesa bana na bino biloko mpe koteya bango.”
Uta kala mpenza, Biblia emonisaki ete mosala ya baboti esukaka te ata soki mwana akoli. Masese 23:22 elobi ete: “Yokamelá tata na yo oyo abotaki yo mpe tyolá mama na yo te wana ekonuna ye.” Ɛɛ, ata ntango baboti ‘banuni’ mpe bana na bango bakómi mikóló, baboti bakoki kozala ntango nyonso na ntina na bomoi ya bana na bango. Na ntembe te, mwa mbongwana esengeli kosalema. Kasi, boyokani nyonso esengeli kozwa mwa mbongwana na bantango mosusu mpo ete ezala ntango nyonso malamu mpe esepelisaka. Na bongo, sikawa lokola bana na bino bakómi mikóló, bósala milende mpo na kotalela bango sikawa lokola mikóló. Likambo ya esengo, bolukiluki emonisi ete mbala mingi, boyokani ya moboti mpe mwana ekómaka makasi ntango bana batiki ndako! Wana bana oyo bakómi mikóló babandi mpe kokutana na mikakatano ya bomoi, mbala mingi batalelaka baboti na bango na limemya makasi. Mobali moko ya ekólo Allemagne na nkombo Hartmut alobi ete: “Sikawa nakómi kondimela baboti na ngai mpe nakómi kososola ntina oyo bazalaki kosala makambo na lolenge wana.”
Komikɔtisa na makambo ya bana te
Nzokande, ekoki kozala mabe mingi soki bokómi komikɔtisa na makambo ya mwana na bino oyo asili kokóma mokóló. (Kokanisá na 1 Timote 5:13.) Mwasi moko oyo abalá azali kokutana na mikakatano na babokilo na ye amileli ete: “Tolingaka bango, kasi tolingi kozala na bomoi na ndenge na biso mpe kozwa bikateli na biso biso moko.” Ya solo, moboti moko te oyo azali na bolingo akoki kotala na miso mwana na ye ya mokóló kokende na likama. Kasi, atako bongo ezali malamu mingi kopɛngola kopesa toli oyo basɛngi bino yango te, ezala ata bokopesa yango na mayele nyonso to bomoni ete ezali na ntina koleka, mingimingi mpenza ntango mwana asili kobala.
Zulunalo Lamuká! epesaki toli oyo na 1983: “Bóndima mbongwana ya mokumba na bino. Bokotalela lisusu mwana na bino te lolenge bozalaki kotalela ye ntango azalaki naino mwana moke. Bobele bongo, bosengeli kotika mokumba na bino oyo bozalaki kolinga mpenza, mokumba ya kobɔkɔla, mpo na kokóma bapesi toli. Kozwa bikateli mpo na mwana na bino ntango akómi mokóló elongobani te, ezali lokola bozali kokwanza ye mikosa to komɛlisa ye mabɛlɛ. Lokola bokómi bapesi toli, bozali na bandelo na makambo oyo bosengeli koloba. Bokoki lisusu te kobenda likebi ya mwana likoló na bokonzi na bino. (‘Bokoki lisusu te koloba ete: Salá lokola ngai nalobi.’) Esengeli kozala na limemya epai na mwana na bino oyo akómi mokóló.”a
Mbala mosusu bokondima te bikateli nyonso oyo mwana na bino akozwa ye na mobalani na ye. Kasi limemya mpo na libala oyo ezali eloko ya bulɛɛ ekoki kosalisa bino ete bómibanzabanza koleka ndelo te mpe bópɛngola ezaleli ya komikɔtisa na makambo oyo etali bino te. Likambo ya solo ezali ete, mbala mingi ezalaka malamu kotika babalani ya sika bango moko básilisa mikakatano na bango. Soki te, bokoki kobimisa mikakatano ntango bozali kopesa toli oyo mobalani ya mwana na bino alingi yango te mpe yango ekoki kopesa ye nkanda kati na libala. Lisolo ya Lamuká! oyo touti kolobela epesi lisusu toli oyo: “Bópɛngola ezaleli ya kopesa toli ntango nyonso, toli oyo esɛngami te, oyo ekoki kosala ete mobalani ya mwana na bino akóma monguna na bino.” Bózala basungi—kasi bayangeli te. Na kobateláká ntango nyonso boyokani malamu, bokosala ete mwana na bino azala na mokakatano te ya kobɛlɛma na bino mpo na kosɛnga toli soki esengeli.
Bózongisa bolingo makasi kati na libala
Mpo na babalani mingi, kokenda ya bana ekoki mpe kopesa bango nzela ete bálingana lisusu mingi koleka. Ntango oyo baboti balekisaka mpe milende oyo basalaka mpo na kobɔkɔla bana na bango esalaka ete bápesa motuya mingi te na boyokani na bango moko. Mwasi moko alobi ete: “Sikawa lokola bana bakei, ngai na Konrad tozali kozwa ntango mpo na kosolola mpe kosala makambo elongo, lokola tozalaki kosala yango ntango tozalaki naino na bana te.”
Lokola bozali lisusu na mokumba ya bana mokolo na mokolo te, bokoki sikawa kozala na ntango mingi ya kolekisa elongo. Mama moko alobaki ete: “Ntango mingi oyo tozali na yango sikawa . . . epesaka biso nzela ya kotya likebi mingi koleka moko likoló na mosusu, komipesa na koyeba mingi koleka boyokani na biso, mpe komipesa na misala oyo ezali kokokisa bamposa na biso.” Abakisaki ete: “Ezali ntango ya koyekola makambo ya sika mpe kokolisa mpenza mayele, mpe atako ntango yango ekoki kobimisa mitungisi, ezali mpe ntango ya bosepeli mpenza.”
Babalani mosusu mpe bazwaki likoki ya kobatela mosolo. Bazali sikawa kosepela na makambo oyo batyaki pembeni mpe kokokisa mikano oyo bakokaki kolanda yango te. Epai na Batatoli ya Yehova, babalani mingi basalelaka bonsomi na bango ya sika mpo na kolanda matomba ya elimo. Tata moko na nkombo Hermann, alobi ete ntango bana na ye batikaki ndako, ye na mwasi na ye bazongelaki nokinoki mosala ya kosakola ya ntango nyonso.
Baboti oyo bazali kobɔkɔla bana bobele bango moko bazali mpe kotika bana bákende
Komesene kofanda na ndako nsima wana bana bakei ekoki kozala mpenza mokakatano monene mpo na baboti oyo bazali kobɔkɔla bana bobele bango moko. Rebecca, mama oyo azali kobɔkɔla bana mibali mibale bobele ye moko alobi ete: “Ntango bana na biso batiki ndako, tozali na mobali te oyo akozala elongo na biso mpe akomonisela biso bolingo.” Moboti oyo azali kobɔkɔla bana bobele ye moko akoki komona ete bana na ye bazalaki kolendisa ye na mayoki. Mpe soki bazalaki kosunga libota na mosolo, kokende na bango ekoki mpe kobimisa mikakatano na makambo matali mosolo.
Bamama mosusu oyo babɔkɔlaka bana bobele bango moko basalaka milende mpo na kobikela na koyekoláká mosala moko to kokɔta na kelasi ya misala ya mabɔkɔ ya ntango mokuse. Kasi esengeli kosala nini mpo ete omiyoka te ete ozali yo moko? Mama moko oyo azali kobɔkɔla bana bobele ye moko alobi ete: “Oyo ezali kosalisa ngai ezali kozala ntango nyonso na mosala ya kosala. Mbala mosusu kotánga Biblia, kopɛtola ndako, to kotambola mwa moke to kopota mwa mbangu. Kasi lolenge malamu koleka mpo na komiyoka yo moko te ezali bongo kosolola na moninga moko makambo ya elimo.” Ɛɛ, ‘fungolá motema na yo’ mpe luká baninga ya sika mpe ya malamu. (2 Bakolinti 6:13) ‘Lendendelá na malɔmbɔ mpe na mabondeli’ ntango ozali komiyoka ete ozali yo moko. (1 Timote 5:5) Omindimisa ete Yehova akosunga yo mpe akolendisa yo na boumeli ya ntango oyo ya mpasi mpo na komimesenisa.
Kozala na esengo ata ntango bana bakei
Ata ezaleli na yo ezali ndenge nini, yebá ete bomoi esukaka te ntango bana batiki ndako. Bolingo ya libota mpe ekufaka te. Bolingo ya solosolo, lolenge Biblia ezali kolimbola yango, ezali makasi mpo na kosangisa bato, ata soki bazali mosika moko na mosusu. Ntoma Paulo akundweli biso ete bolingo “ekoyikelaka makambo nyonso mpiko. Bolingo esukaka te.” (1 Bakolinti 13:7, 8) Bolingo ya motema oyo bokolisaki kati na libota ekosuka te bobele mpo ete bana na bino batiki ndako.
Likambo ya esengo, ntango bana babandaka koyoka mawa ya bokabwani mpe mposa ya mboka to ntango babandaka kokutana na mikakatano na makambo ya nkita, bazalaka bato ya liboso ya koluka kosolola na baboti. Hans na Ingrid bapesi toli ete: “Tiká ete bana na bino báyeba ete bakoki koya epai na bino ntango nyonso oyo balingi.” Kotalana mbala na mbala, kotindelana nkoma, to kobéngana na telefɔnɛ ekosalisa bino ete bótikala ntango nyonso na bomoko. Jack mpe Nora balobi ete: “Bósepela na oyo bazali kosala kozanga komikɔtisa na makambo na bango.”
Ntango bana batiki ndako, bomoi na bino ebongwani. Kasi, bomoi na ndako oyo ezali na bana te ekoki kozala na makambo mingi ya kosala, mpe ya esengo. Lisusu, boyokani na bino na bana na bino ebongwani. Nzokande, ekoki kozala mpe boyokani moko ya esengo mpe ya kobɔndisa. Profesɛrɛ Geoffrey Leigh mpe profesɛrɛ Gary Peterson balobi ete: “Bonsomi oyo bana bazwi na kotikáká baboti elingi koloba te ete basengeli kozanga bolingo, kozanga bosembo, to kozanga limemya epai na bango. . . . Ya solo, mbala mingi, bolingo makasi ya libota eumelaka bomoi mobimba.” Ɛɛ, bokotika kolinga bana na bino te, mpe bokozala ntango nyonso baboti na bango. Mpe lokola bolingaki bana na bino mingi mpe bosali milende ya kotika bango bákende, bobungisi bango soko moke te.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisolo “Le métier de parent n’a pas de fin” (Mosala ya moboti ezali na nsuka te), kati na Lamuká! ya 8 Máí 1983, ebimeli ya Lifalanse.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 12]
“Mpo na mbala ya liboso na bomoi na ngai . . . , nalelaki mingi mpenza”
[Etanda/Bililingi na lokasa 10]
Bana, bósalisa baboti na bino ete bátikala malamu ntango bino bokei
Kotika ndako ezalaka pɛtɛɛ koleka kotikala na ndako. Na bongo, lokola ozali na esengo mpo na bonsomi oyo ozwi mpe mpo ete okómi mokóló, monisá boboto mpe omitya na esika ya baboti na yo soki bazali na mokakatano ya komimesenisa. Ndimisá bango ete ozali kolinga bango ntango nyonso. Mwa nkoma mokuse, mwa likabo moko, to mwa lisolo na telefone ekoki kosepelisa moboti oyo atondi na mawa! Yebisá bango makambo malamu oyo ezali kokómela yo na bomoi. Yango ekomonisa bango ete bolingo ya libota ezali ntango nyonso makasi.
Ntango okokutana na mikakatano ya bomoi wana okómi mokóló, na ntembe te okomona ntina ya mpasi oyo baboti na yo bamonaki mpo na kobɔkɔla yo. Mbala mosusu yango ekopusa yo oloba na bango ete: “Matɔndi mingi mpo na nyonso oyo bosalaki mpo na ngai.”