Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g98 Juillet nk. 28-29
  • Makambo mazali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokili
  • Lamuká!—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kolera ezongi lisusu
  • Koloba na ntina na kimya na mokili
  • Ezali ntango nyonso na esika ya liboso
  • “Bamemi-liwa”
  • Mokambi ya Lingomba ya Bouddha apesi toli ete bato báluka koyeba solo
  • Nkisi ya koboma mikrobe oyo esalami na moto te
  • Bangi​—Elangwiseli makasi?
  • Ndenge bato ya Ezipito ya kala bazalaki kozwa ngalasi
  • Likama ya komitya na moi
  • Momeseno oyo ezali kobungisa mbongo mingi
  • Drɔgɛ
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Nasengeli koyeba nini na likambo ya komɛla makaya?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
Lamuká!—1998
g98 Juillet nk. 28-29

Makambo mazali koleka na mokili

Kolera ezongi lisusu

Wana ezalaki komonana lisusu te na boumeli ya mbula koleka 100, kolera ezongi na lolenge ya kokamwa mpenza na Amerika ya Sudi. Zulunalo The Times ya Londres elobi ete: “Kobanda 1991, bato 1 400 000 bazwaki kolera kuna, mpe bato 10 000 kati na bango bakufaki.” Minganga bakómaki kobanga lisusu, mpamba te na 1992, lolenge mosusu ya mikrobe ya kolera ebimaki na ekólo Inde, na ekólo Bangladesh mpe na bikólo mosusu oyo bizali zingazinga na yango, mpe ezwaki bato 200 000. Kolera ezali bokɔnɔ ya pulupulu ya makasi, mpe ebomaka bato 70 likoló na monkama oyo bazwi yango, soki basalisi bango malamu te. Kasi komibatela ezali malamu koleka komisalisa. Kotɔkisa mai mpe kotɔkisa miliki liboso ya komɛla yango, kotika bosɔtɔ te mpo na kobenda banzinzi, mpe kosukola bilei oyo bilyamaka mobesu, ezali mpenza myango malamu mpo na kopɛngola kolera.

Koloba na ntina na kimya na mokili

Engebene Annuaire 1997 ya Institut de recherche sur la paix, oyo ezali na engumba Stockholm, na ekólo Suède, emonani ete bitumba ya banamboka oyo bisalemaki na ntango ya bowelani kati na nguya minene ya mokili (Guerre froide) bisilaki. Na 1989, mbula ya nsuka ya bowelani yango, “bitumba” ezalaki bobele 36. Na 1996, motángo yango ekitaki na 27, mpe bitumba nyonso oyo esalemaki ezalaki kati na banamboka, longola bobele oyo esalemaki kati na Inde mpe Pakistan. Lisusu, soki totaleli motángo ya bato oyo bazalaki kokufa, emonani ete bitumba yango bizalaki lisusu ya makasi te. The Star, zulunalo moko ya Afrika ya Sudi elobi ete: “Libota moko te ya bato ezalaki pene na kimya na mokili mobimba lokola libota na biso lelo oyo.” Zulunalo Time elobi ete: “Bato ya États-Unis oyo . . . basili kokonza mokili mpe bazali kotya kimya na lolenge na bango, eleko ya kimya na mokili mobimba oyo emonaná naino te na lisolo ya bato.”

Ezali ntango nyonso na esika ya liboso

Zulunalo ENI Bulletin elobi ete: “Biblia ezali konyatama mingi koleka babuku mosusu nyonso.” Bikólo oyo bizali kokabola Biblia mingi koleka ezali bongo Chine, États-Unis mpe Brésil. Engebene lapolo ya Alliance biblique universelle (ABU), na 1996, bakabolaki Biblia ya mobimba 19 400 000. Yango ezalaki motángo monene ya sika mpe emonisaki bokoli ya 9,1 likoló na monkama koleka na 1995. John Ball, mokambi ya ABU, alobi ete, atako “Biblia ezali kokabolama lisusu mingi koleka na biteni mosusu ya mokili, mosala ezali naino monene soki tolingi ete tópesa na moto nyonso likoki ya koyeba Makomami.”

“Bamemi-liwa”

Lapolo ya mobu 1997 ya Organisation mondiale de la santé (OMS) emonisi ete mikili ya Mpoto oyo mizali na bozwi mizali kobakisa “makɔnɔ” mosusu na makɔnɔ oyo mazalaki liboso na mikili ya bobola. Lokola yango elobelamaki na zulunalo The Daily Telegraph ya Londres, mpasi ya motema, makɔnɔ mauti na makaya, diabète, mpe bakanser mosusu ezali mpenza kokóma mingi mpamba te mikili ya bobola mizali komekola mimeseno ya mikili ya Mpoto na makambo lokola komɛla makaya, kolya bilei ya sukali mingi, kolya bilei ya mafuta mingi, mpe kosala ngalasisi mingimingi te. Dr. Paul Kleihues, mokambi moko ya OMS alobi ete atako sikawa bato bazali koumela mingi na bomoi, yango ezali ‘bomoi moko ezangi ntina, mpamba te yango ezali kobongisa lolenge ya bomoi te.’ Abakisi ete: “Baoyo bazali koloba ete mikili ya Mpoto ezali bamemi-liwa, bazali na elonga.” OMS esɛngi ete kampanye moko esalema na mokili mobimba mpo na kolendisa mimeseno malamu ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto. Elobi ete, soki bongo te “mpasi monene ekokwela mokili mobimba.”

Mokambi ya Lingomba ya Bouddha apesi toli ete bato báluka koyeba solo

Eshin Watanabe, mokonzi monene na moko ya mwa lingomba ya kala mpenza ya Lingomba ya Bouddha na Japon alobi ete: “Kozala motó makasi na makambo ya lingomba ezali malamu te.” Batunaki ye soki alingaki koloba ete kozala sembo na bindimeli ezali malamu kasi kozala motó makasi na bindimeli ezali mabe, Mainichi Daily News elobeli ndimbola oyo apesaki, ekomi ete: “Osengeli komanyola likoló na makambo oyo ozali kondima mpo na koyeba soki ezali mabe to ezali malamu. Ezali likambo ya ntina kotalela lisusu boyokani na yango na bindimeli ya mangomba mosusu. Osengeli mpe koyeba lisusu soki ezali komonisa solo to ezali komonisa solo te. Tosengeli kotalela makambo yango lisusu.” Watanabe azali mokambi ya Tendai, mwa lingomba moko ya Lingomba ya Bouddha na Japon, oyo eutaki na Chine esili koleka mbula 1 200.

Nkisi ya koboma mikrobe oyo esalami na moto te

Ntango bamizokisi, bato mosusu batyaka nsɔi na mpota na bango, banyama mpe balembolaka bampota na bango. Likambo ya kosepelisa, balukiluki na lopitalo St. Bartholomew na Londres bamonaki ete nsɔi ezali nkisi ya koboma mikrobe oyo esalami na moto te. Lokola yango elobelamaki kati na zulunalo The Independent, minganga oyo batalaka makambo ya bankisi basɛngaki na bato 14 ete bátya nsɔi na bipai nyonso mibale ya mabɔkɔ na bango mpe bamonaki ete oxide nitrique oyo ezalaka likoló na lomposo ya nzoto ekómaki mingi. Oxide nitrique ezali nkisi makasi oyo ezali kati na nsɔi mpe ekoki koboma mikrobe, mpe esalemaka ntango mungwa oyo ezalaka na nsɔi ekutanaka na aside oyo ezalaka na lomposo ya nzoto. Ebomaka mikrobe na lisalisi ya aside mosusu ebéngami ascorbate oyo ezalaka na nsɔi.

Bangi​—Elangwiseli makasi?

Kobanda kala, bamɛli bangi bandimaka te ete bangi ezali mpenza mabe. Nzokande, zulunalo Science elobi ete “bilembeteli ya sika bimonisi ete mabe oyo [bangi] esalaka na bɔɔngɔ ekokani na oyo ya bilangwiseli ya ‘makasi’ lokola héroïne.” Banganga-mayele ya siansi na États-Unis, Espagne, mpe Italie oyo batambwisaki bolukiluki yango bamonaki ete “eloko oyo epesaka molangwa kati na bangi​—THC​—esalaka ete dopamine oyo ezalaka na bɔɔngɔ ebimisama mpo na kolangwisa ndenge moko na nicotine mpe héroïne, mpe esalaka ete bamɛli na yango bákoka kotika komɛla yango te. Ntango moto oyo amɛlaki bangi na boumeli ya ntango molai atiki komɛla, eloko mosusu ebéngami CRF (corticotropin-releasing factor) ekómaka mingi kati na bɔɔngɔ. CRF nde epesaka moto nkanda mpe bobangi oyo eutaka na kotika komɛla opiates, masanga makasi mpe cocaïne. Na yango, molukiluki moko alobaki ete: “Nakosepela soki nsima ya kotalela bilembeteli oyo nyonso, bato bataleli lisusu te THC lokola elangwiseli oyo ‘ezangi likama.’ Mbula na mbula, bato soko 100 000 na États-Unis balukaka lisalisi mpo na kolongwa na boombo ya bangi.

Ndenge bato ya Ezipito ya kala bazalaki kozwa ngalasi

The Countyline, zulunalo ya Bryan, na Ohio (États-Unis) elobi ete: “Atako na Ezipito ya kala bato bazalaki na bafrigo te, kasi bazalaki na likoki ya kosala ngalasi na ntango ya mpiɔ.” Bazalaki kosala ndenge nini? “Na mpokwa ntango moi elalaka, basi ya Ezipito bazalaki kotya mbɛki ya mai likoló ya ndɛlɛ. Mbala moko ntango mai yango elingi kokóma mbɔngi (vapeur) esangani na mwa malili na pembenipembeni ya mbɛki na malili ya butu mpe ekokómisa mai ngalasi​—ata soki malili ya libanda ekómi makasi mingi te.”

Likama ya komitya na moi

Zulunalo The Vancouver Sun elobaki ete: “Kanser ya lomposo ekómi komonana mingi na Amerika ya Nɔrdi, mpe moto moko likoló ya bato nsambo na Canada azali na likama ya kozwa kanser ya lomposo na eleko moko ya bomoi na ye.” Zulunalo yango ebakisaki ete: “Ekanisami ete komitya na moi ezalaka na likama mbala 90 likoló na monkama mpo na kozwa maladi ya lomposo ebéngami tumeur mélanome.” Lapolo emonisaki ete soki lomposo ya nzoto eumeli mingi na moi ebebaka mpe enunaka noki, mpe elongolaka ebongiseli ya lomposo mpo na komibatela na makɔnɔ. Ankɛtɛ moko esalemaki na ekólo mobimba ya Canada epai na bato koleka 4 000 emonisaki ete bato 80 likoló na monkama bayebi mabe oyo komitya na moi esalaka na lomposo ya nzoto, nzokande 50 % ya bato oyo bamityaka na moi bamibatelaka te. Dr. Chris Lovato, profɛsɛrɛ na Iniversite ya Colombie britannique, moko ya balukiluki oyo bayebani na ankɛtɛ yango, akebisi ete “tosengeli kozala na momeseno ya komibatela na ntango tozali komitya na moi” mpe kokɔtisa na makanisi na biso “lobanzo mpe myango ya komibatela mpo na kosepela komitya na moi.”

Momeseno oyo ezali kobungisa mbongo mingi

Komɛla likaya ebungisaka mbongo mingi. Motuya boni? Engebene University of California Berkeley Wellness Letter, nsukansuka ekoki kokóma na dolare 230 000 to dolare 400 000​—etali soki omɛlaka pakɛ moko to pakɛ mibale ya likaya na mokolo. Wellness Letter elobi ete: “Kanisá ete ozali elenge mpe obandi komɛla likaya lelo mpe okobi na boumeli ya mbula 50, mpe yango ebomi yo te. Soki ozali komɛla pakɛ moko na mokolo oyo ezali na dolare 2,50 (mpo ete makambo mázala pɛtɛɛ, tólongola likambo ya komata ntalo), ekosala ete na mbula mobimba omɛla makaya ya koleka dolarɛ 900, to dolare 45 000 na boumeli ya mbula 50. Soki otyaki mbongo yango na banki na mbano ya 5 % mbula na mbula, motángo nyonso ekokaki kokola mbala minei, elingi koloba dolare 180 000.” Kobakisa mbongo ya assurance-vie mpe mbongo ya kopɛtola (ndako, bilamba, mpe mino), mbongo ekokóma na motuya oyo tolobeli awa na likoló. Nkoma yango ebakisi ete: “Tolobeli te mbongo oyo osengeli kofuta mpo na makɔnɔ oyo mautaka na komɛla likaya soki ozali na assurance-maladie te.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto