Engebene Biblia
Kokangama na moto oyo okobala ye te ezali mabe?
“Mpo na nini kokanisa ete kokangama na moto oyo okobala ye te ezali kozimbisa moninga, ezali mayele mabe to likambo ya mabe? ezali bongo te! ezali lisano! lisano oyo bato nyonso mibale balongaka, mpamba te mokomoko asepelisaka mosusu.”— Susan Rabin, mokambi ya Eteyelo oyo elakisaka ndenge ya kolula moto, na engumba New York.
BATO mingi bakanisaka ete kokangama na moto oyo okobala ye te ezali mabe te, ezali na likama te, kutu ezali na ntina mpo na kosala boninga mpe kokolisa boyokani kati na bato mibale. Na mikili ya Mpoto, babuku, masolo na bazulunalo mpe mateya ekómi mingi mpo na koteya bato bikela (gestes), lolenge ya kotɛlɛma, mpe lolenge ya kotala moto, makambo nyonso oyo esengeli mpo na kolakisa moto ete ozali kolula ye.”
Kasi, ntango tozali koloba kokangama na moto oyo okobala ye te (na Lifalanse flirter), yango elimboli mpenza nini? Bandimbola mpe makanisi ezali ndenge na ndenge. Diksionere moko elimboli yango ete ezali “bolingo ya likolólikoló to lisano ya kolamwisa mposa ya nzoto.” Diksionere mosusu elimboli yango ete ezali “bolingo oyo ezali na mokano ya kobalana te.” Na yango, tokoki koloba ete moto oyo azali kokangama na yo, ezali moto oyo azali na mposa na yo kasi azali na likanisi ya kobalana na yo te. Tokoki kokanisa ete likambo yango ezali na likama te? Likanisi ya Biblia ezali nini na ntina na yango?a
Atako Makomami ezali kolobela polele te likambo ya kokangama na moto oyo okani kobala ye te, tokoki koyeba likanisi ya Nzambe na ntina na yango. Na lolenge nini? Soki totaleli mitinda ya Biblia oyo ezali na boyokani na likambo yango. Na yango, tokokolisa ‘lisosoli na biso mpo na koyeba makambo oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe.’ (Baebele 5:14) Libosoliboso, tótalela soki kokangama na moto oyo okobala ye te ezali etamboli oyo ebongi mpo na bato oyo babalá.
Mpo na moto oyo abalá
Ebongi na babalani ete bámoniselana bolingo moko epai na mosusu na nkuku. (Kokanisá na Genese 26:8.) Kasi komonisa bolingo motindo wana na moto oyo azali mobalani na yo te eyokani te na mitinda ya Nzambe. Mokano ya Yehova ezalaki ete babalani bázala na boyokani makasi mpe bátyelana motema. (Genese 2:24; Baefese 5:21-33) Yehova atalelaka libala lokola ekanganeli ya bulɛɛ oyo ekoumela libela. Malaki 2:16 (NW) elobi ete: ‘Ayini koboma libala.’b
Soki moto oyo abalá akómi kokangamakangama na moto mosusu, etamboli na ye elongobani mpenza na lolenge Nzambe atalelaka libala? Ezali polele ete moto yango azali komonisa limemya te na ezalela ya bulɛɛ ya libala, ebongiseli oyo Nzambe abandisaki. Lisusu, Baefese 5:33 esɛngi na mobali moklisto ete ‘alinga mwasi na ye lokola ye moko’ mpe mwasi asengeli kozala na ‘botosi mozindo epai na mobali na ye.’ Kokangama na moto oyo okobala ye te ebimisaka zuwa. Boye, tokoki komituna motuna oyo: Ezali mpenza komonisa bolingo to botosi epai na mobalani na yo?
Likambo ya monene koleka ezali ete kokangama na moto mosusu ekoki komema na kosala ekobo, lisumu oyo Yehova azali kokweisa mpe azali kotalela yango lokola kokosa mobalani. (Exode 20:14; Levitike 20:10; Malaki 2:14, 15; Malako 10:17-19) Ya solo, Yehova atalelaka ekobo ete ezali likambo monene na miso na ye, yango wana apesi nzela na mobalani oyo asali likambo te ete aboma libala. (Matai 5:32) Na yango, tokoki kokanisa ete Yehova asepelaka na lisano oyo ezali na likama motindo wana? Nzambe akoki kosepela na yango te ndenge moko moboti ya bolingo akosepela te komona mwana na ye azali kosakana na mbeli.
Mpo na ekobo, Biblia epesi likebisi oyo: “Moto akoki kokamata mɔ́tɔ na ntolo na ye mpe bilamba na ye ikozika te? Moto akoki kotambola likoló na makala na mɔ́tɔ mpe matambe na ye makozikisama te? Boye na ye oyo akoingela epai na mwasi na mozalani na ye. Moto na moto oyo akomama ye akobyangama sembo te.” (Masese 6:27-29) Nzokande, atako ekobo esalemi te, moto oyo abalá mpe azali kokangama na moto mosusu azali komitya na likama mosusu—likama ya “kokóma na mposa ya moto mosusu.”
Kokóma na mposa ya moto mosusu
Bato mosusu oyo babalá bakolisaka boyokani na bato oyo bazali babalani na bango te mpe boyokani motindo wana ekolisaka mposa mabe, atako mposa yango ekómisaka bango na kosangisa nzoto te. Nzokande, Yesu akebisaki ete: “Ye nani akotala mwasi na mposa mabe na ye, asili kosala na ye ekobo na motema na ye.” (Matai 5:28) Mpo na nini Yesu akweisaki mposa oyo ezali kosuka bobele na motema?
Mpamba te “uta na motema ekobima . . . ekobo.” (Matai 15:19) Nzokande, boyokani motindo wana ezali mabe ata soki ekoli te kino kokóma na ekobo. Mpo na nini? Buku moko oyo ezali kolobela likambo yango elimboli ete: “Likambo nyonso to boyokani nyonso oyo ezali kozwa ntango mpe nguya oyo esengelaki kopesama na mobalani na yo ezali motindo moko ya kozanga bosembo.” Ɛɛ, kozala na mposa ya moto mosusu ezwaka ntango, likebi mpe bolingo oyo osengelaki kopesa na mobalani na yo. Na kotalela motinda ya Yesu oyo elobi ete tosengeli kosalela basusu makambo lokola biso moko tolingi ete básalela biso, moto oyo abalá mpe azali kokangama na moto mosusu asengeli komituna motuna oyo: ‘Nakoyoka ndenge nini soki mobalani na ngai azali komitambwisa lokola ngai nazali kosala yango na moto mosusu?’—Masese 5:15-23; Matai 7:12.
Soki moto moko amoni ete asili kosala boyokani motindo wana, asengeli kosala nini? Moto oyo abalá mpe azali na boyokani motindo wana na moto mosusu akokani na motwambisi motuka oyo azali kolala na yenda. Asengeli kolamuka mpe kotalela likambo yango malamumalamu, kosembola yango noki liboso ete libala na ye mpe boyokani na ye na Nzambe ebeba. Yesu amonisaki ntina ya kosala na lombangu wana alobaki ete esengeli kokakatana te kolongola eloko ya motuya lokola liso to komikata lobɔkɔ soki ezali kobebisa boyokani na yo na Nzambe.—Matai 5:29, 30.
Na yango, ekozala malamu kokeba na bisika mpe mbala boni ozali kokutana na moto yango. Ya solo, pɛngolá ezaleli ya kozala bobele yo moko na moto yango. Mpe soki ozali kosala na ye esika moko, osengeli kokeba na lolenge ya masolo oyo ozali kosolola na ye. Ekoki mbala mosusu kozala malamu kokata boyokani nyonso na moto yango. Na nsima, esengeli kokeba na etaleli na yo, na makanisi na yo, na mayoki na yo mpe na etamboli na yo. (Genese 39:7-12; Nzembo 19:14; Masese 4:23; 1 Batesaloniki 4:4-6) Yobo, mobali oyo asilaki kobala, apesaki ndakisa moko malamu ntango alobaki ete: “Nasali kondimana na miso na ngai, na nzela nini mpenza nakoki kotalatala moseka?”—Yobo 31:1, NW.
Ya solo mpenza, ezali likama mpe eyokani na Makomami te ete moto oyo abalá akóma kokangamakangama na moto mosusu. Kasi, Biblia elobi nini mpo na minzemba? Ekoki komonana lokola likambo ya malamu, oyo ezangi likama, to oyo ezali na ntina mpo na kosala boyokani na mobali to na mwasi? Mabe nini ekoki kobima na etamboli motindo wana?
Ezali boni mpo na minzemba?
Ezali mabe te ete minzemba mibale básepela moko na mosusu, soki bazali kokana kobalana mpe bazali kopɛngola etamboli ya mbindo. (Bagalatia 5:19-21) Boyokani motindo wana ekoki mbala mosusu kokola uta ebandeli ya bokutani ntango libala ezali naino mosika. Soki mikano ezali ya malamu, boyokani yango ezali mabe te. Ekoki kotalelama na lolenge mabe te.
Kasi, ezali boni soki minzemba mibale bazali kokangana mingi esika moko bobele mpo na komisepelisa? Etamboli motindo wana ekoki komonana lokola ezangi likama, mpamba te babalá te. Nzokande, esengeli kotalela mpota na motema. Soki minzemba mibale bakómi kokangana mingi mpe soki mposa yango ekómi makasi, moko akoki koyokisa mosusu mpasi mingi na motema. Masese 13:12 elobi: “Elikya oyo ezilisami epesi motema mpasi, nde mposa oyo esukisami ezali lokola nzete na bomoi”! Ata soki minzemba mibale bandimi ete bayebani malamu na boye ete likambo moko ezali te—mokomoko akoki koyeba mpenza makanisi to mayoki ya mosusu? Biblia eyanoli ete: “Motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso mpe na mabe mingi; nani akoki koyeba yango?”—Yilimia 17:9; kokanisá na Bafilipi 2:4.
Esengeli kotalela mpe likama ya kosala pite, mpe mbeba na yango nyonso, lokola kozwa maladi to zemi oyo ekanamaki te. Makomami epekisi pite, mpe baoyo bazali kosala yango na nko bazali kobungisa boyokani na bango na Nzambe. Na mayele mpenza, ntoma Paulo akebisaki baklisto ete, mpo na kotɛmɛla masɛnginya, basengeli ‘koboma binama ya nzoto na bango mpo na oyo etali pite’ mpe bázala na “mposa mabe na nzoto” te, ememaka na kosala pite. (Bakolose 3:5; 1 Batesaloniki 4:3-5) Na Baefese 5:3, apesi biso toli ete pite ‘elobelama kutu te,’ elingi koloba, na lolenge oyo ezali kolamwisa mposa mabe. Kokangama na moto oyo okobala ye te eyokani na toli yango te. Kutu, Nzambe apekisi masolo ya mbindo oyo mazali kolobela kosangisa nzoto.
Mitinda ya Biblia ezali komonisa ete kokangama na moto oyo okobala ye te ekoki koyokisa mosusu mpasi na motema mpe ezali kozanga limemya epai na Nzambe, Mobandisi ya libala. Likanisi ya Biblia oyo ezali kopekisa kokangama na moto oyo okobala ye te ebongi mpenza, mpe ezali kobatela bato na makama ndenge na ndenge. Na yango, moto oyo alingi Nzambe asengeli koboya likambo ya kokangama makasi na moto oyo akobala ye te mpe asengeli kotalela mobali mosusu to mwasi mosusu na bopɛto mpe na limemya.—1 Timote 2:9, 10; 5:1, 2.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tosengeli kosala bokeseni na likambo oyo na kozala baninga, kozanga likanisi ya bolingo ya mwasi na mobali.
b Talá lisolo “Lolenge nini ya koboma libala Nzambe ayinaka?” na Lamuká! ya 8 Febwali 1994 (ebimeli ya Lifalanse).