Ntina oyo miziki ebendaka biso
BOBELE moto nde akoki kobɛta miziki mpe koloba. Tókanisa naino, soki miziki ezalaki te mpe likoki ya koloba ezalaki te, mbele mokili ezali ndenge nini? Buku moko (The Musical Mind) elobi ete: “Emonani ete na bisika nyonso oyo bato bazali, bazalaka na lokota oyo balobaka, bazalaka mpe na miziki na bango.” Ezali na nzela ya biloko mibale wana nde bato babimisaka makanisi na bango. Yango wana, tokoki mpenza koloba ete ntango miziki “elobaka” mitema na biso “eyokaka.”
Mpo na nini mpe ndenge nini miziki esimbaka mitema na biso? Mpo na koyanola na motuna yango, tosengeli naino kotalela: (1) ndenge miziki yango moko ekabolami mpe ndenge bɔɔngɔ na biso esalelaka yango; (2) ndenge totalelaka miziki mpe esika tokoli; mpe (3) ndenge tolobaka.
Ndenge miziki yango moko ekabolami
Miziki yango moko ezali na “biteni na yango.” Biteni yango ezali lolaka, to mongongo, timbre mpe bibɛtɛli. Na ndakisa, balobaka ete liseke (cor) ya kobɛta emipesaka “kilo” mpe ete kelelo ezalaka na “enzombo.” Atako yango nyonso mibale ezali bibɛtɛli ya miziki oyo bafulaka mpema, kasi mokomoko ebimisaka lolaka oyo ekeseni na mosusu. Yango esalaka ete “mongongo” ya ebɛtɛli yango mokomoko ya miziki ekesena na mosusu. Babimisi-nzembo basalelaka bibɛtɛli yango nyonso mpo na kobimisa lolaka kitoko oyo ekosimba mitema ya bato oyo bakoyoka nzembo.
Ekoki kozala ete eloko ya liboso oyo toyokaka na miziki ezali bongo ritme—mbala mosusu ntango tozalaki naino na libumu ya mama, tozalaki koyoka ndenge motema ya mama ezalaki kobɛta. Ekoki kozala mpe ete, kozanga koyeba, tolandaka ritme ya miziki na ndenge motema na biso ebɛtaka to na ndenge topemaka. Ekoki kozala ete soki bato mingi balingaka ritme ya miziki oyo ebɛtaka mwa mbangumbangu (tempi de 70 à 100 battements/minute)—ezali mpo ete motema ya moto oyo akómi mokóló mpe azali na nzoto kolɔngɔnɔ ebɛtaka na ritme wana. Zulunalo moko (Perceptual and Motor Skills) nde emonisaki likambo yango.
Ntango tozali koyoka lolaka mpe mindule ya miziki ndenge na ndenge oyo ezali kobima na bibɛtɛli ndenge na ndenge, tozali kokenisa polele biteni yango ya miziki. Na eteni ya mibale ya ebɛtɛli ya miziki oyo babengi basson na miziki ya Mozart, mongongo makasi ya basson ebɛtaka mpenza motema. Lolaka ya komilela oyo eyokanaka na shakuhachi, flite ya Japon, esimbaka motema mpenza. Lolaka ya kokauka ya ebɛtɛli ya miziki babengi saxophone ténor esalaka ete bábosanaka te nzembo ya miziki babengi blues. Mbala mingi, ebɛtɛli ya miziki babengi pompah ya tuba ya ba Allemands epesaka esengo koleka. Mongongo kitoko ya violon oyo ezali kobɛta miziki ya Strauss waltz, epesaka bato mingi mposa ya kobina. Lokola Clive E. Robbins, na Centre musicothérapie Nordoff Robbins, na New York, alimboli yango, miziki ebendaka bato ndenge wana mpamba te “elobaka na nzoto mobimba ya moto.”
Molɔngɔ, mobulu mpe mondule kati na miziki
Soki miziki ezali na molɔngɔ ebimisaka lolaka ya kitoko, nzokande soki ezali mobulumobulu ebimisaka lolaka ya mabe. Kasi oyebi ete na banzembo mingi biteni wana ekokisanaka? Na kati ya nzembo oyo ezali koyokana na molɔngɔ, ekoki kozala na lolaka ya mobulumobulu mingi koleka ndenge okoki kokanisa. Miziki oyo ezali na molɔngɔ mpe na mobulu esalaka mwa mbongwana oyo, mbala mingi, moto ayokaka yango te kasi yango nde esimbaka mitema na biso. Ndenge wana ya kosimba mayoki ekitisaka motema, kasi soki mondule ezali kaka mobulumobulu, epesaka nkanda—esalaka lokola moto azali kokwanza manzaka likoló ya etanda moko. Nzokande, soki mpe miziki esalemi bobele na molɔngɔ banda na ebandeli tii na nsuka, ekoki mpe kolɛmbisa.
Mondule (mélodie) ezali kolandana ya banɔti oyo ebongisami mpo na kosepelisa. Bakomi mosusu balobi ete, liloba yango euti na liloba ya Greke meʹlos, oyo elimboli “nzembo.” Badiksionɛrɛ elobi ete mondule ezali kosangisama ya lolaka oyo ezali koyokana kitoko na matoi.
Kasi, kolandana ya lolaka nyonso ebimisaka ntango nyonso te mondule ya kitoko. Na ndakisa, soki banɔti ezali mosikamosika, mondule ekoyokana malamu, kasi ekozala mpenza kitoko te. Nzokande, soki banɔti elandani penepene mpe biteni na yango ekabwani mwa mosikamosika, ebimisaka mondule ya kitoko. Ndenge ya kotya banɔti mpe bantaka na yango ekoki kosala ete mondule epesa mawa to epesa esengo. Ndenge moko na molɔngɔ, mondule ebimisaka mayoki na yango mpe esepelisaka, yango esimbaka mayoki na biso ntango banɔti ezali kokita to komata.
Ntango biteni ya miziki nyonso wana esangani, elamusaka makanisi to ekitisaka motema. Yango esalemaka bongo na ndenge oyo bɔɔngɔ na biso eyokaka mpe etalelaka miziki.
Miziki esalaka nini na bɔɔngɔ
Bato mosusu bakanisaka ete likoki ya koloba mpe lolenge ya kosembola makanisi na molɔngɔ ezali makambo oyo ezalaka na lobɔkɔ ya mwasi ya bɔɔngɔ, nzokande miziki ezalaka na lobɔkɔ ya mobali ya bɔɔngɔ oyo etalelaka mingimingi makanisi mpe mayoki. Ezala ete ezalaka bongo to te, ezali mpenza solo ete miziki ebendaka mbala moko makanisi ya moto oyo azali koyoka yango. Zulunalo moko (Perceptual and Motor Skills) elobi ete: “Miziki ebɛtaka mbala moko na motema mpe esimbaka mpenza makanisi. Na kati ya buku moko, likambo oyo ekoki kosɛnga bafraze mingi mpo na kolobela yango . . . , na miziki ekoki kolobelama bobele na mesure moko to na accord moko.”
Buku moko (Music and the Mind) elobi likambo oyo ezali kobenda likebi mpo na makambo oyo tosalaka, oyo tomonaka mpe toyokaka. Buku yango elobi ete: “Makambo oyo toyokaka esimbaka motema, makambo oyo tomonaka esimbaka mpe motema. . . . Soki omoni nyama moko ezoki kasi efandi nyee to moto moko azali konyokwama kasi azali koloba te, yango ekopesa yo mawa mingi te. Kasi, soki oyoki nyama yango ezali koganga mpe moto yango azali kolela, yango ekopesa yo mawa mingi mpenza.”
Miziki, maloba, mpe bomoto na yo
Bato mosusu balobaka ete, nzembo moko ekoki kosimba mitema ya bato nyonso oyo bazali koyoka yango ndenge moko. Nzokande, bato mosusu balobaka ete mpo moto asepela to te na nzembo moko oyo azali koyoka, yango etaleli bomoi na ye ya kala to ezaleli na ye sikawa. Na ndakisa, ntango moto oyo akufelá moto azali koyoka nzembo moko boye na esika ya losambo, yango ekoki kosala ete akanisa lisusu moto na ye oyo akufá mpe ekopesa ye mawa to ata kolelisa ye. Nzokande, bato mosusu oyo bakutaná na likambo yango te bakoki koyemba nzembo yango na esengo nyonso.
Tótalela mpe lolenge tolobelaki liboso lolaka ya liseke mpe ya kelelo. Ekoki kozala ete yo omonaka ete lolaka ya liseke ezali na kilo te. Mpo na yo okoki komona ete ezali nde kitoko mpe esepelisaka yo, nzokande lolaka ya kelelo epesaka yo mawa. Mokomoko na biso azali na makanisi na ye moko oyo miziki ekoki kolamusa—yango wana ndenge miziki esalaka epai na biso ekeseni ndenge esalaka epai ya moto mosusu.
Maloba ya miziki ekendaka mbala moko na motema to na makanisi. Yango wana, bapiblisite mingi oyo esalemaka na radio to na televizyo ezalaka na miziki na kati. Mbala mingi, maloba epesaka mpenza ntina ya likambo oyo balingi kolobela te. Nzokande, soki mwa miziki ya kitoko ezali koyokana na kati ya piblisite, yango ebendaka likebi ya bato oyo bazali kolanda yango. Elembeteli mosusu ezali ete mpo piblisite ebenda bato básomba eloko, etindaka bango básepela na yango kasi bákanisa te!
Soki tosombi eloko kaka mpo na piblisite na yango, tosengeli kobosana te ete maloba mpe miziki ya piblisite nde ebendi biso tósomba eloko yango. Zulunalo moko (Journal of Youth and Adolescence) elobi ete na kozongeláká ntango nyonso maloba mosusu na kati ya nzembo, bakomi ya nzembo balendisaka bilenge báboya kotalela makanisi ya bato mosusu mpe “básala makambo oyo esepelisaka bango.” Zulunalo mosusu elobi ete nsango oyo epesami na “maloba ya bongolabongola na nzembo mosusu ya rap . . . , oyo eleki heavy metal na makasi,” ebongolaka makanisi ya moto oyo azali kolanda yango mpe ekoki kolona epai na ye ezalela ya koyina bato.
Moto akoki kokima ezaleli wana soki azali koyoka bobele miziki kasi azali kolanda maloba na yango te? Ezali solo ete, mbala mingi, ezalaka mpasi mpo na koyoka maloba ya nzembo ya rap mpe ya heavy metal. Ya solo, mbala mingi ezalaka mpasi mpo na koyoka maloba na yango zambi lokito ya miziki na yango ezalaka makasi. Kasi, ata soki maloba ezali koyokana to ezali koyokana te, makambo oyo yango ezali koloba ezali ntango nyonso wana, na kati ya ritme mpe na kati ya nzembo!
Na ndenge nini? Batitre ya nzembo yango moko emonisaka makambo oyo ezali na kati ya nzembo. Mpe, mbala mingi, miziki yango moko ezalaka likambo oyo moto alingi koloba. Ezali likambo nini? Zulunalo moko oyo ekomaka makambo ya bilenge elobi ete: “Emonanaka ete makambo oyo balobaka elakisaka soki moto azali mpenza mobali, soki azali makasi na makambo ya kosangisa nzoto.” Zulunalo mosusu elobi ete: “Batitre ya monene ezali botɔmbɔki, mobulu, bilangwiseli, bondumba, makambo ya nsɔni mpe losambo ya Satana.”
Bilenge mosusu bakoki koloba ete atako yango ezali bongo, kasi ezali kotinda bango na mabe te. Mpo na bango miziki ya ndenge wana ezali malamu mpamba te esalisaka bango ‘bámimona’ ete bazali mpenza bato. Ezali mpenza bongo? Zulunalo moko (Journal of Youth and Adolescence) elobi ete: “Mbala mingi, bilenge mosusu ya mibali bayebanaka ete bazali bato ya nkanda, batɔmbɔki mpe bato ya makasi mpo na miziki ya heavy metal, mpe bamonaka bongo malamu, soki, na eteyelo, bayebisi bango ete bazali na mayele te.” Na nsima zulunalo yango ebakisi ete: “Likambo ya kokamwa ezali ete bilenge balukaka bándima bango mpe báyebana na nzela ya eloko oyo bato nyonso basalelaka. Na esika ete báluka makambo na bango moko, bazali kotalela makanisi mpamba oyo bato bazali kobimisa mpo na mombongo.” Na maloba mosusu, tokoki koloba ete bilenge yango bazali kopesa nzela na moto mosusu ayebisa bango nini basengeli kokanisa mpe ndenge nini basengeli komiyoka.
Tótalela miziki ya rock. Esalaka nini epai ya ebele ya bato oyo bakendaka kotala yango? Buku moko (Music and the Mind) elobi ete: “Ntembe ezali te ete ntango miziki elamusi mayoki ya bato nyonso nzela moko mpe ntango ematisi yango tii na nsuka, miziki ekoki mpe kosala ete moto amitalela lisusu te, mpe loyenge ya ntango wana ekamata ye, yango ezali bizaleli ya mabe oyo bato bamonisaka na ntango wana.” Ndenge bato balekisaka ndelo na makambo mosusu na ntango bazali kotala miziki yango ezali komonisa bosolo ya maloba yango.
Yango wana, mpo na kobatela makanisi na biso mpe motema na biso, tosengeli kopona na likebi mpenza miziki oyo tokoyoka. Ndenge nini tokosala yango? Lisolo na biso ya nsuka ekoyanola na motuna yango.
[Elilingi na lokasa 7]
Mbala mingi, miziki epesaka mposa ya kobina