Engebene Biblia
Ndenge nini kopona mwasi to mobali ya kobala?
NTANGO BATUNAKI MWASI MOKO MONZEMBA SOKI AKANISAKA KOBALA, AYANOLAKI MBALA MOKO ETE: “BOBELE KOKANISA MPAMBA? NAMITUNGISAKA MINGI MPO NA YANGO.”
MALOBA oyo mwasi wana alobaki emonisi mpenza ete bato mosusu bazalaka na mposa makasi bálinga bango mpe bázala na moninga ya motema. Bato mingi batalelaka likambo ya kozwa molongani lokola likambo ya ntina mingi na bomoi ya moto. Yango wana, na mokili mobimba, bato bazali kobimisa myango ndenge na ndenge mpo na kosalisa baoyo bazali koluka molongani. Kasi, na bipai mingi na mokili, mabala mingi ezali kosuka na kokufa.
Na Mpoto, moto ye moko aponaka molongani na ye. Nzokande, na bipai mosusu ya Azia mpe ya Afrika, momeseno ya koponela moto molongani ezali naino. Ezala moto ye moko aponi molongani na ye to baponeli ye koponela, esengeli kotalela likambo yango likolólikoló te. Na makambo nyonso oyo moto akoki kopona kosala na bomoi na ye, ezali na oyo ekoki kopesa ye esengo to mawa. Libala ya malamu ekoki kopesa moto matomba malamu mpe kosepelisa ye. Kasi, na libala oyo babalani bazali koyokana te, epesaka mpasi oyo esilaka te mpe etungisaka makanisi.—Masese 21:19; 26:21.
Lokola bato nyonso, baklisto ya solo balingaka ete libala na bango epesa bango esengo mpe bázala malamu. Nzokande balingaka mpe kosepelisa Nzambe mpe kokumisa ye. (Bakolose 3:23) Lokola azali Mozalisi mpe Mobandisi ya libala, Nzambe ayebi malamu mpenza makambo oyo tosengeli na yango mpe oyo ezali malamu mpo na biso. (Genese 2:22-24; Yisaya 48:17-19) Lisusu, na ebele ya bambula nyonso oyo bato bazali awa na mabelé, Nzambe amoni mabala ndenge na ndenge, ya malamu mpe ya mabe. Ayebi makambo oyo esalaka ete libala ezala malamu mpe makambo oyo ebebisaka mabala. (Nzembo 32:8) Kati na Biblia, Liloba na ye, Nzambe amonisi mitinda oyo ezali polele mpe moto nyonso akoki koyeba, oyo ekoki kosalisa moklisto nyonso oyo alingi kopona malamu molongani na ye. Tótala mwa mitinda yango mosusu.
Kolanda bobele kitoko ya nzoto te
Ntango asengeli kopona ye moko molongani na ye, moto akoki kokutana na molongani yango ye moko to koyebana na ye na nzela ya baninga to ya bandeko na ye. Na ebandeli, mingimingi kitoko ya nzoto nde ebendaka moto. Ezali mabe te kobendama na kitoko ya nzoto, mpe yango ezalaka bongo mpo na bato nyonso. Kasi Biblia ezali kobenda biso matoi ete ntango moto azali kokanisa kobala, asengeli kotala bobele kitoko ya nzoto te.
Masese 31:30 elobi ete: “Bonzenga [ekosaka] mpe kitoko ezali mpamba, kasi mwasi oyo akotosa [Yehova], ye [akokumisama].” Ntoma Petelo alobelaki “kitoko oyo ekobeba te, oyo na [elimo, NW] na bopɔlɔ mpe na kimya; yango ezali na motuya monene na miso na Nzambe.” (1 Petelo 3:4) Ntembe ezali te ete, bizaleli ya elimo ya moto oyo olingi kobala—soki abangaka Nzambe, alingaka Nzambe mpe bomoto na ye ya boklisto—eleki kitoko ya nzoto. Ebongi ofanda mpe okanisa malamu liboso ya kopona mobali to mwasi ya kobala. Luká mobali to mwasi oyo azali na mikano ndenge moko na yo na makambo ya elimo, oyo azali kosala milende mpo na kozala na mbuma ya elimo ya Nzambe. Yango ekopesa nzela ete libala na bino ezala mpenza ya malamu.—Masese 19:2; Bagalatia 5:22, 23.
‘Kobala bobele kati na Nkolo’
Kozala na mikano ndenge moko mpe bindimeli ndenge moko na moto oyo olingi kobala ezali na ntina mingi. Libala ezali likambo ya lisɛki te, esɛngaka ete babalani bábongola bizaleli na bango mpe makanisi na bango. Soki makambo na yo mingi ekokani na oyo ya moto oyo okobala, ekozala mpasi te mpo obongola bizaleli mpe makanisi na yo.
Yango ezali kosalisa biso tóyeba mpo na nini ntoma Paulo alendisaki baklisto ete báboya kokangana na ‘ekanganeli ya bokesene . . . esika moko na bato bazangi kondima.’ (2 Bakolinti 6:14) Paulo ayebaki ete kobala moto oyo bozali na ye lingomba moko te mpe oyo ndenge ya kotalela mitinda ya Biblia ekeseni, ekoki kobimisa mikakatano mpe kozanga boyokani. Toli ya kobala bobele ‘kati na Nkolo’ ebongi mpenza. (1 Bakolinti 7:39) Ezali komonisa makanisi ya Nzambe. Baoyo bazali na mayele, mpe bazali kolanda yango, mindɔndɔ mpe mikakatano mingi ekokómela bango te.—Masese 2:1, 9.
Koponela moto molongani
Tóloba naino mpo na bipai oyo bato bazali na momeseno ya koponela moto mosusu mwasi to mobali ya kobala. Na ndakisa, na sudi ya Inde, mabala mingi (80 %) ezali mabala oyo baboti nde baponelaki bana na bango mibali to basi ya kobala. Ezala ete baboti baklisto bazali kolanda momeseno yango to bazali kolanda yango te, yango etali bobele bango moko. Nzokande, mabala ya ndenge wana ezalaka malamu soki bataleli malamumalamu makambo ya elimo.
Bato oyo bamonaka ete mabala ya koponela moto molongani ezali malamu, balobaka ete yango epesaka nzela ete bato oyo bakɔmeli nde bápona. Nkulutu moko na Afrika alobi ete: “Baboti mosusu bakanisaka ete lokola bana na bango bakómi naino mikóló te mpe bayebi makambo mingi te, bakokoka te kotalela malamumalamu makambo ya elimo ya moto oyo balingi kobala.” Mokɛngɛli-motamboli moko abakisaki ete: “Bilenge bayebi makambo ya bomoi mingi te mpe bakoki kotalela likambo ya kopona molongani bobele likolólikoló.” Lokola baboti bayebi bizaleli ya bana na bango malamu koleka bato mosusu, bakanisaka ete bango nde babongi mpenza mpo na koponela mwana na bango moto oyo akobala. Kasi bazali mpe kosala yango na mayele ntango bazali kopesa elenge mwasi na elenge mobali nzela ete bango mpe bápesa makanisi na bango.
Nzokande, soki baboti bataleli mitinda ya Biblia te, bakoki na nsima kotungisama soki libala oyo baponelaki mwana na bango ezali ntango nyonso na mikakatano. Lokola mbala mingi babalani bazwaka ntango te ya koyebana bizaleli liboso ya kobalana, mikakatano ekoki kobima. Tata moko moklisto na Inde alobi ete soki mikakatano ebimi, “mingimingi bapesaka foti na baboti.”
Baboti baklisto oyo baponelaka bana na bango molongani, basengeli kokeba na ndenge bazali kokanisa. Soki balingi koponela mwana na bango molongani mpo na bomɛngɔ to mpo na lokumu, mikakatano ekozanga te kobima. (1 Timote 6:9) Yango wana, baoyo bazali koponela moto mwasi to mobali ya kobala basengeli komituna ete: “Toponeli ye mobali oyo to mwasi oyo mpo bázala malamu na libala mpe na elimo? To toponeli ye nde mpo tómonana ete tozali mpenza bato ya solosolo to mpo tózwa mwa biloko mingi na libota to mpe mpo na mbongo?”—Masese 20:21.
Toli ya Biblia ezali polele mpe ezali na matomba. Soki moto moko alingi kobala, ezala ete akopona ye moko molongani na ye to bakoponela ye, esengeli ntango nyonso kotala soki moto yango azali na bizalela malamu mpe na elimo malamu. Soki makambo yango etalelami, Yehova Nzambe, Mobandisi ya libala, akokumisama mpe baoyo bakobalana bakotonga libala na bango na makambo ya elimo. (Matai 7:24, 25) Yango ekosala ete libala ezala malamu mpe ya esengo.