Sepelá na miziki kasi kolekisa ndelo te
LELO oyo, mosala ya miziki ezali mombongo oyo ezali kopesa bamiliare ya dolare. Baalanga-nzembo oyo bayebani mpe bato mosusu oyo basalaka mosala ya miziki, bazali kozwa mbongo mingi. Nzokande, basusu kati na bango bazalaka na bomoi ya esengo te, bakufaka liwa ya mbalakaka, to bamibomaka. Mpe ezali polele ete miziki mosusu ebebisaka mpenza bizaleli malamu ya moto, elongolaka mposa ya kolinga bato mpe ebebisaka makambo ya elimo, ekoki mpe komema moto na mobulu mpe komema ye asala makambo oyo elongobani te.
Nzokande, ezali mabe te kolinga miziki kasi esengeli te kolekisa ndelo. Atako miziki ebimisi makambo mingi ya mabe, kasi ekoki mpe komemela biso makambo ya malamu, kopesa biso esengo mpe kosala ete tósepela na oyo tozali na yango. Ekoki kolendisa mitema mpe elimo na biso. Tótalela mwa bandakisa mosusu.
Bato oyo basalaki Nzembo nyonso 150 oyo ezali na Biblia basalaki mosala moko ya kitoko mingi mpenza—ezali na maloba ya ntɔki, na nzembo mosantu, mpe mabondeli. Lelo oyo, bato batángaka yango na esengo na nkota ndenge na ndenge. Kasi, Baebele ya kala bazalaki bobele kotánga nzembo yango te; kasi bazalaki mpe koyemba yango. Mbala mingi bazalaki koyemba na bibɛtɛli kitoko ya miziki—yango ezalaki ndenge moko ya malamu mpenza mpo na koyokanisa mayele ya Yehova Nzambe, lokola yango elobelami na maloba ya nzembo, na mayoki oyo baalanga-nzembo bazalaki kolamusa epai ya bayoki. Na esika ete miziki ya Baebele ezala na ntina te to ya mpambampamba, emonani ete miziki na bango ezalaki kitoko mpenza koleka miziki ya mabota oyo ezalaki penepene na bango na ntango wana.
Baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki koyemba nzembo ya Biblia mpe nzembo mosantu mosusu mpo na kokumisa Nzambe mpe mpo na komibɔndisa. Na yango, miziki ezalaki kopesa bango esengo na bomoi na bango. Mpe nzembo wana ya Biblia ezalaki kosalisa bango bákɔtisa boyebi ya Nzambe oyo basengelaki na yango na mitema na bango mpo na kotambwisa bomoi na bango.—Matai 26:30; Misala 16:25.
Bagreke ya kala bayebaki ete miziki ekolisaka bomoto ya moto mpe ekómisaka moto mobali to mwasi ya solosolo. Na ekeke oyo ya 20, mpo na koteya, bato bazali kolobela mingimingi nde siansi, nkita mpe lolenge ya kotya makanisi na molɔngɔ, kasi bazali kotya likebi te mpo na kokolisa mayoki ya bato na nzela ya makambo kitoko ya ntɔki.
Kolekisa ndelo te
Koyoka mwa miziki ya kitoko ekoki kozala na litomba mpe ekoki kosepelisa. Kasi, ekoki kozala lisusu malamu koleka soki oyebi kobɛta ebɛtɛli moko ya miziki to soki ozali koyemba elongo na baninga. Koyekola miziki ekoki kozala likambo ya esengo mpenza.
Ya solo, ndenge moko na makambo mosusu ya malamu na bomoi, esengeli kolekisa ndelo te, esengeli kozala na mayele mpe koyeba kopona miziki. Esengeli bobele kotalela miziki oyo okoyoka to oyo okoboya te, kasi osengeli mpe koyeba ngonga boni okolekisa na koyoka miziki to na kobɛta ebɛtɛli moko ya miziki.
Na yango, soki miziki mosusu ebandi kobebisa makanisi na yo, misala na yo, mpe boyokani na yo na bato mosusu, osengeli kotika yango mpe kopona miziki mosusu. Batelá matoi na yo mpo na kobatela makanisi na yo mpe bomoto na yo!
Kebaká mingimingi na maloba ya loyembo. Ekoki kobongola makanisi na yo mpo ekóma lokola ya bato oyo batalelaka bomoi lokola yo te, mpe bazali na bizaleli ndenge moko na yo te, mpe oyo mbala mosusu bakumisaka bomoi ya mabe mpe ya mbindo. Bobele titre mpamba ya loyembo ekoki mbala mosusu kobimisa makanisi mabe.
Biblia, Liloba ya Nzambe, ezali kolendisa baoyo balingi kosepelisa Yehova ete ‘bákaba nzoto na bango lokola mbeka na bomoi oyo na bulɛɛ mpe oyo ebongi ete Nzambe ayamba yango.’ (Baloma 12:1) Ezali polele ete mayoki na biso ezali eteni moko ya “mbeka na bomoi” yango. Yango wana, soki tomoni ete mpo na miziki, mayoki na biso ebandi kobebisa makanisi mpe misala na biso, tosengeli nokinoki kobongola mimeseno na biso na likambo ya miziki. Omikundola ete: Miziki ekoki kobongola motema na yo mpe makanisi na yo—na ndenge ya mabe to ya malamu!
[Etanda/Elilingi na lokasa 10]
Miziki ekolisaka makoki ya koyekola
“Bolukiluki ezali komonisa ete ntango mwana moke azali koyoka miziki ya kitoko mbala na mbala, makoki na ye ya koyekola ekolaka. Kasi na mabota mingi, yango esalemaka te.”
—Audio, Marsi 1999.